Koteya bana botosi ezali mpenza na ntina?
ZULUNALO moko ekomaki motó ya likambo oyo elobaki ete: “Baboti balingaka bana oyo basalaka makambo na ndenge na bango, kasi te oyo bayebi kaka kotosa.” Mwa lisolo yango elobelaki ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Nouvelle-Zélande; ankɛtɛ yango emonisaki ete “na bato nyonso oyo batunaki, bato moke kaka (22 %) nde bakanisaki ete baboti basengeli koteya bana bázala na botosi.” Ankɛtɛ yango emonisaki lisusu ete lelo oyo, baboti bazali kokanisa ete makambo ya ntina mpenza oyo esengeli koteya bana ezali kozala na bizaleli malamu, koyeba komitambwisa mpe koyeba kokokisa mikumba.
Lelo oyo, lokola moto na moto azali koluka naino bolamu na ye moko, ezali kokamwisa biso te soki bato ebele bazali komona lisusu ntina ya kozala na botosi te mpe ntina ya koteya yango epai ya bana te. Kasi, tosengeli nde kotalela botosi ya bana lokola makambo ya kala mpe esilá ngala? To botosi ezali kaka na kati ya makambo ya ntina oyo tokoki koteya bana mpo na bolamu na bango? Motuna oyo eleki ntina ezali oyo: Ndenge nini Yehova Nzambe, Mobandisi ya libota, atalelaka botosi epai ya baboti? Lisusu, botosi yango ememaka matomba nini?—Misala 17:28; Baefese 3:14, 15.
“Yango ezali sembo”
Na ekeke ya liboso, ntoma Paulo akomelaki lisangá ya baklisto ya Efese boye: “Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo zambi yango ezali sembo.” (Baefese 6:1) Na bongo, ntina ya libosoliboso ya kotosa baboti ezali ete kosala bongo ezali sembo na miso ya Nzambe. Ndenge Paulo alobaki, “yango ezali sembo.”
Lisusu, tozali komona ete Liloba ya Nzambe elobeli disipilini oyo baboti bazali kopesa na bolingo lokola eloko moko ya kitoko mpenza, lokola “ekoti oyo basali na fololo na motó na yo mpe lokola monyololo na kitoko na nkingo na yo;” elobeli mpe yango lokola likambo oyo “ekoki bongo kati na Nkolo.” (Masese 1:8, 9, NW; Bakolose 3:20) Kasi, soki tozangi botosi epai ya baboti, Nzambe akosepela na biso te.—Baloma 1:30, 32.
“Bongo ezala na yo malamu”
Paulo amonisaki ntina mosusu ya kotosa ntango akomaki boye: “Kumisá tata na yo mpe mama na yo, oyo lilako na liboso lizali na elaka ete, bongo ezala na yo malamu ete oumela na mokili ntango molai.” (Baefese 6:2, 3; Exode 20:12) Na makambo nini kotosa baboti ekoki komema bolamu?
Ya liboso, baboti bazali na mbula mingi mpe bayebi makambo mingi ya bomoi koleka bana, boye te? Atako bakoki koyeba makambo mingi te na baordinatɛrɛ to makambo mosusu oyo ezali koteyama na kelasi, kasi bayebi makambo mingi ya bomoi mpe ndenge ya kolonga mikakatano ya bomoi. Nzokande, bilenge bazali te na makanisi malamu oyo ezalaka epai ya moto oyo akɔmeli. Yango wana, bazwaka bikateli mbangumbangu, mbala mingi balandaka makanisi mabe ya baninga na bango mpe yango ememelaka bango mikakatano. Biblia elobi mpenza solo ete: “Ebebe ezwami na motema na mwana.” Nini ekoki kolongola yango? “Mpimbo na etumbu ekobengana yango mosika na ye.”—Masese 22: 15.
Matomba ya botosi esuki kaka na ndako te kati ya mwana na baboti na ye. Mpo ete bato oyo bafandi esika moko básala mosala malamu kozanga mikakatano, esengeli básalisana; mpo na yango esengeli botosi ezala. Na ndakisa, mpo ete libala ezala na kimya, boyokani mpe esengo, na esika ya koluka kaka bolamu na ye mpe kotyela bamposa ya basusu likebi te, moto na moto asengeli kozala pene ya kokokisa bamposa ya moninga. Na esika ya mosala, mpo ete mosala esalema malamu, esengeli basali bátosaka bakonzi na bango. Soki tozali mpe kotosa mibeko ya Leta, ya liboso, tokozwa etumbu te; kasi lisusu tokobatelama mpe tokobanga eloko te.—Baloma 13:1-7; Baefese 5:21-25; 6:5-8.
Mbala mingi, bilenge oyo batosaka bakonzi te bakómaka mikóló oyo bazali na ntina te na mboka. Nzokande, soki moto ayekolaki botosi banda bomwana, yango ekoki kosalisa ye na bomoi na ye mobimba. Ezali mpenza na ntina moto ayekola kozala na botosi banda bomwana!
Mbano monene ya botosi
Botosi ememaka boyokani malamu na kati ya libota mpe ememaka matomba mosusu oyo eumelaka na bomoi mobimba ya moto; mpe lisusu, esalisaka mpo na kolona boyokani oyo eleki boyokani nyonso na ntina, elingi koloba boyokani kati ya moto na Mozalisi na ye. Ebongi mpenza tótosa Yehova Nzambe na makambo nyonso, mpamba te ye azali “Mozalisi Monene,” epai na ye “ezali liziba na bomoi.”—Mosakoli 12:1; Nzembo 36:9.
Liloba “kotosa,” na maloba mosusu oyo elimbolaka mpe kotosa, esalelami mbala ebele na kati ya Biblia. Lisusu, mbala ebele Biblia elobeli mibeko, bilakeli, mitinda, bikateli mpe malako ya Nzambe oyo tosengeli kotosa. Na ntembe te, mpo Nzambe andima moto, asɛngaka ete moto yango azala na botosi. Ya solo, esengeli mpenza kozala na botosi mpo na kozala na boyokani na Yehova. (1 Samwele 15:22) Ezali solo ete makanisi na biso bato etindaka biso mingimingi na kozanga botosi. Biblia elobi ete: “Makanisi na motema na moto ezali mabe longwa na bolenge na ye.” (Genese 8:21) Yango wana, tosengeli koyekola botosi kaka na bomwana te, kasi na bomoi na biso mobimba. Soki tokosala bongo, tokozwa mbano monene.
Ndenge ntoma Paulo amonisaki yango, kobosana te ete etinda ya kotosa baboti ezali na elaka ya kopesa matomba mibale, elingi koloba ete: “ezala na yo malamu [mpe, NW] oumela na mokili ntango molai.” Masese 3:1, 2 endimisi elaka yango ete: “Mwana na ngai, bósana mobeko na ngai te; kasi tiká ete motema na yo mobatela malako na ngai. Zambi ikobakisela yo mikolo mingi mpe bomoi molai mpe kimya.” Mpo na baoyo bazali na botosi, mbano monene oyo bazali kozwa ezali boyokani na bango na Yehova sikoyo mpe na mikolo ezali koya, bomoi ya seko na kati ya mokili ya sika ya kimya.—Emoniseli 21:3, 4.
[Bililingi na lokasa 31]
Botosi ememaka boyokani ya malamu na kati ya libota, na esika ya mosala mpe elongo na Yehova