Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/2 lok. 3
  • Sɛkɛlɛ mpo na kolonga ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Sɛkɛlɛ mpo na kolonga ezali nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Masolo mosusu
  • Kolonga esɛngaka kosala molende
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tósakola kozanga kotika
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Kotika te kosalela Yehova atako makambo ya kolɛmbisa nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Kotika te
    Lingá bato—Kómisá bango bayekoli
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/2 lok. 3

Sɛkɛlɛ mpo na kolonga ezali nini?

BILENGE mibale bazali kobongisa malamumalamu eloko moko oyo bango moko basali mpe balingi komeka kotambwisa yango. Mbala moko, mopɛpɛ eyei, ememi eloko yango, epumbwisi yango likoló, mpe ekei kokweisa yango na nse mpe epanzani nyonso. Bilenge yango batikali monɔkɔ polele, balɛmbi nzoto mbala moko. Mosala nyonso oyo bamonelaki mpasi, oyo babongisaki malamumalamu, nyonso ekei na mai mpe etikali se mwa liboke ya manzanza na mabaya.

Likambo yango ekómelaki Orville na Wilbur Wright mokolo moko na sanza ya Ɔkɔtɔbɛ 1900. Ezalaki mbala ya liboso te bákutana na likambo oyo elingaki kolɛmbisa bango na mokano na bango ya kosala eloko moko oyo ekobanda kopumbwa likoló. Liboso na yango, balekisaki bambula ebele mpe babimisaki mbongo mingi mpo na komekameka kosala eloko yango.

Kasi, nsukansuka molende na bango ezwaki mbano. Mokolo ya 17 Desɛmbɛ 1903, na mboka Kitty Hawk, na Caroline du Nord, na États-Unis, Orville Wright na ndeko na ye Wilbur Wright balongaki kopumbwisa mwa aviɔ oyo ezalaki na motɛrɛ mpe etambolaki na boumeli ya segonde 12. Ya solo, ezali mpenza ngonga moke, kasi likambo oyo basalaki ekɔtisá mbongwana monene mpe ya libela na mokili!

Na makambo mingi, esengeli kozala na motema molai mpe kolendendela mpo na kolonga. Ezala mpo na koyeba koloba malamu monɔkɔ ya bapaya, koyekola mosala ya mabɔkɔ, to mpe kokóma na baninga, makambo mingi ya ntina esalemaka kaka nsima ya kotya molende makasi. Mokomi Charles Templeton alobaki boye: “Soki okamati bato zomi oyo balongi, bato libwa kati na bango balongi mpo basalaki makasi na mosala.” Leonard Pitts Junior, ye azali mokomi na zulunalo, alobaki boye: “Tolobelaka bato ya ntɔki, tondimaka bato mosusu ete bazali na makila malamu, kasi mbala mingi, tobosanaka makambo oyo eleki ntina. Basalaki mosala makasi mpe mbala mingi balongaki te. Balekisaki ngonga mingi na mosala makasi liboso ya kolonga.”

Likambo yango endimisi maloba oyo Biblia eloba banda kala ete: “Lobɔkɔ ya moto ya mosala ekozwa bokonzi.” (Masese 12:24) Kozala moto ya mosala elimboli kosala milende ntango nyonso. Tosengeli kotya molende soki tolingi kosilisa mosala oyo tobandi. Kotya molende elimboli nini? Ndenge nini tokoki kotya molende mpo mikano na biso ekokisama, mpe makambo nini tosengeli kotyela molende? Lisolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna oyo.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Fɔtɔ ya U.S. National Archives

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto