Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w01 15/3 nk. 20-24
  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nzambe nde aponelaka moto nzela?
  • Bomoi oyo ezali na litomba
  • Ndenge bomoi ezalaka na Betele
  • Masɛngami nini osengeli kokokisa mpo na kosala na Betele?
  • Biso nyonso tosengeli kopesa mabɔkɔ
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Yo mpe okoki komipesa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Tómonisa botɔ́ndi mpo na “Ndako ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Libyangi mpo na moto nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
w01 15/3 nk. 20-24

Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?

SOKI ozali moklisto oyo azwá batisimo, na ntembe te osalaka mokano ya Nzambe mpo olingaka ye. Na ntembe te, omipesaka mpe na mosala ya kosakola. Yesu Klisto atindaki bayekoli na ye nyonso ete bákómisa bato bayekoli. (Matai 28:19, 20) Ekoki kozala ete osalaka mosala moko mpo na kokokisa bamposa na yo. Kasi, lokola ozali moyekoli ya Yesu mpe Motatoli ya Yehova, ozali libosoliboso ministre moklisto, elingi koloba ete ozali moto oyo atyaka mosala ya kosakola Bokonzi na esika ya liboso mpenza na bomoi na yo.​—Matai 24:14.

Ntango mosusu, ozali elenge mpe olingi kokokisa mbula 20 to osi oleki yango mwa moke. Ekoki kozala ete okanisaka mingi eloko nini osengeli kosala na bomoi na yo. Na ntembe te, ntango ozali kotalela mosala nini okoki kosala, olukaka mosala oyo ekopesa yo esengo.

Na yango, talá ndenge Jørgen, elenge moko ya Danemark, alobaki mpo na mosala oyo aponaki, alobi ete “ezali mosala oyo ezali kopesa yo nzela ete otya makanisi na yo nyonso na mosala oyo ezali na ntina koleka misala nyonso.” Eva, mwasi moko ya mbula 31, ye afandaka na Grèce, alobi boye: “Soki nakokanisi bomoi na ngai na oyo ya baninga na ngai, namonaka ntango nyonso ete bomoi na ngai eleki ya bango na ntina, na kokolisa mayele mpe na esengo.” Mosala nini oyo epesaka esengo motindo wana? Ndenge nini okoki kosala mosala yango?

Nzambe nde aponelaka moto nzela?

Kopona mosala oyo okosala ekoki mpenza kozala likambo ya mpasi. Kutu, bato mosusu balingaka ete Nzambe alakisa bango mpenza mosala nini ye alingi básala.

Ntango Mose azalaki na Midyani, Yehova ayebisaki ye azonga na Ezipito mpo na kolongola Bayisalaele na boombo. (Exode 3:1-10) Anzelu ya Nzambe abimelaki Gideona, moto oyo Yehova aponaki mpo na kobikisa Yisalaele na monyoko. (Basambisi 6:11-14) Davidi azalaki kobatela bampate ntango Nzambe ayebisaki Samwele apakola ye mafuta mpo na komonisa ete ye nde akokóma mokonzi ya Yisalaele. (1 Samwele 16:1-13) Lelo oyo, Nzambe azali lisusu kotambwisa biso lolenge wana te. Biso moko nde tosengeli kotala mabe na malamu mpe kozwa ekateli na ndenge oyo tokosalela makoki oyo Nzambe apesi biso.

Lelo oyo, Yehova afungoleli bilenge baklisto “ekuke monene . . . mpo na mosala.” (1 Bakolinti 16:9) Ndenge nini? Na kati ya mbula zomi oyo euti koleka, basakoli ya Bokonzi koleka 2 125 000 babakisamaki, mpe sikoyo na mokili mobimba basakoli baleki 6 000 000. Kasi, banani basalaka mosala ya kobimisa ebele ya Babiblia, babuku, mwa babuku, bazulunalo mpe batrakte oyo esengeli mpo na kosunga bango na elimo mpe mpo na mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba? Basangani ya libota ya Betele ya mokili mobimba nde bazali na mokumba mpe libaku malamu yango.

Bomoi oyo ezali na litomba

Betele elimboli “Ndako ya Nzambe,” mpe Babetele ezali bisika oyo baklisto ya bolingo malamu oyo basalaka na biro monene mpe na bafiliale ya la Société bafandaka. (Genese 28:19, NW, maloba na nse ya lokasa) Tokoki kokokanisa mabota ya Betele ya ntango na biso na ‘bandako oyo etongami malamu na nzela na mayele,’ oyo ebongisami malamu mpe esimbami na bolingo mpo na Yehova.​—Masese 24:3.

Makambo ezalaka ndenge nini na libota ya Betele? Ndeko moko ya mwasi ya mbula 25 oyo azali na Betele ya Estonie alobi boye: “Kozala ntango nyonso na kati ya baninga ya Yehova esepelisaka ngai. Mpo na ngai, yango nde ezali likambo oyo eleki motuya na makambo nyonso oyo ezali na Betele.”​—Nzembo 15:1, 2. 

Na mokili mobimba, bato soki 19 500 bazali na libaku malamu ya kosala na Betele. (Nzembo 110:3) Na États-Unis, bato mingi (46 %) kati na baoyo basalaka na Betele bazali na mbula kobanda 19 tii 29. Lokola Yisaya, balobaki ete: “Ngai oyo! Tindá ngai!” (Yisaya 6:8) Atako asi amipesaki na Yehova, Yisaya andimaki kozwa mokumba mosusu. Ekoki mpenza kozala ete esɛngaki atika matomba mosusu. Baoyo basalaka na Betele batikaka bandako na bango mpe bisika oyo bamesanaki na yango, bamama na batata na bango, bandeko na bango mpe baninga na bango. Bandimaka komipimela makambo oyo nyonso “mpo na nsango malamu.”​—Malako 10:29, 30.

Kasi, mapamboli ya elimo ezali mingi na Betele! Elenge moko oyo azali na Betele ya Russie alobi boye: “Lokola tozali na elimo ya komipesa, tozali koyekola makambo mingi oyo ekosalisa biso na bomoi na mokili ya sika. Nakoki koloba ete mpo na ngai, mapamboli ya Yehova eleki makambo nyonso oyo nazali komipimela.”​—Malaki 3:10.

Ndenge bomoi ezalaka na Betele

Na Betele bomoi ezalaka ndenge nini? Bandeko oyo bazali na Betele balobaka ete kuna bomoi ezali malamu mpe epesaka esengo mpenza. Jens, ye azali na mbula 43, asepelaka na mosala ya Betele. Mpo na nini? Alobi ete: “Mpamba te nakanisaka ete tozali kati na baoyo bazali kopesana mabɔkɔ mpo na kokokisa mosala moko ya ntina. Namonaka bonene mpe ntina ya mosala ya Yehova.”

Na Betele, kobanda mokolo ya mosala moko tii mokolo ya pɔsɔ, makambo nyonso ebandaka na losambo ya ntɔngɔ. Na likita yango, batalelaka mokapo ya Biblia mpe nkulutu moko oyo akɔmeli na elimo atambwisaka yango. Mikolo ya mosala moko nyonso na mpokwa, libota ya Betele elekisaka ngonga moko mpo na koyekola Biblia na lisalisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na nsima, mbala mosusu balandaka lisukulu oyo ebongami mpo na libota ya Betele.

Basalaka nini mpo na moto oyo akɔti sika na Betele? Mpo na kolakisa basangani ya sika ndenge bomoi ezalaka na Betele, bandeko oyo bakɔmeli basalaka masukulu oyo elobelaka makambo ndenge na ndenge ya mosala ya Betele. Na mbula na ye ya liboso na Betele, mosangani ya sika alandaka, mbala moko na pɔsɔ, mateya moko ya malamu ya eteyelo oyo ebongisami mpo na kokolisa bososoli na ye ya Makomami; kelasi yango eumelaka bapɔsɔ mwa mingi. Baoyo bakɔti sika bazalaka mpe na programɛ ya kotánga Biblia. Na boumeli ya mbula na bango ya liboso na Betele, basangani ya sika batángaka Biblia mobimba.

Mateya oyo nyonso epesaka matomba nini? Joshua, ye azali na mbula 33 mpe azali na Betele ya Hong-Kong, alobi boye: “Betele ekolisi mpenza botɔndi na ngai mpo na Yehova. Nazali esika moko na bandeko ebele oyo bayebi makambo mingi, oyo mpe balekisi bambula ebele na mosala ya Yehova. Mingimingi, nasepelaka na bibongiseli ya elimo lokola losambo ya ntɔngɔ mpe boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na libota. Lisusu, nalingaka lolenge makambo esalemaka na molɔngɔ mpe bomoi ya mindɔndɔ ezali te. Yango esalisaka ngai mpo namitungisa mpambampamba te. Nayekolaka mpe kosala makambo lokola moklisto; mpe nyonso wana ememeli ngai matomba.”

Bandeko oyo bazali na Betele balekisaka ntango mingi mpe basalaka milende mingi na mosala oyo bamipesaki mpo na yango. Elingi koloba ete basalelaka makasi mpe mayele na bango libosoliboso mpo na kokokisa mokumba oyo bapesi bango na Betele. Makambo ndenge na ndenge esengeli kosalema. Bamosusu batambwisaka bamasini ya konyata mikanda to basalaka na bisika oyo bakangisaka mikanda; na bongo, bazali kosala mikanda oyo ezali kotindama na masangá ebele. Bamosusu basalaka na kuku, na esika oyo libota ya Betele elyaka to na esika ya kosukola bilamba. Misala mosusu ezali lokola oyo: kotya bopɛto, kosala bilanga, kotonga bandako, mpe bongo na bongo. Bamosusu bazali na mokumba ya kobongisa biloko ya mosala na bisika yango. Bamosusu basalisaka baoyo babɛli mpe bamosusu basalaka na babiro. Misala nyonso oyo esalamaka na Betele epesaka esengo mpe ezalaka mpenza na matomba. Mosala oyo esalamaka na Betele epesaka esengo mingimingi mpo ezali kosala ete matomba ya Bokonzi ekende liboso mpe bazali kosala yango mpo balingi Nzambe.

Ndeko mokomoko ya Betele azali na lisangá epai amonaka na miso matomba ya mosala na ye. Basepelaka koyangana na makita ya lisangá mpe kobima na mosala ya kosakola. Yango wana, bazali baninga ya bandeko na bango na masangá oyo bazali.​—Malako 10:29, 30.

Kanbi, ye azali na Betele ya Angleterre, alobi boye: “Nazali mpenza kotɔnda bandeko ya lisangá! Ntango nazali na makita mpe ntango nazali na mosala ya kosakola, kondima na ngai ekómaka makasi mingi na komona bandeko ya bolingo, ezala basi, mibali, bana mpe mibange! Ata ndenge nini, bazangisaka te. Yango esalisaka ngai nazala na molende na mosala na ngai na Betele.”

Bomoi na Betele ezali kaka te kosala, kokende na makita, kobima na mosala ya kosakola mpe koyekola. Bandeko ya Betele bazalaka mpe na ntango ya kopema. Mbala na mbala, ezalaka na ebongiseli oyo babengaka “Family Night” (Mpokwa na kati ya libota) mpo na kosepela mpe kolendisama na elimo; ezalaka ntango malamu mpo na komona makoki ya bandeko mingi mpe na koyekola makambo ya kolendisa na bomoi ya bandeko mosusu oyo basalaka na Betele. Basepelaka mpe kotalana mpe kolendisana. Ekoki mpe kozala na bisika ya kozwa mopɛpɛ mpe babibliotɛkɛ epai moto akoki kotánga mpe koyekola. Tobosani mpe te masolo kitoko oyo basololaka na mesa na ntango ya kolya.

Tom, ye azali na Betele ya Estonie, alobi ete: “Mbu ezali pene na Betele mpe zamba moko kitoko ezali na mwa pembeni wana epai ngai na mwasi na ngai tosepelaka kokende kotambola moke. Mbala mosusu nabɛtaka mpe golf, hockey mpe tenisi na baninga na lisangá mpe na Betele. Soki ntango ezali malamu, tokendaka kotambola na bavelo.”

Masɛngami nini osengeli kokokisa mpo na kosala na Betele?

Betele ezali libosoliboso esika oyo baklisto bakɔmeli bazali kosalela Yehova mosala mosantu mpe bazali kosala mpo na bandeko baklisto ya mokili mobimba. Mpo na kokɔta na Betele esengeli kokokisa mwa masɛngami. Masɛngami nini osengeli kokokisa mpo na kosala na Betele?

Lokola Timote oyo asalaki elongo na ntoma Paulo, baoyo bandimami mpo na kosala na Betele basengeli kozala na lokumu malamu na lisangá. (1 Timote 1:1) ‘Bandeko wana na Lusutula mpe na Ikoni batatolaki malamu na ntina na’ Timote. (Misala 16:2) Atako azalaki elenge, Timote ayebaki Makomami mpe azalaki na kati ya solo. (2 Timote 3:14, 15) Ndenge moko mpe, mpo na kondima ete moto asala na Betele, moto yango asengeli koyeba Biblia.

Bandeko oyo bazali na Betele basengeli kozala na elimo ya komipesa. Elimo ya komipesa mpe mposa ya kotya matomba ya Bokonzi liboso ya matomba na ye moko ezalaki komonana epai ya Timote, yango etindaki Paulo aloba mpo na ye ete: “Nazali na moto mosusu lokola ye te; akokanisa mpo na makambo na bino solo. Zambi bamosusu nyonso bakobatela malamu na bango mpenza, bakoluka malamu na Klisto Yesu te. Nde boyebi ezaleli malamu na ye ete asalanaki na ngai mosala mpo na nsango malamu lokola mwana esika moko na tata.”​—Bafilipi 2:20-22.

Mosala ya Betele ebongi mpo na mibali mpe basi ya elimo. Bibongiseli oyo ezwamaka mpo na libota ya Betele esalisaka bango bákola na elimo na nzela ya koyekola Biblia, koyangana mbala na mbala na makita ya lisangá mpe kobima na mosala ya kosakola, mpe na kosala boninga na baklisto oyo bakɔmeli. Na ndenge yango, bazali kosalisa baoyo bazali na Betele bálanda toli oyo Paulo apesaki ete: “Bótambolaka kati na [Klisto Yesu]. Bopikami mpe bolendisami kati na ye mpe bozali kotɛngatɛnga te kati na kondima, se lokola bateyaki bino, bótonda na kondima na kozongisa matɔndi.”​—Bakolose 2:6, 7, NW.

Mosala oyo esalemaka na Betele esɛngaka bato oyo bazali na makasi mpenzampenza mpe nzoto kolɔngɔnɔ. Soki okokisi masɛngami oyo touti komonisa, soki ozali na mbula 19 to koleka mpe osi olekisi mbula moko banda ozwaki batisimo, tolendisi yo ete okanisa mosala ya Betele.

Biso nyonso tosengeli kopesa mabɔkɔ

Na ntembe te, lokola tozali baklisto, mposa na biso ezalaka ete tótya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso mpe tósalela Yehova na molimo na biso mobimba. (Matai 6:33; Bakolose 3:23, NW) Tozali mpe kolendisa baoyo bazali kosala na Betele mpo ete bákoba na mosala mosantu wana. Lisusu, mingimingi bandeko oyo bazali naino bilenge mpe bakokisi masɛngami mpo na kosala na Betele, tolendisi bango bákanisa libaku malamu yango oyo ezali na mapamboli.

