Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 1/9 nk. 6-11
  • Tózala na elimo ya Klisto

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tózala na elimo ya Klisto
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndakisa ya elimo oyo ebongi
  • Tólongola elimo oyo ebongi te
  • Ndakisa ya bato mosusu
  • Tólanda elimo malamu ya Klisto
  • Tóyeba kozela!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Bolingo ya Kristo etindaka biso tólinga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tómekola ezaleli ya makanisi ya Yesu
    Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Tózala na makanisi lokola oyo ya Kristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 1/9 nk. 6-11

Tózala na elimo ya Klisto

“Tiká ete Nzambe oyo apesaka mpiko mpe libɔndisi asalisa bino mpo bózala . . . na elimo oyo Klisto Yesu azalaki na yango.”—BALOMA 15:5, NW.

1. Elimo ya moto ekoki kosala nini na makambo oyo asalaka na bomoi na ye?

ELIMO oyo moto azali na yango ekoki kosala ete bomoi na ye ezala malamu to ebeba. Elimo oyo moto azali na yango: elimo ya goigoi to ya molende, elimo ya kokende liboso to ya kolɛmba nzoto, elimo ya matata to ya boboto, elimo ya komilelalela to ya esengo, ezali na ntina mingi na oyo moto asalaka ntango akutani na likambo mpe ndenge oyo bato mosusu bamonaka ye. Soki moto azali na elimo ya malamu, akoki kozala na esengo ata na ntango ya mpasi. Mpo na moto oyo azali na elimo ya malamu te, makambo nyonso ezalaka kaka mabe ata soki, bomoi na ye ezali komonana malamu.

2. Ndenge nini moto ayekolaka elimo oyo akozala na yango?

2 Moto akoki koyekola kozala na elimo ya malamu to na elimo ya mabe. Kutu, tóloba mpenza ete moto asengeli koyekola elimo oyo akozala na yango. Mokanda moko (Collier’s Encyclopedia) elobi ete: “[Mwana oyo abotami sika] azwaka to ayekolaka elimo oyo akozala na yango, se ndenge oyo akoyekola monɔkɔ moko to mosala moko.” Ndenge nini toyekolaka elimo oyo tomonisaka? Makambo mingi esalaka ete moto azala na elimo boye to boye, kasi oyo eleki ezali esika oyo moto akoli mpe baninga na ye. Mokanda oyo touti kolobela elobi lisusu boye: “Toyekolaka to tokɔtisaka na bɔɔngɔ elimo ya bato oyo tofandi na bango, lokola nde tobendaka yango kobenda.” Banda kala mpenza, Biblia elobá likanisi moko ya ndenge wana ete: “Ye oyo akotambola na bato ya mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.”—Masese 13:20; 1 Bakolinti 15:33.

Ndakisa ya elimo oyo ebongi

3. Nani apesaki ndakisa ya malamu na elimo oyo azalaki na yango, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?

3 Lokola na makambo mosusu nyonso, elingi koloba mpe na elimo, Yesu Klisto apesaki ndakisa oyo eleki malamu, alobaki boye: “Napesi bino etaliseli ete bino mpe bósala [lokola] esili ngai kosalela bino.” (Yoane 13:15) Mpo tózala lokola Yesu, tosengeli koyekola makambo na ye.a Tokoyekola bomoi ya Yesu mpo tósala likambo oyo ntoma Petelo alobi na biso ete: “Ntina ete bobyangami mpo na bongo, zambi Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete [bólanda] matambe na ye.” (1 Petelo 2:21) Mposa na biso ezali ete tósala nyonso oyo ekoki na biso mpo tózala mpenza lokola Yesu. Yango esɛngi mpe kokóma na elimo oyo azalaki na yango.

4, 5. Elimo nini Yesu azalaki na yango oyo Baloma 15:1-3 elobeli, mpe ndenge nini baklisto bakoki komekola ye?

4 Kozala na elimo ya Klisto Yesu esɛngi makambo nini? Mokapo ya 15 ya mokanda oyo Paulo akomelaki Baloma ezali kosalisa biso tózwa eyano na motuna yango. Na bavɛrsɛ ya liboso ya mokapo yango, Paulo alobeli ezaleli moko monene ya Yesu ntango alobi boye: “Ekoki na biso bato ya nguya ete tóyika mpiko na bolɛmbu ya bato bazangi nguya, ekoki komisepelisa biso mpenza te. Moto na moto na biso asepelisa mozalani na ye mpo na malamu na ye ete akembisa ye. Zambi Klisto amisepelisaki te kasi, [lokola] ekomami: Matɔngi matɔngaki bango yo masili kokwea epai na ngai.”—Baloma 15:1-3.

5 Lokola balingi kozala na elimo lokola oyo ya Yesu, baklisto balendisami ete bándimaka kosala makambo mpo na bolamu ya bato mosusu na komikitisa nyonso mpe bázala na mposa ya komisepelisa te. “Bato ya nguya” bazalaka mpenza na komikitisa ya ndenge wana mpo na kosalela basusu. Yesu, moto oyo azalaki makasi na elimo koleka bato nyonso, alobaki mpo na ye moko boye: “Mwana ya moto ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.” (Matai 20:28) Lokola tozali baklisto, biso mpe tosengeli kozala na mposa ya kosalela basusu, bakisa mpe baoyo “bazangi nguya.”

6. Ndenge nini tokoki komekola Yesu soki bato bazali kotɛmɛla biso mpe koloba na biso mabe?

6 Yesu azalaki mpe ntango nyonso na makanisi mpe na misala oyo ezali kotonga. Ata mbala moko te atikaki ete makanisi mabe ya bato mosusu elɛmbisa makanisi malamu na ye ya kosalela Nzambe; biso mpe tosengeli kosala ndenge yango. Ntango basɛkaki ye to banyokolaki ye mpo azalaki kosambela Nzambe na bosembo, Yesu ayikaki mpiko mpe amilelalelaki te. Ayebaki ete bato oyo bazali bandimi te mpe bazali kokanga ntina ya makambo te bakoki kotɛmɛla baoyo bazali kosala makasi ete básepelisa bazalani na bango ‘na makambo malamu mpo bátonga bango.’

7. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali na motema molai, mpe mpo na nini biso tokoki komekola ye?

7 Yesu azalaki mpe na elimo oyo ebongi na makambo mosusu. Ata mbala moko te amonisaki epai ya Yehova ete motema molai na ye ekómi na nsuka, kasi azelaki ete mikano ya Yehova ekokisama mpe azalaki na motema molai. (Nzembo 110:1; Matai 24:36; Misala 2:32-36; Baebele 10:12, 13) Longola yango, Yesu azalaki na motema mokuse te epai ya bayekoli na ye. Alobaki na bayekoli na ye boye: “Bóyekola na ngai”; lokola azalaki na “bopɔlɔ,” mateya na ye ezalaki kolendisa mpe kobɔndisa bango. Lokola mpe azalaki na “kosɔkɛma na motema,” azalaki na maloba ya makasi te to na lolendo te. (Matai 11:29) Paulo alendisi biso tólanda elimo wana ya Yesu na maloba oyo: “Bókanisa kati na bino yango ekanisaki Klisto Yesu. Ata azalaki na motindo ya Nzambe, atángaki te ete ameka kokokana na Nzambe, nde amiyeisi mpamba, akamati motindo na moombo, abotami na lolenge ya bato.”—Bafilipi 2:5-7.

8, 9. (a) Mpo na nini tosengeli kosala makasi mpo na kolona elimo ya koluka matomba ya basusu? (b) Mpo na nini tosengeli kolɛmba nzoto te soki tozali kokoka te kolanda ndakisa ya Yesu, mpe ndenge nini Paulo apesaki ndakisa malamu na likambo yango?

8 Koloba ete tolingi kosalela basusu mpe tolingi kokokisa bamposa na bango liboso ya bamposa na biso moko ezali mpasi te. Kasi soki totaleli elimo na biso malamumalamu, tokomona ete mitema na biso ebongisami mpenza na kosala ndenge yango te. Mpo na nini? Ya liboso, mpo tozali na ezaleli oyo Adama na Eva batikelá biso ya koluka naino matomba na biso moko. Ya mibale, mokili oyo tozali ezali kolendisa moto na moto aluka naino bolamu na ye moko. (Baefese 4:17, 18) Mbala mingi mpo tókóma koluka bolamu ya basusu, esɛngaka tózwa makanisi mosusu, makanisi oyo ekeseni na makanisi oyo euti na bomoto ya kozanga kokoka oyo tobotamá na yango. Mpo na kosala yango esɛngaka kozwa mpenza ekateli mpe kosala molende.

9 Ezaleli na biso ya bato ya kozanga kokoka—oyo ekeseni mpenza na ndakisa oyo Yesu, moto ya kokoka, atikelaki biso—ekoki mbala mosusu kolɛmbisa biso. Tokoki komituna soki ekoki mpenza kosalema ete tózala na elimo oyo Yesu azalaki na yango. Kasi, tóyoka maloba ya kolendisa oyo Paulo alobelaki biso: “Nayebi ete eloko moko malamu efandi na ngai, kati na nzoto na ngai, te. Mpo ete, ata nazali kokana malamu, nayebi kosala yango te. Malamu oyo elingi ngai kosala, nakosalaka yango te. Kasi mabe oyo elingi ngai te, nakosalaka bobele yango. Kati na motema na ngai moto, nasepeli na Mibeko ya Nzambe; kasi namoni mobeko mosusu kati na bilembo na nzoto na ngai. Mobeko yango monene ezali kobunana etumba na Mibeko milingi ngai na makanisi na ngai, ezali mpe kokanga ngai moombo na mobeko na masumu mozali kati na bilembo na ngai.” (Baloma 7:18, 19, 22, 23) Bomoto ya kozanga kokoka ya Paulo ezalaki mbala na mbala kopekisa ye akokisa mokano ya Nzambe na ndenge mpenza oyo azalaki kolinga, kasi elimo na ye, elingi koloba makanisi na ye mpe ndenge oyo azalaki kotalela Yehova mpe mibeko na Ye ezalaki malamu mpenza. Biso mpe tokoki kozala ndenge yango.

Tólongola elimo oyo ebongi te

10. Paulo alendisaki Bafilipi ete bákolisa elimo nini?

10 Ekoki mpenza kozala ete bato mosusu bazali na mposa ya kotika elimo oyo ebongi te? Ɛɛ, ekoki mpenza kozala bongo. Ezalaki mpenza bongo epai ya baklisto mosusu na ekeke ya liboso. Na mokanda oyo akomelaki Bafilipi, Paulo alobelaki likambo ya kozala na makanisi oyo ebongi. Akomaki boye: “Ezali te ete nasili kozwa yango [bomoi na likoló na nzela ya lisekwa ya liboso], soko ete nasili kobonga. Nde [nazali naino kopota mbangu, NW ] ete nasimba yango [lokola] Klisto Yesu asimbi ngai. Bandeko, natángi te ete nasili kosimba yango, nde nazali kosalaka likambo oyo moko ete, awa ezali ngai kobosana makambo mazali nsima mpe kopusana mpo na yango izali liboso, nazali [kopota mbangu] kino nsuka mpo na libonza oyo ezali ebyangeli ya Nzambe kuna na Likoló, kati na Klisto Yesu. Tiká ete [baoyo kati na biso tokɔmeli, tózala na elimo yango, NW ].”—Bafilipi 3:12-15.

11, 12. Ndenge nini Yehova amonisaka biso elimo oyo ebongi?

11 Maloba ya Paulo emonisi ete moto nyonso oyo akómi moklisto, kasi azali komona te ete asengeli kokende liboso, azali na elimo oyo ebongi te. Moto yango azwi naino elimo ya Klisto te. (Baebele 4:11; 2 Petelo 1:10; 3:14) Kasi, tokoki nde koloba ete elikya ezali lisusu te ete moto yango abongwana? Te. Nzambe akoki kosalisa biso tókóma na elimo mosusu soki biso moko tolingi yango mpenza. Paulo alobi lisusu boye: “Soko bozali kokanisa [ndenge] mosusu, Nzambe akomonisela bino [elimo oyo nauti kolobela, NW ].”—Bafilipi 3:15.

12 Kasi, soki tolingi ete Yehova alakisa biso elimo oyo ebongi, biso mpe tosengeli kokanga mabɔkɔ te. Soki baoyo bazali “kokanisa ndenge mosusu” bamipesi na koyekola Liloba ya Nzambe na lisalisi ya mikanda oyo “moombo ya sembo mpe ya mayele” azali kopesa biso, yango ekosalisa bango bákóma na elimo oyo ebongi. (Matai 24:45) Baklisto oyo bazali bankulutu, baoyo elimo santu eponi bango ‘mpo na kobatela lisangá ya Nzambe,’ bakozala na esengo ya kosalisa bato yango. (Misala 20:28, NW ) Tozali mpenza na botɔndi ete Yehova abosanaka te ete tozali bato ya kozanga kokoka mpe asalisaka biso na bolingo nyonso! Tóndima lisalisi na ye.

Ndakisa ya bato mosusu

13. Lisolo ya Yobo ezali koteya biso nini na likambo ya kozala na elimo ya malamu?

13 Na Baloma mokapo ya 15, Paulo amonisi ete tokoki kobongisa elimo na biso soki tozali kokanisa bandakisa ya bato ya ntango ya kala. Akomi boye: “Nyonso ikomamaki kalakala, ikomami mpo na kolakisa biso ete tózala na elikya na nzela na koyika mpiko mpe na kolendisama na [Makomami, NW ].” (Baloma 15:4) Bato mosusu oyo basalelaki Yehova na bosembo na ntango ya kala bazalaki mpe na mposa ya kobongisa makambo mosusu na elimo na bango. Na ndakisa, na makambo mingi, Yobo azalaki na elimo malamu. Ata mbala moko te alobaki mabe mpo na Nzambe, mpe ata mbala moko te atikaki kotyela Nzambe motema mpo ete azalaki na mpasi. (Yobo 1:8, 21, 22) Kasi, azalaki koluka komilongisa. Yehova atindaki Eliu mpo asalisa ye atika ezaleli yango. Yobo amonaki yango mabe te, kutu azalaki na komikitisa mpe andimaki ete asengeli kobongisa elimo na ye mpe na mbala moko abandaki kosala yango.—Yobo 42:1-6.

14. Ndenge nini tokomonisa ete tozali na elimo lokola ya Yobo ntango bapesi biso toli na ntina na elimo na biso?

14 Bongo biso, tokosala lokola Yobo soki moninga moklisto moko ayebisi biso na boboto nyonso ete tozali komonisa elimo oyo ebongi te? Tózala lokola Yobo, ‘tófunda Nzambe na ntina ya mabe te.’ (Yobo 1:22) Soki tozali konyokwama mpo na likambo oyo ezali sembo te, tómilelalelaka te to mpe tópesaka Yehova foti te mpo na mikakatano oyo ezali koyela biso. Tólukaka mpe komilongisa te, tóbosana te ete ata soki tozali na mikumba nini na mosala ya Yehova, tozali kaka “baombo mpamba.”—Luka 17:10, NW.

15. (a) Elimo nini ya mabe bayekoli mosusu ya Yesu bamonisaki? (b) Ndenge nini Petelo amonisaki ete azalaki na elimo ya malamu?

15 Na ekeke ya liboso, bato mosusu oyo bayokaki maloba ya Yesu bazalaki na elimo oyo ebongi te. Mokolo mosusu, Yesu alobaki likambo moko oyo ezalaki mpasi mpo na koyeba ntina na yango. Mpo na likambo yango “mingi na bayekoli na ye, wana eyokaki bango boye, balobi ete, Oyo liloba makasi, nani akoki koyoka yango?” Tomoni mpenza ete bato oyo balobaki maloba yango bazalaki na elimo ya mabe. Mpe elimo yango ememaki bango bátika koyoka Yesu. Lisolo elobi boye: “Boye longwa na ntango yango, mingi kati na bayekoli na ye bazongi nsima mpe batamboli na ye elongo lisusu te.” Kasi, ezali bango nyonso nde bazalaki na elimo ya mabe? Te. Na nsima, lisolo yango elobi lisusu boye: “Yango wana, Yesu alobi na Bazomi na mibale ete, Bino mpe bolingi kokenda? Simona Petelo alobi ete, Nkolo, tókenda epai na nani?” Kutu, na nsima Petelo apesaki eyano na motuna na ye ete: “Yo ozali na maloba ya bomoi ya seko.” (Yoane 6:60, 66-68) Omoni elimo ya malamu! Soki tozali na mwa mokakatano mpo na kondima bandimbola to bingɛngiseli ya sika ya Makomami, ebongi mpenza tózala na elimo lokola oyo ya Petelo, boye te? Ekozala mpenza malamu te soki totiki kosalela Yehova to tobandi koloba makambo oyo eyokani te na “ndakisa ya maloba ya sembo” kaka mpo na mwa makambo oyo tokangi naino ntina na yango te!—2 Timote 1:13.

16. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, elimo nini ya mabe bakonzi ya mangomba ya Bayuda bamonisaki?

16 Na ekeke ya liboso, bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki na elimo lokola oyo ya Yesu te. Ntango Yesu asekwisaki Lasalo, bamonisaki mpenza ete bazalaki na mposa ata moke te ya koyoka mateya ya Yesu. Likamwisi wana esengelaki kondimisa moto nyonso oyo azali na elimo oyo ebongi ete Nzambe mpenza nde atindaki Yesu. Kasi Biblia elobi boye: “Bongo, banganga minene mpe Bafalisai bayanganisi [Sanedrina, NW ] mpe balobi ete, Tósala nini? Mpo ete moto oyo azali kosala bilembo mingi. Soko tokotika ye boye, bato nyonso bakondima ye mpe Baloma bakoya mpe bakobebisa esika na biso mpe libota na biso.” Bamonaki malamu básala nini? “Longwa na mokolo yango, bakani ete báboma ye.” Basalelaki Yesu likita mpo báboma ye, mpe lisusu bazwaki ekateli ya koboma moto oyo Yesu asekwisaki, mpamba te azalaki komonisa polele ete Yesu azalaki kosala makamwisi. “Banganga minene bakani ete báboma Lasalo mpe.” (Yoane 11:47, 48, 53; 12:9-11) Ekozala mpenza mabe soki tokómi na elimo ya ndenge wana mpe tokómi koyoka mabe to kosilika na makambo oyo ebongaki kutu nde tósepela mpo na yango! Yango ezali likama mpenza!

Tólanda elimo malamu ya Klisto

17. (a) Na makambo nini Danyele abangaki te? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki mpiko na ye?

17 Banda kala basaleli ya Yehova babatelaka elimo ya malamu. Ntango banguna ya Danyele basalelaki mayele mabe mpo bábimisa mobeko moko oyo epekisaki kobondela nzambe mosusu to moto mosusu, longola kaka mokonzi na boumeli ya mikolo 30, Danyele ayebaki ete ezalaki motambo mpo na boyokani na ye na Yehova Nzambe. Akokaki kondima ete atika kobondela Nzambe na boumeli ya mikolo 30? Te. Abangaki te mpe atikaki te momeseno na ye ya kobondela Yehova mbala misato na mokolo. (Danyele 6:6-17) Yesu mpe abangaki banguna na ye te. Na mokolo moko ya Sabata, amonaki moto moko oyo lobɔkɔ na ye ekauká. Yesu ayebaki ete Bayuda mingi oyo bazalaki wana bakosepela te soki abikisi moto yango na mokolo ya Sabata. Yango wana atunaki bango motuna mpo bábimisa makanisi na bango na likambo yango. Lokola bato yango baboyaki koloba, Yesu akakatanaki te, abikisaki moto yango. (Malako 3:1-6) Yesu azongaki nsima ata mbala moko te ete azanga kokokisa mokumba na ye na ndenge oyo amonaki ete ebongi.

18. Mpo na nini bato mosusu batɛmɛlaka biso, kasi tosengeli kosala nini liboso ya elimo mabe na bango?

18 Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bayebi ete bango mpe basengeli kobanga banguna na bango te mpo na makambo oyo bakoki mbala mosusu koloba to kosala. Soki babangi, ekomonisa ete bazali na elimo ya Yesu te. Bato mingi batɛmɛlaka Batatoli ya Yehova mpo bayebi mpenza makambo na bango te, mpe bamosusu mpo bayinaka Batatoli to bayinaka nsango na bango. Kasi, biso tótika te ete elimo mabe na bango ebebisa elimo malamu na biso. Tosengeli kondima ata mokolo moko te ete bato mosusu bálakisa biso ndenge oyo biso tosengeli kosambela Nzambe.

19. Ndenge nini tokoki komonisa elimo oyo Yesu Klisto azalaki na yango?

19 Yesu azalaki ntango nyonso na makanisi ya malamu epai ya bayekoli na ye mpe na bibongiseli ya Nzambe, atako yango ezalaki pɛtɛɛ te. (Matai 23:2, 3) Tosengeli kolanda ndakisa na ye. Ya solo, bandeko na biso bazali bato ya kozanga kokoka, biso mpe tozali bato ya kozanga kokoka. Esika nini mosusu tokoki kozwa baninga ya malamu mpe ya sembo soki na lisangá ya bandeko na biso na mokili mobimba te? Yehova alimbweli biso naino makambo nyonso ya Liloba na ye polele te, kasi lingomba nini ezali kososola Liloba ya Nzambe koleka lisangá ya Yehova? Tózala ntango nyonso na elimo ya malamu, elimo oyo Yesu Klisto azalaki na yango. Elimo yango esɛngi makambo mingi, kati na yango, koyeba kozela Yehova, lokola tokomona yango na lisolo oyo elandi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, ebimisami na Batatoli ya Yehova, elobeli bomoi ya Yesu mpe mosala na ye.

Okoki kolimbola?

• Ndenge nini bomoi na biso etalelaka elimo na biso?

• Lobelá elimo oyo Yesu Klisto azalaki na yango.

• Liteya nini tokoki kozwa na elimo oyo Yobo azalaki na yango?

• Ndenge nini ya malamu tosengeli kotalelaka botɛmɛli?

[Bililingi na lokasa 7]

Moklisto oyo azali na elimo ya malamu alukaka kosalisa bato mosusu

[Elilingi na lokasa 9]

Komipesa na koyekola Liloba ya Nzambe ekosalisa biso tózala na elimo ya Klisto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto