Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/01 nk. 3-6
  • Yo mpe okoki komipesa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yo mpe okoki komipesa?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Yango ekoki kozala mosala oyo ebongi na yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Betele ezali na mposa ya basali na bolingo malamu
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Tómonisa botɔ́ndi mpo na “Ndako ya Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mosala malamu oyo babosanaka yango te
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 6/01 nk. 3-6

Yo mpe okoki komipesa?

1 Likambo moko ya kokamwa esalemaki na mobu 778 L.T.B. Yisaya amonaki na kati ya emonaneli “[Yehova] afandi na kiti ya bokonzi [etombwani mosika.]” Na nsima, Yisaya ayoki baselafa bazali kosakola nkembo ya Yehova, bazali koloba: “Bulɛɛ! bulɛɛ! bulɛɛ! [Yehova] na bibele.” Ezalaki mpenza likambo moko ya nsɔmɔ! Bongo ntango makambo yango ezalaki koleka, Yehova atunaki motuna moko ya makasi: “Nakotinda nani? Nani akokenda mpo na biso?” Kasi alobi te soki akotinda moto yango asala nini to moto yango oyo akondima etinda wana akozwa libonza nini. Atako bongo, Yisaya akakatanaki te, apesaki eyano: “Ngai oyo! Tindá ngai!”​—Yis. 6:1, 3, 8.

2 Elimo ya komipesa mpo na kosala nyonso oyo Yehova azali kosɛnga biso ezali elimo oyo emonanaka mingi epai ya basaleli na ye. (Nz. 110:3) Sikoyo mpe, bazali kobenga baoyo bakoki komipesa. Okondima libyangi yango na motema na yo mobimba, ndenge Yisaya andimaki?

3 Betele ezali se na mposa ya bandeko básala kuna. Yango ezali kosɛnga na bango bázala na mposa makasi ya kotya matomba ya bokonzi na esika ya liboso mpe bándima nyonso oyo bakoki kosɛnga bango básala mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola nsango malamu na mokili mobimba. (Mat. 6:33) Ya solo, kozala na kati ya libota ya Betele epesaka moto libaku monene ya kosalela Yehova na molimo na ye mobimba. Na ndenge nini?

4 Mosala oyo ezali kosalema na Betele: Kanisá naino mosala nyonso oyo esalemaka mokolo na mokolo na bisika misato ya Betele oyo ezali na New York (na États-Unis): na Brooklyn, na Patterson, mpe na Wallkill. Bandeko mibali mpe basi 5 730 oyo bazali na libota ya Betele na bisika wana misato bazali na libaku malamu ya kopesa moombo ya sembo mpe ya mayele mpe Lisangani ya Mikólo-Bakambi mabɔkɔ mpo na kobimisa Babiblia mpe mikanda oyo tosalelaka na kati ya mosala ya kosakola mpe mpo na koyekola biso moko. (Mat. 24:45) Na ndakisa, na mbula ya mosala oyo euti koleka, babimisaki mpe batindaki na bisika ndenge na ndenge mikanda 24 364 670, mwa babuku 39 813 464, bazulunalo 270 528 000, mpe bakasɛti video 1 271 041; nyonso wana ezali mbuma ya molende oyo bandeko nyonso ya libota ya Betele ya États-Unis basalaki. Milende makasi esalemaka mpo na kolukaluka mpe kopona ‘maloba ya kitoko mpe ya sembo mpe kokoma maloba ya solo’ mpo na kotya yango na kati ya mikanda wana. (Mos. 12:9, 10) Na mokili mobimba, bandeko koleka 1 900 oyo babongolaka mikanda bazali mpe kozwa litambwisi mpo na kobongola mikanda na minɔkɔ koleka 300. Mosala monene ezali kosalema mpo na kokamba mosala oyo ezali kosalema na mokili mobimba, na bafiliale 110, sangisá mpe masangá koleka 11 500 oyo ezali na États-Unis. Litambwisi ezali mpe kopesama na bafiliale oyo ezali kotalela makambo ya kotonga bandako mosusu ya Betele, Bandako ya Mayangani, mpe sikoyo na bamboka oyo bazali na makoki mingi te mpe esengeli kotonga Bandako ya Bokonzi 15 248. Yango ezali kosɛnga ete ebele ya bandeko bámipesa mpo na kosala mosala ya konyata mpe kotinda mikanda bipai na bipai, kosukola bandako, kobongisa mpe kobatela biloko ya mosala, kolamba biloko ya kolya, kosomba biloko ndenge na ndenge, kosala mosala ya monganga, mpe misala mosusu mingi ya Betele.

5 Nyonso oyo ezali mosala moko monene mpo na kosala yango, kasi epesaka esengo na elimo. Ezalaka esengo mingi mpenza koyeba ete makasi mpe nguya na biso nyonso ezali kosalelama mpo na kotombola mosala ya kosakola mpe ya koteya. Mosala ya Betele esalisaka biso tóyeba malamu mingi lisusu ndenge ebongiseli ya Yehova ezali kotambola. Tóbosana te ete mokomi ya Nzembo alendisaki Bayisalaele báyeba malamumalamu esika oyo boyangeli ya Teokrasi efandaki na eleko na bango.​—Nz. 48:12, 13.

6 Mapamboli ya mosala ya Betele: Ndenge nini bandeko oyo basalaka na Betele batalelaka mosala na bango? Talá makambo bandeko oyo basalaka na Betele, ezala bilenge to mikólo balobaki. Ndeko moko oyo asalaka na Betele oyo akokisi mbula misato na mosala yango alobi boye: “Kozala na Betele ekómisi boyokani na ngai elongo na Yehova makasi. Ntango nazali koumela kosala awa, nazali mpe koyekola lisusu makambo mingi ndenge Betele etambwisamaka, ezali mpe koteya ngai lisusu mingi bizaleli ya Yehova. Mosala ya Betele efungoli ngai mpe miso mpo namona ete Yehova asalelaka bato ya ndenge nyonso. Mpe osengeli te kozala moto ya kokoka mpo Nzambe andima yo.”

7 Ndeko mobali moko oyo azali elenge alobi: “Nakanisi lisusu ntango oyo nazali koloba ngai moko: ‘Ekozala esengo mpenza kokɔta na mokili ya sika mpe koyebisa bato ya sembo ya ntango ya kala ete nasalaki bambula mingi na Betele, nasalaki na mokili te mpo na koluka mbongo.’ ”

8 Ndeko mobali mosusu, oyo azali mpe elenge, alobi boye mpo na mateya oyo azwi: “Komiyekola ngai moko mpe koyeba makambo oyo nasengeli kobongisa na bomoto na ngai mpe nsima na yango, kokolisa bizaleli wana ezali mpenza lipamboli. Nakanisi ete sikoyo nabongi lisusu malamu mpo na kosalela Yehova. Namoni ete nakómi lisusu na motema molai, na komipekisa, mpe na bolingo koleka mpenza.”

9 Ndeko mwasi moko alobeli mapamboli oyo azwi uta abandá mosala yango: “Bibongiseli ya elimo oyo ezali awa eteyi ngai mingi mpo na Yehova mpe ndenge oyo nakoki komekola ye malamu lisusu koleka, na makanisi, na mayoki mpe na misala. Mpe lokola mateya ezali kokoba se kokoba, mapamboli mpe ezali se kobakisama.”

10 Ndeko mobali moko oyo alekisi mbula 59 na mosala ya ntango nyonso, na kati ya bambula yango mbula koleka 43 alekisi yango na Betele, alobaki boye: “Betele ezali lokola monastɛrɛ te, ndenge bato mosusu bakanisaka. Tokokisaka mikumba mingi mpamba te, tosalaka likambo na likambo na ntango na yango. . . . Ezali na mokolo ata moko te oyo nayaki na mosala mpe nsima na yango nazangaki kosepela na mosala oyo nasalaki. Mpo na nini? Mpamba te soki tomipesi epai ya Yehova na molimo na biso mobimba, tosepelaka koyeba ete ‘tosali kaka oyo tosengelaki kosala.’ ”​—Luka 17:10.

11 Ndeko mobali mosusu, oyo asali mbula 62 na Betele, alobaki boye: “Nandimi mpenza ete Betele ezali esika eleki malamu na mabele mobimba, liboso ete Paladiso eya. Nayokaka mawa ata moke te na ndenge nalekisi bomoi na ngai mobimba na mosala ya ntango nyonso. Nazali mpenza na esengo ndenge namoni mpe napesi mabɔkɔ na bokoli monene ya ebongiseli ya Yehova awa na mabele! Nalingi mpenzampenza ete, na lisalisi ya Yehova, nakoba kotalela Betele lokola ndako na ngai mpe namipesa na molimo na ngai mobimba mpo na kotombola matomba ya Bokonzi.”

12 Bandeko wana ya libota ya Betele balobeli kaka mwa ndambo ya mapamboli mingi oyo okoki kozwa soki omipesi mpo na kosala na Betele. Kasi ndenge toyebi yango malamu, mpo na kozwa libaku nyonso ya mosala, esengeli kokokisa masɛngami. Wapi mwa ndambo ya makambo oyo esengeli kokokisa mpo na kokɔta na Betele?

13 Makambo oyo esɛngami mpo na kokɔta na Betele: Makambo ya ntina oyo esɛngami mpo na baoyo bazali kosɛnga kosala na Betele ezali na kati ya etanda. Lisusu, esengeli ete baoyo balingi kokɔta na Betele bázala na mposa makasi ya kosala, kasi te kozala “bato balingá bisengo.” (2Tim. 3:4, NW; 1Kol. 13:11) Bato oyo basalaka na Betele basengeli kozala mibali mpe basi ya elimo oyo bazali na mimeseno malamu ya koyekola bango moko mpe bakolisi bososoli na bango mpo na “kokesenisa mabe na malamu.” (Ebe. 5:14, NW ) Makambo nyonso ya bomoi na bango esengeli komonisa ete bazali baklisto oyo bakɔmeli, bakisá mpe elateli na bango, ndenge ya kobongisa nzoto na bango mpe ndenge baponaka miziki mpe masano na bango. Bandeko ya libota ya Betele oyo bamipesaka mpenza, basalaka esika nyonso oyo bazali na mposa na bango. Bapesaka bilenge mingimingi misala oyo esɛngaka makasi ya nzoto; misala lokola konyata mikanda, kotinda mikanda na bisika ndenge na ndenge, kobatela bandako mpe bamasini, kosukola bandako mpe bilamba, mpe kolamba biloko. (Mas. 20:29) Ezali lokola na mosala ya mosuni te, na Betele mosala nyonso epesaka esengo mpamba te ezali mosala ya bosantu oyo ezali kopesa Yehova nkembo.​—Kols. 3:23.

14 Soki moto andimami mpo na kosala na Betele, ntango mokuse oyo asengeli kolekisa na mosala yango ezali mbula moko. Yango ekopesa ye nzela ya kobongisama mpo akóma mosali malamu. Elikya ezali ete akokómisa mpenza Betele ndako na ye. Ezali bolingo mpo na Yehova nde etindaka bandeko oyo basalaka na Betele bátya mosala ya Bokonzi liboso ya matomba na bango moko, ezaleli yango esepelisaka Yehova.​—Mat. 16:24.

15 Sikoyo Betele ezali na mposa ya banani? Na kotalela lolenge ya misala oyo esalemaka na Betele, sikoyo Betele ezali libosoliboso na mposa ya bandeko mibali oyo bazali minzemba. Esɛngami kaka te kozala mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpo na kokɔta na Betele, kasi lokola bango basalaka mosala ya ntango nyonso, Betele elingaka mingimingi bango liboso. Na bantango mosusu Betele ekoki kozala na mposa ya bandeko basi oyo bazali minzemba, ya babalani oyo bazali na mbula 19 tii 35 oyo mpe bayebi misala oyo Betele ezali na yango mposa. Lisusu, bandeko mibali mpe bandeko basi oyo baleki mwa moke mbula 35, kasi bayebi mosala moko oyo bato mingi bayebi yango te, oyo Betele ekoki kozala na yango mposa, bakoki mpe kosɛnga kosala na Betele. Na ndakisa, bakoki kozala: minganga ya mino, minganga, ba comptable, ba architecte, ba ingénieur, balifulumé, bato oyo bayebi kobongisa mituka, ba éléctronicien mpe bongo na bongo. Kasi, tolingi te kotindika bato ete báluka koyekola mosala moko boye kaka mpo bábengisa bango nokinoki na Betele. Baoyo bayekolá mosala moko boye, ekoki kozala mbala mosusu bayekolaki yango liboso ete bayamba solo, bakoki kokoma misala oyo bayebi mpe kotinda esika moko na formilɛrɛ ya kokɔta Betele.

16 Soki osɛngi ete osala na Betele, kasi babengi yo naino te, kolɛmba nzoto te. Okoki kotinda formilɛrɛ mbala moko na mbula. Bandeko mosusu oyo bayebi misala oyo bato mingi bayebi yango te, misala oyo bakoki kozala na mposa na yango na Betele, bamipesaka bango moko mpo na kosala lokola basali ya bolingo malamu mpo na mwa ntango moke. Bakoki kosɛnga báyaka kosala na Betele mpo na pɔsɔ moko, mibale, misato, minei; to mpe kosala na boumeli ya sanza misato. Mokomeli ya lisangá azali na formilɛrɛ ya kosɛnga mosala ya Betele mpo na mwa ntango moke, akopesa yango epai ya baoyo basepeli. Lisangá ekoki kosɛnga baformilɛrɛ yango mosusu na ntango oyo basalaka komande ya mikanda.

17 Kosalela Yehova penepene ya bandeko ya Klisto ezali libaku moko monene oyo ezali epai na baoyo basalaka na Betele. Lisangani ya Mikólo-Bakambi basepelaka mingi na elimo ya komipesa ya baoyo nyonso bazali komipesa na bolingo na bango moko na kati ya mosala ya Nzambe mpo na kokokisa bamposa ya bandeko na mokili mobimba.​—Filp. 2:20-22; 2 Tim. 4:11.

18 Bilenge​—bómibongisa sikoyo mpo na kosala na Betele: Komibongisa mpo na kosala na Betele ebandaka kutu liboso mpenza ete moto akokisa mbula 19, oyo ezali mbula ya nse oyo esɛngami mpo na kokɔta na Betele. Bilenge bakoki kosala nini mpo na komibongisa mpo na kosala na Betele? Yesu alobaki ete: “Soki moto moko kati na bino azali na mposa ya kotonga ndako, akofanda liboso kotánga motuya na yango . . . te?” (Luka 14:28) Lokola esɛngaka mpenza komibongisa liboso mpo na kotonga ndako ya malamu, ezali mpe na ntina ete bilenge bátala malamumalamu ndenge nini bazali kobongisa avenir na bango kati na mosala ya Yehova! Mobɔkɔ ya makasi esengeli kotyama banda bomwana mpo bákokisa mikano na bango ya elimo. Yo elenge, ndenge nini ozali kotya mobɔkɔ na yo? Soki olingi kosala na Betele, ebongi otalela malamumalamu makambo oyo elandi.

19 “Ndimá” libaku monene oyo ya mosala: Matai 19:12 (NW) emonisi ete Yesu alendisaki bayekoli na ye ‘bándima’ kofanda minzemba. Mpo na nini? Mpo na bamposa na bango moko te, kasi “mpo na bokonzi ya likoló.” Paulo mpe alendisaki baklisto bálanda nzela wana ya “kosalela Nkolo na likebi nyonso.” (1 Kol. 7:32-35, NW ) Likambo ya mawa, mingi bazali kozanga libaku malamu ya kosala na Betele lokola minzemba mpo bazali kowela kobala na ntango oyo bazali naino bilenge. Tozali kolendisa bandeko na biso ya mibali oyo bazali naino bilenge básalela makasi na bango mpo na kosala mosala ya ntango nyonso na ntango oyo bazali naino na mikumba ya libota te. Bongo, soki na nsima balingi kobala, bakozala mibali ya malamu koleka mpo bakɔmeli na mosala ya boklisto. Nsima ya kosala mwa bambula na Betele, bamosusu babalaki mpe bakobaki kosala kuna bango mibale, mwasi na mobali. Soki na nsima bazwi mikumba mosusu lokola kozala bakɛngɛli-batamboli to bamisionɛrɛ, bayokaka mawa te mpo na ntango oyo bandimaki kosala na Betele.

20 Kotika te mposa ya kozala na biloko ya mosuni ebulunganisa makanisi na yo: Ebongi elenge nyonso amituna boye: ‘Nsima ya kosilisa eteyelo ya ntei, mokano na ngai ezali ete namipesa mobimba na mosala ya mosuni to nasalela Yehova na mosala ya ntango nyonso?’ Ya solo, kopona kosalela Yehova esɛngaka komipimela makambo mosusu. Nzokande, ata mosala ya mosuni mpe esɛngaka mpe komipimela makambo mosusu! Na nsuka, mosala nini ekopesa yo matomba ya malamu, oyo mpe ekoumela mpenza? Yesu apesaki eyano ya polele. Alobaki boye na Matai 6:19-21: “Bómibombela biloko ya motuya na nse te, awa lopomboli mpe mabanga ikolyaka mpe awa bayibi bakɔtaka mpe bakolyaka. Bómibombela biloko na motuya kuna na likoló, lopomboli mpe mabanga ikolyaka te mpe wana miyibi bakokɔtaka te mpe bakobɔtɔla te. Zambi na esika ezali biloko na yo ya motuya, motema na yo ekozala wana lokola.” Tiká motema na biso epusa biso te na koluka komipesa mobimba na mosala moko boye ya mosuni to na biloko ya mosuni na esika ya komipesa mobimba na mosala ya Yehova. Biso nyonso tosengeli koyeba ete eloko ya motuya mpenza oyo ebongi tóluka ezali nde boyokani malamu elongo na Yehova, mpo tósepelisa motema na ye. (Mas. 27:11) Soki totii Yehova na esika ya liboso na bomoi na biso ntango tozali bilenge, tokomonisa esika nini motema na biso ezali mpe soki Bokonzi ezali na ntina nini mpo na biso. Tóbosana te ete “mapamboli ya [Yehova] ikoyeisa bozwi, akobakisa mawa na yango te.” (Mas. 10:22) Bilenge bazali na libaku malamu ya komonisa epai wapi mitema na bango ezali ntango bazali kozongisela Yehova eloko moko ya malamu mpo na oyo nyonso ye asili kopesa bango. Mpo na baoyo bakokisi masɛngami ya kosala na Betele, mosala yango ezali kopesa bango libaku malamu mpenza ya kozongisela Yehova botɔndi.

21 Baoyo basalaka na Betele basengeli kozala na bizaleli ya pɛto: Mokomi ya Nzembo atunaki ete: “Ndenge nini elenge mobali akopɛtola nzela na ye?” Apesaki eyano: “Na kokɛngɛla ndenge liloba [ya Yehova] esɛngi.” (Nz. 119:9, NW ) Yango elingi mpe koloba koboya kosala makambo nyonso ya mbindo ya ebongiseli mabe ya Satana oyo esili kobeba. Kotala bolumbu ya basi na mibali na Internet, etamboli ya mabe elongo na mibali na basi, miziki mpe masano ya mabe, momeseno ya kolangwa masanga wana okokisi naino te mbula ya kobanda komɛla, nyonso wana ezali kaka mwa ndambo ya mitambo oyo Satana azali kosalela mpo na kokanga bilenge ete bákokisa te mikano ya elimo. Esengeli kozwa mokano makasi mpo na kokima mayele wana ya mabe. Yo elenge, soki omoni ete ozali komikɔtisa na moko ya makambo wana, sololá na bankulutu ya lisangá na bino mpe silisá mokakatano wana liboso ya kosɛnga kosala na Betele. Kozala na lisosoli malamu ezali na ntina mingi mpenza mpo na kosalela Yehova na motema mobimba.​—1 Tim. 1:5.

22 Yekolá kofanda malamu na bato mosusu: Likambo moko ya ntina mingi esɛngami mpo na koumela na mosala ya Betele ezali ya koyekola kofanda malamu na bato mosusu. Libota ya Betele ya États-Unis ezali na bandeko mibali mpe basi oyo bauti na bisika mpe na mabota ya ndenge na ndenge. Atako kosangana wana ya bato ndenge na ndenge esalaka ete libota ya Betele ezala kitoko, kasi na bantango mosusu mpe ezalaka na mikakatano na yango. Soki ozali kokana kosala na Betele, ebongi omituna: ‘Nasilikaka nokinoki soki bato bandimi makanisi na ngai te? Bato mosusu bafandaka malamu na ngai?’ Soki esengeli obongisa mwa moke na bisika wana, bandá nde sikoyo. Soki osali ndenge wana, ekosalisa yo ozala na mpasi te mpo na komesana kofanda mpe kosala elongo na bandeko ya Betele.

23 Salá makasi mpo ozala moto ya elimo, kómisa makasi boyokani na yo elongo na Yehova . Salá programe malamu ya koyekolaka yo moko, mpe kotángaka Biblia mikolo nyonso. Zalá na molende mpo na koteya nsango malamu epai ya bato mosusu. Soki osaleli makambo oyo, bokoli na yo na elimo ekomonana polele. (1 Tim. 4:15) Makambo kitoko ezali kozela baoyo bazali komibongisa sikoyo mpo na kosala mosala ya ntango nyonso na bomoi na bango mobimba!

24 Baboti, bóbongisa bana na bino: Baboti bakoki kosala nini mpo na kolendisa bilenge básala mosala ya ntango nyonso? Yesu alobaki ete: “Moto na moto, oyo asili koyekola nyonso, akozala lokola molakisi na ye.” (Luka 6:40) Moyekoli oyo babongisaki ye malamumalamu, nsukansuka, bizaleli kitoko ya molakisi na ye ekomonana epai na ye. Liteya wana esengeli kopusa baboti baklisto bákanisa mingi ntango bazali kosala makasi mpo na kobongisa bana na bango “mpo [bázala] na bizaleli ya [bato] ya Nzambe.” (1 Tim. 4:7) Lokola bana balingaka komekola bizaleli ya baboti na bango mpo na oyo etali makambo ya elimo, ebongi baboti bámituna: ‘Biso moko topesaka motuya na mosala oyo esalemaka na Betele mpo na kotombola matomba ya losambo ya solo ya Yehova? Nandimaka ya solo ete Betele ezali lipamboli ya Yehova? Tondimaka ete bomoi na kati ya mosala ya Yehova ezali mosala eleki malamu oyo bana na biso bakoki kopona kosala bomoi na bango mobimba?’ Soki tosepelaka mpenza na Betele mpe na mosala oyo ezali kosalema kuna, yango ekosalisa biso ete tolakisa mpe bana na biso básepela na yango.

25 Elekana na Hana bazalaki kosepela mingi na losambo ya solo. Batikaki ndakisa ya malamu mpo na baboti baklisto ya lelo oyo. Na Yisalaele ya ntango ya kala, ezalaki kaka Bayisalaele ya mibali nde basɛngamaki ‘kobima liboso ya Yehova Nzambe,’ na hema na ye, mbala misato na mbula. Kasi, ‘mbula na mbula’ Elekana azalaki kosala mobembo ya kilomɛtrɛ pene na 30, mingimingi na makolo, elongo na libota na ye mobimba mpo na kopesa mbeka na esika yango, kuna bato nyonso bazalaki koya kosambela Yehova. (Ex. 23:17; 1 Sam. 1:3, 4, 9, 19; 2:19) Emonani polele ete tata wana ya libota alingaki ete libota na ye mobimba ezala na mposa ya makambo ya elimo lokola ye.

