Kolonga esɛngaka kosala molende
LELO oyo, bato balingi lisusu kosala molende te. Bato mingi bazali kokanisa ete kolonga ezali se likambo ya kozala na makila malamu, kasi esɛngi kosala molende te. Kasi, tókende epai, tózonga epai, ezali mpe foti na bango te. Bazulunalo, radio mpe televizyo etondi na bapiblisite oyo, kozanga ete bango moko báyeba yango, ezali kopesa bato makanisi ete eloko nyonso oyo moto alingi akoki kozwa yango ata soki asali makasi te, mbongo na ye kaka nde ekokata likambo. Masolo ebele ezali kobima na bazulunalo ezali kolobela bato oyo bazali kozwa bomɛngo mbala moko mpe bilenge oyo bazali kosala bakompanyi mpe kokóma na bamilio na mwa ntango moke nsima ya bakelasi na bango.
Mopanzi-nsango Leonard Pitts alobaki boye: “Na mokili oyo bato bazali kosepela mingi na makambo oyo miso na bango ezali komona, ezali komonana lokola nde kokóma moto monene ezali likambo ya mpasi te. . . . Emonanaka lokola nde moto nyonso akoki kosala yango soki kaka ayebi sɛkɛlɛ, soki azali na makasi, to soki Nzambe apesi ye chance.”
Kosala molende elimboli nini?
Kosala molende elimboli ‘kokangama makasi mpe kotika te likambo moko, to mosala moko oyo moto akani kosala ata soki akutani na mikakatano to na makambo oyo ekoki kozongisa ye nsima.’ Ndimbola yango ezali kopesa likanisi ya kokende se liboso atako bampasi ezali, to kopika mpende mpe kolɛmba te. Biblia emonisi ntina ya likambo yango. Na ndakisa, Liloba ya Nzambe elobi na biso boye: “Bólukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe,” “bɛtá mpe ekozipwa mpo na bino,” “bóyikaka mpiko na kobondela,” “bósimba makambo malamu ngwi.”—Matai 6:33; Luka 11:9; Baloma 12:12, NW; 1 Batesaloniki 5:21.
Kotya molende emonanaka mpenza na ntango moto azali kosala makasi alonga makambo oyo ekoki kozongisa ye nsima. Masese 24:16 elobi ete: “Mpo ete moyengebene akokwea mbala nsambo nde akotɛ[lɛ]ma lisusu.” (Biso nde totɛngisi makomi.) Ntango akutani na mokakatano to alongi te, na esika ete alɛmba nzoto, moto ya molende ‘atɛlɛmaka lisusu,’ ‘atikaka te,’ mpe amekaka lisusu nzoto.
Kasi, bato mingi batyaka na makanisi na bango te ete bakoki kokutana na mikakatano mpe mbala mosusu bakoki kolonga te. Lokola bazali na mposa ya kosala molende te, baumelaka kolɛmba nzoto te. Mokomi Morley Callaghan alobi ete: “Bato mingi, soki balongi te, bazalaka na makanisi oyo ebebisaka bango, bakómaka mawamawa, bakómaka komona bato nyonso mabe, bakómaka nkandankanda, mpe . . . balɛmbaka.”
Ezali mpenza mawa. Pitts alobi boye: “Tobosanaka ete kokutana na komekama ezali na ntina, mikakatano ezalaka mpe na makambo ya malamu.” Makambo ya malamu yango nini? Asukisi boye: “[Moto] akoyekola ete ata soki alongi likambo moko te ezali te mpo etángama, mpe elingi koloba te ete soki moto alongi mbala moko te akolonga lisusu te. Soki moto alongi te, azwaka lisusu makanisi mosusu mpe mayele na ye ebakisamaka.” Biblia elobi yango na maloba ya polele ete: “Na misala nyonso litomba ezali.”—Masese 14:23.
Ya solo, soki moto alongi te na likambo moko, mpo na kozongela lisusu yango ezalaka likambo moke te. Ntango mosusu tokutanaka na mikakatano oyo tokoki kokanisa ete ata tosali milende nyonso tokolonga yango te. Mbala mosusu, na esika tókóma pene ya kokokisama ya mikano na biso, mbala mosusu emonanaka ete tozongi nde nsima. Tokoki komona lokola nde esili, tokolonga te, mpe tokoki kolɛmba nzoto, to mpe komitungisa na makanisi. (Masese 24:10) Kasi, Biblia elendisi biso na maloba oyo: “Tólɛmbaka mpo na kosalaka malamu te zambi na ntango oyo ekoki, tokobuka soko tokotika motema te.”—Biso nde totɛngisi makomi; Bagalatia 6:9.
Nini ekoki kosalisa biso na kosala ntango nyonso molende?
Mpo na kosala molende na likambo moko, tosengeli libosoliboso komityela mikano ya malamu mpe oyo tokoki kokokisa yango. Na ntembe te ntoma Paulo akangaki ntina ya likambo yango. Ayebisaki Bakolinti boye: “Ngai mpenza, nazali kopota mpamba te, nazali [kobɛta makofi] nde bobele kobɛta mopɛpɛ te.” Paulo ayebaki ete soki alingi kolonga, asengeli komityela mikano oyo ezali polele, lokola mopoti-mbangu oyo azali kotya makanisi na ye nyonso ete akóma na nsuka. Alendisaki bango na maloba oyo: “Boyebi te ete bango bakomekana mbangu na makolo, bakopota nyonso nde bobele moko akozwa libonza? Bópota mbangu ete bózwa na solo.” (1 Bakolinti 9:24, 26) Ndenge nini tokoki kosala yango?
Masese 14:15 elobi ete: “Moto na mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.” Ezali malamu tótalelaka mbala na mbala ndenge oyo tozali komema bomoi na biso, tómituna soki tozali kokende wapi mpe na makambo nini tosengeli kobongisa. Ebongi mpenza tóyebaka malamu makambo oyo tolingi kosala mpe ntina oyo tolingi kosala yango. Ekozala mpasi tólɛmba nzoto soki tozali koyeba malamu mokano oyo tolingi kokokisa. Lisese moko ya Biblia elobi: “Tiká ete miso na yo mátala bobele liboso. . . . Tiká ete bilekelo na yo nyonso bikokisama.”—Masese 4:25, 26.
Ntango omityeli mikano oyo okoki kokisa, likambo ya mibale ezali kokanisa ndenge oyo okokokisa yango. Yesu atunaki motuna oyo: “Soko moto moko kati na bino azali na mposa na kotonga ndako, akofanda liboso kotánga motuya na yango te?” (Luka 14:28) Mopesi-toli moko na makambo ya libala mpe libota alobaki likambo moko oyo eyokani na maloba yango, ye ete: “Likambo moko ngai namoni na bato oyo balongaka ezali ete na bomoi na bango, bayebaka malamu likambo oyo balingi kosala mpe mbuma oyo yango ekobota. Bato oyo balongaka bayebaka ete soki balingi eloko moko, basengeli kosala nyonso oyo esengeli mpo na kozwa yango.” Soki tozali koyeba malamu likambo mokomoko oyo tosengeli kosala mpo tókokisa likambo oyo tolingi kosala, ekosalisa biso tótya makanisi na biso na likambo yango. Ekozala mpe mpasi te mpo tózwa makasi ya kozongela lisusu soki tolongi te. Ndenge wana ya kokanisa nde esalisaki mpenza Orville Wright na Wilbur Wright bálonga.
Na bongo, soki olongi te na makambo mosusu, salá makasi otalela makambo yango na liso malamu, kamatá yango lokola liteya mpo na yo. Yekolá yango malamumalamu, luká koyeba esika nini obebisaki, mpe bongisá esika yango. Ezali mpe malamu kosolola na bato mosusu, mpamba te “myango nyonso mikokokisama na toli.” (Masese 20:18) Molende nyonso oyo osali, ekobakisela yo mayele, mpe nsukansuka okolonga.
