Mituna ya batángi
Kosambela Yehova “na elimo” elimboli nini?
Ntango Yesu Klisto apesaki litatoli na mwasi Mosamalia oyo ayaki kotoka mai na liziba ya Yakobo pene na engumba ya Sukala, alobaki na ye ete: “Nzambe azali Elimo, mpe baoyo bazali kosambela ye basengeli kosambela ye na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24, NW) Losambo ya solo esengeli kopesama “na solo,” elingi koloba esengeli koyokana na makambo oyo Yehova Nzambe amonisi na kati ya Biblia na ntina na ye moko mpe mikano na ye. Mosala oyo tozali kosalela Nzambe esengeli mpe kosalema na molende, elingi koloba tosengeli kopusama na motema oyo etondi na bolingo mpe na kondima. (Tito 2:14) Kasi, maloba oyo ezali zingazinga na vɛrsɛ wana emonisi ete maloba oyo ya Yesu na ntina na ‘kosambela Nzambe na elimo’ etaleli kaka te makanisi na biso ntango tozali kosalela Yehova.
Lisolo ya Yesu na mwasi wana na libulu ya mai etalelaki te likambo ya kozala na molende to kozanga molende mpo na kosambela. Mpo ata losambo ya lokuta ekoki kopesama na molende mpe na komipesa. Nzokande, nsima ya koloba ete bato bakosambela Tata na ngomba oyo ezali na Samalia te to mpe na tempelo oyo ezali na Yelusaleme te—nyonso mibale ezali bisika oyo ezalaki komonana na miso—Yesu amonisaki motindo ya sika ya kosambela na kotalela ndenge mpenza Nzambe azali. (Yoane 4:21) Alobaki ete: “Nzambe azali Moto ya elimo.” (Yoane 4:24, Charles Williams) Nzambe ya solo azali na nzoto ya mosuni te oyo bato bakoki komona to mpe kosimba. Losambo na ye esimbami te na tempelo moko boye oyo ezali komonana na miso to na ngomba moko boye. Na yango, Yesu alobelaki losambo oyo esuki kaka te na biloko oyo tokoki komona na miso.
Longola likambo oyo ete yango esengeli kopesama na solo, losambo oyo endimami esengeli mpe kotambwisama na elimo santu, elingi koloba nguya ya Nzambe oyo esalaka mosala mpe oyo emonanaka te. Ntoma Paulo akomaki ete: “Elimo [santu] elukaka na kati ya makambo nyonso, ata na makambo mozindo ya Nzambe.” Abakisaki ete: “Biso tozwaki elimo ya mokili te, kasi elimo oyo euti epai ya Nzambe, mpo tókoka koyeba makambo oyo Nzambe apesi biso na boboto.” (1 Bakolinti 2:8-12, NW) Mpo Nzambe andima losambo na biso, tosengeli kozala na elimo na ye mpe kotambwisama na yango. Lisusu, ezali likambo ya ntina ete tóyokanisa elimo na biso to makanisi na biso na oyo ya Nzambe na nzela ya koyekola Liloba na ye mpe kosalela yango.
[Elilingi na lokasa 28]
Sambelá Nzambe “na elimo mpe na solo”