BOMOI YA BAKRISTO
Mosala malamu oyo babosanaka yango te
Basaleli nyonso ya Yehova bazali na likoki ya kosalela Yehova makambo oyo ekokanisama mpo na libela. Ndenge moko na tata oyo alingaka bana na ye mpe abosanaka ata moke te makambo malamu oyo bana na ye basalaka, Yehova mpe abosanaka te mosala na biso mpe bolingo oyo tomonisaka mpo na nkombo na ye. (Mt 6:20; Ebr 6:10) Toboyi te, makoki mpe makambo ya bomoi na biso ezalaka ndenge moko te. Kasi, soki tosali nyonso oyo tokoki na mosala ya Yehova, tokoki kozala na esengo. (Ga 6:4; Kol 3:23) Na boumeli ya bambula, ebele ya bandeko mibali mpe basi bazali kosala na Betele. Ozali na likoki ya kopesa mabɔkɔ na mosala ya Betele? Soki te, okanisi nini soki olendisi ndeko mosusu asala bongo to osalisi ndeko moko ya Betele akoba na mosala yango ya ntango nyonso?
TALÁ VIDEO OYO OKOKI KOSALA MPO OPESA MABƆKƆ NA MOSALA YA BETELE, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Nini esengeli kotinda moto asala na Betele?
Bandeko mosusu balobi nini mpo na mapamboli oyo bazwi na mosala ya Betele?
Esɛngi nini mpo na kosala na Betele?
Okoki kosala nini mpo otondisa formilɛrɛ ya kosala na Betele?