Mosala ya Betele ezali malamu mpo na elimo mpe epesaka esengo; ekoki kozala mosala oyo ebongi mpenza mpo na yo. Ezali bongo mpo na Nick, oyo abandaki kosala na Betele ntango azalaki na mbula 20. Nsima ya kolekisa mbula zomi na mosala ya Betele, alobi boye: “Mbala na mbala nabondelaka Yehova mpo na kotɔnda ye mpo na ngɔlu na ye. Eloko nini lisusu nakoki kosɛnga ye? Awa tozali na baklisto ya sembo oyo bazali kosala nyonso mpo na kosalela Yehova.”

[Etanda/​Elilingi na lokasa 22]

BANKULUTU NA BABOTI BAKOKI KOSALA NINI?

Bankulutu na bakɛngɛli-batamboli basengeli mpenza kolendisaka bilenge mibali básɛnga ete básala na Betele. Bauti kosala ankɛtɛ moko epai ya bilenge oyo bazali na Betele; ankɛtɛ yango emonisaki ete bakɛngɛli baklisto nde balendisaki mwa bilenge mingi kati na bango (34 %) na komityela mokano ya kosala na Betele. Masangá na bango ekoki komona ete ekozanga bango. Kasi, tóbosana te ete atako Timote azalaki ndakisa malamu mpo na bilenge mosusu ya Lusutula mpe ya Ikoni, bankulutu ya masangá wana baboyaki te ete asala elongo na Paulo. Bamonaki te ete soki Timote akei na Paulo lisangá na bango ekozanga elenge moko ya motuya mingi.​—1 Timote 4:14.

Baklisto oyo bazali na bana basengeli kolendisaka bango mpo na mosala yango. Na ankɛtɛ oyo touti kolobela, kati na bilenge oyo batunaki, mwa mingi mosusu (40 %) balobaki ete baboti na bango nde balendisaki bango mingi mpo bákɔta na Betele. Ndeko mwasi moko oyo aumeli naino te na Betele alobaki boye: “Ndenge oyo baboti na ngai basalaka mosala ya Yehova nde epesaki ngai mpenza mposa ya kosala na Betele. Ndakisa na bango na mosala ya ntango nyonso esalisaki ngai namona ete mosala oyo nde ebongi mpenza mpo na ngai mpe yango nde ekopesa ngai esengo mingi.”

[Etanda na lokasa 24]

BASEPELAKA NA MOSALA YA BETELE

“Nalingaka mosala na ngai na Betele mingi. Epesaka esengo na koyeba ete nasalelaki Yehova na boumeli ya mokolo mobimba mpe nakosala yango lisusu lobi, mpe lobi oyo kuna, mpe bongo na bongo. Epesaka ngai lisosoli ya malamu mpe makanisi mingi ya malamu.”

“Betele ezali esika oyo okoki kopesa ntango na yo nyonso mpe makasi na yo nyonso na mosala ya Yehova kozanga kokanisakanisa makambo mosusu. Yango epesaka esengo na motema. Lisusu, ekoki kosalisa yo oyeba makambo mosusu mingi oyo oyebaki te mpo na ebongiseli ya Yehova. Okoyoka ete ozali penepene mpenza na motema ya ebongiseli; yango nde epesaka esengo koleka.”

“Na makambo nyonso oyo esi ekómela ngai, kokɔta na Betele nde eleki mpenza malamu. Awa koyekola ezali na nsuka te. Mpe oyo nazali koyekola awa ezali mpo na lokumu na ngai te, kasi ezali mpo na lokumu ya Yehova. Awa, mosala na ngai ekozala mpamba te.”

“Kosalela mayele na ngai na Betele epesaka ngai esengo mpe kimya mpamba te nazali kosalela yango mpo na Yehova mpe mpo na bandeko.”

“Mosala oyo nazalaki kosala liboso ezalaki kopesa ngai esengo ya solosolo te. Banda kala nazalaki kokanisa kosala na bandeko basi mpe mibali mpe mpo na kosalela bango. Yango wana nakɔtaki na Betele. Nasepelaka mpenza na koyeba ete milende na ngai nyonso ekomemela bamosusu matomba ya elimo mpe ekokumisa Yehova.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto