Yehova ye oyo azali na makasi kati na nguya
“Mpo na monene na nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.” —YISAYA 40:26.
1, 2. (a) Biso nyonso tozalaka na mposa ya nguya ya eloko nini mpo tózala na bomoi? (b) Limbolá ntina oyo tolobi ete nguya nyonso eutaka libosoliboso epai ya Yehova.
MINGI kati na biso totyelaka mpenza eloko oyo tobengi nguya likebi te. Na ndakisa, tolekisaka ntango na biso te na kokanisa ndenge oyo kura esalaka mpo miinda epela, mpe kokɔtisa nsinga ya kura na prize, ezali likambo oyo tomeseni na yango. Kaka soki kura ekatani na mbalakaka nde makanisi na biso elamukaka mpo na komona ete soki kura ezali te, makambo mingi ekosalema te na mboka. Kura oyo tosalelaka eutaka mpenzampenza na moi,a eloko ya liboso oyo epesaka nguya awa na mabele. Na segɔnde moko, moi ezikisaka batɔni milio mitano ya biloko oyo ezali lokola esansi mpe yango nde etindaka nguya oyo esalisaka bikelamu ezala na bomoi awa na mabele.
2 Nguya makasi wana ya moi eutaka wapi? Nani asalaki moi? Ezali Yehova Nzambe. Nzembo 74:16 elobi mpo na ye ete: “Yo obongisaki [engɛngiseli, NW ] mpe moi.” Nguya nyonso eutaka libosoliboso epai ya Yehova, mpe ye nde moto apesaka bomoi nyonso. (Nzembo 36:9) Tosengeli kotalela nguya na ye lokola eloko mpamba te. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova alobi na biso ete tótala biloko oyo ezali na likoló, biloko lokola moi mpe minzoto, mpe tómituna soki esalemaki ndenge nini. “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisa ebele na bango na motuya, akobyanga bango nyonso na nkombo; mpo na monene na nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.”—Yisaya 40:26; Yilimia 32:17.
3. Ndenge nini nguya ya Yehova esalisaka biso?
3 Lokola Yehova azali na makasi kati na nguya, tozali na elikya ete ata mokolo moko te moi ekotika kongɛnga mpe kopesa molunge mpo biso tózala na bomoi. Kasi, tozali na mposa ya nguya ya Nzambe mpo na makambo mosusu oyo ezali na ntina koleka bamposa ya nzoto na biso. Mpo tólongwa na boombo ya lisumu mpe ya liwa, mpo elikya na biso mpo na mikolo oyo ezali koya ekokisama mpe tótyela ntango nyonso Yehova motema, tozali na mposa ya nguya na ye. (Nzembo 28:6-9; Yisaya 50:2) Biblia ezali na bandakisa mingi oyo emonisi ete Yehova azali na nguya ya kokela, azali na nguya ya kosikola, ya kobikisa basaleli na ye mpe azali na nguya ya koboma banguna na ye.
Nguya ya Nzambe emonanaka na biloko oyo akelá
4. (a) Ndenge nini motema ya Davidi esimbamaki ntango azalaki kotala likoló na butu? (b) Moi, sanza na minzoto emonisaka nini mpo na nguya ya Nzambe?
4 Ntoma Paulo akomaki ete Mozalisi ‘ayebisi nguya na ye [ya seko, NW ] polele epai ya makanisi ya bato na misala na ye.’ (Baloma 1:20) Bankama ya bambula liboso, Davidi, mokomi ya nzembo, na ntembe te, lokola azalaki mobateli ya bampate, azalaki mbala mingi kotala likoló na butu, azalaki komona ete molɔ́ngɔ́ ezali monene mpe amonaki bokasi ya Mozalisi na yango. Akomaki boye: “Ekomona ngai Likoló oyo ezali mosala ya misapi na yo, sanza mpe minzoto na likoló oyo yo obongisaki, moto azali nini ete okanisa ye? mpe mwana na moto nini ete otalela ye?” (Nzembo 8:3, 4) Atako Davidi ayebaki makambo mingi te ya biloko oyo ezali na likoló, akangaki ntina ete azali mpamba liboso ya Mozalisi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Lelo oyo, bato ya astronomi bayebi makambo mingi ya molɔ́ngɔ́ mpe nguya oyo esimbi yango. Na ndakisa, balobi na biso ete na segɔnde moko, moi ebimisaki nguya oyo ekokani na kopanzana ya bombi oyo ezali na mégatonne milio nkóto monkama ya T.N.T.b Nguya moke kaka nde ekómaka awa na mabele, kasi nguya yango ekoki mpenza mpo bikelamu ya bomoi ezala na mabele. Kasi, kuna na likoló, ezali na minzoto oyo eleki moi na nguya. Ezali na minzoto mosusu oyo, na segɔnde moko mpamba, ebimisaka nguya oyo moi ebimisaka na mokolo mobimba. Sikoyo, kanisá nguya oyo Ye oyo akelá biloko wana azali na yango! Eliu alobaki solo ete: “Oyo-na-Nguya-Nyonso, tokomonaka ye te, azali monene na nguya.”—Yobo 37:23.