Likambo ya misato ya ntina mpo na kosala molende ezali kotikala na nzela oyo ozali kotambola. Ntoma Paulo apesaki toli oyo: “Kasi na esika nini ekómi biso, ekoki ete tótambola liboso mpenza.” (Bafilipi 3:16) Molakisi moko alobaki ete: “Komityela mikano ya makasimakasi te mpe kotikala na nzela oyo ozali kolanda, nsukansuka ebotaka mbuma malamu.” Lisapo ya nkoba na simbiliki oyo bato mingi bayebi yango, lisapo oyo Ésope akomaki, ezali komonisa likambo yango. Nkoba alongaki momekano ya mbangu atako azalaki na mbangu lokola simbiliki te. Mpo na nini? Mpamba te nkoba azwaki makambo na lisɛki te mpe atyaki makanisi na ye nyonso na momekano yango. Alɛmbaki te kasi aponaki kopota na mbangu oyo ekoki na ye, mpe abatelaki mbangu bongo tii na nsuka. Moto oyo abongisaka makambo malamumalamu mpe asalaka yango na molɔngɔ akendaka ntango nyonso liboso, azongaka nsima te na mposa na ye ya kokokisa likambo oyo azali koluka mpe ezali mpasi mpo alɛmba nzoto to atika. ‘Bópota mbangu’ na ndenge oyo ekosalisa bino bókokisa mokano na bino.
Tómityela mikano ya malamu
Mpo molende ezala na ntina, tosengeli komityela mikano ya malamu. Bato mingi babomaka nzoto mpo na makambo oyo ememaka bolamu te. Kasi Biblia elobi ete: “Nde ye oyo azali kotalatala na Mobeko mobongi, Mobeko na bonsomi, mpe aumeli kotalatala wana . . . akozala na esengo kati na misala na ye.” (Yakobo 1:25) Ya solo, koyekola mpo na koyeba mibeko ya Nzambe na kati ya Biblia ezali mokano malamu mpenza. Mpo na nini? Libosoliboso mpo mibeko ya Nzambe etongami na banzela na ye ya malamu mpe ya sembo. Lokola azali Mozalisi, ayebi makambo nini eleki malamu mpo na bikelamu na ye. Yango wana, soki tozali ntango nyonso koyekola malako ya Nzambe mpe soki tozali kosalela yango na bomoi na biso, tokozanga te kozwa bolamu. Masese 3:5, 6 elobi boye: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba . . . Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”
Lisusu, Yesu alobaki ete koyekola koyeba Nzambe mpe Yesu “elimboli bomoi ya seko.” (Yoane 17:3, NW) Bisakweli ya Biblia ezali komonisa ete tozali sikoyo na “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5; Matai 24:3-13) Etikali moke Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnɛma na ye ya sembo, ekoyangela mokili mobimba. (Danyele 2:44; Matai 6:10) Guvɛrnɛma yango ekopesa bato nyonso oyo batosaka Nzambe kimya mpe bolamu oyo emonana naino te. (Nzembo 37:10, 11; Emoniseli 21:4) Misala 10:34 elobi ete “Nzambe akokabolaka bato te.” Yango wana, moto nyonso abengami na koya kozwa mapamboli!
Biblia ezali mokanda moko ya kala oyo ezali na toli ya mayele mpe ya ntina. Esɛngaka ntango mpe milende mpo moto akanga ntina ya maloba na yango. Kasi na lisalisi ya Nzambe, soki totii molende na koluka boyebi na yango, tokozwa yango. (Masese 2:4, 5; Yakobo 1:5) Ezali solo ete kosalela makambo oyo tozali koyekola ekoki kozala etumba monene. Mbala mosusu ekosɛnga tóbongola makanisi na biso mpe tótika makambo mosusu oyo tomesaná na yango. Baninga to mpe bandeko bakoki kopekisa biso koyekola Biblia mpe bakokanisa ete bazali kosala yango mpo na bolamu na biso. Yango wana esengeli kokangama makasi. Ntoma Paulo alobi na biso ete Nzambe akopesa bomoi ya seko epai ya bato oyo bazali na “etingya mpo na kosalaka malamu.” (Baloma 2:7) Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo okokisa mokano yango.
Yebá ete soki otii molende na koyekola makambo ya Nzambe mpe koyekola mokano na ye mpe soki otii molende mpo na kosalela makambo oyo ozali koyekola, okolonga.—Nzembo 1:1-3.
[Elilingi na lokasa 6]
Okolonga soki otii molende na koyekola makambo ya Nzambe mpe mokano na ye
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 4]
Culver Pictures