Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/12 nk. 9-14
  • Yehova apesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova apesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tozali na mposa ya nguya oyo eleki nguya ya bato
  • ‘Yehova azali nguya na biso’
  • Makambo oyo abongisi mpo na kopesa biso makasi na elimo
  • Lisangá ezali lisungi oyo ezali kolendisa
  • Mosala ya kosakola epesaka biso makasi
  • Tókoba na mosala na nguya ya Yehova
  • ‘Apesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • “Bóluka Yehova mpe Nguya na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Yehova apesaka nguya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Ndenge tozwaka nguya ya kobundisa komekama mpe kolɛmba nzoto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/12 nk. 9-14

Yehova apesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi

“[Yehova] akopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya.”​—YISAYA 40:29.

1. Lobelá naino nguya oyo ezali na kati ya biloko oyo Nzambe akelá.

NGUYA ya Yehova ezali na nsuka te. Biloko oyo akelá ezali na nguya ya kokamwa! Tókamata ndakisa ya eloko moke mpenza lokola atomɛ, biloko nyonso na mokili esalemi na ebele ya baatomɛ oyo esangani. Atomɛ ezali moke mpenza; kutu, litanga moko ya mai ezali na baatomɛ miliare nkama ya bamiliare.a Awa na mabele, eloko nyonso ya bomoi ezalaka na mposa ya nguya oyo baatomɛ ya moi ebimisaka. Kasi, nguya ya moi esengeli kozala makasi ndenge nini mpo bikelamu ya bomoi ezala awa na mabele? Mabele ezwaka kaka mwa nguya moke na kati ya ebele ya nguya oyo moi ebimisaka. Atako bongo, mokanda moko (Astronomy) ya Fred Hoyle, moto ya mayele na matematiki, elobi ete: “Nguya moke ya Moi oyo ekómaka awa na mabele . . . eleki mbala 100 000 nguya oyo tokozwa soki tosangisi baizini nyonso ya mokili.”

2. Yisaya 40:26 elobi mpenza nini mpo na nguya ya Yehova?

2 Ezala tokanisi eloko lokola atomɛ to totii likebi na molɔ́ngɔ́, tokomona mpenza ete Yehova azali na nguya ya kokamwa. Yango wana mpenza alobaki ete: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona! Nani asalaki yango? Ye oyo akobimisa ebele na bango na motuya, akobyanga bango nyonso na nkombo; mpo na monene ya nguya na ye mpe mpo ete azali na makasi kati na nguya, moko te azali kozanga.” (Yisaya 40:26) Ya solo, Yehova azali na “makasi kati na nguya,” mpe “nguya” nyonso oyo esengelaki mpo na kosala molɔ́ngɔ́ mobimba eutaki epai na ye.

Tozali na mposa ya nguya oyo eleki nguya ya bato

3, 4. (a) Tángá mwa makambo mosusu oyo ekoki kolɛmbisa biso. (b) Motuna nini ebongi tótalela yango?

3 Nzambe azali na nguya oyo ezangi nsuka; nzokande bato balɛmbaka. Epai nyonso oyo tokokende, tokomona bato oyo balɛmbi. Bato balamukaka balɛmbi, bakendaka na mosala to na kelasi balɛmbi, bazongaka na ndako balɛmbi, mpe bakendaka kolala wana nzoto esi ebukani mpenza. Bato mosusu bazalaka na mposa bákende esika moko oyo bakoki kopema mwa moke. Biso basaleli ya Yehova mpe tolɛmbaka mpamba te mosala ya Nzambe esɛngaka tósala molende mingi. (Malako 6:30, 31; Luka 13:24; 1 Timote 4:8) Ezali mpe na makambo mosusu mingi oyo elɛmbisaka biso.

4 Atako tozali baklisto, tokutanaka mpe na mikakatano oyo bato nyonso bakutanaka na yango. (Yobo 14:1) Maladi, kozanga mbongo to mikakatano mosusu ya bomoi ekoki kolɛmbisa moto nzoto mpe kotungisa makanisi na ye. Longola mikakatano yango, ezali na baoyo bazali konyokwama mpo na bosembo. (2 Timote 3:12; 1 Petelo 3:14) Mpo na mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo na mokili oyo mpe lokola banguna bazali kotɛmɛla mosala na biso ya kosakola Bokonzi, bato mosusu bakoki kolɛmba mpenza mpe mosala na bango mpo na Yehova ekoki kokita. Mpe lisusu, mpo na koluka kokweisa biso ete tótikala sembo te epai ya Nzambe, Satana Zabolo azali kosalela mayele nyonso oyo akoki kosalela. Na yango, ndenge nini tokoki kozwa makasi ya elimo mpo tólɛmba te mpe tózonga nsima te?

5. Mpo na nini tozali na mposa ya nguya oyo eleki nguya ya bato mpo na kosala mosala ya kosakola?

5 Mpo na kozwa makasi ya elimo, tosengeli kotya motema epai ya Yehova, Mozalisi oyo azali na nguya nyonso. Ntoma Paulo amonisaki ete baklisto bakozala na mposa ya nguya oyo eleki nguya ya bato ya kozanga kokoka mpo na kosala mosala ya kosakola. Akomaki boye: “Kasi tozali na eloko oyo ya motuya kati na mbeki iyemami na mabele ete nguya [oyo eleki nguya ya bato, NW] euta na biso te kasi na Nzambe.” (2 Bakolinti 4:7) Baklisto bapakolami bazali kosala “mosala ya kozongisa bondeko” mpe baninga na bango oyo bazali na elikya ya kozwa bomoi awa na mabele, bazali kopesa bango mabɔkɔ. (2 Bakolinti 5:18; Yoane 10:16; Emoniseli 7:9) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka mpe tozali kosala mosala ya Nzambe na mokili oyo bazali konyokola biso, na makasi na biso moko tokoki kolonga te. Yehova asalisaka biso na nzela ya elimo santu na ye mpe na ndenge yango, bolɛmbu na biso ekumisaka nguya na ye. Elikya oyo elobi ete “[Yehova] azali kosimba bayengebene” elendisaka biso mpenza!—Nzembo 37:17.

‘Yehova azali nguya na biso’

6. Ndenge nini Makomami ezali komonisa biso ete Yehova nde apesaka biso nguya?

6 Tata na biso ya likoló azali na “makasi kati na nguya” mpe akoki mpenza kopesa biso makasi. Kutu, Biblia elobi na biso boye: “[Yehova] akopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya. Ata bilenge bakosenzwa, bakolɛmba, mpe bato ya [mbula] mingi te bakokweakwea na nse; nde baoyo [bakozelaka Yehova], bakozwa nguya ya sika, bakopombwa likoló na mapapu lokola mpongo, bakopota mbangu nde bakolɛmba te, bakotambola nde bakosenzwa te.” (Yisaya 40:29-31) Lokola mitungisi ya bomoi ezali se kobakisama, tokoki ntango mosusu komiyoka lokola mopoti-mbangu oyo alɛmbi mpe makolo na ye ezali kokoka lisusu komema ye mosika te. Kasi, etikali moke tókóma na esika oyo bopoti mbangu mpo na bomoi ekosuka; yango wana, tólɛmba te. (2 Ntango 29:11) Zabolo, Monguna na biso azali kotambolatambola ‘lokola nkosi oyo azali konguluma,’ mpe mposa na ye ezali ete akangela biso nzela. (1 Petelo 5:8) Tóbosana te ete ‘Yehova azali nguya na biso mpe nguba na biso,’ mpe alengeli makambo mingi mpo na ‘kopesa nguya na ye oyo alɛmbi.’—Nzembo 28:7.

7, 8. Nini elakisi ete Yehova apesaki Davidi, Habakuku na Paulo makasi?

7 Yehova apesaki Davidi makasi oyo asengelaki na yango mpo azonga nsima te liboso ya mikakatano makasi. Davidi azalaki mpenza na kondima mpe na elikya, yango wana akomaki ete: “Na Nzambe elongo, tokosala na mpiko; ye akonyatela bayini na biso na makolo.” (Nzembo 60:12) Yehova apesaki mpe Habakuku makasi ya kokokisa mosala na ye lokola mosakoli. Mokapo ya Habakuku 3:19 elobi boye: “[Yehova], Nkolo azali nguya na ngai, ye akozalisa makolo na ngai lokola makolo ya mboloko; ye akotambolisa ngai na bisika na ngai ya likoló.” Tozali mpe na ndakisa malamu ya Paulo, ye akomaki boye: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na [Nzambe] oyo akokembisaka ngai na nguya.”—Bafilipi 4:13.

8 Lokola Davidi, Habakuku na Paulo, tosengeli kozala na kondima ete Nzambe azali na makoki ya kopesa biso makasi mpe azali na nguya ya kobikisa biso. Lokola toyebi ete Nkolo Mokonzi Yehova nde apesaka biso “nguya,” tótalela lolenge mosusu oyo tokoki kozwa nguya ya elimo na ebele ya makambo oyo abongisi.

Makambo oyo abongisi mpo na kopesa biso makasi na elimo

9. Mikanda oyo lisangá ya boklisto ebimisaka esalaka mosala nini mpo na koleisa biso?

9 Soki tomipesi na koyekola Makomami na nzela ya mikanda oyo lisangá ya boklisto ezali kobimisa, tokozwa makasi mpe tokolendisama. Mokomi ya nzembo ayembaki boye: “Esengo ezali na moto . . . [oyo] mposa na ye ezali kati na Mobeko ya [Yehova]; akokanisaka mpe Mobeko na ye butu na moi. Azali lokola nzete oyo ekonami penepene na bitima ya mai, oyo ekobotaka mbuma na yango na ntango ekoki; nkasa na yango ikokaoka te. Nyonso ekosalaka ye ebongi.” (Nzembo 1:1-3) Tosengeli kolyaka mpo nzoto na biso ezala makasi, ndenge moko mpe, tosengeli kolya bilei ya elimo oyo Nzambe apesaka na nzela ya Liloba na ye mpe na mikanda oyo lisangá ya boklisto ebimisaka mpo tózala makasi na elimo. Yango wana, tosengeli koyekolaka mpenza mpe komanyola.

10. Ntango nini tokoki koyekola mpe komanyola?

10 Komanyola “makambo ya bozindo ya Nzambe” epesaka mpenza matomba. (1 Bakolinti 2:10) Kasi, ntango nini tokoki komanyolaka? Yisaka, mwana ya Abalayama “abimaki kotambola mpo na komanyola na elanga na mpokwa.” (Genese 24:63-67, NW) Davidi, mokomi ya nzembo, azalaki ‘kobanzabanza [to komanyola] makambo ya Nzambe na ntango ya butu.’ (Nzembo 63:6) Tokoki koyekola mpe komanyola Liloba ya Nzambe ezala na ntɔngɔ, na mpokwa, na butu; na mokuse, yango eponi ntango te. Koyekola mpe komanyola ndenge wana ememaka na likambo mosusu oyo Yehova abongisi mpo na kopesa biso makasi na elimo, elingi koloba libondeli.

11. Mpo na nini tosengeli mpenza kobondelaka ntango nyonso?

11 Kobondela Nzambe mbala na mbala epesaka biso makasi. Yango wana, ‘tótikaka kobondela te.’ (Baloma 12:12, NW) Ntango mosusu, ebongaka mpenza tósɛnga mayele mpe makasi mpo na kolonga mokakatano moko oyo ezali kotungisa biso. (Yakobo 1:5-8) Tóbosanaka mpe te kotɔnda Nzambe mpe kokumisa ye ntango tozali komona ndenge oyo azali kokokisa mikano na ye to ntango tomoni ndenge oyo apesi biso makasi ya kosala mosala na ye. (Bafilipi 4:6, 7) Soki tozali ntango nyonso penepene na Yehova, elingi koloba tozali kosolola na ye na kati ya mabondeli, ata mokolo moko te akotika biso. Davidi ayembaki ete: “Talá, Nzambe azali mosungi na ngai.”—Nzembo 54:4.

12. Mpo na nini tosengeli kosɛnga Nzambe apesa biso elimo santu?

12 Tata na biso ya likoló alendisaka biso na lisalisi ya elimo santu na ye, to nguya na ye oyo esalaka mosala. Paulo akomaki boye: “Nazali [kogumba] mabɔlɔngɔ na ngai liboso ya Tata . . . [lokola] ezali bozwi ya nkembo na ye ete alendisa nguya katikati na bino na nzela ya elimo.” (Baefese 3:14-16) Na mabondeli na biso tosengeli kosɛngaka Yehova elimo santu mpe kozala na elikya ete akopesa biso yango. Yesu atunaki motuna oyo: Soki mwana moko asɛngi mbisi, tata ya bolingo akopesa ye nyoka? Te. Yango wana, na nsuka alobaki boye: “Soko bino bato mabe boyebi kopesa bana na bino makabo malamu, Tata na bino ya Likoló akoleka kopesa [elimo santu, NW] na bango balɔmbi ye te?” (Luka 11:11-13) Tóbondelaka na elikya ya ndenge wana mpe tóbosanaka ata moke te ete Nzambe akoki kopesa basaleli na ye ya sembo elimo na ye mpo bázala na “makasi.”

Lisangá ezali lisungi oyo ezali kolendisa

13. Ndenge nini tosengeli kotalelaka makita ya lisangá?

13 Yehova apesaka biso makasi na nzela ya makita ya lisangá. Yesu alobaki ete: “Wana mibale to misato bayangani mpo na nkombo na ngai, ngai nazali kati na bango.” (Matai 18:20) Ntango Yesu alakaki likambo wana, azalaki kolobela makambo oyo bato oyo bazali kokamba lisangá basengeli kotalelaka. (Matai 18:15-19) Kasi, maloba na ye ekoki mpe kosalelama mpo na makita mpe mayangani na biso nyonso oyo ebandaka mpe esukaka na libondeli na nkombo na ye. (Yoane 14:14) Yango wana, koyangana na makita, ezala ezali na bato moke to bankóto ya bato, ezali libaku malamu. Yango wana, tózalaka na botɔndi mpo na makita yango oyo ebongisami mpo na kopesa biso makasi na elimo mpe kolendisa biso na bolingo mpe na misala malamu.—Baebele 10:24, 25.

14. Matomba nini tozwaka na milende oyo bankulutu basalaka?

14 Baklisto oyo bazali bankulutu basalisaka mpe balendisaka na elimo. (1 Petelo 5:2, 3) Paulo asalisaki mpe alendisaki bandeko ya masangá oyo azalaki kotala, ndenge oyo mpe bakɛngɛli-batamboli bazali kosala lelo oyo. Kutu, azalaki na mposa mpenza ya kokutana na bandeko mpo na kolendisa bango mpe bango bálendisa ye. (Misala 14:19-22; Baloma 1:11, 12) Tózalaka ntango nyonso na botɔndi mpo na bankulutu ya lisangá na biso mpe bakɛngɛli mosusu; bandeko yango basalaka mingi mpo na kolendisa biso na elimo.

15. Ndenge nini bandeko na kati ya lisangá bazali “lisungi oyo ezali kolendisa”?

15 Bandeko na biso mpe na kati ya lisangá bakoki kozala “lisungi oyo ezali kolendisa.” (Bakolose 4:10, 11, NW) Bandeko yango bazali ‘baninga ya solosolo’; yango wana, bakoki kosalisa biso na ntango ya mpasi. (Masese 17:17) Na ndakisa, na 1945, ntango babimisaki basaleli ya Nzambe 220 na Sachsenhausen, moko na bakaa ya bakangami ya Banazi, basengelaki kotambola ntaka ya kilomɛtrɛ 200. Bazalaki kotambola elongo mpe baoyo bazalaki na makasi bamatisaki baoyo balɛmbaki mingi na mwa makalo ya mike. Likambo nini emonanaki? Bato koleka 10 000 bakufaki na mobembo wana ya bwale, kasi ata Motatoli ya Yehova moko te akufaki. Masolo ya ndenge yango oyo ebimaka na mikanda ya la Société, bakisa mpe na Annuaire mpe na oyo ezali na buku Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu, emonisaka ete Nzambe apesaka basaleli na ye makasi mpo bálɛmba te.—Bagalatia 6:9.b

Mosala ya kosakola epesaka biso makasi

16. Ndenge nini kobima ntango nyonso na mosala ya kosakola elendisaka biso na elimo?

16 Kosakola ntango nyonso nsango ya Bokonzi epesaka biso makasi na elimo. Mosala yango esalisaka biso tótya makanisi na biso na Bokonzi ya Nzambe mpe tózala ntango nyonso na elikya ya bomoi ya seko mpe mapamboli oyo yango ekomema. (Yuda 20, 21) Bilaka oyo ezali na kati ya Makomami oyo tolobelaka na mosala ya kosakola epesaka biso elikya mpe ekoki kopesa biso makasi lokola epesaki mosakoli Mika oyo alobaki ete: “Biso tokotambola na nkombo ya [Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.”—Mika 4:5.

17. Toli nini bapesi biso mpo na koyekolisa bato Biblia?

17 Boyokani na biso na Yehova ekómaka lisusu makasi ntango tozali kosalela Makomami mingi mpo na koteya bato mosusu. Na ndakisa, ntango tozali koyekolisa bato Biblia na mokanda Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, ezali malamu tótángaka mpe tólimbolaka bavɛrsɛ mosusu kati na oyo bapesi na baparagrafe. Kosala bongo esalisaka moyekoli mpe ebakisaka bososoli na biso ya elimo. Soki moyekoli azali kokanga ntina ya liteya moko ya Biblia te to ndakisa moko, tokoki kokabola mokapo moko ya buku Boyebi mpe koyekola yango ndambondambo. Tozalaka na esengo mingi ntango tomibongisi malamu mpe tosali molende mpo na kosalisa bato mosusu ete bákóma baninga ya Nzambe!

18. Lobelá makambo oyo ezali komonisa ete bandeko bazali kosalela malamu buku Boyebi.

18 Mbula na mbula, basaleli ya Yehova bazali kosalela malamu buku Boyebi mpo na kosalisa ebele ya bato bákóma basaleli ya Yehova oyo bamipesi, mpe kati na bango, bamosusu bayebaki Biblia ata moke te. Na ndakisa, na ekólo Sri Lanka, mobali moko oyo azalaki mondimi ya Lingomba ya Hindu, ntango azalaki mwana moke, ayokaki mwasi moko Motatoli azali kolobela Paladiso. Nsima ya bambula, akutanaki na mwasi yango mpe mobali ya mwasi yango akómaki koyekola na ye Biblia. Elenge mobali yango akómaki koyekola mokolo na mokolo mpe aumelaki te kosilisa buku Boyebi. Akómaki koyangana na makita nyonso, alongwaki na lingomba na ye ya kala mpe akómaki mosakoli ya Bokonzi. Ntango azwaki batisimo, azalaki koyekola Biblia na moto moko oyo bayebanaki na ye.

19. Ntango tozali koluka liboso Bokonzi, tokoki kozala na elikya nini?

19 Koluka liboso Bokonzi epesaka biso esengo mpe makasi. (Matai 6:33) Atako tozali na mikakatano ndenge na ndenge, tozali kokoba kosakola nsango malamu na esengo mpe na molende mpenza. (Tito 2:14) Mingi kati na biso bazali kokokisa masɛngami mpo na kokóma babongisi-nzela, mpe bamosusu bazali kosala na bisika oyo bazali na mposa ya basakoli mingi. Ezala tozali kosala na esengo na mitindo yango to na mitindo mosusu mpo matomba ya Bokonzi ekende liboso, elikya na biso ezali ete Yehova akobosana mosala na biso te mpe bolingo oyo tozali komonisa mpo na nkombo na ye.—Baebele 6:10-12.

Tókoba na mosala na nguya ya Yehova

20. Ndenge nini tokoki komonisa ete totyelaka nguya ya Yehova motema?

20 Tómonisa mpenza ete totii elikya na biso epai ya Yehova mpe tozali na mposa ya nguya na ye. Tokoki kosala yango soki tozali kolanda bibongiseli nyonso oyo Nzambe akamati na nzela ya ‘moombo ya sembo.’ (Matai 24:45) Koyekola Liloba ya Nzambe, ezala biso moko to ntango tosangani na lisangá, na lisalisi ya mikanda oyo lisangá ya boklisto ezali kobimisa, kobondela na etingya, koluka lisungi ya elimo epai ya bankulutu, kolanda ndakisa malamu ya bandeko ya sembo, kobima mbala na mbala na mosala ya kosakola; nyonso wana ezali na kati ya makambo oyo elendisaka boninga na biso na Yehova mpe epesaka biso makasi ya kosala mosala na ye ya bulɛɛ.

21. Ntoma Petelo na ntoma Paulo balobaki nini mpo na komonisa ntina ya nguya ya Nzambe?

21 Atako tozali bato ya bolɛmbu, Yehova akolendisa biso mpo tósala mokano na ye soki totyeli ye motema ete akosunga biso. Lokola ayebaki ntina ya lisalisi yango, ntoma Petelo akomaki boye: “Nani ayebi kosala misala? Asala mpo na nguya ekopesaka Nzambe.” (1 Petelo 4:11) Paulo mpe amonisaki ete azalaki kotyela nguya ya Nzambe motema ntango alobaki boye: “Nasepeli mpo na bolɛmbu mpe kotyolama mpe bolɔzi mpe minyoko mpe nkaka. Mpo wana ezali ngai na bolɛmbu, bongo nazali na nguya.” (2 Bakolinti 12:10) Tiká tózala na elikya motindo wana mpe tókumisa Nkolo Mokonzi Yehova, ye apesaka moto oyo alɛmbi makasi.—Yisaya 12:2.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Motuya yango ekomamaka na 1 mpe bazero 20 elandani na nsima.

b Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Okopesa eyano nini?

• Mpo na nini basaleli ya Yehova bazali na mposa ya nguya oyo eleki nguya ya bato?

• Makomami elobi nini mpo na komonisa ete Nzambe apesaka basaleli na ye nguya?

• Tángá makambo mosusu oyo Yehova abongisi mpo na kolendisa biso na elimo.

• Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na mposa ya nguya ya Nzambe?

[Elilingi na lokasa 12]

Boyokani na biso na Yehova ekómaka makasi ntango tozali kosalela Biblia mpo na koteya bato mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto