Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/9 nk. 10-15
  • “Ntango na ye naino ekokaki te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ntango na ye naino ekokaki te”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Alingaki mpenza kosala mokano ya Nzambe
  • Molende mpo na ndako ya Yehova
  • Mosala monene ya koteya na Galilai
  • Asakoli na mpiko nyonso na Yudea mpe na Pelea
  • Likamwisi oyo eyebani na bato nyonso
  • Mokanda ya Biblia nimero 43—Yoane
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • “Ntango esi’ ekoki”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mpo na nini Yesu awelaki kokende te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Ateyi na Perea ntango azali kokende na Yudea
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/9 nk. 10-15

“Ntango na ye naino ekokaki te”

“Ata moto moko te amekaki kosimba ye mpo ntango na ye naino ekokaki te.”—YOANE 7:30, Boyokani ya Sika.

1. Wapi makambo mibale oyo Yesu azalaki kotalela na mosala oyo asalaki awa na mabele?

YESU KLISTO ayebisaki bantoma na ye ete: “Mwana ya moto ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.” (Matai 20:28) Alobaki mpe na Ponto Pilata, guvɛrnɛrɛ Moloma, ete: “Ngai nabotami mpo na ntina oyo mpe nayei na mokili ete natatola mpo na solo.” (Yoane 18:37) Yesu ayebaki malamu mpo na nini asengelaki kokufa mpe mosala nini asengelaki kosala liboso akufa. Ayebaki mpe ntango oyo azalaki na yango mpo na kosilisa mosala nyonso oyo ayelaki. Asengelaki kolekisa mbula misato na ndambo na mosala na ye lokola Masiya awa na mabele. Mosala yango ebandaki ntango azwaki batisimo na Ebale Yaladene (na mobu 29 T.B.), na ebandeli ya pɔsɔ ya 70 ya elilingi oyo esakolamaki mpe mosala yango esukaki ntango akufaki na nzete ya mpasi na katikati ya pɔsɔ yango (na mobu 33 T.B.). (Danyele 9:24-27; Matai 3:16, 17; 20:17-19) Na yango, na mosala na ye nyonso awa na mabele, Yesu azalaki kotalela makambo mibale: ntina oyo ayaki awa na mabele mpe ntango oyo asengelaki kosala likambo mokomoko.

2. Baevanzile elobi ete Yesu Klisto azalaki moto ya ndenge nini, mpe ndenge nini amonisaki ete ayebaki malamu mosala oyo Nzambe atindaki ye asala?

2 Baevanzile emonisi ete Yesu Klisto azalaki kosala mingi; atambolaki na Palestine mobimba mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe azalaki kosala makamwisi. Na ebandeli ya mosala monene oyo asalaki, Biblia elobi mpo na ye ete: “Ntango na ye naino ekokaki te.” Yesu ye moko alobaki boye: “Ntango na ngai ya malamu ekoki naino te.” Ntango akómaki na nsuka ya mosala na ye, alobaki ete “ntango esi’ ekoki.” (Yoane 7:8, 30, Boyokani ya Sika; Yn 12:23, Boyokani ya Sika) Na ntembe te lokola Yesu ayebaki malamu ngonga, to ntango oyo asengelaki kosala mosala oyo bapesaki ye, mpe lisusu ntango oyo asengelaki kokufa mpo na kopesa bomoi na ye lokola mbeka, yango ezalaki komonana na maloba mpe misala na ye nyonso. Soki tokangi ntina ndenge likambo yango esimbaki motema na ye, yango ekosalisa biso tóyeba ye malamu mpe tóyeba makanisi na ye, mpe yango ekosalisa biso ‘tólanda matambe na ye’ malamu koleka.—1 Petelo 2:21, NW.

Alingaki mpenza kosala mokano ya Nzambe

3, 4. (a) Likambo nini esalemi na fɛti ya libala na Kanana? (b) Mpo na nini Mwana ya Nzambe aboyi likanisi ya Malia ntango alobi na ye asala eloko moko lokola vinyo esili, mpe likambo yango eteyi biso nini?

3 Tozali na mobu 29 T.B. Eleki mwa mikolo, Yesu auti kopona bayekoli na ye ya liboso. Sikoyo, bango nyonso bayei na mboka Kanana, na etúká ya Galilai, na fɛti moko ya libala. Malia, mama ya Yesu, azali mpe kuna. Na fɛti, vinyo esili. Lokola Malia alingi ete mwana na ye Yesu asala likambo moko, alobi na ye ete: “Bazali lisusu na vino te.” Kasi, Yesu alobi na ye ete: “Mwasi, biso na yo likambo nini? Ntango na ngai naino ekoki te.”—Yoane 1:35-51; 2:1-4, Boyokani ya Sika.

4 Maloba ya Yesu ete, “Mwasi, biso na yo likambo nini?” ezali elobeli moko ya kala, ezalaki motuna oyo moto azalaki kotuna mpo na komonisa ete aboyi likambo oyo elobami to likanisi oyo epesami. Kasi, mpo na nini Yesu aboyi likanisi ya Malia? Yesu asi akokisi mbula 30. Eleki mwa bapɔsɔ, autaki kozwa batisimo, apakolamaki na elimo santu, mpe Yoane Mobatisi alakisaki ye epai ya bato lokola “Mwana-ya-mpate ya Nzambe, molongoli ya masumu ya mokili.” (Yoane 1:29-34; Luka 3:21-23) Sikoyo, malako nyonso oyo akolanda esengeli kouta kaka na Mokonzi Oyo-Aleki-Likoló, oyo atindaki ye. (1 Bakolinti 11:3) Moto mosusu te, ata ndeko na ye, akoki kozala na likambo ya koloba na mosala oyo Yesu ayelaki awa na mabele. Maloba ya Yesu epai ya Malia emonisi ete alingi mpenza kosala mokano ya Tata na ye! Biso mpe tózala na mposa makasi ya kosala “makambo nyonso” oyo Nzambe azali kosɛnga biso.—Mosakoli 12:13, NW.

5. Yesu Klisto asali likamwisi nini na Kanana, mpe yango esali likambo nini epai ya bato mosusu?

5 Lokola Malia akangi ntina ya maloba ya mwana na ye, alobi mbala moko na basali ete: “Bosala makambo nyonso akotinda bino.” Na nsima, Yesu asilisi mokakatano oyo ezali na fɛti. Atindi basali bátondisa bambeki na mai, mpe abongoli mai yango na vinyo oyo eleki kitoko. Yango ezali likamwisi ya liboso oyo Yesu asali, mpe emonisi ete azali na elimo ya Nzambe. Ntango bayekoli na ye oyo auti kozwa sika bamoni likamwisi yango, kondima na bango elendisami.—Yoane 2:5-11, Boyokani ya Sika.

Molende mpo na ndako ya Yehova

6. Mpo na nini Yesu asepeli te na makambo oyo amoni na tempelo ya Yelusaleme, mpe asali nini mpo na yango?

6 Nsima ya mwa ntango, tokómi na prɛnta ya mobu 30 T.B., Yesu na baninga na ye bazali kokende na Yelusaleme mpo na Elekeli. Ntango bakómi na Yelusaleme, Yesu asali likambo moko oyo, na ntembe te, bayekoli na ye bamonaki yango naino te epai na ye. Bayuda ya lokoso bafandi na kati ya Tempelo mpo na kotɛka banyama mpe bandɛkɛ epai na bato oyo bazali koya kopesa mbeka, mpe bazali kotɛka biloko yango na ntalo makasi mpenza. Likambo yango epesi Yesu nkanda mpe akangi mabɔkɔ te. Asali fimbo ya nsinga mpe abandi kobengana batɛkisi yango. Asopi mbongo ya bato oyo bazali kosanze mbongo mpe abaloli bamesa na bango. Alobi na bato oyo bazali kotɛkisa bibenga ete: “Longolá awa biloko oyo!” Ntango bayekoli ya Yesu bamoni likambo oyo asali na mpiko boye, makanisi na bango ekei mbala moko na esakweli oyo elobi mpo na Mwana ya Nzambe ete: “[Molende mpo na, NW ] ndako na yo elei ngai.” (Yoane 2:13-17; Nzembo 69:9) Biso mpe tosengeli kosala na molende mpo na kotika te ete makambo ya mokili ebebisa losambo na biso.

7. (a) Nini etindaki Nikodeme akende kokutana na Masiya? (b) Liteya nini tozwi na litatoli oyo Yesu apesaki mwasi Mosamalia?

7 Ntango azali naino na Yelusaleme, Yesu asali makamwisi minene, mpe bato mingi bandimeli ye. Ata Nikodeme, mosangani ya Sanedrina, elingi koloba tribinale monene ya Bayuda, akamwe na misala ya Yesu mpe akei koluka ye na butu mpo ayeba makambo mosusu mingi. Na nsima, Yesu na bayekoli na ye balekisi soki sanza mwambe na ‘mokili ya Yudea’ mpo na kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. Kasi, ntango Yoane Mobatisi akɔti bolɔkɔ, balongwe na Yudea mpe bakei na Galilai. Na nzela, baleki na etúká ya Samalia mpe kuna, Yesu azwi libaku ya kopesa mwasi moko Mosamalia litatoli. Mpe na nzela ya mwasi yango, Basamalia mingi bakómi bandimi. Biso mpe tólekisaka te mabaku ya koyebisa bato nsango ya Bokonzi.—Yoane 2:23; 3:1-22; 4:1-42; Malako 1:14.

Mosala monene ya koteya na Galilai

8. Mosala nini Yesu abandi kosala na Galilai?

8 Liboso “ntango” ya liwa na ye ekoka, Yesu azali na makambo mingi ya kosala na mosala oyo Tata na ye ya likoló apesaki ye. Na Galilai, Yesu abandi mosala monene oyo eleki kutu mosala oyo asalaki na Yudea mpe na Yelusaleme. Atamboli na “Galilai mobimba, alakisi na biyanganelo na bango mpe asakoli Nsango Malamu ya Bokonzi mpe abikisi maladi nyonso mpe ndenge nyonso ya bolɛmbu kati na bato.” (Matai 4:23) Na etúká mobimba, bazali koyoka Yesu azali koloba boye: “Bóbongola mitema! Zambi Bokonzi na Likoló esili kobɛlɛma.” (Matai 4:17) Nsima ya mwa basanza, ntango bayekoli mibale ya Yoane Mobatisi bayei kotuna Yesu ye moko, alobi na bango boye: “Bokende koloba na Yoane makambo oyo bino bomoni mpe boyoki: bato bakufa miso bazali komona, bato bakufa matoi bazali koyoka, bato bakufa makolo bazali kotambola, bato bazali na maladi ya maba babiki, bato bakufa bazali kosekwa, mpe [babola, NW ] bazali koyoka Nsango Malamu. Esengo mingi na moto oyo atii ntembe te mpo na ngai.”—Luka 7:22, 23, Boyokani ya Sika.

9. Mpo na nini ebele ya bato bazali koya epai ya Klisto Yesu, mpe yango ekoki koteya biso nini?

9 ‘Nsango ya Yesu etamboli bipai nyonso na mokili wana,’ mpe bato ebele bazali kouta na Galilai, na Dekapoli, na Yelusaleme, na Yudea, mpe na ngámbo mosusu ya Ebale Yaladene, bazali koya epai na ye. (Luka 4:14, 15, Boyokani ya Sika; Matai 4:24, 25) Bazali koya epai na ye mpo azali kosala makamwisi ya kobikisa bato ya maladi mpe lisusu mpo azali koteya makambo ya malamu mpenza. Maloba na ye ezali kosepelisa bato mpe kolendisa bango. (Matai 5:1–7:27) Yesu azali na maloba ya ngɔlu. (Luka 4:22) Ebele ya bato bazali ‘kokamwa mateya na ye,’ mpamba te azali kosalela Makomami na bokonzi. (Matai 7:28, 29; Luka 4:32) Nani oyo akoki kosepela na moto ya ndenge wana te? Biso mpe tókola na mayele ya koteya mpo bato ya mitema sembo básepela koyoka mateya ya solo.

10. Mpo na nini bato ya Nasalete baluki koboma Yesu, mpe mpo na nini bakoki te?

10 Kasi, bato mosusu oyo bazali koyoka Yesu bazali kondimela ye te. Kaka na ebandeli ya mosala na ye, ntango azali koteya na eyanganelo na mboka na ye Nasalete, bato balingi koboma ye. Atako bato ya mboka bazali kokamwa na “maloba ya ngɔlu” oyo azali koloba, bango balingi komona makamwisi. Yesu aboyi kosala makamwisi mingi kuna; kasi, amonisi polele ete bazali koluka matomba na bango moko mpe bazali na kondima te. Bato oyo bazali na eyanganelo basiliki, batɛlɛmi mpe bakangi Yesu; bakei na ye na ngomba moko na libándá ya mboka mpe balingi kotindika ye mpo akwea na nse. Kasi alongwe na mabɔkɔ na bango mpe akei epai mosusu. “Ntango” ya liwa na ye naino ekoki te.—Luka 4:16-30.

11. (a) Mpo na nini bakonzi mosusu ya mangomba bazali koya koyoka Yesu na bisika oyo azali koteya? (b) Mpo na nini bazali koloba ete Yesu azali kotosa Sabata te?

11 Na bisika mingi oyo Yesu azali koteya, bakonzi ya mangomba, ezala bakomeli, Bafalisai, Basadukai, na bamosusu, bazali kozanga te. Mingi bazali kokende mpo na koyoka mpe koyekola te, kasi mpo na koluka kozwa ye na likambo ya mabe mpe kosukisa ye. (Matai 12:38; 16:1; Luka 5:17; 6:1, 2) Na ndakisa, ntango azali na Yelusaleme mpo na Elekeli ya mobu 31 T.B., Yesu abikisi moto moko oyo asali mbula 38 na maladi. Bakonzi ya mangomba balobi ete Yesu azali kotosa Sabata te. Ye apesi bango eyano, alobi ete: “Tata na ngai azali naino kosala mosala, ngai mpe nazali kosala.” Mbala moko Bayuda babaluki, balobi ete azali kofinga Nzambe mpo azali koloba ete azali Mwana ya Nzambe lokola abengi ye Tata na ye. Bazali koluka koboma Yesu, kasi ye na bayekoli na ye balongwe na Yelusaleme mpe bazongi na Galilai. Ebongi ete biso mpe tóboyaka kowelana mpambampamba na banguna na biso ntango tozali kosala na molende mosala na biso ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli.—Yoane 5:1-18; 6:1.

12. Lobelá ndenge oyo Yesu atambolaki na etúká ya Galilai.

12 Na boumeli ya mbula mibale oyo elandi, Yesu asali mosala na ye mingimingi na Galilai, akei na Yelusaleme kaka na bafɛti misato oyo Bayuda basalaka mbala moko na mbula. Na nyonso, Yesu atamboli Galilai mobimba mbala misato: mbala ya liboso na bayekoli 4 oyo aponaki sika, mbala ya mibale na bantoma 12, mpe mbala ya misato, atamboli na bisika mingi koleka mpe atindi bantoma oyo basili koyeba ndenge ya kosala mosala ya kosakola. Ya solo, mosala monene ya kotatola mpo na solo esalemi na Galilai!—Matai 4:18-25; Luka 8:1-3; 9:1-6.

Asakoli na mpiko nyonso na Yudea mpe na Pelea

13, 14. (a) Bayuda bazali koluka kokanga Yesu na ntango nini? (b) Mpo na nini basoda bakangi Yesu te?

13 Tokómi sikoyo na otɔmne ya mobu 32 T.B., kasi “ntango” ya Yesu ekoki naino te. Fɛti ya Mingombo ekómi pene. Bandeko ya Yesu balobi na ye ete: “Longwá awa mpe kendá na [Yudea, NW ].” Balingi ete ebele ya bato oyo bakozala na fɛti na Yelusaleme bámona makamwisi oyo Yesu azali kosala. Kasi, Yesu ayebi ete azali na likama. Yango wana alobi na bandeko na ye ete: “Bokende na bino na feti, kasi ngai nakokende na ngai te, mpo ntango na ngai ya malamu ekoki naino te.”—Yoane 7:1-8, Boyokani ya Sika.

14 Yesu alekisi naino mwa mikolo na Galilai, mpe na nsima akei na Yelusaleme “kasi amimonisaki na miso ya bato te.” Kutu, na fɛti yango, Bayuda bazali koluka ye mpe bazali koloba: “Azali wapi?” Ntango mikolo ya fɛti ekómi na katikati, Yesu ayei na tempelo mpe abandi koteya bato kozanga kobanga. Baluki ndenge ya kokanga ye, mbala mosusu mpo bátya ye na bolɔkɔ to mpo báboma ye. Kasi, bakoki te mpo ‘ngonga na ye ekoki naino te.’ Bato mingi bakómi kondimela Yesu. Ata basoda oyo Bafalisai batindi mpo na kokanga ye bazongi mabɔkɔ mpamba mpe balobi ete: “Naino moto moko alobi lokola ye te.”—Yoane 7:9-14, 30-46, Boyokani ya Sika.

15. Mpo na nini Bayuda balɔkɔti mabanga mpo bábamba Yesu, akei lisusu kosakola epai wapi?

15 Yesu akamatani lisusu na Bayuda oyo bazali kotɛmɛla ye ntango ateyi makambo ya Tata na ye na tempelo na mikolo ya fɛti. Na mokolo ya nsuka ya fɛti, ntango Yesu alobi ete ye azalaki na bomoi liboso abotama, Bayuda bayei mabe, kutu balɔkɔti mabanga mpo bábamba ye. Kasi amibombi mpe akimi bango, bakoki kosala ye eloko te. (Yoane 8:12-59) Yesu azongi lisusu na Yelusaleme te, akei koteya na bamboka ya Yudea. Aponi bayekoli 70 mpe, nsima ya kolakisa bango, atindi bango mibale mibale na mosala ya kosakola. Bakei na bisika mpe na bamboka oyo Yesu, na bantoma na ye, bakoleka na nsima.—Luka 10:1-24.

16. Yesu abiki na likama nini na Fɛti ya Bofungoli, mpe abandi lisusu mosala nini?

16 Na eleko ya malili ya mobu 32 T.B., “ntango” ya Yesu ezali kokóma pene. Ayei na Yelusaleme mpo na Fɛti ya Bofungoli. Bayuda bazali kaka koluka koboma ye. Ntango Yesu azali kotambola na veranda ya tempelo, bayei kozinga ye. Balobi ete azali kofinga Nzambe, balɔkɔti mabanga mpo bábamba ye. Kasi, se ndenge asalaki liboso, Yesu akimi bango. Mwa moke na nsima, abandi lisusu kotambola mpo na koteya, mbala oyo azali kokende engumba na engumba mpe mboka na mboka na etúká ya Pelea, na ngámbo mosusu ya Ebale Yaladene oyo etalani na Yudea. Kuna mpe bato mingi bandimeli ye. Kasi, bamemeli ye nsango ya moninga na ye Lasalo, yango esali ete azonga lisusu na Yudea.—Luka 13:33; Yoane 10:20-42.

17. (a) Yesu azwi nsango nini ya nokinoki ntango azali kosakola na Pelea? (b) Nini emonisi ete Yesu ayebi ntina ya mosala oyo asengeli kosala mpe ntango ya kosala likambo na likambo?

17 Nsango oyo Malata na Malia, bandeko basi ya Lasalo, batindeli Yesu ezali kosɛnga ete akende nokinoki na mboka Betania, na Yudea. Momemi-nsango alobi ete: “Motei, talá, ye oyo olingi abɛli maladi.” Yesu alobi ete: “Kobɛla oyo ezali mpo na kufa te kasi mpo na nkembo ya Nzambe ete Mwana ya Nzambe akumisama na yango.” Yango wana, Yesu alekisi naino mikolo mibale epai oyo azalaki. Na nsima alobi na bayekoli na ye ete: “Tókenda na [Yudea, NW ] lisusu.” Bayekoli bakamwe mpe balobi na ye ete: “Labi, Bayuda baluki ete bábwakela yo mabanga bobele [sikoyo] mpe okokenda wana lisusu?” Kasi Yesu ayebi malamu ete ‘ngonga . . . ya moi,’ to ntango oyo Nzambe akatelaki ye mpo na mosala na ye awa na mabele ezali lisusu mingi te. Ayebi malamu nini oyo asengeli kosala mpe mpo na nini asengeli kosala yango.—Yoane 11:1-10.

Likamwisi oyo eyebani na bato nyonso

18. Makambo nini Yesu akuti ntango akomi na Betania, mpe nini esalemi ntango akómi kuna?

18 Ntango Yesu akómi na Betania, moto ya liboso oyo ayei koyamba ye ezali Malata, alobi na ye boye: “Motei, soko ozalaki awa, mbɛlɛ ndeko na ngai akufi te.” Na nsima, Malia na bato oyo bayaki kotala bango balandi. Bango nyonso bazali kolela. Yesu atuni bango: “Botii ye wapi?” Balobi na ye ete: “Yaká kotala, Motei.” Lilita oyo batyaki ye ezalaki lidusu, mpe bazipaki monɔkɔ ya lidusu yango na libanga. Ntango bakómi wana, Yesu alobi: “Longolá libanga!” Kasi, lokola Malata ayebi te eloko oyo Yesu alingi kosala, alobi ete: “Motei, azali kolumba nsolo mabe mpo ete akufi [eleki] mikolo minei.” Kasi Yesu atuni ye boye: “Nalobi na yo te ete, soko okondima, okomona nkembo ya Nzambe?”—Yoane 11:17-40.

19. Mpo nini Yesu abondeli na miso ya bato nyonso liboso asekwisa Lasalo?

19 Ntango balongoli libanga oyo ezipi monɔkɔ ya lilita ya Lasalo, Yesu abondeli na mongongo makasi mpo bato báyeba ete alingi kosala likamwisi na nguya ya Nzambe. Na nsima agangi ete: “Lasalo, bimá libándá”! Lasalo abimi, makolo na mabɔkɔ na ye ezali na bilamba oyo bazingaki ye ntango bakundaki ye mpe liputa moko ezipi ye elongi. Yesu alobi, “Bofungola ye, mpe botika ye atambola—Yoane 11:41-44, Boyokani ya Sika.

20. Bato oyo bamoni Yesu asekwisi Lasalo basali nini?

20 Ntango bamoni likamwisi yango, Bayuda mingi oyo bayaki kobɔndisa Malata na Malia bandimeli Yesu. Bamosusu bakei koyebisa Bafalisai likambo yango. Bafalisai basali nini? Mbala moko, bango na banganga kapita bayanganisi Sanedrina na likita ya mbalakaka. Na kobanga nyonso, bazali koloba ete: “Tósala nini? Mpo ete moto oyo azali kosala bilembo mingi. Soko tokotika ye boye, bato nyonso bakondima ye mpe Baloma bakoya mpe bakobebisa esika na biso mpe libota na biso.” Nganga Monene Kayafa azwi maloba mpe alobi na bango boye: “Bobanzi mpe te ete ekozala malamu na biso ete moto moko akufa mpo na libota mpe ete bato nyonso bakufa te.” Yango wana, banda mokolo yango bazwi mokano ya koboma Yesu.—Yoane 11:45-53.

21. Likamwisi ya kosekwisa Lasalo ezali ebandeli ya nini?

21 Lokola Yesu alekisaki ntango liboso akóma na Betania, epesi ye nzela ya kosala likamwisi oyo eyebani na bato nyonso. Na nguya ya Nzambe, Yesu asekwisi moto oyo akufaki eleki mikolo minei. Nsango yango ekómi tii na matoi ya bato ya lokumu ya Sanedrina mpe bakani ete moto oyo azali kosala makamwisi yango asengeli kokufa! Likamwisi yango ebongoli makambo na mosala ya Yesu, sikoyo ezali lisusu te ete ‘ntango na ye ekoki naino te,’ kasi ekómi “ntango esi’ ekoki.”

Okopesa eyano nini?

• Ndenge nini Yesu amonisaki ete ayebaki malamu mosala oyo Nzambe apesaki ye?

• Mpo na nini Yesu aboyi likanisi ya mama na ye mpo na vinyo?

• Ezaleli oyo Yesu azalaki mbala mingi komonisa epai ya banguna na ye ezali koteya biso nini?

• Mpo na nini Yesu alekisaki ntango liboso ya kokende kotala Lasalo ntango azalaki kobɛla?

[Bililingi na lokasa 12]

Yesu amipesaki mobimba na mosala oyo Nzambe apesaki ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto