“Bóluka Yehova mpe Nguya na ye”
“Miso ya [Yehova] ikotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.”—2 NTANGO 16:9.
1. Nguya ezali nini, mpe ndenge nini bato basalelaki yango?
LILOBA nguya ekoki kosalelama mpo na makambo mwa mingi lokola koyangela, kozala na bokonzi, to kosala ete basusu bálanda yo to makanisi na yo. Ekoki mpe kolimbola likoki ya kosala likambo moko; makasi ya nzoto; to mayele. Mbala mingi bato basalelaka nguya na bango na ndenge ya mabe. Mpo na nguya oyo bato ya politiki bazali na yango, Lord Acton, moto moko ya mayele ya Istware, alobaki boye: “Bokonzi ebebisaka moto mpe bokonzi oyo ezangi ndelo ebebisaka mpenza mingi.” Makambo oyo bato basali na mikolo na biso ezali komonisa ete Lord Acton alobaki solo. Na ekeke ya 20, ‘moto azalaki na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi’ koleka bikeke nyonso oyo eleká. (Mosakoli 8:9) Bakonzi ya mabe basalelaki nguya na bango na ndenge ya mabe mpe babomaki bamilio ya bato. Soki moto azali na nguya, kasi azangi bolingo, azangi mayele mpe azali na bosembo te, ezali likama.
2. Limbolá ndenge oyo Yehova atalelaka bizaleli na ye mosusu ntango azali kosalela nguya na ye.
2 Nzambe azali lokola bato te, ye asalelaka ntango nyonso nguya na ye mpo na makambo ya malamu. “Miso ya [Yehova] ikotambolaka kati na mokili mobimba ete amonisa nguya na ye mpo na bango baoyo bazali na mitema pɛto liboso na ye.” (2 Ntango 16:9) Yehova asalelaka nguya na ye na mayele. Lokola Nzambe azali na motema molai, alingi koboma bato mabe mbala moko te, kasi atikeli bango ntango bábongola mitema. Bolingo etindaka ye apesa moi na ye epai ya bato nyonso, ezala bato ya sembo to bato ya sembo te. Na nsuka, bosembo ekotinda ye asalela nguya na ye monene mpo na koboma ye oyo azali na bokonzi ya liwa, Satana Zabolo.—Matai 5:44, 45; Baebele 2:14; 2 Petelo 3:9.
3. Mpo na nini tosengeli kotyela Nzambe motema na kotalela nguya mingi oyo azali na yango?
3 Soki totaleli nguya ya kokamwa oyo Tata na biso ya likoló azali na yango, tosengeli mpenza kotya motema ete akokokisa makambo oyo alaki biso mpe tokozala na elikya ete akobatela biso. Mwana moke, soki asimbi lobɔkɔ ya tata na ye makasi, abangaka te ntango azali na kati ya bato oyo ayebi bango te, mpamba te ayebi ete tata na ye akotika moto moko asala ye mabe te. Ndenge moko mpe, Tata na biso ya likoló, ye oyo azali na “makasi mpo na kobikisa,” akobatela biso na likambo nyonso ya mabe oyo ekoki koumela, soki tozali kotambola na ye. (Yisaya 63:1; Mika 6:8) Mpe lokola Yehova azali Tata malamu, azangaka te kokokisa makambo oyo alakaka. Nguya na ye ezangi nsuka ezali kopesa biso elikya ete ‘liloba na ye ekolonga na likambo litindaki ye yango.’—Yisaya 55:11; Tito 1:2.
4, 5. (a) Ntango Mokonzi Asa atyelaki Yehova motema mobimba, likambo nini esalemaki? (b) Likambo nini ekoki kosalema soki totyeli bato motema mpo na kosilisa mikakatano na biso?
4 Mpo na nini ezali na ntina mingi tóbatela ntango nyonso na makanisi na biso ete Tata na biso ya likoló akobatela biso? Mpamba te ezali mpasi te mpo bɔɔngɔ na biso etonda na makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo mpe tóbosana ye oyo akobatela biso solo. Ndakisa ya Mokonzi Asa emonisi likambo yango; ye azalaki kotyela Yehova motema mingi. Ntango Asa azalaki koyangela, basoda milio moko ya Etiopia bayaki kobundisa Yuda. Lokola amonaki ete soki abundi na banguna na ye akolonga te, Asa asalaki libondeli oyo: “Ɛ [Yehova], mosusu azali lokola yo te mpo na kosunga kati na bato na makasi mpe bato na bolɛmbu. Ɛ [Yehova], Nzambe na biso, sungá biso zambi tokotalela yo mpe na nkombo na yo toyei liboso na ebele monene oyo. Ɛ [Yehova], yo Nzambe na biso, tiká te ete moto aleka yo.” (2 Ntango 14:11) Yehova ayokaki libondeli ya Asa mpe asalisaki ye mpe alongaki banguna na ye.
5 Kasi, nsima ya kosalela Yehova na bosembo bambula ebele, Asa alongolaki elikya na ye na nguya oyo Yehova azali na yango mpo na kobikisa. Mpo na komibatela ete Yisalaele, ekólo oyo ezalaki na nɔrdi, báya kobundisa ye te, Asa asɛngaki lisalisi na Sulia. (2 Ntango 16:1-3) Atako Yisalaele eyaki lisusu kobundisa Yuda te mpo apesaki Bene-hadadi, mokonzi ya Sulia, kanyaka, kasi boyokani oyo Asa asalaki na Sulia emonisaki ete azalaki lisusu kotyela Yehova motema te. Yango wana, mosakoli Hanani atunaki ye ete: “Baetiopia na Balubi bazalaki ebele monene te mpe makalo mpe bato-na-mbalata mingi mingi te? Kasi mpo ete otalelaki [Yehova], apesaki bango na mabɔkɔ na yo.” (2 Ntango 16:7, 8) Atako bongo, Asa andimaki mpamela yango te. (2 Ntango 16:9-12) Ntango tokutani na mikakatano, tótyela mayele ya bato motema te mpo na kosilisa yango. Tótya elikya na biso nde epai ya Nzambe mpamba te soki totyeli bato motema, tokolonga te.—Nzembo 146:3-5.
Bóluka nguya oyo Yehova apesaka
6. Mpo na nini tosengeli ‘koluka Yehova mpe nguya na ye’?
6 Yehova akoki kopesa basaleli na ye nguya mpe akoki kobatela bango. Biblia elobi na biso ‘tóluka Yehova mpe nguya na ye.’ (Nzembo 105:4) Mpo na nini? Mpamba te soki tozali kosala makambo na nguya ya Nzambe, tokosalela nguya na biso mpo na bolamu ya basusu, kasi mpo na kosala bango mabe te. Yesu Klisto azali ndakisa na biso oyo eleki malamu, ye asalaki makamwisi na “nguya ya Nkolo.” (Luka 5:17) Yesu akokaki kokóma moto ya mbongo to moto oyo ayebani mingi, ata mpe mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso. (Luka 4:5-7) Nzokande, asalelaki nguya oyo Nzambe apesaki ye mpo na kolakisa bato, koteya, kosalisa mpe kobikisa bango. (Malako 7:37; Yoane 7:46) Azali mpenza ndakisa malamu mpo na biso!
7. Ezaleli nini ya ntina mingi tolonaka ntango tozali kosala makambo na nguya ya Nzambe kasi na nguya na biso moko te?
7 Lisusu, soki tozali kosala makambo na ‘nguya oyo Nzambe apesaka,’ tokozala ntango nyonso na komikitisa. (1 Petelo 4:11) Bato oyo balukaka kozala na nguya bakómaka na lolendo. Mpo na yango, tozali na ndakisa ya Esala-Hadono, mokonzi ya Asulia, oyo alobaki na lolendo nyonso ete: “Nazali na nguya, nazali elombe, nazali molai, nazali monene.” Nzokande, Yehova “aponi biloko ya bolema na mokili ete ayokisa biloko ya mayele nsɔni.” Yango wana, soki moklisto ya solo azali komikumisa, azali komikumisa kati na Yehova, mpo ayebi ete makambo oyo asali, asali yango na nguya na ye moko te. Soki ‘tomikitisi na lobɔkɔ makasi ya Nzambe’ tokozwa lokumu.—1 Bakolinti 1:26-31; 1 Petelo 5:6.
8. Tosengeli naino kosala nini mpo tózwa nguya ya Yehova?
8 Ndenge nini tokoki kozwa nguya ya Nzambe? Libosoliboso, tosengeli kosɛnga yango na libondeli. Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete Tata na ye apesaka elimo santu epai ya baoyo bazali kosɛnga yango. (Luka 11:10-13) Talá ndenge oyo elimo santu epesaki bayekoli ya Klisto nguya ntango baponaki kotosa Nzambe mpe baboyaki kotosa bakonzi ya mangomba oyo bayebisaki bango bátika kosakola nkombo ya Yesu. Ntango basɛngaki Yehova asalisa bango, Yehova ayokaki libondeli na bango ya sembo, mpe elimo santu epesaki bango makasi ya kokoba kosakola nsango malamu na molende.—Misala 4:19, 20, 29-31, 33.
9. Esika ya mibale oyo tokoki kozwa makasi na elimo ezali nini mpe pesá ndakisa moko mpo na komonisa ete esika yango epesaka mpenza makasi.
9 Ya mibale, tokoki kozwa nguya ya elimo na Biblia. (Baebele 4:12) Nguya ya liloba ya Nzambe emonanaki na mikolo ya Mokonzi Yosiya. Atako mokonzi yango ya Yuda alongolaki bikeko na mboka yango, ntango bakendaki kokuta mokanda ya Mobeko ya Yehova na kati ya tempelo, abakisaki molende na mosala na ye ya kosilisa losambo ya bikeko nyonso na mboka.a Yosiya ye moko atángelaki bato Mibeko, mpe na nsima ekólo mobimba esalaki kondimana na Yehova, mpe babandaki lisusu mosala ya kosilisa losambo ya bikeko na mboka mpe basalaki mosala yango na molende koleka. Litomba ya misala malamu ya Yosiya ezalaki ete “na mikolo na ye, nyonso bapɛngwaki te na nzela ya [kolanda Yehova].”—2 Ntango 34:33.
10. Wapi lolenge ya misato oyo Yehova apesaka biso makasi, mpo na nini ezali na ntina mingi?
10 Ya misato, Yehova asalelaka baninga na biso baklisto mpo na kopesa biso makasi. Paulo alendisaki baklisto báyanganaka na makita mpo na “kolendisama na kozala na bolingo mpe kosala misala ya malamu” mpe kolendisana. (Baebele 10:24, 25, NW ) Ntango Petelo abimaki na bolɔkɔ na ndenge ya likamwisi, mposa na ye ezalaki azala esika moko na bandeko na ye, yango wana akendaki mbala moko na ndako ya mama ya Yoane Malako, epai ‘bato mingi bayanganaki mpe bazalaki kobondela.’ (Misala 12:12) Moto na moto akokaki kofanda epai na ye mpe kobondela ye moko. Kasi bamonaki malamu bázala esika moko mpo na kobondela mpe kolendisana na ntango wana ya mpasi. Ntango etikalaki moke Paulo akóma na Loma nsima ya mobembo moko molai mpe ya makama, akutanaki na mwa bandeko na mboka Puteoli mpe na nsima ayambaki bandeko mosusu oyo bayaki kokutana na ye. Asalaki nini mpo na yango? “Wana emoni Paulo bango [bandeko oyo bayaki], apesi Nzambe matɔndi mpe [azwaki] mpiko.” (Misala 28:13-15) Alendisamaki lokola akutanaki lisusu na bandeko. Biso mpe tolendisamaka ntango tozali esika moko na bandeko na biso baklisto. Soki eloko moko ezali kopekisa biso te mpo na koyangana na bandeko na biso, tosengeli koluka te kotambola biso moko na nzela moke oyo ezali komema na bomoi.—Masese 18:1; Matai 7:14.
11. Tángá mwa makambo oyo esɛngaka mpenza tózala na “nguya oyo eleki nguya ya bato.”
11 Ntango tozali kobondela mbala na mbala, tozali koyekola Liloba ya Nzambe, mpe tozali kosangana na baninga na biso bandimi, tozali ‘komikembisa kati na Nkolo mpe na makasi na nguya na ye.’ (Baefese 6:10) Na ntembe te, biso nyonso tozali na mposa ya “nguya ya Nkolo.” Bamosusu bazali na maladi oyo ezali kotungisa bango mingi, bamosusu bazali na mikakatano na kolɔngɔnɔ ya nzoto mpo bakómi mibange, to mpe bamosusu bakufeli molongani oyo bafandaki na ye bambula ebele. (Nzembo 41:3) Bamosusu mpe bazali na balongani oyo bazali bandimi te mpe bazali kotɛmɛla bango. Baboti, mingimingi batata to bamama oyo bazali kobɔkɔla bana bango moko, lokola basalaka mosala mingi mpo na koleisa bana na bango, balɛmbaka mingi. Bilenge baklisto bazali na mposa ya kozwa nguya mpo bálanda baninga na bango te oyo bamipesi na komela bangi mpe kosala pite. Biso nyonso tosengeli kokakatana te kosɛnga Yehova apesa biso “nguya oyo eleki nguya ya bato” mpo tólonga mikakatano wana.—2 Bakolinti 4:7, NW.
“Akopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi”
12. Ndenge nini Yehova asungaka biso na mosala ya kosakola?
12 Yehova apesaka mpe basaleli na ye nguya ntango bazali kosala mosala na bango ya kosakola. Tozali kotánga boye na esakweli ya Yisaya: “Akopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya. . . . Baoyo [bakozelaka Yehova] bakozwa nguya ya sika, bakopombwa likoló na mapapu lokola mpongo, bakopota mbango nde bakolɛmba te, bakotambola nde bakosenzwa te.” (Yisaya 40:29-31) Ntoma Paulo azwaki nguya mpo na kokokisa mosala na ye. Yango wana mosala na ye ebotaki mbuma mingi. Akomelaki baklisto ya Tesaloniki boye: “Mpo ete Nsango Malamu na biso eyeli bino bobele na maloba te kasi na nguya mpe na [elimo santu, NW ].” (1 Batesaloniki 1:5) Lokola azalaki na nguya mpo na kosakola mpe koteya, abongolaki bomoi ya bato oyo bazalaki koyoka ye.
13. Nini esalisaki Yilimia mpo alɛmba te atako bazalaki kotɛmɛla ye?
13 Soki na teritware na biso balingaka koyoka biso te, mbala mosusu tozongelaka bango mbala na mbala banda bambula mingi, kasi bato moke kaka nde bandimaka koyoka biso, tokoki kolɛmba nzoto. Yilimia mpe alɛmbaki mpo bato bazalaki kotɛmɛla ye, kosɛka ye, mpe bazalaki matoi mangbongi. Alobaki ete: “Nakoloba nkombo na [Nzambe] te, nakoloba mpo na nkombo na ye lisusu te.” Kasi akokaki kokanga monɔkɔ te. Nsango na ye “ezalaki na motema na [ye] lokola mɔ́tɔ ya kozikisa.” (Yilimia 20:9) Eloko nini epesaki ye lisusu nguya atako bato batɛmɛlaki ye mingi? Yilimia alobaki ete: “[Yehova] azali na ngai elongo lokola elombe ya nsɔmɔ.” (Yilimia 20:11) Lokola Yilimia ayebaki ete nsango oyo asengelaki kosakola mpe mosala oyo Nzambe apesaki ye ezalaki na ntina mingi, yango esalisaki ye andima elendiseli ya Yehova.
Nguya ya kozokisa mpe nguya ya kobikisa
14. (a) Lolemo ezali na nguya nini? (b) Pesá bandakisa oyo emonisi mbeba oyo lolemo ekoki kosala.
14 Ezali te ete nguya nyonso oyo tozali na yango eutaka mbala moko epai ya Nzambe. Na ndakisa, lolemo ezali enama moke, kasi ezali na nguya ya kozokisa mpe na nguya ya kobikisa. Salomo alobi ete: “Kufa mpe bomoi ezali na nguya ya lolemo.” (Masese 18:21) Makambo oyo ebimaki nsima ya mwa lisolo ya Satana na Eva ezali komonisa mbeba oyo maloba ekoki kosala. (Genese 3:1-5; Yakobo 3:5) Biso mpe tokoki kosala mabe mingi na lolemo na biso. Soki tozali kobimisa maloba mabe mpo na kotyola elenge mwasi mpo azali na nzoto mineneminene, ekoki kozangisa ye mposa ya kolya. Elimo ya matɔngi ekoki kobebisa boninga oyo eumeli ntango molai. Ya solo, tosengeli mpenza kokeba na lolemo na biso.
15. Ndenge nini tokoki kosalela lolemo na biso mpo na kolendisa mpe kobikisa?
15 Atako lolemo ekoki kobebisa, kasi ekoki mpe kolendisa. Lisese moko ya Biblia elobaka ete: “Moto azali oyo akoloba lokola koswama na mbeli; nde lolemo ya bato ya mayele ezali na bomoi.” (Masese 12:18) Baklisto oyo bazali na mayele basalelaka lolemo na bango mpo na kobɔndisa baoyo bazali na mitungisi mpe baoyo bakufeli bandeko. Maloba ya boboto ekoki kolendisa bilenge oyo bazali kobundisa mposa ya kolanda makambo oyo baninga na bango basalaka. Maloba ya mayele ekoki kolendisa bandeko oyo bakómi mibange mpo bámona ete tozali na mposa na bango mpe tolingaka bango. Maloba ya malamu ekoki kolɛmbisa mpasi ya bato oyo bazali na maladi mpe kosalisa bango bálekisa mokolo malamu. Longola nyonso wana, tokoki kosalela lolemo na biso mpo na koteya nsango ya Bokonzi epai ya baoyo bakoyoka yango. Tokozala na nguya ya kosakola Liloba ya Nzambe soki totii makanisi na biso na mosala yango. Biblia elobi boye: “Boyá kosalela bato malamu te baoyo bakoki kozwa yango, wana lobɔkɔ na yo ezwi eposa ya kosala bongo.”—Masese 3:27.
Ndenge malamu ya kosalela nguya
16, 17. Ntango bazali kosalela bokonzi oyo Nzambe apesi bango, ndenge nini bankulutu, baboti, mibali, na basi bakoki kolanda ndakisa ya Yehova?
16 Atako Yehova azali na nguya nyonso, kasi ayangelaka lisangá na bolingo. (1 Yoane 4:8) Bakɛngɛli baklisto balandaka ndakisa na ye: babatelaka bampate ya Nzambe na bolingo, basalelaka bokonzi na bango na ndenge ya mabe te. Ezali solo ete ntango mosusu esɛngaka ete bakɛngɛli ‘bákebisa, bápamela, mpe bálendisa,’ kasi basalaka yango na “motema molai mpe na mayele ya koteya.” (2 Timote 4:2, NW ) Yango wana, bankulutu bakanisaka ntango nyonso maloba oyo ntoma Petelo akomelaki baoyo bazali na bokonzi na kati ya lisangá ete: “Bóbatela etonga ya Nzambe kati na bino. Bóbatela bango mpo na kopusama te, kasi na mitema malamu lokola elingi Nzambe, na mposa ya kozwa lifuti te kasi mpo na kopesa mpamba; lokola mpo na kozala mikonzi likoló na ndambo na bino te kasi lokola bilakiseli na etonga.”—1 Petelo 5:2, 3; 1 Batesaloniki 2:7, 8.
17 Baboti mpe mibali bazali mpe na bokonzi oyo Yehova apesi bango, mpe basengeli kosalela nguya yango mpo na kosalisa mabota na bango, koleisa bango mpe kolinga bango. (Baefese 5:22, 28-30; 6:4) Ndakisa ya Yesu ezali komonisa ete moto akoki kosalela bokonzi na ye malamu mpe na bolingo. Soki baboti bazali kopesa bana na bango disipilini oyo eleki ndelo te kasi oyo ebongi, bana bakolɛmba nzoto te. (Bakolose 3:21) Libala ezalaka malamu ntango mobali oyo azali moklisto azali kosalela bokonzi na ye na bolingo mpe mwasi azali kotosa mobali na ye, kasi azali koluka komatela mobali na ye te to kosala makambo te na ndenge oyo ye alingi.—Baefese 5:28, 33; 1 Petelo 3:7.
18. (a) Ndenge nini tosengeli kolanda ndakisa ya Yehova mpo na kopekisa nkanda na biso? (b) Baoyo bazali na bokonzi basengeli kolendisa eloko nini epai ya bato oyo bazali koyangela?
18 Baoyo bazali na bokonzi na kati ya libota mpe na kati ya lisangá basengeli mpenza kopekisaka nkanda na bango, mpamba te moto ya nkanda babangaka ye na esika ete bálinga ye. Mosakoli Nahumu alobaki boye: “[Yehova] akosilika noki te, azali monene na nguya.” (Nahumu 1:3; Bakolose 3:19) Soki toyebi kopekisa nkanda na biso ekomonisa ete tozali na nguya, kasi soki tozali kotikela yango nzela, ezali bolɛmbu mpo na biso. (Masese 16:32) Ezala na kati ya libota to na lisangá, mokano na biso ezali ya kolendisa bolingo: kolinga Yehova, kolinga bato mpe kolinga bosembo. Bolingo ezali ekangiseli oyo eleki makasi mpe eloko oyo eleki na nguya mpo na kotinda biso na makambo ya malamu.—1 Bakolinti 13:8, 13; Bakolose 3:14.
19. Yehova apesi elikya nini oyo ezali kolendisa, mpe biso tosengeli kosala nini mpo na yango?
19 Koyeba Yehova elimboli mpe koyeba ete azali na nguya. Na monɔkɔ ya Yisaya, Yehova alobaki boye: “Oyebi te? Oyoki te ete [Yehova] azali Nzambe libela motongi na nsuka ya mokili? Ye akosenzwa te, ye akolɛmba te.” (Yisaya 40:28) Nguya ya Yehova ezali na nsuka te. Soki totii motema epai na ye, kasi epai na biso moko te, akotika biso te. Alobi na biso boye: “Bangá te, zambi ngai nazali na yo; yoká nsɔmɔ te mpo ete ngai nazali Nzambe na yo. Nakokembisa yo, nakosunga yo, nakotombola mpe yo na lobɔkɔ na ngai ya boyengebene.” (Yisaya 41:10) Tokosala nini soki tokanisi lolenge oyo alingaka biso mpe abatelaka biso? Tólanda ndakisa ya Yesu, tósalela nguya nyonso oyo Yehova apesi biso mpo na kosalisa basusu mpe kotonga bango. Tósalela lolemo na biso mpo na kobikisa kasi mpo na kozokisa te. Tólala mpɔngi na elimo te, tózala makasi na kondima, mpe tókola na nguya ya Mozalisi na biso Monene, Yehova Nzambe.—1 Bakolinti 16:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki mpenza kozala ete, mokanda ya Mibeko oyo Bayuda bamonaki ezalaki oyo Mose akomaki, oyo etyamaki na tempelo bambula mingi liboso.
Okoki kolimbola?
• Ndenge nini Yehova asalelaka nguya na ye?
• Na bisika nini tozwaka nguya ya Yehova?
• Ndenge nini tosengeli kosalela nguya ya lolemo?
• Ndenge nini bokonzi oyo euti na Nzambe ekoki kozala lipamboli?
[Elilingi na lokasa 15]
Yesu asalelaki nguya ya Yehova mpo na kosalisa basusu
[Bililingi na lokasa 17]
Tokoki kozala na nguya ya kosakola Liloba ya Nzambe soki totii makanisi na biso na mosala yango