26 Hana azalaki kosepela na losambo ya solo ndenge moko na mobali na ye. Ayebaki solosolo ete ye mpe asengelaki kopesa mabɔkɔ mpo na kotombola losambo ya solo oyo ezalaki kosalema na hema. Hana alapaki ndai ete soki Yehova apesi ye mwana mobali, akokaba ye mpo na mosala ya hema. (1 Sam. 1:11) Mibeko ya Mose epesaki mobali lotomo ya koboma ndai oyo mwasi asali, soki ndai yango ezali ya mabe. (Mit. 30:6-8) Nzokande, emonani ete Elekana andimaki ndai wana ya Hana, na bongo amonisaki ete ye mpe atombolaki losambo ya solo na ndenge oyo mwasi na ye amonisaki yango!​—1 Sam. 1:22, 23.

27 Kosepela mpe elimo malamu oyo baboti bazalaki na yango esalaki likambo ya malamu epai ya mwana na bango Samwele? Ɛɛ. Ntango Samwele azalaki elenge, azalaki kosepela kosala misala oyo bazalaki kopesa ye mpe azalaki kosala yango malamumalamu, mpe babongisaki ye mpo na mikumba oyo na nsima, ayaki kosepela na yango mingi na kati ya mosala ya Nzambe. Bosepeli oyo Elekana na Hana bamonisaki mpo na mosala oyo Samwele azalaki kosala na hema esukaki te ntango akómaki kokokisa mikumba na ye na esika yango. Bakobaki kokende kotala ye mbala na mbala mpo na kolendisa ye mpe kosunga ye, wana azalaki se kokoba na mosala ya ntango nyonso.​—1 Sam. 2:18, 19.

28 Oyo nde ndakisa monene Elekana mpe Hana batikaki mpo na baboti baklisto lelo oyo! Ntango bana na biso bazali koyoka ndenge tozali kosepela na motema na biso mpenza na mosala ya Betele mpe komona elimo ya komipesa oyo tozali komonisa mpo na kosimba misala ya Bokonzi ekende liboso, bango mpe nsukansuka mitema na bango ekotinda bango básalela bato mosusu. Baboti mingi balongi na kokɔtisa mposa wana ya malamu na kati ya mitema ya bana na bango. Mwana moko ya mibu nsambo akomaki boye: “Nalingi, ntango nakokola, nakɔta na Betele, mpe nazali na mwa makambo oyo nalingi kosala kuna. (1) Kobɛta masini mpo na kobimisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! , (2) kosala na esika oyo batyaka bilili na mikanda, (3) kogumba bilamba. Mpe ekozala likambo te soki nasali ata mosala nini oyo ekomonana.” Ezali mpenza esengo komona elimo ya komipesa ya ndenge wana ezali kokola na kati ya mitema ya bana na biso!

29 Bilenge, bóbosana te ete “mokili ezali mpe kolongwa mpe mposa mabe na yango lokola, nde ye oyo akosalaka mokano ya Nzambe akoumelaka seko.” (1 Yoa. 2:17) Kotika te kolanda mikano ya elimo, moko na yango ezali mosala ya ntina ya Betele. Baboti, bómekola ndakisa ya bato ya sembo ya ntango ya kala oyo balendisaki bana na bango bakolisa ezaleli ya kokangama na Nzambe. (2 Pet. 3:11) Mpe tiká ete biso nyonso tósala makasi mpo na kosunga bandeko na biso ya mibali mpe ya basi oyo bazali bilenge, mpo básalela Mozalisi Monene na makasi na bango nyonso, yango “ezali na elaka na bomoi mpo na [sikoyo] mpe mpo na ntango ekoya.”​—1 Tim. 4:8; Mos. 12:1

[Etanda na lokasa 4]

Makambo ya ntina oyo esɛngami mpo moto andimama na Betele

● Asengeli kozala na mbula kobanda 19 tii 35

● Asengeli kozala moto oyo azwá batisimo esili koleka mbula moko

● Asengeli kozala na elimo ya malamu, makanisi ya malamu, mayoki ya malamu, mpe na nzoto kolɔngɔnɔ

● Asengeli kozala na makoki ya kotánga, kokoma, mpe koloba Lifalanse malamu

● Asengeli kozala mwana-mboka ya Congo-Kinshasa to Congo-Brazzaville, to mpe oyo azali na mikanda ya Leta oyo epesi ye nzela ya kofanda na bamboka yango

● Asengeli kozala moto ya elimo oyo alingaka Yehova mingi mpe lisangá na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto