Zwá libɔndisi na nguya ya Yehova
“Ntango makanisi ya kobulunganisa etondelaki ngai, mabɔndisi na yo ebandaki kokitisa ngai motema.”—NZEMBO 94:19, NW.
BIBLIA ezali na maloba ya kobɔndisa mpo na bato nyonso oyo bazali koluka libɔndisi. Yango wana, tokokamwa te ete buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete “na ntango ya mpasi mpe na ntango oyo bayebi eloko ya kosala te, bato mingi balukaka libɔndisi, elikya, mpe litambwisi na Biblia.” Mpo na nini?
Mpamba te Mozalisi na biso ya bolingo nde akomisaki Biblia na elimo na ye, ye azali “Nzambe ya kobɔndisa nyonso,” Ye “akobɔndisa biso kati na bolɔzi na biso.” (2 Bakolinti 1:3, 4) Azali ‘Nzambe oyo abɔndisaka.’ (Baloma 15:5) Yehova apesi ndakisa lokola abongisi ndenge oyo biso nyonso tokoki kolonga na mpasi. Atindaki Klisto Yesu, Mwana na ye mobotami-bobele-moko, awa na mabele mpo na kopesa biso elikya mpe libɔndisi. Yesu ateyaki ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami-bobele-moko, NW ] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Biblia elobi ete Yehova azali “ye oyo akomema mikumba na biso mokolo na mokolo, ye Nzambe ya kobika na biso.” (Nzembo 68:19) Bato oyo babangaka Nzambe bakoki koloba na elikya nyonso ete: “Natii [Yehova] liboso na ngai libela; azali na lobɔkɔ na ngai ya mobali, bongo nakokwea te.”—Nzembo 16:8.
Bavɛrsɛ ya Biblia lokola oyo wana ezali komonisa bolingo mingi oyo Yehova Nzambe azali na yango mpo na biso bato. Emonani polele ete azali mpenza na mposa mpe na makoki ya kopesa biso libɔndisi mingi mpe azali na mposa ya kosilisa mpasi na biso na ntango ya minyoko. “Akopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya.” (Yisaya 40:29) Kasi, ndenge nini tokoki kozwa libɔndisi na nguya ya Yehova?
Libateli ya Yehova ekitisaka motema
Mokomi ya nzembo akomaki boye: “Kitisá mokumba na yo epai ya [Yehova] mpe ye akokumba yo; libela ye akotika te ete moyengebene atelengana.” (Nzembo 55:22) Ezali solo ete Yehova Nzambe amibanzabanzaka mpo na bato. Ntoma Petelo ayebisaki baklisto ya ekeke ya liboso boye: “Ye [Nzambe] amibanzabanzaka mpo na bino.” (1 Petelo 5:7, NW ) Yesu Klisto amonisaki ete bato bazali na motuya mingi na miso ya Nzambe ntango alobaki boye: “Bandɛkɛ mike mitano batɛkami na falanga mibale te? Mpe moko na bango abosanami na liboso ya Nzambe te. Kasi ata nsuki nyonso ya mitó na bino etangami. Bangá te, boleki motuya na ndɛkɛ mingi.” (Luka 12:6, 7) Tozali mpenza na motuya na miso ya Nzambe, yango wana atalelaka ata biloko mikemike oyo etali biso. Ayebi makambo na biso mosusu oyo ata biso moko toyebi yango te, mpamba te amibanzabanzaka na mokomoko na biso.
Svetlana, elenge mwasi oyo akómaki kosala kindumba, oyo tolobelaki na lisolo eleki, abɔndisamaki mingi ntango bayebisaki ye ete Yehova amibanzabanzaka mpo na ye. Liboso akutana na Batatoli ya Yehova, etikalaki moke amiboma. Na nsima andimaki koyekola Biblia mpe boyekoli yango esalisaki ye na komesana na Yehova mpe kotalela ye lokola moto ya solo oyo amibanzabanzaka mpo na bolamu na ye. Makambo azalaki koyekola esimbaki motema na ye, etindaki ye abongola bomoi na ye mpe amipesa na Nzambe. Esungaki ye lisusu amimona ete azali na ntina, likambo oyo asengelaki na yango mpo alɛmba te atako azalaki na mikakatano mpe asepela kozala na bomoi. Sikoyo alobi ete: “Nandimi solo ete Yehova akosundola ngai ata moke te. Namoni ete makambo oyo ekomami na 1 Petelo 5:7 (NW ) ezali solo. Vɛrsɛ yango elobi boye: ‘Bóbwaka mitungisi nyonso na bino epai ya [Yehova], mpamba te ye amibanzabanzaka mpo na bino.’ ”
Biblia ezali kopesa elikya ya kobɔndisa
Yehova apesaka bato libɔndisi na nzela ya Liloba na ye oyo ekomami. Liloba yango ezali kopesa elikya ya malamu mpo na bomoi na mikolo ekoya. Ntoma Paulo akomaki boye: “Nyonso ikomamaki kalakala, ikomami mpo na kolakisa biso ete tózala na elikya na nzela na koyika mpiko mpe na kolendisama na [Makomami, NW ].” (Baloma 15:4) Paulo amonisaki polele boyokani oyo ezali kati na elikya mpe libɔndisi ntango akomaki boye: “Tiká ete . . . Nzambe Tata na biso oyo alingi biso mpe apesi biso kobɔndisama na seko mpe elikya malamu na nzela na ngɔlu, abɔndisa mitema na bino mpe alendisa bino na misala nyonso mpe na maloba nyonso malamu.” (2 Batesaloniki 2:16, 17) “Elikya malamu” wana ezali na bomoi ya kokoka, bomoi ya esengo mpe bomoi oyo ezangi nsuka na kati ya paladiso awa na mabele.—2 Petelo 3:13.
Elikya wana ya solo mpe ya malamu elendisaki Laimonis, ebɔsɔnɔ oyo tolobelaki na lisolo eleki ete amipesaki na masanga. Ntango akómaki kotánga mikanda oyo Batatoli ya Yehova babimisaka oyo elimbolaka Biblia, asepelaki na koyeba makambo oyo ekosalema na mokili ya sika oyo Bokonzi ya Nzambe ekotambwisa, epai nzoto na ye mobimba ekozonga kolɔngɔnɔ. Atángaki na Biblia ete Nzambe apesi elaka malamu ya kobikisa bato na makamwisi. Nzambe alobi boye: “Bongo miso na bakufeli miso makofungolama, mpe matoi na bimimi makozipolama; bongo, motɛngumi akopombwa lokola mboloko, mpe lolemo na ebubu ekoyemba na esengo.” (Yisaya 35:5, 6) Mpo Nzambe andima ye azala na kati ya bato oyo bakofanda na Paladiso yango, Laimonis abongwanaki mpenza. Atikaki komela masanga ya makasi mpe bato na esika oyo afandaka na baoyo bayebaki ye bamonaki ndenge oyo abongwanaki. Lelo oyo azali koyekolisa bato ebele Biblia, azali koyebisa bato libɔndisi oyo elikya ya Biblia ezali kopesa.
Libondeli esalisaka
Ntango likambo moko ezali kosala biso mpasi na motema, tokoki kozwa libɔndisi soki tobondeli Yehova. Kobondela Yehova ekoki kolongola biso kilo na motó. Ntango tozali kobondela, tokoki kobɔndisama soki tokokanisa makambo oyo Liloba ya Nzambe elobi. Nzembo oyo ezali molai koleka banzembo nyonso na Biblia ezali lokola libondeli moko ya kitoko. Moto oyo akomaki yango alobaki boye: “Nakobanza mpo na bikateli na yo ya kala, ɛ [Yehova]; bongo nazwi libɔndi[si].” (Nzembo 119:52) Na ntango ya mikakatano makasi, mingimingi na ntango ya maladi, mbala mingi, lolenge ya kosala ezalaka kaka moko te. Na makasi na biso moko, mbala mosusu tokoki koyeba te eloko nini tósala. Bato mingi bamonaki ete nsima ya komeka nyonso oyo bakokaki kosala, libɔndisi monene eyaki ntango babondelaki Nzambe mpe na nsima, bamonaki ndenge ya kosilisa mikakatano oyo bayebaki ndenge ya kosilisa te.—1 Bakolinti 10:13.
Pat, oyo bakendaki na ye mbangumbangu na lopitalo, amonaki ndenge oyo libondeli ebɔndisaka. Ntango akómaki malamu, alobaki boye: “Nabondelaki Yehova mpe namonaki ete nasengeli kotika bomoi na ngai na mabɔkɔ na ye, natikaki ete asala likambo nyonso oyo ezali mokano na ye. Na ntango nyonso wana, motema na ngai ekitaki; nazalaki na kimya ya Nzambe oyo Bafilipi 4:6, 7 elobeli.” Bavɛrsɛ yango ekoki kobɔndisa biso nyonso! Na bavɛrsɛ yango Paulo apesi biso toli oyo: “Bómitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tiká ete bisengeli na bino biyebana epai ya Nzambe na mabondeli mpe na malɔmbɔ mpe na matɔndi. Mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso, ekosɛnzɛla mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.”
Elimo santu ezali mobɔndisi
Na butu ya mokolo oyo ezalaki liboso ya liwa na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye polele ete etikali moke atika bango. Likambo yango etungisaki bango mpe esalaki bango mpasi mingi. (Yoane 13:33, 36; 14:27-31) Yesu amonaki ete bazali na mposa ya libɔndisi mingi mpe alakaki bango ete: “Nakobondela Tata mpe akopesa bino mosungi [to, mobɔndisi] mosusu ete afanda na bino libela.” (Yoane 14:16, NW; maloba na nse ya lokasa) Mosungi oyo Yesu azalaki kolobela awa ezali elimo santu ya Nzambe. Elimo santu ya Nzambe ebɔndisaki bantoma ntango bamekamaki mpe elendisaki bango mpo bálanda kosala mokano ya Nzambe.—Misala 4:31.
Angie, ye oyo mobali na ye akómaki pene ya liwa ntango azwaki likama ya motuka, amizindisaki mobimba te na mawa mpe na mpasi oyo ekómelaki ye. Nini esalisaki ye? Alobi boye: “Soki lisungi ya elimo ya Yehova te, mbɛlɛ tokokaki te kolonga makambo oyo tokutanaki na yango mpe kozala ntango nyonso makasi. Nguya ya Yehova emonanaki na bolɛmbu na biso, mpe azalaki ndako makasi na ntango oyo tozalaki na mawa.”
Bandeko bazali mpe kobɔndisa
Ata soki moto akutani na likambo nini, ezala ete mpasi ekómeli ye, asengeli koyeba ete likoki mpo na kozwa libɔndisi epai ya bandeko na kati ya lisangá ya Yehova ezali. Bandeko yango basungaka mpe basalisaka bandeko na bango na elimo. Na kati ya lisangá, moto akoki kozwa baninga ya bolingo, baninga oyo bamibanzabanzaka mpo na bamosusu mpe balendisaka, bazali pene mpe na mposa ya kosalisa mpe kobɔndisa bato na ntango ya mpasi.—2 Bakolinti 7:5-7.
Na lisangá ya boklisto bateyaka bandeko ‘básalela bato nyonso malamu mpe na koleka epai ya bango bazali bandimi.’ (Bagalatia 6:10) Mateya ya Biblia oyo bazali kozwa, etindaka bango bázala na bolingo ya bandeko kati na bango. (Baloma 12:10; 1 Petelo 3:8) Mateya yango etindaka bandeko ya elimo na kati ya lisangá bázala bato ya boboto, bato oyo babɔndisaka mpe ya motema mawa.—Baefese 4:32.
Bandeko na kati ya lisangá ya boklisto basungaki Joe na Rebecca, oyo bakufelaki mwana mpe yango ebɔndisaki bango. Balobi boye: “Yehova na lisangá na ye ya bolingo basungaki biso na ntango ya mpasi. Bandeko mingi batindelaki biso bakalati, mikanda mpe babengaki biso na telefone. Yango esalisaki biso na komona ete bandeko na biso bazali na motuya mingi. Na mikolo wana ya mpasi makasi, bandeko mingi ya masangá bazalaki koya kosunga biso, bazalaki komemela biso biloko ya kolya mpe kobongisela biso ndako.”
Zwá libɔndisi!
Ntango tokutani na minyoko mpe mitungisi makasi, Nzambe azali pene mpo na kopesa biso libɔndisi oyo ekobatela biso. Nzembo moko elobi ete Nzambe apesaka libɔndisi mpe libateli. Nzembo yango elobi boye: “Akozipa yo na nsala na ye mpe okobombama na nse na mapapu na ye.” (Nzembo 91:4) Ekoki kozala ete na vɛrsɛ yango basaleli elilingi ya mpongo. Ezali kopesa likanisi ya ndɛkɛ moko oyo amoni likama mpe mpo na kobatela bana na ye, afungoli mapapu na ye mpo na kozipa bango. Elingi koloba, Yehova azali Mobateli ya solo ya bato oyo bazali komibomba epai na ye.—Nzembo 7:1.
Soki olingi koyeba makambo mingi na ntina na Nzambe, bomoto na ye, mikano na ye mpe makoki oyo azali na yango mpo na kobɔndisa, tosɛngi yo oyekola Liloba na ye. Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo na likambo yango. Ya solo, yo mpe okoki kozwa libɔndisi na nguya ya Yehova!
[Bililingi na lokasa 7]
Moto akoki kobɔndisama na elikya oyo Biblia epesi mpo na mikolo oyo ezali koya.