5. Ndenge nini tomonaka nguya ya Yehova na biloko oyo akelá?
5 Soki tosali lokola Davidi, ‘toyekoli misala ya Nzambe,’ tokomona ete nguya na ye ezali na bisika nyonso: na mopɛpɛ mpe na mbonge, na nkake mpe na mikalikali, na bibale minene mpe na ngomba milai. (Nzembo 111:2; Yobo 26:12-14) Mpe lisusu, lokola Yehova alobaki yango epai ya Yobo, banyama bamonisaka makasi na Ye. Moko na banyama yango ezali Behemote to ngubu. Yehova ayebisaki Yobo boye: “Nguya na ye [ezali] kati na loketo na ye . . . Mikwa na ye ezali mingendu makasi ya motako.” (Yobo 40:15-18) Na ntango ya kala bato bayebaki malamu ete mpakasa ezali nyama ya nguya mingi, mpe Davidi abondelaki ete Nzambe abikisa ye na “monɔkɔ ya nkosi, . . . epai na maseke ya mpakasa.”—Nzembo 22:21; Yobo 39:9-11.
6. Na kati ya Biblia, ngɔmbɛ ezali elilingi ya nini, mpe mpo na nini? (Talá maloba na nse ya lokasa.)
6 Lokola ngɔmbɛ ezali nyama ya makasi mingi, Biblia esalelaka yango lokola elilingi ya nguyac ya Yehova. Ntoma Yoane amonaki emonaneli ya kiti ya bokonzi ya Yehova; yango ezalaki na bikelamu ya bomoi minei, mpe moko na yango ezalaki na elongi ya ngɔmbɛ. (Emoniseli 4:6, 7) Emonani mpenza ete nguya ezali moko na bizaleli minei ya liboso oyo Yehova azali na yango, oyo bakeluba yango bazali komonisa. Bizaleli mosusu ezali bolingo, mayele mpe bosembo. Lokola nguya ezali na ntina mingi na bomoto ya Nzambe, soki tokangi malamu ntina ya nguya na ye mpe ndenge oyo asalelaka yango, ekosala ete tólinga ye lisusu koleka mpe ekosalisa biso tólanda ndakisa na ye na ndenge na biso ya kosalela nguya nyonso oyo tokoki kozala na yango.—Baefese 5:1.
‘Yehova na bibele, Oyo-na-Nguya’
7. Nini ekoki kondimisa biso ete malamu ekolonga mabe?
7 Na kati ya Biblia, babengi Yehova “Nzambe ya Nguya Nyonso.” Nkombo yango ezali komonisa biso ete tosengeli kokanisa ata moke te ete ezali na likambo oyo akoki kolɛmba mpe tosengeli kozalaka na ntembe te ete akolonga banguna na ye. (Genese 17:1; Exode 6:3) Ekoki komonana lokola nde mokili oyo ya Satana epikami mpenza, kasi na miso ya Yehova “mabota bazali lokola litanga moko kati na kantini; batangami lokola mputulu mike na [kati ya emekeli] ya bozito.” (Yisaya 40:15) Na nguya motindo wana oyo Nzambe azali na yango, ntembe ezali te ete malamu ekolonga mabe. Lokola sikoyo mabe ekómi mingi mpenza, tokoki kobɔndisama na koyeba ete “[Yehova] ya bibele, Oyo-na-Nguya ya Yisalaele” akosukisa mabe mpo na libela.—Yisaya 1:24; Nzembo 37:9, 10.
8. Banani bazali basoda ya likoló oyo Yehova azali kotambwisa, mpe eloko nini emonisi biso ete bazali na nguya?
8 Nkombo “Yehova na bibele,” oyo tozali kokuta mbala 285 na kati ya Biblia, ezali mpe komonisa nguya ya Nzambe. “Bibele” oyo balobeli awa ezali nde ebele ya bikelamu ya elimo oyo Yehova azali kotambwisa. (Nzembo 103:20, 21; 148:2) Na butu moko mpamba, moko na baanzelu yango abomaki basoda ya Asulia 185 000 oyo bakendaki mpo na kobundisa Yelusaleme. (2 Mikonzi 19:35) Soki toyebi nguya ya basoda ya Yehova oyo bazali kuna na likoló, tokobanga batɛmɛli na biso te. Mosakoli Elisa azalaki na nsɔmɔ te ntango ebele ya basoda bazingelaki ye mpe bazalaki koluka ye mpamba te, na miso ya kondima, azalaki komona ebele ya basoda ya likoló bazalaki wana mpo na kosunga ye, kasi mosaleli na ye azalaki komona bango te.—2 Mikonzi 6:15-17.
9. Mpo na nini tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu mpe kotya elikya ete Nzambe akobatela biso?
9 Yesu mpe ayebaki ete baanzelu bazalaki nsima na ye ntango ebele ya bato bayelaki ye na mipanga mpe banzete na elanga ya Getesemane. Ntango ayebisaki Petelo azongisa mopanga na ye na esika na yango, Yesu ayebisaki ye ete, soki alingaki, akokaki kosɛnga Tata na ye atindela ye “batayo ya baanzelu ebele koleka kutu zomi na mibale.” (Matai 26:47, 52, 53, Boyokani ya Sika) Soki biso mpe totalelaka basoda ya Nzambe kuna na likoló ndenge yango, tokotya motema mobimba ete Nzambe azali na biso. Ntoma Paulo akomaki ete: “Tóloba nini na makambo oyo? Soko Nzambe azali mpo na biso, nani akotɛmɛla biso?”—Baloma 8:31.
10. Yehova asalelaka nguya na ye mpo na bolamu ya banani?
10 Na yango, tosengeli kokakatana ata moke te kotya motema ete Yehova akobatela biso. Asalelaka ntango nyonso nguya na ye mpo na kosala malamu mpe na boyokani na bizaleli na ye mosusu, lokola bosembo, mayele, mpe bolingo. (Yobo 37:23; Yilimia 10:12) Mbala mingi, bato oyo bazali na bokonzi banyokolaka babola mpe bato mpamba mpo na matomba na bango ya moimi, kasi Yehova na ngámbo na ye ‘alongolaka mobola na mputulu’ mpe azali na ‘makasi ya kobikisa.’ (Nzembo 113:5-7; Yisaya 63:1) Malia, mama ya Yesu, mwasi ya komikitisa mpe ya boboto, ayebaki ete, “Oyo-na-Nguya” asalelaka nguya na ye mpo na baoyo babangaka ye, kasi akitisaka bato ya lolendo mpe atombolaka bato ya komikitisa.—Luka 1:46-53.
Yehova amonisaka nguya na ye epai ya basaleli na ye
11. Na mobu 1513 L.T.B., makambo nini Bayisalaele bamonaki oyo elakisaki bango nguya ya Nzambe ?
11 Mbala mingi Yehova amonisaki nguya na ye epai ya basaleli na ye. Mbala moko ezalaki na Ngomba Sinai na mobu 1513 L.T.B. Na mbula wana, Bayisalaele bamonaki liboso nguya ya Nzambe na miso na bango. Malɔzi zomi emonisaki lobɔkɔ makasi ya Yehova mpe emonisaki ete banzambe ya Ezipito bazali mpamba. Mwa moke na nsima, nguya ya Nzambe emonanaki lisusu na ndenge bakatisaki Mai Motane na ndenge ya kokamwa mpe ndenge oyo basoda ya Falo babomamaki. Sanza misato na nsima, pene ya Ngomba Sinai, Yehova ayebisaki Bayisalaele ete bázala “bato na [ye] mpenza kati na bato nyonso.” Bayisalaele bapesaki eyano ete: “Tokosala yango nyonso elobi [Yehova].” (Exode 19:5, 8) Na nsima, Yehova alakisaki polele nguya na ye. Ntango bankake mpe mikalikali ebɛtaki, mpe liseke eyulaki makasi, milinga ebimaki na Ngomba Sinai mpe ngomba yango eninganaki. Bato nyonso, atako batɛlɛmaki mosika, bayokaki nsɔmɔ. Kasi, Mose alobaki na bango ete likambo yango esengeli koteya bango kobanga Nzambe, kobanga oyo ekosala ete bátosa Yehova, Nzambe na bango oyo azali na nguya nyonso mpe Nzambe kaka moko ya solo.—Exode 19:16-19; 20:18-20.
12, 13. Makambo nini esalaki ete Eliya atika mosala na ye, kasi ndenge nini Yehova alendisaki ye?
12 Bankama mingi ya bambula na nsima, na ntango ya Eliya, Nzambe amonisaki lisusu nguya na ye na Ngomba Sinai. Liboso na yango, mosakoli amonaki nguya ya Nzambe. Nzambe ‘azipaki likoló ete mbula ezala te’ na boumeli ya mbula misato na ndambo mpamba te Bayisalaele bapɛngwaki. (2 Ntango 7:13) Na ntango yango oyo biloko nyonso ekaukaki, bayanganga (corbeau) bazalaki komemela Eliya bilei na mokɛlɛ ya Keliti epai azalaki. Mpe na nsima, asalaki likamwisi moko: fufu na mafuta ya mwasi moko oyo akufela mobali ezalaki kosila te mpo mosakoli azanga bilei te. Kutu, Yehova apesaki Eliya nguya ya kosekwisa mwana ya mwasi yango. Na nsuka, ntango basalaki momekano na Ngomba Kalemele mpo na koyeba nani azali Nzambe ya solo, mɔ́tɔ eutaki likoló mpe ezikisaki mbeka ya Eliya. (1 Mikonzi 17:4-24; 18:36-40) Atako bongo, mwa moke na nsima, Eliya akómaki kobanga mpe alɛmbaki nzoto ntango Yezabele akanelaki ye ete aboma ye. (1 Mikonzi 19:1-4) Akimaki mboka yango mpe akanisaki ete mosala na ye lokola mosakoli esili. Mpo na kopesa ye lisusu elikya mpe kolendisa ye, na boboto nyonso, Yehova alakisaki lisusu nguya na ye.
13 Ntango Eliya amibombaki na lidusu moko, amonaki ndenge oyo Yehova alakisaki biloko misato ya nguya oyo ezali na mabɔkɔ ya Ye: mopɛpɛ makasi, koningana ya mabele, mpe na nsuka mɔ́tɔ. Kasi, ntango Yehova alobaki na Eliya, asalelaki “mongongo mokemoke.” Apesaki ye lisusu mosala mpe ayebisaki ye ete ezali naino na bato 7 000 oyo bazalaki kosambela Yehova na bosembo na mokili yango. (1 Mikonzi 19:9-18) Soki, ekómeli biso lokola Eliya, elingi koloba toyoki lokola nde tolɛmbi nzoto mpo mosala na biso ezali kobota mbuma te, tokoki kosɛnga Yehova apesa biso “nguya oyo eleki nguya ya bato,” nguya oyo ekolendisa biso mpo tótika kosakola nsango malamu te.—2 Bakolinti 4:7, NW.
Makambo oyo Yehova alaki ekokokisama mpo azali na nguya
14. Nkombo ya Yehova ezali komonisa nini, mpe boyokani nini ezali kati na nkombo na ye mpe nguya na ye?
14 Nkombo ya Yehova mpe ndenge oyo akokokisa mokano na ye ezali na boyokani na nguya na ye. Nkombo Yehova elimboli “Ye oyo akómisaka,” yango emonisi ete amikómisaka Mokokisi ya makambo oyo alaki. Eloko moko te to mpe moto moko te akoki kopekisa Nzambe kokokisa mikano na ye, ata soki bato ya ntembe bazali kokanisa ete Nzambe akokokisa te makambo oyo azali kokana kosala. Yesu ayebisaki bayekoli na ye mokolo moko ete, “Nzambe akoki kosala nyonso.”—Matai 19:26.
15. Likambo nini Yehova ayebisaki Abalayama na Sala mpo na komonisa ete akoki kolɛmba ata likambo moko te?
15 Lokola ndakisa, Yehova alakaki Abalayama na Sala ete bana na bango bakokóma ekólo moko monene. Kasi, Abalayama na Sala bafandaki bambula ebele, bazalaki kobota te. Bango mibale bakómaki mibange mpenza ntango Yehova alobaki na bango ete etikali moke likambo oyo alakaki ekokisama mpe Sala asekaki. Mpo na yango, anzelu alobaki: “Likambo moko eleki nguya na [Yehova]?” (Genese 12:1-3; 17:4-8; 18:10-14) Nsima ya mbula nkama minei, ntango Mose ayanganisaki bana ya Abalayama na mokili ya Moaba, bana oyo bakómaki ekólo monene, ayebisaki bango ete Nzambe akokisaki likambo oyo alakaki. Mose alobaki boye: “[Mpe atako bongo, ozali naino na bomoi, NW ]. Zambi ye alingaki batata na yo mpe aponaki bana na bango na nsima na bango mpe abimisaki yo na Ezipito na miso na ye, na nguya monene na ye, mpe abimisaki mabota maleki yo na monene mpe na nguya na liboso na yo, ete akɔtisa yo, ete apesa yo mokili na bango mpo na libula, lokola na lelo oyo.”—Deteronome 4:37, 38.
16. Mpo na nini Basadukai bazalaki na libunga lokola bazalaki kondima te ete bato oyo bakufá bakosekwa?
16 Bankama ya bambula na nsima, Yesu apamelaki Basadukai mpamba te bazalaki kondima te ete bato oyo bakufá bakosekwa. Mpo na nini bazalaki kondima te ete Nzambe akozongisa bato oyo bakufá na bomoi lokola alakaki? Yesu alobaki na bango boye: “Boyebi ata [Makomami, NW ] te, ata nguya ya Nzambe te.” (Matai 22:29) Makomami emonisi biso ete ‘bato nyonso bazali kati na nkunda bakoyoka mongongo ya Mwana ya moto, mpe bakobima.’ (Yoane 5:27-29) Soki toyebi makambo oyo Biblia elobi mpo na lisekwa, elikya na biso oyo totii na nguya ya Nzambe ekondimisa biso ete bato oyo bakufá bakosekwa. Nzambe “akosilisa kufa libela . . . zambi [Yehova] alobi bongo.”—Yisaya 25:8.
17. Mokolo nini ezali koya oyo kotya elikya epai ya Yehova ekozala na ntina mingi mpenza?
17 Etikali moke, ekozala na ntango oyo ekosɛnga ete mokomoko kati na biso amonisa polele elikya na ye ete Nzambe azali na nguya ya kobikisa. Satana Zabolo akobundisa basaleli ya Nzambe oyo bakomonana lokola nde bazali na moto ya kobatela bango te. (Ezekiele 38:14-16) Na ntango yango nde Nzambe akolakisa nguya na ye monene mpo na kokɔtela biso, mpe moto nyonso akoyeba ete azali Yehova. (Ezekiele 38:21-23) Sikoyo nde ntango ya kolendisa kondima na biso mpe elikya na biso epai ya Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpo ete na ntango wana tótɛngatɛnga te.
18. (a) Matomba nini tokozwa soki tozali kokanisa likoló ya nguya ya Yehova? (b) Motuna nini tokotalela na lisolo oyo elandi?
18 Na ntembe te, tozali na bantina mingi oyo esengeli kotinda biso tókanisa malamu likoló ya nguya ya Yehova. Ntango tozali kotala misala na ye, mitema na biso ezali kotinda biso tósanzola Mozalisi na biso Monene na komikitisa nyonso mpe tótɔnda ye na ndenge azali kosalela nguya na ye na mayele mpe na bolingo. Eloko moko te ekobangisa biso soki totii motema epai ya Yehova na bibele. Tokozala ntango nyonso na kondima makasi ete akokokisa makambo oyo alaki. Kasi, tóbosana te ete Nzambe akelá biso na elilingi na ye. Elingi koloba, biso mpe tozali na nguya, atako ezali moke. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Mozalisi na biso na ntango tozali kosalela nguya na biso? Tokotalela yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Eyebani malamu ete biloko oyo epelaka lokola esansi mpe makala, biloko oyo basalelaka na bisika mingi oyo kura eutaka, nguya na yango eutaka na moi.
b Nzokande, bombi oyo eleki makasi na kati ya babombi nikleere nyonso oyo bato bameká ezalaki na nguya ya mégatonne 57 ya T.N.T.
c Ekoki mpenza kozala ete mpakasa oyo Biblia elobeli ezali nyama oyo babengi na Lifalanse aurochs (na Latin urus). Eleki sikoyo mbula nkóto mibale, banyama yango ezalaki komonana na Gaule (lelo oyo France) mpe Jules César akomaki boye mpo na lolenge na yango: “Ba uri yango ezali minene, banzoku baleki yango kaka moke, kasi na lolenge na yango mpe langi na yango ezali lokola bangɔmbɛ. Ezali makasi mingi, mpe ezali na mbangu mingi: soki bamoni moto to nyama babikisaka ye te.”
Okoki kopesa biyano na mituna oyo?
• Ndenge nini biloko oyo Yehova akelá ezali komonisa ete azali na nguya?
• Yehova akoki kotinda basoda nini mpo na kobatela basaleli na ye?
• Tángá mwa makambo Yehova asalaki oyo emonisaki nguya na ye.
• Nini endimisi biso ete Yehova akokokisa makambo oyo alakaki?
[Bililingi na lokasa 10]
“Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki yango?”
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ ya Malin, © IAC/RGO 1991
[Bililingi na lokasa 13]
Soki tozali kokanisa ndenge oyo Yehova amonisaki nguya na ye, ekolendisa kondima na biso na makambo oyo alaki biso