Masolo ya Basakoli ya Bokonzi
Bazwaki mbano mpo bazalaki na kondima
NTOMA Paulo azalaki na kondima makasi, mpe alendisaki baninga na ye bandimi bákolisa kondima na bango. Alobaki boye: “Mpo ete ekoki na babɛlɛmi na Nzambe kondima ete azali mpe ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.” (Baebele 11:6) Lisolo oyo euti na Mozambique emonisi ndenge Yehova apesaka mbano epai ya bato oyo bazali na kondima makasi mpe ayokaka mabondeli na bango ya sembo.
• Na etúká ya Niassa na nɔrdi ya ekólo yango, ndeko mwasi moko oyo mobali na ye akufá, azalaki komitungisa mingi ndenge nini ye na bana na ye motoba bakokende na Liyangani ya Etúká “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi.” Azali na esika mosusu ya kozwa mbongo te kaka soki atɛkisi biloko na wenze. Ntango mokolo ya liyangani ekómaki pene, mbongo oyo azalaki na yango ekokaki kaka mpo na kofuta tike ya engbunduka mpo na kokende ye na libota na ye. Atako bongo, atyaki motema ete Yehova ye moko akosalisa bango mpe akendaki kaka na liyangani.
Amataki na engbunduka na bana na ye motoba. Ntango bazalaki kokende, moto oyo afutisaka tike ayaki epai na ye mpo na kofutisa ye tike. Ntango amonaki makarɔ na ye, atunaki ye soki makarɔ yango oyo alati ezali ya nini. Ndeko mwasi ayebisaki ye ete ezali kolakisa ete azali kokende na liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova. Moto yango atunaki ete: “Liyangani yango ekosalema wapi?” Nsima ya koyeba ete liyangani ekosalema na etúká ya Nampula, oyo ezali étuká ya pene na bango, na kilomɛtrɛ soki 300, afutisaki ndeko mwasi kaka ndambo ya mbongo ya tike! Lisusu apesaki ndeko mwasi na libota na ye batike ya kozonga na ndambo ya mbongo ya tike oyo etikalaki. Ndeko mwasi asepelaki mingi mpo atyelaki Yehova motema!—Nzembo 121:1, 2.
• Mwasi moko oyo alingaka makambo ya Nzambe mingi, azalaki kosɛnga na Nzambe, pene na mbula 25, alakisa ye ndenge malamu ya kosambela ye. Na lingomba oyo azalaki kosambela, bazalaki kosangisa milulu ya lingomba na makambo ya bonkɔkɔ, mpe azalaki kondima te ete lolenge yango ya kosambela ezali kosepelisa Nzambe.
Alobi boye: “Nazalaki ntango nyonso kokanisa maloba ya Yesu oyo ekomami na Matai 7:7 (NW ) oyo elobaka boye: ‘Bólanda kosɛnga mpe bakopesa bino; bólanda koluka mpe bokozwa; bólanda kobɛta na porte mpe bakofungolela bino.’ Lokola nazalaki ntango nyonso kokanisa vɛrsɛ yango, nazalaki ntango nyonso kobondela Nzambe alakisa ngai nzela ya solo. Mokolo moko pastɛrɛ ya lingomba na biso asɛngaki na bato nyonso oyo batɛkisaka na wenze bámema mbongo na mwa biloko oyo batɛkisaka mpo apambola bango. Namonaki ete lolenge yango ya kosala eyokani na Makomami te, na yango namemaki eloko te. Ntango pastɛrɛ amonaki ete namemaki ‘likabo’ te, abandaki kofinga ngai liboso ya bandimi nyonso ya lingomba. Mokolo yango nandimaki solo ete yango ezali te lolenge oyo Nzambe alingi tósambela ye, nalongwaki na lingomba. Kasi, nalandaki kobondela na molende mpo na komona esika solo ezali.
“Nsukansuka, nasalaki makasi mpe nakendaki epai ya ndeko na ngai moko oyo azali Motatoli ya Yehova, apesaki ngai trakte moko, mpe natángaki yango. Namonaki ete Nzambe apesi eyano na mabondeli na ngai. Na nsima, mobali oyo nazalaki kofanda na ye abandaki kosepela na mateya ya solo ya Biblia, mpe tokomisaki libala na biso na mikanda ya Leta. Kasi nsima ya mwa bambula, mobali na ngai abɛlaki makasi. Banda wana tii na liwa na ye, azalaki kolendisa ngai nakangama makasi na nzela ya solo mpo tókutana lisusu na Paladiso.
“Nazali ntango nyonso kotɔnda Yehova na ndenge ayokaki mabondeli na ngai mpe alakisaki ngai ndenge malamu ya kosambela ye. Yehova ayokaki lisusu mabondeli na ngai mpo namoni bana na ngai nyonso mwambe bamipesi mpo na kosalela ye.”