Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/12 nk. 26-29
  • Bómonisaka bolingo ya motema na kati ya libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bómonisaka bolingo ya motema na kati ya libota
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza”
  • Ndakisa malamu ya boyokani na kati ya libota
  • Ndenge nini komonisa bolingo ya motema na kati ya libota?
  • Okoki kozwa lisalisi
  • “Bózalaka na bolingo ya motema bino na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Ndenge ya komonisa ete olingaka molongani na yo
    Lisalisi mpo na libota
  • Sɛkɛlɛ́ ya bolingo ya motema mpo na bandeko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Kobá kokolisa bolingo ya bondeko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/12 nk. 26-29

Bómonisaka bolingo ya motema na kati ya libota

“MEKÁ kotumba yango! Soki mpenza ozali mwasi, meká!” Na maloba oyo, Tohru abɛtanaki mondenge na mwasi na ye Yoko.a Mwasi azongisaki ete: “Nakotumba yango” mpe apelisi alimɛti mpo na kotumba bafɔtɔ oyo bakangisá bango mibale. Na nsima, alobi lisusu ete, “Nakotumba mpe ndako!” Tohru alobi na ye lisusu na monɔkɔ te, mbala moko azipi ye mbata mpe koswana esuki na makofi.

Mbula misato liboso, Tohru na Yoko babandaki libala na bango na esengo mpenza. Kasi, mpo na nini makambo ebebaki? Atako Tohru azalaki komonana moto malamu, mwasi na ye azalaki komona ete azalaki komonisela ye bolingo ya motema te, mpe azalaki kosala eloko mpenza te mpo na kosepelisa ye. Mwasi azalaki kosala nyonso mpo na kolakisa mobali na ye bolingo, kasi mobali yango azalaki komonisela ye bolingo te. Lokola likambo yango ekómaki kolekela ye, Yoko akómaki kandakanda. Akómaki kozanga mpɔngi, komitungisa, azalaki lisusu na mposa ya kolya te, akómaki kosilika mpambampamba, konyokwama na makanisi, kutu ntango mosusu akómaki kokweya mpe komiyeba te. Kasi, Tohru azalaki mpenza komitungisa ata moke te atako makambo ezalaki kotambola malamu te na libota na ye. Mpo na ye, makambo ezalaki kaka ndenge esengeli kozala.

“Bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza”

Mikakatano ya ndenge wana ezali komonana mingi lelo oyo. Ntoma Paulo alobaki ete na eleko na biso, bato ‘bakozanga bolingo ya libota.’ (2 Timote 3:​1-5) Liloba ya Grɛki oyo ebongolami awa na ‘kozanga bolingo ya libota’ ezali na boyokani na liloba oyo emonisaka bolingo oyo bato ya libota moko bazalaka na yango kati na bango. Bolingo ya ndenge wana ezali mpenza komonana te na mikolo na biso. Soki mpe ezali, mbala mingi bato ya libota bazali mpenza komonisa yango te kati na bango.

Lelo oyo, baboti mingi bayebaka te ndenge ya komonisela bana na bango bolingo ya motema. Bato mingi bakolá na mabota oyo bolingo ya motema ezalaki te mpe bayebaka te ete mpo na kozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo esengeli kozala na bolingo ya motema mpe komonisa yango. Ezali yango nde mokakatano oyo Tohru azalaki na yango. Na bomwana na ye, tata na ye azalaki ntango nyonso na mosala mpe azalaki kozonga na ndako kaka na butu. Azalaki mpenza kosolola na Tohru te; soki afungoleli ye monɔkɔ, mbala mingi ezalaki kaka nde mpo na kofinga ye. Mama ya Tohru mpe azalaki kosala, ye mpe azalaki na ntango mingi te ya kofanda na mwana na ye. Televizyo nde ekómaki mobateli na ye. Na kati ya libota yango, bazalaki kopesana longonya te ata mpe kosolola te.

Likambo mosusu ekoki mpe kozala mimeseno ya mboka. Na bisika mosusu na Amerika ya Sudi, soki mobali amoniseli mwasi na ye bolingo na miso ya bato, lobá aboyi kolanda mimeseno ya mboka. Na bikólo mingi ya Azia mpe ya Afrika, na mimeseno ya bonkɔkɔ na bango, bamonisaka bolingo ya motema te, ezala na maloba to na misala. Mobali ayokaka monɔkɔ kilo mpo na koloba na mwasi na ye to na mwana na ye ete, “Nalingaka yo mingi.” Atako bongo, tokoki kozwa liteya na boyokani oyo ezali na kati ya libota ya libosoliboso mpe oyo eumeli koleka mabota nyonso.

Ndakisa malamu ya boyokani na kati ya libota

Ndakisa eleki malamu mpo na libota ezali ya boyokani ya Yehova Nzambe na Mwana na ye mobotami-se-moko. Bamonisanaka bolingo na lolenge oyo ebongi mpenza. Anzelu oyo na nsima akómaki Yesu Klisto, azalaki na boyokani malamu na tata na ye na boumeli ya bankóto ya bambula. Alobelaki boyokani yango boye: “Nazalaki pembeni na ye lokola moko oyo abɔkɔlamaki na ye; mokolo na mokolo nazalaki esengo na ye, kosepela liboso na ye ntango nyonso.” (Masese 8:30) Mwana ayebaki malamu ete Tata na ye alingaka ye mingi, yango wana akokaki koyebisa bato mosusu ete mokolo na mokolo azalaki esengo ya Yehova. Azalaki ntango nyonso na esengo ya kozala elongo na Tata na ye.

Ata ntango azalaki moto awa na mabele, Yesu, Mwana ya Nzambe amonaki makambo mosusu oyo endimisaki ye ete Tata na ye alingaka ye mingi. Ntango Yesu azwaki batisimo, ayokaki mongongo ya Tata na ye koloba ete: “Oyo azali Mwana na ngai, molingami, oyo nandimi.” (Matai 3:17) Yango ezali mpenza maloba ya kolendisa na ebandeli ya mosala ya Yesu awa na mabele! Na ntembe te, maloba wana ya Tata na ye, esimbaki mpenza motema na ye ntango oyo bomoi oyo azalaki na yango na likoló ezalaki kozongela ye lisusu na makanisi.

Boye, Yehova apesi libota na ye ya molɔ́ngɔ́ mobimba ndakisa malamu koleka mpo na komonisa bolingo. Soki tondimi Yesu Klisto, Yehova akolakisa biso mpe bolingo na ye. (Yoane 16:27) Atako tokoyoka mongongo euti likoló te, tokomona bolingo ya Yehova na misala, na ndenge azwaki ebongiseli ete Yesu amipesa lokola mbeka mpo na kobikisa biso mpe na banzela mosusu. (1 Yoane 4:​9, 10) Kutu, Yehova ayokaka mabondeli na biso mpe akokisaka bamposa na biso na ndenge oyo ekomemela biso mpenza litomba. (Nzembo 145:18; Yisaya 48:17) Soki toluki kokóma baninga mpenza ya Yehova, botɔndi na biso mpo na bolingo na ye ekobakisama.

Yesu ayekolaki epai ya Tata na ye ndenge ya komitya na esika ya basusu, kotyela bato likebi, kozala na boboto mpe komibanzabanza mpo na basusu. Alobaki boye: “Makambo nyonso oyo [Tata] asalaka, makambo yango Mwana mpe asalaka kaka ndenge wana. Mpo Tata alingaka Mwana mingi mpe alakisaka ye makambo nyonso oyo ye moko asalaka.” (Yoane 5:​19, 20) Biso mpe tokoki koyeba ndenge ya komonisa bolingo ya motema soki tozali koyekola ndakisa oyo Yesu apesaki ntango azalaki awa na mabele.​—⁠Bafilipi 1:⁠8.

Ndenge nini komonisa bolingo ya motema na kati ya libota?

Lokola “Nzambe azali bolingo” mpe biso tosalemi “na elilingi na ye,” tozali na makoki ya kozala na bolingo mpe komonisa yango. (1 Yoane 4:8; Genese 1:​26, 27) Kasi, makambo wana eyaka yango moko te. Mpo na komonisa bolingo ya motema, tosengeli liboso kolinga mobalani na biso mpe bana na biso. Yango wana, zwáká ntango ya kotala mpe koluka bizaleli na bango ya malamu, oyo mbala mosusu na mosika ekoki komonana lokola ezali na ntina te, mpe kanisáká malamumalamu likoló na yango. Okoki mbala mosusu koloba ete, ‘Mobali [mwasi to bana] na ngai azali [to bazali] ata na ezaleli moko te oyo esepelisaka ngai.’ Moto oyo afandi na mobalani na ye oyo bato mosusu nde baponelá ye, akoki mbala mosusu kozala mpenza na bolingo ya motema te mpo na ye. Bamosusu mpe bakoki kozala na bana oyo balukaki kobota bango te. Kasi talá ndenge oyo Yehova azalaki kokanisa mpo na mwasi na ye ya elilingi, elingi koloba libota ya Yisalaele, na ekeke ya 10 liboso ya ntango na biso (L.T.B.). Ntango mosakoli na ye Eliya akanisaki ete ata mosambeli moko ya Yehova atikalaki lisusu te na Yisalaele, ekólo oyo ezalaki na mabota zomi, Yehova ye moko alukaki bango malamumalamu mpe amonaki bato 7 000 mobimba oyo, na miso na ye, bazalaki na bizaleli ya malamu. Okoki kolanda ndakisa ya Yehova mpe koluka bizaleli malamu epai ya bato ya libota na yo?​—⁠1 Mikonzi 19:​14-18.

Kasi, mpo ete bato mosusu na libota bámona ete olingaka bango, osengeli kosala milende mpenza mpo na komonisa bango yango. Mbala nyonso oyo omoni likambo moko oyo ebongi na kopesa bango longonya, lobá yango. Ntango Liloba ya Nzambe ezali kolobela mwasi ya malamu, emonisi ezaleli moko ya ntina oyo libota na ye ezalaki na yango: “Bana na ye bakotɛlɛma mpe bakobenga ye mopambwami; mobali na ye lokola mpe, ye akosanzola ye.” (Masese 31:28) Talá ndenge oyo bato na kati ya libota bamonisanaki botɔndi. Ntango azali kokumisa mwasi na ye na maloba, mobali azali kopesa mwana na ye ya mobali ndakisa ya malamu, azali kolendisa ye ayeba kopesa mwasi na ye longonya ntango akobala.

Lisusu, ezali malamu ete baboti bapesaka bana na bango longonya. Yango ekoki koteya bana báyeba kopesa nzoto na bango kilo. Kutu, ndenge nini moto akoki ‘kolinga mozalani na ye lokola ye moko’ soki ayebi kopesa nzoto na ye moko kilo te? (Matai 22:39) Nzokande, soki baboti bazalaka na momeseno ya kolobela mabe ya bana na bango, kasi bapesaka bango longonya ata moke te, ekozala mpasi mpo bana na bango bákanisa ete bazali na ntina mpe bakokoka te komonisela bato mosusu bolingo ya motema.​—⁠Baefese 4:​31, 32.

Okoki kozwa lisalisi

Ezali boni soki okolá na kati ya libota oyo ezalaki mpenza na bolingo te? Okoki koyekola komonisa bolingo ya motema. Likambo ya liboso, osengeli kondima ete ozali na mokakatano mpe koluka kobongwana. Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali lisalisi monene mpo na likambo yango. Tokoki kokokanisa yango na talatala. Soki tozali koyekola mateya ya Biblia mpe na nsima tozali komitalela biso moko, tokomona polele mbeba to mabunga oyo tozali na yango na makanisi na biso. (Yakobo 1:23) Biblia ekoki kosalisa biso na kobongisa makanisi nyonso ya mabe. (Baefese 4:​20-24; Bafilipi 4:​8, 9) Tozali na mposa ya kosalaka yango mbala na mbala, tosengeli ‘kotika te kosala oyo ezali malamu.’​—⁠Bagalatia 6:⁠9.

Bamosusu bakokaka te komonisa bolingo ya motema mpo babɔkɔlá bango ndenge wana to mpo na mboka na bango ezalaka bongo. Nzokande, na mikolo oyo, bato ya siansi bayekoli mpe bamoni ete likoki ya kolonga mikakatano wana ezali. Doktɛrɛ Daniel Goleman, monganga ya maladi ya motó, alobi ete ‘ata bizaleli oyo ezwá mpenza misisa na motema ya moto banda na bomwana na ye ekoki kobongwana.’ Sikoyo ekómi mbula koleka 1 900, banda Biblia emonisaki ete na lisalisi ya elimo ya Nzambe, ata bizaleli ya ndenge nini oyo ezwá mpenza misisa na motema ya moto ekoki kobongwana. Biblia eyebisi biso boye: “Bólongola bomoto ya kala elongo na misala na yango, mpe bólata bomoto ya sika.”​—⁠Bakolose 3:​9, 10.

Ntango bamoni mokakatano na bango, bato oyo bazali na libota moko bakoki kobanda koyekola Biblia na mokano ya kokokisa mposa na bango. Na ndakisa, mpo na nini te koluka koyeba oyo Biblia elobi mpo na “bolingo ya motema”? Mbala mosusu okokutana na vɛrsɛ lokola oyo: “Bosili koyoka nsango ya koyika mpiko ya Yobo mpe bosili komona nsuka oyo Yehova abongisaki, ete Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yakobo 5:11) Na nsima tángá lisolo ya Yobo na kati ya Biblia mpe tyá likebi na lolenge oyo Yehova amoniselaki ye bolingo ya motema mpe motema mawa. Na ntembe te okoyoka mposa ya kolanda ndakisa ya Yehova mpo na komonisela bato ya libota na yo bolingo ya motema mpe motema mawa.

Nzokande, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, “biso nyonso tobɛtaka mabaku mbala mingi” na lolemo na biso. (Yakobo 3:⁠2) Na kati ya libota, ekoki kokóma ete tosaleli lolemo na biso na ndenge oyo ezali kolendisa te. Na ntango wana nde esɛngaka kobondela Yehova mpe kotyela ye motema. Kolɛmba te. ‘Bondeláká ntango nyonso.’ (1 Batesaloniki 5:17) Yehova akosalisa baoyo nyonso bazali kosala makasi mpo na komonisa bolingo ya motema na kati ya libota mpe baoyo bazali na mposa ya komonisa yango kasi bazali kokoka te.

Lisusu, Yehova, na bolingo mpenza, azali kosalisa biso na kati ya lisangá ya boklisto. Yakobo akomaki boye: “Ezali nde na moto moko oyo azali na maladi na kati na bino? Tiká abenga bankulutu ya lisangá epai na ye, mpe tiká bango bábondela mpo na ye, kopakoláká ye mafuta na nkombo ya Yehova.” (Yakobo 5:14) Ya solo, bankulutu na kati ya masangá ya Batatoli ya Yehova bakoki kosalisa mpenza bato oyo bazali na mikakatano mpo na komonisana bolingo ya motema na kati ya libota. Atako bazali minganga te, bankulutu bakoki, na motema molai mpenza, kosalisa bandeko na bango bandimi, kasi bakoyebisa bango te nini oyo basengeli kosala, nzokande bakomonisa bango kaka ndenge oyo Yehova atalelaka makambo mpe bakobondela na bango elongo mpe mpo na bango.​—⁠Nzembo 119:105; Bagalatia 6:⁠1.

Mpo na Tohru mpe Yoko, bankulutu ya lisangá bazalaki ntango nyonso kotya matoi na mikakatano na bango mpe kobɔndisa bango. (1 Petelo 5:​2, 3) Ntango mosusu nkulutu moko na mwasi na ye bazalaki kokende kotala bango mpo ete Yoko azwa libaku ya kosolola na mwasi moklisto oyo akutaná na makambo mingi, oyo akokaki kozongisa ye ‘na makanisi ya malamu na ntina ete alinga mobali na ye.’ (Tito 2:​3, 4) Ntango bazali koyeba mpasi ya bandeko na bango baklisto mpe bazali komitya na esika na bango, bankulutu bakómaka “[ebombamelo] mpo na mopɛpɛ, ezipelo na ntango ya mbula makasi.”​—⁠Yisaya 32:​1, 2.

Na lisalisi ya bankulutu ya boboto, Tohru ayaki koyeba ete azalaki mpenza komonisa bolingo te na kati ya libota na ye mpe ete na “mikolo ya nsuka” Satana azali koluka kobebisa mabota. (2 Timote 3:⁠1) Tohru azwaki ekateli ya kolonga mokakatano na ye. Ayaki komona ete likambo oyo ebandaki kosala ete akoka te komonisaka bolingo eutaki nde na ndenge oyo babɔkɔlá ye. Lokola amipesaki mpenza na koyekola Biblia mpe kobondela, mokemoke Tohru akómaki kolakisa Yoko ete alingaka ye.

Atako Yoko azalaki na nkanda mpo na ezaleli ya Tohru, kasi ntango ayebaki ndenge oyo ye akolaki mpe amonaki bolɛmbu na ye moko, akómaki kosala makasi mpo atyaka likebi na ye mingi na makambo malamu ya mobali na ye. (Matai 7:​1-3; Baloma 5:12; Bakolose 3:​12-14) Azalaki ntango nyonso kosɛnga Yehova asalisa ye alinga mobali na ye. (Bafilipi 4:​6, 7) Nsukansuka, Tohru akómaki komonisela mwasi na ye bolingo ya motema mpe mwasi na ye akómaki na esengo.

Ya solo, soki okokaka komonisela libota na yo bolingo te, okoki mpenza kolonga mokakatano yango. Liloba ya Nzambe ezali kopesa biso toli oyo ebongi. (Nzembo 19:⁠7) Soki okangi ntina ete ezali likambo ya ntina mingi, soki ozwi ntango ya kotya likebi na bizaleli ya malamu ya mobalani na yo to bana na yo, soki ozali koyekola Liloba ya Nzambe mpe kosalela toli na yango, soki ozali kobondela Yehova na etingya mpe kotyela ye motema, mpe soki ozali koluka lisalisi ya bankulutu baklisto oyo bateli na elimo, okoki kolonga mokakatano wana oyo ezali kopekisa yo kozala na boyokani malamu na mobalani na yo to mpe na bana na yo. (1 Petelo 5:⁠7) Yo mpe okoki koyoka esengo lokola mobali moko ya États-Unis ayokaki. Balendisaki ye amoniselaka mwasi na ye bolingo ya motema. Nsukansuka ntango azwaki makasi ya koyebisa mwasi na ye ete, “Nalingaka yo mingi,” likambo oyo mwasi na ye asalaki ekamwisaki ye mpenza. Na mpisoli ya esengo na miso, alobaki boye: “Ngai mpe nalingaka yo mingi, kasi nafandi na yo mbula 25 mpe ezali mbala ya liboso oloba na ngai polele na ndenge oyo osali yango lelo.” Kozela te bólekisa ebele ya bambula mpo na komonisela mobalani na yo mpe bana na yo bolingo ya motema!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Topesi bango bankombo mosusu.

[Elilingi na lokasa 28]

Yehova azali kopesa lisalisi na nzela ya Liloba na ye, Biblia

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto