“Ntango esi’ ekoki”!
“Ntango na ye ekokaki mpo atika mokili oyo mpe akende epai ya Tata.”—YOANE 13:1, NW.
1. Lisolo nini ezali na minɔkɔ ya bato na Yelusaleme ntango Elekeli ya mobu 33 T.B. ekómi pene, mpe mpo nini?
NTANGO Yesu azwaki batisimo na mobu 29 T.B., bomoi na ye ekómaki na “ntango” oyo asengelaki kokufa, kosekwa mpe kozwa nkembo. Tozali sikoyo na prɛnta ya mobu 33 T.B. Eleki mwa bapɔsɔ, basangani ya Sanedrina, elingi koloba tribinale monene ya Bayuda, bazwaki ekateli ete Yesu asengeli kokufa. Ntango Yesu ayokaki yango, alongwaki na Yelusaleme mpe akendaki na bamboka oyo ezali na ngámbo mosusu ya Ebale Yaladene. Ntango mosusu Nikodeme nde moto ayebisaki ye yango; Nikodeme yango azali mosangani ya Sanedrina kasi alingaka Yesu. Lokola Fɛti ya Elekeli ekómi pene, bato ebele bazali kouta na bamboka mpo na koya na Yelusaleme; na kati ya engumba, nkombo ya Yesu ezali na minɔkɔ ya bato nyonso. Bato bazali kotunana, “Bokanisi nini? Akoya na feti to akoya te?” Banganga kapita na Bafalisai bangalisi lisusu likambo ntango balobi ete moto nyonso oyo akomona Yesu akende koyebisa bango epai azali.—Yoane 11:47-57, Boyokani ya Sika.
2. Likambo nini Malia asali oyo esali ete bato bálobaloba, mpe eyano ya Yesu mpo na kokɔtela Malia emonisi likambo nini mpo na “ntango na ye”?
2 Mokolo ya 8 Nisana, mikolo motoba liboso ya Elekeli, Yesu azongi lisusu penepene na Yelusaleme. Akómi na mboka Betania, epai oyo baninga na ye Malata, Malia na Lasalo bafandaka. Kolongwa na mboka yango tii na Yelusaleme ezali na kilomɛtrɛ misato. Yesu akómi na mboka yango na mokolo ya mitano na mpokwa mpe alekisi mokolo ya Sabata kuna. Na mpokwa ya mokolo oyo elandi ntango Malia asopeli Yesu mafuta ya ntalo mingi, bayekoli basepeli te. Kasi, Yesu alobi na bango ete: “Tiká ye ete abomba yango kino mokolo ya kokunda na ngai. Bozali na babola na bino elongo mikolo nyonso nde bozali na ngai elongo na bino mikolo nyonso te.” (Yoane 12:1-8; Matai 26:6-13) Yesu ayebi ete ‘ntango na ye ekoki mpo atika mokili oyo mpe akende epai ya Tata.’ (Yoane 13:1, NW ) Etikali mikolo mitano, Yesu ‘akopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na bato mingi.’ (Malako 10:45) Yango wana, na makambo nyonso oyo Yesu azali kosala to koteya, azali koyeba ete ntango etikali moke. Yango ezali mpenza ndakisa malamu mpo na biso ntango tozali kozela na mposa makasi nsuka ya mokili mabe oyo! Tótalela sikoyo likambo oyo Yesu asalaki na mokolo oyo elandaki.
Yesu akɔti na Yelusaleme na nkembo
3. (a) Ndenge nini Yesu akɔti na Yelusaleme na mokolo ya lomingo mwa 9 Nisana, mpe bato mingi oyo bazali kolanda ye bazali kosala nini? (b) Yesu apesi Bafalisai eyano nini lokola balingi ete bato bátika koganga?
3 Mokolo ya lomingo mwa 9 Nisana, Yesu abandi kokenda na Yelusaleme, bato bazali kokumisa ye. Ntango azali kopusana penepene na engumba, amati likoló ya mwana ya mpunda mpo na kokokisa esakweli ya Zekalia 9:9, bato ebele bazali koya esika azali mpe mingi batandi bilamba na bango na nzela, bamosusu babuki bitape ya nzete mpe bazali kopepa yango. Bazali koganga ete: “Apambwama Ye oyo azali koya lokola Mokonzi na nkombo ya Yehova!” Bafalisai mosusu oyo bazali na kati ya ebele ya bato wana balobi na Yesu apekisa bayekoli na ye. Kasi, Yesu ayebisi bango boye: “Nalobi na bino, Soki bango bafandi nyɛɛ, mabanga ekoganga.”—Luka 19:38-40, NW; Matai 21:6-9.
