Tóyeba kozela!
“[Nakozela] Nzambe ya kobika na ngai; Nzambe na ngai akoyoka ngai.”—MIKA 7:7.
1, 2. (a) Ndenge nini elimo ya mabe epesaki Bayisalaele mpasi ntango bazalaki na mokili ekauki? (b) Nini ekoki kokómela moklisto oyo azali koluka te ete azala na elimo oyo ebongi?
ELIMO oyo tozali na yango ekoki kotinda biso na komona makambo mingi ya bomoi na biso ete ezali malamu to ete ezali mabe. Ntango Bayisalaele bazalaki na mokili ekauki, Nzambe apesaki bango mana na ndenge ya likamwisi. Ebongaki naino bátala epai na epai na mokili ekauká yango oyo bazalaki, mpe na ntembe te balingaki kotɔnda Yehova mpo na bilei oyo apesaki bango. Soki basalaki bongo, elingaki komonisa ete bazali na elimo ya malamu. Nzokande, bango bakanisaki biloko ndenge na ndenge ya kolya oyo batikaki na Ezipito mpe bakómaki kolelalela ete mana ezali elɛngi te. Bazalaki na elimo ya mabe mpenza!—Mituya 11:4-6.
2 Lelo oyo mpe ndenge moko, elimo oyo moklisto azali na yango ekoki kosala ete amona makambo malamu to mabe. Soki moklisto azali na elimo oyo ebongi te, ekozala mpasi te mpo azala lisusu na esengo te mpe yango ekozala mabe mpenza, mpamba te, lokola Nehemia alobaki yango, “Esengo ya [Yehova] ezali nguya na bino.” (Nehemia 8:10) Elimo ya malamu, elimo ya esengo esalisaka biso tózala ntango nyonso makasi mpe etyaka kimya mpe bomoko na kati ya lisangá.—Baloma 15:13; Bafilipi 1:25.
3. Ndenge nini elimo oyo ebongi esalisaki Yilimia na ntango ya mpasi?
3 Atako azalaki na bomoi na ntango moko ya mpasi, Yilimia azalaki na elimo ya malamu. Ata ntango amonaki makambo ya nsɔmɔ oyo esalemaki ntango babebisaki Yelusaleme na mobu 607 L.T.B., atyaki makanisi na ye na makambo ya malamu. Yehova alingaki kobosana Yisalaele te, mpe ekólo yango elingaki kokufa te. Na mokanda ya Bileli, Yilimia akomaki boye: “Mpo na boboto ya [Yehova], tobebisami te, makambo ya mawa na ye makosuka te. Mazalisami na sika ntɔngɔ na ntɔngɔ; [bosembo, NW ] na yo ezali monene mpenza.” (Bileli 3:22, 23) Banda kalakala, ata na ntango oyo bazalaki na mpasi makasi, basaleli ya Nzambe bazalaki koluka kobatela elimo ya malamu, to elimo ya esengo.—2 Bakolinti 7:4; 1 Batesaloniki 1:6; Yakobo 1:2.
4. Yesu azalaki na elimo nini, mpe ndenge nini elimo yango esalisaki ye?
4 Mbula nkama motoba nsima ya Yilimia, Yesu ayikaki mpiko na minyoko oyo banyokolaki ye mpo azalaki na elimo ya malamu. Biblia elobi boye: “Mpo na esengo [oyo] etyami liboso na [Yesu], ayikeli [nzete ya mpasi, NW ] mpiko, atyoli nsɔni na yango mpe azali kofanda na lobɔkɔ ya mobali ya kiti na bokonzi ya Nzambe.” (Baebele 12:2) Na nyonso oyo basalaki mpo na kotɛmɛla ye to konyokola ye, ezala ndenge oyo anyokwamaki na nzete ya mpasi, Yesu azalaki ntango nyonso kokanisa ‘esengo oyo etyami liboso na ye.’ Azalaki kosepela na libaku malamu ya kolongisa bokonzi ya Yehova mpe kosantisa nkombo na ye, mpe lisusu azalaki na esengo mpo na elikya ya kopesa bato ya botosi mapamboli ebele na mikolo ekoya.
Tózala bato oyo bayebi kozela
5. Pesá ndakisa ya likambo moko oyo koyeba kozela ekosalisa biso tótalela ntango nyonso makambo na ndenge ya malamu.
5 Soki tosali makasi tózala na elimo lokola oyo Yesu azalaki na yango, tokobungisa esengo ya Yehova te ata soki ntango mosusu makambo esalemi te na ndenge mpe na ntango oyo tokanisaki. Mosakoli Mika alobaki boye: “Kasi ngai nakotalela [Yehova; nakozela] Nzambe ya kobika na ngai.” (Mika 7:7; Bileli 3:21) Biso mpe tokoki komonisa ete toyebi kozela. Ndenge nini? Na ndenge mingi. Ya liboso, tokoki komona ete ndeko moko oyo azali na mikumba minene na lisangá asali libunga mpe esengeli kobongisa likambo yango noki. Soki toyebi kozela, tokomituna boye: ‘Ndeko yango asali mpenza libunga, to ngai nde namikosi? Soki asalaki mpenza libunga, ekoki kozala ete Yehova atiki likambo yango eleka, mpamba te amoni ete moto yango akobongisa mpe ekozala na ntina te azwela ye meko ya makasi?’
6. Ndenge nini koyeba kozela ekoki kosalisa moto oyo azali na mokakatano moko?
6 Tokoki mpe kozala na mposa ya koyeba kozela soki mokakatano moko ezali kotungisa biso to soki tolingi kolonga bolɛmbu moko oyo tozali na yango. Soki na ndakisa tosɛngi Yehova asalisa biso, kasi mokakatano yango ezali kosila kaka te, tokosala nini? Tótika te kosala nyonso oyo tokoki kosala mpo na kosilisa mokakatano yango mpe tótya elikya na maloba ya Yesu oyo: “Bósɛngaka mpe bakopesa bino; bólukaka mpe bokozwa; bóbɛtaka mpe bakofungolela bino.” (Luka 11:9, NW ) Kolɛmba kobondela te mpe zelá Yehova. Na ntango oyo ebongi mpe na ndenge oyo akomona malamu, Yehova akoyoka mabondeli na yo.—1 Batesaloniki 5:17.
7. Ndenge nini koyeba kozela ekosalisa biso na likambo etali kobakisa mayele na biso mpo na koyeba mateya ya Biblia?
7 Lokola bisakweli ya Biblia ezali kokokisama, mayele na biso ya koyeba Makomami ezali mpe kobakisama. Kasi, tokoki ntango mosusu komona ete tozali koyeba ndimbola ya likambo moko noki te. Soki tozwi ndimbola na yango te na ntango oyo biso tokanisaki, tokondima kozela? Tóbosana te, Yehova amonaki malamu amonisa “libombami [mosantu, NW ] ya Klisto” mokemoke na boumeli ya mbula soki 4 000. (Baefese 3:3-6) Sikoyo tókanisa naino, tozali mpenza na ntina ya kozala motema mɔ́tɔmɔ́tɔ? Tozali kondima te ete Yehova aponi “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kopesa basaleli na Ye “bilei na elaka na yango”? (Biso nde totɛngisi makomi; Matai 24:45) Soki tozali kokanga ntina ya makambo nyonso te, yango mpenza nde ntina oyo tokomipimela esengo ya Nzambe? Tóbosana te ete Yehova ye moko nde akataka ntango nini mpe ndenge nini akobimisa ‘mwango’ na ye.—Amosa 3:7.
8. Ndenge nini motema molai ya Yehova esalisi bato ebele?
8 Bato mosusu bakoki kolɛmba nzoto mpo bazali komona ete nsima ya kosalela Nzambe na bosembo bambula ebele, mbala mosusu bakokufa liboso ya “mokolo ya [Yehova], mokolo monene mpe ya nsɔmɔ.” (Yoele 2:30, 31) Kasi, soki bataleli makambo na ndenge ya malamu, bakoki kolendisama. Petelo apesaki toli oyo: “Bókanisa ete motema molai ya Nkolo na biso ezali lokola lobiko.” (2 Petelo 3:15) Motema molai ya Yehova epesi nzela na bamilio ya bato mosusu ya sembo báyekola mateya ya solo. Tomoni te ete yango ezali likambo malamu mpenza? Longola yango, soki Yehova azali naino na motema molai, yango ezali kotikela biso ntango ‘tóluka nzela ya kobika na biso na nsɔmɔ mpe na kolɛnga.’—Bafilipi 2:12; 2 Petelo 3:11, 12.
9. Soki likambo moko ezali kopekisa biso kosala mingi na mosala ya Yehova, ndenge nini koyeba kozela ekosalisa biso tóyikela ezaleli yango mpiko?
9 Soki toyebi kozela tokolɛmba nzoto te ntango bazali kotɛmɛla biso, ntango tozali na maladi, tokómi mibange, to ntango mikakatano mosusu ezali kopekisa biso kosala mingi na mosala ya Bokonzi. Yehova alingi ete tósalela ye na motema na biso mobimba. (Baloma 12:1) Atako bongo, Mwana ya Nzambe, ye oyo “akoyokela moto ya bolɔzi mpe mobola mawa,” azali kosɛnga biso te ete tósala makambo oyo eleki makoki na biso; ndenge moko mpe, Yehova azali kosɛnga biso yango te. (Nzembo 72:13) Yango wana, tolendisami na kosala oyo tokoki kosala, tózala na motema molai mpe tózela tii ntango makambo ekobongwana, ezala na mokili oyo to na mokili ya sika. Tóbosana likambo oyo te: “Nzambe azangi boyengebene te ete abosana mosala na bino mpe bolingo bosili bino kotalisa na nkombo na ye, awa esalelaki bino Babulami mpe bozali naino kosalela bango.”—Baebele 6:10.
10. Ezaleli nini ya mabe moto oyo azelaka akoki kokima? Limbolá.
10 Koyeba kozela esalisaka biso mpe tókóma na lolendo te. Bato mosusu bakómaki bapɛngwi mpo balingaki kozela te. Mbala mosusu bazalaki komona ete esengeli kobongisa makambo mosusu, ezala ndenge ya kolimbola mateya ya Biblia to ndenge ya kotambwisa lisangá. Kasi, bayebaki te ete elimo ya Yehova etindaka moombo ya sembo mpe ya mayele abongola lolenge ya kosala na ntango oyo ye moko Yehova alingi, kasi te na ntango oyo biso tomoni ete esengeli kosalema bongo. Mbongwana nyonso oyo esalemi, esengeli koyokana na mokano ya Yehova, kasi na makanisi na biso te. Bapɛngwi batikaka ete lolendo na bango ebebisa makanisi na bango mpe ebɛtisa bango libaku. Kasi soki balandaki elimo ya Klisto, mbɛlɛ babungisaki esengo na bango te mpe mbɛlɛ batikalaki na kati ya libota ya Yehova.—Bafilipi 2:5-8.
11. Ndenge nini tokoki kosalela malamu ntango oyo tozali kozela, mpe soki tosali bongo tozali kolanda ndakisa ya banani?
11 Kasi, elingi koloba te ete koyeba kozela elimboli kozala na goigoi to kokanga mabɔkɔ. Tozali na makambo ya kosala. Na ndakisa, tosengeli komipesa na koyekola Biblia biso moko mpe komonisa na ndenge yango ete tozali kotya makanisi na biso na makambo ya elimo, lokola basakoli ya sembo na ntango ya kala na baanzelu basalaki yango. Mpo na likambo yango, Petelo alobaki boye: “Basakoli balukaki mpe batunaki mpo na lobiko yango . . . Baanzelu bazali na mposa ya kotalatala kati na makambo oyo.” (1 Petelo 1:10-12) Tosengeli koyekolaka biso moko, mpe lisusu koyanganaka na makita mpe kobondelaka. (Yakobo 4:8) Bato oyo bazali koyeba mposa na bango ya elimo, mpe bazali mbala na mbala kolya bilei ya elimo mpe kosangana na baninga na bango baklisto, bazali komonisa ete bakómi na makanisi ya Klisto.—Matai 5:3.
Zalá na bokatikati
12. (a) Adama na Eva baboyaki kolanda nini? (b) Lokola bato balandaki nzela ya Adama na Eva, tosuki wapi?
12 Ntango Nzambe akelaki mwasi na mobali ya liboso, alingaki ete ye moko alakisaka bango oyo ezali malamu na oyo ezali mabe. (Genese 2:16, 17) Adama na Eva baboyaki ete Nzambe alakisaka bango oyo basengeli kosala, mpe yango ememaki mokili na esika oyo tozali komona yango lelo. Ntoma Paulo alobaki boye: “Mabe ekɔtaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” (Baloma 5:12) Eleki sikoyo mbula nkóto motoba banda Adama azalaki na bomoi mpe yango emonisi ete Yilimia alobaki solo ntango alobaki ete: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela ya moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye [ye] moko.” (Yilimia 10:23) Soki moto andimi ete maloba ya Yilimia ezali solo, elingi koloba te ete azali na makanisi ya kolɛmba nzoto. Azali nde na bokatikati. Maloba yango ezali komonisa ntina oyo, na ebele ya bikeke nyonso wana, “moto moko azali na bokonzi likoló na mosusu mpo na kopesa ye mpasi,” mpamba te moto azali koyangela na ndenge na ye, azali kolanda malako ya Nzambe te.—Mosakoli 8:9.
13. Nini elakisi ete Batatoli ya Yehova bazalaka na bokatikati ntango bazali kotalela makambo oyo bato bakoki kosala?
13 Mpo na Batatoli ya Yehova, na kotala ndenge oyo bato bazali lelo oyo, makambo mingi ekoki kobonga te na mokili oyo. Kozala na makanisi malamu ekoki kosalisa biso tózala ntango nyonso na esengo, kasi yango te nde ekosilisa mikakatano nyonso. Na ebandeli ya bambula ya 1950, mokonzi ya lingomba moko na États-Unis, akomaki mokanda moko oyo etɛkamaki mingi (The Power of Positive Thinking). Mokanda yango elobaki ete moto akoki kolonga mikakatano mingi soki azali na makanisi malamu. Ya solo, kozala na makanisi malamu ezali likambo ya malamu. Kasi makambo oyo eleká ezali komonisa ete ezali na makambo mingi oyo moto mokomoko akoki kosala te mpamba te makambo yango esɛngaka kozala na boyebi, koyeba mosala, kozala na biloko ya mosala, na makambo mingi mosusu. Mpe na mokili mobimba, mikakatano ya minene ezali mingi, bato bakoki kosilisa yango te, ata soki bazali na makanisi ya malamu!
14. Tokoki mpenza koloba ete Batatoli ya Yehova bazali na makanisi ya kolɛmbisa nzoto? Limbolá.
14 Lokola Batatoli ya Yehova bamonaka makambo ndenge yango, bato mosusu balobaka ete bazali na makanisi ya kolɛmbisa nzoto. Nzokande, Batatoli bazali koyebisa bato Moto oyo akoki kobongisa mpenza bomoi ya bato mpo na libela. Na likambo oyo mpe balandaka elimo ya Klisto. (Baloma 15:2) Bamipesi na mosala ya kosalisa bato mpo bázala baninga ya Nzambe. Bayebi ete nsukansuka, mosala na bango ekopesa bolamu mingi koleka.—Matai 28:19, 20; 1 Timote 4:16.
15. Ndenge nini mosala ya Batatoli esalisaka bato?
15 Batatoli ya Yehova bayebi malamu mikakatano oyo ezali na bomoi ya bato, mingimingi makambo mabe oyo bato bazali kosala, makambo oyo Biblia eboyi. Liboso ete moto oyo asepeli na mateya ya Biblia akóma Motatoli ya Yehova, abongolaka naino bizaleli na ye, mbala mingi esɛngaka atika bizaleli mabe oyo amipesaki na yango, oyo esepelisaka Nzambe te. (1 Bakolinti 6:9-11) Na ndenge yango, Batatoli ya Yehova basalisi bato oyo bandimaki koyoka mateya na bango na kotika bizaleli lokola kolangwa masanga, komela bangi, kosala pite to ekobo, mpe kozala baombo ya masano ya mbongo. Bato yango oyo babongwani bazali sikoyo kokokisa bamposa ya mabota na bango na ndenge oyo esengeli mpe na bosembo nyonso. (1 Timote 5:8) Ndenge oyo bazali kosalisa bato to mabota na bango mobimba, mikakatano ezali kokita na mboka; bato mosusu bazali kotika komela bangi, bamosusu bazali kotika mobulu, mpe bongo na bongo. Lokola batosaka mibeko ya mboka mpe bazali kosalisa bato mosusu bákóma na bizaleli malamu na bomoi na bango, bazali kosalisa bibongiseli ya Leta oyo esalisaka bato.
16. Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakɔtaka te na masangá oyo elukaka ete makambo ebongwana?
16 Tokoki mpenza koloba ete Batatoli ya Yehova babongoli bizaleli ya bato? Na mbula zomi oyo eleki, Batatoli ya Yehova bazalaki liboso pene na bato milio 3,8 mpe bakómi pene na bato milio 6. Elingi koloba ete bato soki milio 2,2 babakisami, mpe mingi kati na bango batikaki makambo ya mabe ntango bakómaki baklisto. Tomoni ete bomoi ya bato mingi ekómi malamu! Kasi, motángo yango ezali moke soki tokokanisi yango na bato milio 875 oyo babakisamaki na mokili mobimba, na mbula zomi oyo eleki! Batatoli ya Yehova basepelaki mingi kosalisa bato oyo bandimaki koyoka mateya na bango, atako bayebi malamu ete bato moke kaka nde bakolanda nzela ya bomoi. (Matai 7:13, 14) Batatoli ya Yehova bazelaka Nzambe aya kobongola makambo solosolo. Bakɔtaka te na bibongiseli ya mokili oyo ezali koluka ete mbongwana esalema sikoyo; mbala mingi, bibongiseli yango ebandaka na mikano ya malamu, kasi esukaka mabe mpe na makambo ya mobulu.—2 Petelo 3:13.
17. Yesu asalaki nini mpo na kosalisa bato oyo azalaki kokutana na bango, kasi eloko nini asalaki te?
17 Na ndenge yango, Batatoli ya Yehova bazali komonisa ete bazali kotyela Yehova motema ndenge Yesu azalaki kotyela ye motema ntango azalaki awa na mabele. Na ekeke ya liboso, Yesu abikisaki bato na makamwisi. (Luka 6:17-19) Asekwisaki kutu bato oyo bakufaki. (Luka 7:11-15; 8:49-56) Kasi asilisaki maladi to liwa te. Ayebaki ete ntango oyo Nzambe akosala yango ekoki naino te. Soki tokanisi mayele mingi oyo azalaki na yango lokola moto ya kokoka, na ntembe te, Yesu azalaki na likoki ya kosala makambo mingi mpo na kosilisa mikakatano minene ezala na makambo ya politiki to na bomoi ya bato. Emonani mpenza ete na ntango wana bato mosusu balingaki ete Yesu akóma mokonzi mpe asala makambo wana, kasi ye aboyaki. Biblia elobi boye: “Bato baoyo bamoni elembo esali ye balobi ete, solo oyo azali Mosakoli oyo azali koya na mokili! Boye eyebaki Yesu ete balingaki koya kosimba ye ete bázalisa ye mokonzi, [akei] lisusu epai na ngomba bobele ye moko.”—Yoane 6:14, 15.
18. (a) Ndenge nini Yesu azalaki ntango nyonso komonisa ete azalaki kozela? (b) Ndenge nini mosala ya Yesu ebongwanaki banda 1914?
18 Yesu aboyaki kokɔta na makambo ya politiki to komipesa mosala ya kosalisa bato na bomoi na bango mpamba te, ayebaki ete ntango ya kozala mokonzi mpe ya kosala mosala ya kobikisa bato nyonso ekokaki naino te. Ata nsima ya kobuta na likoló mpe kokóma na bomoi lokola ekelamu ya elimo oyo akoki kokufa te, andimaki kozela ntango oyo Yehova aponaki liboso asala mosala na ye. (Nzembo 110:1; Misala 2:34, 35) Kasi, kobanda na 1914, ntango afandaki na Bokonzi, azali kobima “mpo na kolonga mpe kolonga tii na nsuka.” (Emoniseli 6:2, NW; Em 12:10) Tozali na botɔndi ete ye azala mokonzi na biso, atako bato mosusu oyo bazali koloba ete bazali baklisto baponi kotikala na molili na mateya ya Biblia mpo na Bokonzi!
Kozela ezalaka motungisi to epesaka esengo?
19. Ntango nini kozela ‘epesaka motema mpasi,’ mpe ntango nini epesaka esengo?
19 Salomo ayebaki ete kozela ekoki kozala motungisi. Akomaki boye: “Elikya oyo ezelisami epesi motema mpasi.” (Masese 13:12) Ya solo, soki moto atii elikya na ye na makambo ya lokuta, akoki koyoka motema mpasi ntango akomona ete makambo yango ekokisami te. Kasi, ntango tozali kozela makambo ya malamu lokola libala, kobotama ya mwana, to kokutana na bandeko to baninga na biso, esengo na biso ebandaka liboso mpenza makambo yango esalema. Esengo yango ekobakisama soki tozali kosalela malamu ntango oyo tozali kozela, soki tozali komibongisa mpo na likambo oyo ekoya.
20. (a) Tozali na elikya ya komona makambo nini ya minene? (b) Ndenge nini tokoki kozala na esengo ntango tozali kozela kokokisama ya mikano ya Yehova?
20 Soki tozali na elikya makasi ete makambo oyo tozali kolikya ekokokisama, ata soki toyebi te ntango nini ekokokisama, tokoki kosala ete ntango oyo tozali kozela ‘epesa motema mpasi’ te. Basaleli ya sembo ya Nzambe bayebi ete etikali moke Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto ebanda. Bazali na elikya ete bakomona ndenge oyo liwa na maladi ekolongwa. Bazali na mposa mingi ya komona makambo yango mpe bazali kozela ntango oyo bakoyamba bato mingi oyo bakosekwa, bandeko na bango mpe bakozala na kati ya bato yango. (Emoniseli 20:1-3, 6; 21:3, 4) Lelo oyo mokili ezali kobebisama mingi, kasi bazali kosepela na elikya ya komona ndenge oyo Paladiso ekozonga awa na mabele. (Yisaya 35:1, 2, 7) Yango wana, salelá ntango oyo tozali kozela na mayele, ‘zalaká ntango nyonso na mingi ya kosala kati na mosala ya Nkolo’! (1 Bakolinti 15:58, NW ) Lyaká bilei ya elimo. Luká kozala moninga mpenza ya Yehova. Luká bato mosusu oyo bazali na mposa ya kosalela Yehova. Lendisaká bandeko na yo bandimi. Salelá malamu ntango nyonso oyo Yehova akotika lisusu. Na ndenge yango, kozela Yehova ekopesa yo ‘mpasi na motema’ ata mokolo moko te. Kutu, ekopesa yo nde esengo!
Okoki kolimbola?
• Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kozela?
• Na makambo nini baklisto basengeli kozelaka?
• Mpo na nini Batatoli ya Yehova basepelaka kozela Yehova?
• Ndenge nini kozela Yehova ekoki kopesa moto esengo?
[Bililingi na lokasa 12]
Yesu ayikaki mpiko mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye
[Elilingi na lokasa 13]
Ata soki tolekisi mbula mingi na mosala ya Nzambe, tokoki kozala ntango nyonso na esengo
[Bililingi na lokasa 15]
Ebele ya bato bakómi na bomoi ya malamu ntango bakómi Batatoli ya Yehova.