4. Mpo na nini Yelusaleme ekómi na loyenge ntango Yesu akɔti na engumba yango?
4 Bato mingi oyo bazali wana bamonaki ntango Yesu asekwisaki Lasalo eleki sikoyo mwa bapɔsɔ. Sikoyo bazali koyebisa bato mosusu likamwisi yango. Yango wana, ntango Yesu akɔti na Yelusaleme, mboka mobimba ekómi na loyenge. Bato mosusu bazali kotuna ete: “Oyo azali nani?” Mpe ebele ya bato bazali koloba ete: “Oyo azali mosakoli Yesu uta na Nasalete na Galilai!” Ntango Bafalisai bamoni boye, bakómi kolobaloba ete: “Bato nyonso babandi kolanda ye!”—Matai 21:10, 11; Yoane 12:17-19, Boyokani ya Sika.
5. Likambo nini esalemi ntango Yesu akómi na tempelo?
5 Yesu, Moteyi Monene, akei na tempelo mpo na koteya, ndenge amesana kosala soki akómi na Yelusaleme. Kuna na tempelo, bato bakufá miso na bato bakufá makolo bayei epai na ye, mpe abikisi bango. Banganga kapita na bakomeli basiliki ntango bamoni bongo mpe bayoki bana mike bazali koganga na kati ya tempelo ete: “Bikisá, Mwana ya Davidi, tobondeli yo!” Balobi na Yesu ete: “Oyoki makambo oyo bazali koloba?” Ye apesi bango eyano ete: “Ɛɛ, botángi naino likambo oyo te ete, ‘Na monɔkɔ ya bana mike na bana oyo bazali naino konunga mabɛlɛ obimisi masanzoli’?” Ntango Yesu azali koteya, azali mpe kotala malamumalamu makambo oyo ezali koleka na kati ya tempelo.—Matai 21:15, 16, NW; Malako 11:11.
6. Makambo nini Yesu asali oyo azalaki kosala yango liboso te, mpe mpo na nini?
6 Makambo oyo Yesu azali kosala ekeseni mpenza na oyo asalaki eleki sikoyo sanza motoba! Na ntango wana ayaki na Yelusaleme mpo na Fɛti ya Mingombo “amimonisaki na miso ya bato te; azalaki komibomba.” (Yoane 7:10, Boyokani ya Sika) Mpe soki kaka amoni ete bomoi na ye ekómi na likama, azalaki kokende epai mosusu. Na mbala oyo, atako bapesaki mitindo ete bákanga ye, Yesu ayei na engumba mpe bato nyonso bazali komona ye! Lisusu, liboso Yesu azalaki koloba polele te ete azali Masiya. (Yisaya 42:2; Malako 1:40-44) Alingaki te ete nkombo na ye ekende nsango na mobulu to bato bábanda kotambwisa makambo ya lokuta oyo bamosusu bakoki kobalola. Sikoyo ebele ya bato bazali koloba polele ete azali Mokonzi mpe Mobikisi, to Masiya, mpe aboyi kosala ndenge bakonzi ya mangomba oyo bazali koloba na ye ete apekisa bango! Mpo na nini abongoli makambo boye? Mpamba te, ndenge Yesu akoloba yango na mokolo oyo ekolanda, “ntango esili koya wana Mwana ya moto akokumisama.”—Yoane 12:23.
Asali na mpiko mpe ateyi bato mateya ya lobiko
7, 8. Ndenge nini makambo oyo Yesu asali na mokolo ya 10 Nisana ya mobu 33 T.B. ekokani na oyo asalaki na tempelo na Elekeli ya mobu 30 T.B.?
7 Mokolo ya yambo, mwa 10 Nisana, ntango Yesu akómi na tempelo, abandi naino na kosembola makambo mabe oyo amonaki lobi. Abandi ‘kobengana bato oyo bazali kosomba mpe kotɛkisa biloko na kati ya tempelo, mpe abaloli bamesa ya bato oyo bazali kosanze mbongo na bibonga ya baoyo bazalaki kotɛkisa bibenga; mpe apekisi ete moto moko te akota na eloko na tempelo.’ Alobi mpo na bato yango ya mabe ete: “Ekomami te ete, ‘Ndako na ngai ekozala ndako ya losambo mpo na bikólo nyonso’? Kasi bino bokómisi yango esika ya bayibi.”—Malako 11:15-17, NW.
8 Yesu asali ndenge asalaki ntango ayaki na tempelo na Elekeli ya mobu 30 T.B., eleki sikoyo mbula misato. Kasi, na mbala oyo, alobeli mpenza mabe na bango polele. Abengi bato oyo bazali kotɛkisa na tempelo ete “bayibi.” (Luka 19:45, 46; Yoane 2:13-16) Bazali bayibi mpamba te bazali kotɛkela bato oyo balingi kosomba banyama mpo na kopesa mbeka na ntalo makasi. Banganga kapita, bakomeli, na bankumu bayoki makambo oyo Yesu azali kosala mpe baluki lisusu mayele ya koboma ye. Kasi, bazali koyeba te básala ndenge nini mpamba te bato nyonso bazali kokamwa na mateya na ye, bazali kokangama na ye mpo na koyoka ye.—Malako 11:18; Luka 19:47, 48.
9. Likambo nini Yesu ateyi, mpe alobi nini na bato oyo bazali koyoka ye na tempelo?
9 Ntango Yesu azali naino koteya na tempelo, alobi boye: “Ntango esili koya wana Mwana ya moto akokumisama.” Yesu ayebi ete nsima ya mwa mikolo, akokufa. Nsima ya kolobela ndenge oyo mbuma ya ble ekufaka naino liboso ebota mbuma, likambo oyo akokanisi yango na ndenge oyo akokufa mpe akokóma nzela mpo na kopesa bato mosusu bomoi ya seko, Yesu alobi na bato oyo bazali koyoka ye ete: “Soki moto alingi kosalela ngai, alanda ngai, bongo biso na mosali na ngai, tokozala esika moko. Soki moto asaleli ngai, Tata akokumisa ye.”—Yoane 12:23-26, Boyokani ya Sika.
10. Yesu azali komiyoka ndenge nini soki akanisi liwa ya nsɔmɔ oyo ezali kozela ye?
10 Etikali sikoyo mikolo minei, Yesu akanisi liwa ya nsɔmɔ oyo ezali kozela ye mpe alobi ete: “Sikoyo molimo na ngai etungisami, mpe naloba nini? Tata, bikisá ngai na ntango oyo.” Kasi Yesu akoki te kokima makambo oyo asengeli kokutana na yango. Yango wana alobi ete, “Kasi, ezali mpo na yango nde nayei na ntango oyo.” Yesu alingi ete makambo nyonso etambola ndenge Nzambe abongisi. Azali na mposa ete na makambo nyonso, asala mokano ya Nzambe tii akokufa liwa ya mbeka. (Yoane 12:27, NW ) Atikeli biso mpenza ndakisa na oyo etali kotosa mokano ya Nzambe kozanga kokakola!
11. Makambo nini Yesu ateyi bato oyo bauti koyoka mongongo oyo elobi na likoló?
11 Yesu azali komitungisa mingi mpo ete alingi kokufa liwa oyo ekobebisa lokumu ya Tata na ye, yango wana abondeli ete: “Tata, kumisá nkombo na yo!” Mbala moko, likambo ya kokamwa mpo na bato oyo bayangani na tempelo: mongongo moko ebimi na likoló mpe elobi ete: “Nasili kokumisa yango mpe nakokumisa yango lisusu.” Na yango, Moteyi Monene ayebisi bato ntina oyo mongongo eyokani, ayebisi bango mpe makambo oyo liwa na ye ekomema, mpe ntina oyo basengeli kozala na kondima. (Yoane 12:28-36) Ya solo, na mikolo mibale oyo eleki, Yesu asalaki makambo mingi. Kasi, mokolo oyo ekozala nsuka ya makambo naino ekómi te.
Mokolo oyo atɔndɔlaki bakonzi ya mangomba
12. Na mokolo ya mibale, mwa 11 Nisana, bakonzi ya mangomba basali nini mpo na komeka kokanga Yesu, mpe esuki ndenge nini?
12 Na mokolo ya mibale, mwa 11 Nisana, Yesu akei lisusu na tempelo mpo na koteya. Banguna na ye mpe bayei. Banganga kapita na bankumu batuni ye mpo na makambo oyo elekaki lobi ete: “Ozali kosala makambo oyo na bokonzi nini? Nani mpe apesi yo bokonzi oyo?” Ntango Moteyi Monene apesi eyano, bato yango basuki. Na nsima alobi masese misato mpo na komonisa motema mabe ya banguna na ye: masese mibale elobeli elanga ya vinyo mpe moko elobeli fɛti ya libala. Ntango bakonzi ya mangomba bayoki masese yango, eswi bango na mitema mpe balingi kokanga ye. Kasi bazali kobanga bato, mpamba te bato yango bazali kondima ete Yesu azali mosakoli. Yango wana baluki ndenge oyo bakoki kopusa ye na koloba likambo oyo ekopesa bango nzela ya kokanga ye. Kasi, Yesu apesi bango eyano oyo ekangisi bango minɔkɔ.—Matai 21:23–22:46.
13. Toli nini Yesu apesi bato oyo bazali koyoka ye na ntina etali bakomeli na Bafalisai?
13 Lokola bakomeli na Bafalisai balobaka ete bateyaka Mibeko ya Nzambe, Yesu ayebisi bato boye: “Makambo nyonso makolobaka bango na bino, bósala yango mpe bótosa yango; nde bósala mosala mokosalaka bango te.” (Matai 23:1-3) Ya solo, atɔndɔli bango mpenza na miso ya bato! Kasi, Yesu asilisi naino te. Lelo ezali mokolo ya nsuka oyo ayei na tempelo, mpe na mpiko nyonso, abandi kotɔndɔla misala na bango; maloba na ye ezali lokola nkake oyo ezali kobɛta na matoi na bango.
14, 15. Yesu alobi nini mpo na kotɔndɔla bakomeli na Bafalisai?
14 Yesu alobi na bango mbala motoba mobimba ete: “Mawa na bino bakomeli na Bafalisai, bakosi!” Yesu alimboli ete bazali bakosi, mpamba te bazali kokangela bato nzela ya Bokonzi ya likoló, mpe baoyo balingi kokɔta bazali kotika bango te bákɔta. Bakosi yango bazali kokatisa mai monene mpe esobe mpo na kokómisa moto mondimi, mpe na nsima bazali kokómisa ye moto oyo abongi kobomama mpo na libela. Bazali kotyola “makambo maleki [ntina] kati na mibeko, yango: kosambisa-sembo mpe [koyokela] mawa,” kasi bazali kolandela likambo ya kopesa ndambo ya zomi. Bazali kopɛtola “libándá ya kɔpɔ mpe ya saani nde na kati itondi na kobɔtɔla mpe na boyibi” elingi koloba ete bazali kosala makambo lokola nde bazali bato oyo babangaka Nzambe, kasi bazali nde kobomba bizaleli na bango oyo epola. Lisusu, balingi kotonga malita ya basakoli mpe kobongisa yango mpo bato bámona ete bazali kosala misala ya malamu, nzokande bazali “bana ya baoyo babomaki basakoli.”—Matai 23:13-15, 23-31.
15 Yesu amonisi ete banguna na ye bazali na bizaleli ya elimo te ntango alobi ete: “Mawa na bino, bakambi bakufi miso.” Bazali bato bakufá miso na elimo mpamba te bazali kopesa motuya mingi na wolo ya tempelo koleka tempelo yango moko, oyo ezali esika ya losambo. Yesu asilisi naino te; sikoyo amonisi mpenza bolumbu na bango nyonso. Alobi ete: “Banyoka, bana ya bitupa! Bokokima nde ekweli na Geena boni?” Yesu alobi bongo mpo na komonisa bango ete lokola balingi kotika misala na bango ya mabe te, bakobomama mpo na libela. (Matai 23:16-22, 33) Tiká ete biso mpe tózala na mpiko ntango tozali kosakola nsango ya Bokonzi, ata ntango nsango yango ezali kotɔndɔla losambo ya lokuta.
16. Ntango bafandi na Ngomba ya Olive, wapi esakweli ya ntina mingi oyo Yesu ayebisi bayekoli na ye?
16 Sikoyo, Yesu abimi na tempelo. Moi ebandi kolala; ye na bantoma na ye bazali kobuta Ngomba ya Olive. Ntango bafandi na ngomba yango, Yesu asakoli ete tempelo ekobomama mpe apesi elembo oyo ekomonisa kozala na ye mpe ya nsuka ya mokili mabe oyo. Kokokisama ya maloba na ye ezali kolandana tii na ntango na biso. Kaka na mpokwa yango, Yesu ayebisi bayekoli na ye boye: “Boyebi ete nsima na mikolo mibale, elambo ya Elekeli ekoya mpe bakokaba Mwana ya moto mpo na koboma ye na [nzete ya mpasi, NW ].”—Matai 24:1-14; 26:1, 2.
Yesu ‘alingaki bato na ye kino nsuka’
17. (a) Likambo nini Yesu ateyi Bazomi na mibale na mokolo ya 14 Nisana ntango bazali kolya Elekeli? (b) Nsima ya kobimisa Yuda Mokeliota, Yesu abandisi ekaniseli ya likambo nini?
17 Mikolo mibale oyo elandi, mokolo ya 12 Nisana mpe ya 13 Nisana, Yesu amonani te na tempelo. Bakonzi ya mangomba bazali koluka ye mpo báboma ye, kasi Yesu alingi te ete likambo moko epekisa ye kolya Elekeli na bayekoli na ye. Ntango moi elali na mpokwa ya mokolo ya mibale, tobandi mokolo ya 14 Nisana, mokolo ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabele lokola moto. Na mpokwa yango, Yesu na bayekoli na ye bafandi esika moko na kati ya ndako moko na Yelusaleme, epai nyonso ebongisami mpo bálya Elekeli. Ntango bazali kolya Elekeli elongo, Yesu asukoli Bazomi na mibale makolo mpo na koteya bango komikitisa. Nsima ya kobimisa Yuda Mokeliota, moto oyo asi andimaki kokaba Nkolo na ye mpo na palata 30, ntalo ya moombo moko na Mibeko ya Mose, Yesu abandisi Ekaniseli ya liwa na ye.—Exode 21:32; Matai 26:14, 15, 26-29; Yoane 13:2-30.
18. Yesu ateyi lisusu bantoma na ye 11 ya sembo makambo nini, mpe alobi na bango nini mpo na kokitisa bango mitema lokola alingi kotika bango?
18 Nsima ya kosala Ekaniseli, bantoma babandi kotyana ntembe mpo na koyeba nani aleki bamosusu. Yesu agangeli bango te, kasi asaleli motema molai mpe ateyi bango ete basengeli kozala basaleli ya bamosusu. Apesi bango longonya lokola batikaki ye te na bampasi nyonso oyo akutanaki na yango, mpe asali na bango kondimana mpo na bokonzi. (Luka 22:24-30) Yesu alobi na bango mpe ete bálinganaka ndenge ye alingaki bango. (Yoane 13:34) Ntango azali naino na ndako, Yesu azali kolendisa bango lokola etikali moke atika bango. Ayebisi bango ete bazali baninga na ye, alendisi bango bázala na kondima, mpe alaki ete akotindela bango elimo santu mpo na kosunga bango. (Yoane 14:1-17; 15:15) Liboso bábima na ndako, Yesu abondeli Tata na ye ete: “Tata, ntango ekoki, kumisa Mwana na yo, mpo ye mpe akumisa yo.” Yesu asololi na bantoma mpo bákitisa motema lokola alingi kokende mpe ntembe ezali te ete ‘alingi bango kino nsuka.’—Yoane 13:1; 17:1, Boyokani ya Sika.
19. Na elanga ya Getesemane, mpo na nini Yesu azali koyoka motema mpasi?
19 Ekoki mpenza kozala ete midi ya butu esi eleki ntango Yesu na bayekoli na ye ya sembo 11 bakómi na elanga ya Getesemane. Mbala mingi, ye na bantoma na ye bazalaki kokende na elanga yango. (Yoane 18:1, 2) Etikali kaka mwa bangonga, Yesu akokufa lokola moto mabe. Soki akanisi mpasi oyo akoyoka mpe ndenge oyo nkombo ya Tata na ye ekosambwa, azali koyoka mpasi na motema; yango wana, ntango Yesu azali kobondela, motoki na ye ekómi lokola makila ezali kotanga na nse. (Luka 22:41-44) Yesu alobi na bantoma na ye ete: “Ntango ekoki. . . . Botala, moto oyo ateki ngai ayei!” Naino kutu asilisi koloba te, Yuda Mokeliota ye wana azali koya, mpe bato ebele bazali kolanda ye na nsima na miinda, na mipanga, na banzete na mabɔkɔ. Bayei kokanga Yesu; ye mpe asali matata te. Alobi na bango ete: “Kasi soki nasali boye, ndenge nini nakokokisa makambo oyo ekomama na Mikanda ’te esengeli kosalema?”—Malako 14:41-43, Boyokani ya Sika; Matai 26:48-54, Boyokani ya Sika.
Mwana ya moto akumisami!
20. (a) Nsima ya kokanga Yesu, ndenge nini banyokoli ye? (b) Mwa moke liboso akufa, mpo na nini Yesu agangi ete: “Ekokisami”?
20 Nsima ya kokanga Yesu, ebandi naino na batemwe ya lokuta oyo bayei kokosela ye makambo; na nsima bazuzi ya mabe bakati likambo na ye ete abongi kozwa etumbu; Ponto Pilata akateli ye etumbu; banganga na bato mosusu batyoli ye; mpe na nsuka, basoda basɛki ye mpe banyokoli ye. (Malako 14:53-65; 15:1, 15; Yoane 19:1-3) Mokolo ya mitano na midi, babaki Yesu na nzete na bansɛtɛ; azali koyoka mpasi ya koloba te ntango kilo ya nzoto na ye ezali kobenda misuni ya nzoto na bisika oyo babaki ye bansɛtɛ na mabɔkɔ mpe na makolo. (Yoane 19:17, 18) Ntango tokómi na ngonga ya misato na nsima ya midi, Yesu agangi makasi mpe alobi ete: “Ekokisami!” Yesu akokisi nyonso oyo ayelaki awa na mabele. Ntango azongisi elimo na ye epai ya Nzambe, alalisi moto mpe akufi. (Yoane 19:28, 30, NW; Matai 27:45, 46; Luka 23:46) Na mokolo ya misato, Yehova asekwisi Mwana na ye. (Malako 16:1-6) Mikolo ntuku minei nsima ya lisekwa, Yesu abuti na likoló mpe akumisami.—Yoane 17:5, NW; Misala 1:3, 9-12; Bafilipi 3:8-11.
21. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu?
21 Ndenge nini biso tokoki ‘kolanda matambe ya Yesu malamumalamu’? (1 Petelo 2:21, NW ) Lokola ye, tótya molende na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli mpe tózala na mpiko mpe na molende ntango tozali koloba liloba ya Nzambe. (Matai 24:14; 28:19, 20; Misala 4:29-31; Bafilipi 1:14) Tóbosana ata moke te ete ntango esi ekómi mosika mpe tólɛmba te kolendisana na bolingo mpe misala malamu. (Malako 13:28-33; Baebele 10:24, 25) Tiká ete tómipesa na kosala mokano ya Yehova Nzambe na bomoi na biso mobimba mpe tóbosana te ete tozali na “ntango ya nsuka.”—Danyele 12:4, NW.
Okopesa eyano nini?
• Lokola Yesu ayebaki ete etikali moke akufa, ndenge nini asalaki mosala na ye ya kosakola na mokolo ya nsuka oyo ateyaki na tempelo na Yelusaleme?
• Nini emonisi ete Yesu ‘alingaki bato na ye kino nsuka’?
• Makambo oyo elekaki mwa bangonga liboso Yesu akufa, emonisi nini mpo na ye?
• Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Klisto Yesu na mosala na biso ya kosakola?
[Elilingi na lokasa 18]
Yesu “alingaki bango kino nsuka”