Boboto ezali ezaleli ya ntina mingi mpo na Baklisto
“Bólata . . . boboto.”—BAKOLOSE 3:12.
1. Mpo na nini boboto ezali ezaleli ya malamu mingi?
KOFANDA esika moko na moto ya boboto ezalaka esengo mingi. Nzokande, Salomo, mokonzi ya bwanya, alobaki ete: “Lolemo ya boboto ekoki kobuka mokuwa.” (Masese 25:15, NW) Boboto ezali ezaleli ya malamu mingi oyo ekendaka nzela moko na esengo mpe makasi.
2, 3. Boyokani nini ezali kati na boboto mpe elimo santu, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?
2 Ntoma Paulo atángaki boboto na kati ya “mbuma ya elimo” na Bagalatia 5:22, 23. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “boboto” na vɛrsɛ 23 na Libongoli ya Mokili ya Sika, mbala mingi ebongolami na “bopɔlɔ” to “motema boboto” na Babiblia mosusu. Na minɔkɔ mingi, ezali mpasi mpo na kozwa liloba oyo ezali mpenzampenza na ndimbola moko na liloba wana ya Grɛki, mpamba te liloba yango emonisaka kaka te boboto to bopɔlɔ ya elongi, kasi boboto ya motema; emonisaka mpenza motema mpe makanisi ya moto.
3 Mpo tókoka koyeba malamu ndimbola mpe motuya ya ezaleli oyo ebengami boboto, tótalela bandakisa minei na kati ya Biblia. (Baloma 15:4) Ntango tozali kotalela bandakisa yango, tokosuka te kaka na koyeba ndimbola mpenza ya ezaleli yango, kasi tokoyekola mpe ndenge oyo tokoki kolona mpe komonisa yango na makambo nyonso oyo tosalaka.
“Ezali na motuya monene na miso ya Nzambe”
4. Nini emonisi biso ete Yehova atalelaka ezaleli ya boboto na motuya mingi?
4 Lokola boboto ezali na kati ya mbuma ya elimo ya Nzambe, ebongi mpenza ete ezala na kati ya bomoto malamu mingi ya Nzambe. Ntoma Petelo akomaki ete “elimo ya kimya mpe ya boboto” ezali “na motuya monene na miso ya Nzambe.” (1 Petelo 3:4) Ya solo, Yehova ye moko amonisaka boboto mpe atalelaka ezaleli yango na motuya mingi. Yango wana, ata kaka mpo na ntina yango, esengeli ete basaleli nyonso ya Nzambe bázalaka na boboto. Kasi, ndenge nini Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Mokonzi oyo aleki bakonzi nyonso na molɔ́ngɔ́, amonisaka boboto?
5. Boboto ya Yehova epesi biso elikya nini?
5 Ntango Adama ná Eva, mwasi ná mobali ya liboso, babukaki mobeko oyo Nzambe alobaki na bango polele ete bálya te mbuma ya nzete ya koyeba malamu ná mabe, basalaki likambo wana na nko. (Genese 2:16, 17) Lokola baboyaki kotosa na nko, yango ememelaki bango moko ná bana na bango nyonso lisumu, liwa, mpe ekabolaki bango na Nzambe. (Baloma 5:12) Atako Yehova azalaki na ntina ya kopesa bango etumbu wana, atalelaki bato te ete bakoki kobonga lisusu te mpe bakoki kosikolama te; yango wana asundolaki bango mbala moko te. (Nzembo 130:3) Kasi, na motema mawa na ye mpe lokola azalaki na mposa te ya kosɛnga bato makambo ya makasimakasi—likambo oyo ezali mpe komonisa boboto—Yehova abongisaki likambo moko oyo na nzela na yango bato ya masumu bakoki kozonga epai na ye mpe kondimama na ye. Yehova apesaki Mwana na ye Yesu Klisto lokola mbeka mpo na kosikola bato, mpe na ndenge yango afungolelaki biso nzela mpo tópusana penepene ya kiti ya bokonzi na ye ya nkembo na kobanga te to na kolɛnga te.—Baloma 6:23; Baebele 4:14-16; 1 Yoane 4:9, 10, 18.
6. Ndenge nini Nzambe amoniselaki Kaina boboto?
6 Yehova amonisaki boboto na ye ebele ya bambula liboso Yesu aya awa na mabelé, ntango Kaina ná Abele, bana ya Adama, bapesaki ye mbeka. Yehova atángaki na kati ya mitema na bango, yango wana aboyaki likabo ya Kaina kasi “andimaki” Abele mpe likabo na ye. Lokola Nzambe andimaki moto ya sembo Abele mpe mbeka na ye, Kaina ayokaki nkanda. Biblia elobi ete: “Kaina asilikaki mingi, mpe elongi na ye ezalaki na nkanda.” Yehova asalaki nini mpo na yango? Ye mpe asilikaki mpo Kaina amonisaki ezaleli mabe? Te. Atunaki Kaina na boboto mpenza mpo na nini asilikaki mingi ndenge wana. Kutu, Yehova ayebisaki Kaina likambo oyo asengelaki kosala mpo ‘andimama.’ (Genese 4:3-7) Yango ezali kondimisa biso ete Yehova amonisaka boboto na ndenge ya kokoka mpenza.—Exode 34:6.
Boboto esepelisaka mpe ekitisaka motema
7, 8. (a) Ndenge nini tokoki koyeba boboto ya Yehova malamu? (b) Maloba ya Matai 11:27-29 ezali komonisa nini mpo na Yehova mpe Yesu?
7 Moko ya lolenge oyo eleki malamu ya koyeba mpenza bizaleli malamu ya Yehova ezali koyekola bomoi mpe mosala ya Yesu Klisto. (Yoane 1:18; 14:6-9) Na mbula ya mibale oyo azalaki kotambolatambola mpo na kosakola, ntango azalaki na Galilai, Yesu asalaki makamwisi mingi na Kolazini, na Betesaida, na Kapalanauma, mpe na bamboka mosusu oyo ezalaki pene na bamboka yango. Kasi, lokola bato mingi bapusaki lolendo, baboyaki koyoka ye mpe kondimela ye. Yesu asalaki nini mpo na yango? Atako ayebisaki bango polele makambo oyo kozanga kondima na bango ekomemela bango, azalaki koyoka mawa mpo na ba ‘am ha’ arèts, elingi koloba bato mpamba, mpo ete bazalaki babola na elimo.—Matai 9:35, 36; 11:20-24.
8 Makambo oyo Yesu asalaki na nsima emonisaki ete ‘ayebaki Tata malamumalamu’ mpe azalaki kolanda ndakisa na ye. Yesu ayebisaki bato mpamba boye: “Bóya epai na ngai, bino nyonso oyo bozali komona mpasi na mosala mpe kokumbisama mikumba, mpe ngai nakopemisa bino. Bókamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bóyekola epai na ngai, mpo ngai nazali na elimo ya boboto mpe na komikitisa na motema, mpe bokozwa kopema mpo na milimo na bino.” Tokanisi mpenza ete maloba yango ebɔndisaki bato oyo bazalaki konyokwama mpe ekitisaki bango mitema! Kutu, ezali kosepelisa ata biso lelo oyo. Soki mpenza tolati boboto, tokozala na kati ya bato oyo “Mwana asepeli komonisa” bango Tata na ye.—Matai 11:27-29.
9. Ezaleli nini etambolaka nzela moko na boboto, mpe ndenge nini Yesu apesaki ndakisa malamu mpo na yango?
9 Ezaleli mosusu oyo etambolaka nzela moko na boboto ezali “komikitisa na motema.” Nzokande, lolendo etindaka moto atombola mapeka mpe mbala mingi ekoki kotinda moto anyokolaka basusu mpe azala na motema makasi. (Masese 16:18, 19) Yesu amonisaki komikitisa na ntango nyonso oyo asalaki mosala na ye awa na mabelé. Ata mokolo oyo akɔtaki na Yelusaleme likoló ya mpunda, mikolo motoba liboso akufa, ntango bato bakumisaki ye lokola Mokonzi ya Bayuda, Yesu asalaki makambo na ndenge oyo ekeseni mpenza na bakonzi ya mokili oyo. Akokisaki esakweli oyo Zekalia alobaki mpo na Masiya ete: “Talá! Mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali na elimo ya boboto, mpe amati likoló ya mpunda, ɛɛ, likoló ya mwana ya mpunda, mwana ya nyama oyo ekumbaka kilo.” (Matai 21:5; Zekalia 9:9) Mosakoli ya sembo Danyele amonaki na emonaneli Yehova azali kopesa Mwana na ye bokonzi. Kasi, na esakweli mosusu liboso, alobaki mpo na Yesu ete azali “moto oyo aleki bato nyonso na komikitisa.” Nyonso oyo emonisi biso solo ete boboto etambolaka nzela moko na komikitisa.—Danyele 4:17, NW; 7:13, 14.
10. Mpo na nini boboto ya baklisto ezali bolɛmbu te?
10 Boboto ya Yehova ná ya Yesu ezali kobenda biso epai na bango. (Yakobo 4:8) Kasi, tómikosa te! Boboto ezali bolɛmbu te! Yehova, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, azali na nguya mpe na makasi mingi. Makambo oyo ezangi boyengebene engalisaka nkanda na ye. (Yisaya 30:27; 40:26) Yesu mpe azalaki na ekateli makasi ya kotikala sembo, ata ntango Satana Zabolo azalaki komeka ye. Akangaki miso te ntango amonaki bakonzi ya mangomba ya ntango na ye bazali kosala mombongo na ndenge elongobani te. (Matai 4:1-11; 21:12, 13; Yoane 2:13-17) Atako bongo, amonisaki kaka boboto na ye ntango bayekoli na ye bazalaki kosala mabunga, mpe azalaki koyikela bolɛmbu na bango mpiko. (Matai 20:20-28) Yango wana, moto moko ya mayele na maloba ya Biblia alimbolaki boboto na maloba oyo: “Boboto ebombaka makasi lokola oyo ya ebende.” Tiká ete tómonisa boboto lokola oyo Klisto amonisaki.
Moto oyo alekaki na boboto na ntango na ye
11, 12. Na kotalela ndenge oyo Moize abɔkwamaki, mpo na nini tokoki koloba ete azalaki mpenza na boboto mingi?
11 Ndakisa ya misato tokotalela ezali ya Moize. Biblia elobi ete azalaki “na [boboto, NW] mingi, na koleka bato nyonso bazalaki na nse.” (Mituya 12:3) Maloba yango ekomamaki na kopemama na Nzambe. Boboto mingi ya Moize etindaki ye alanda litambwisi ya Yehova.
12 Moize abɔkwamaki lokola bana mosusu te. Yehova abatelaki mwana yango oyo baboti na ye bazalaki Baebele ya sembo na eleko oyo bato bazalaki kokabana mpe kobomana. Ntango azalaki naino mwana moke mpenza, azalaki na mabɔkɔ ya mama na ye oyo ateyaki ye malamumalamu makambo ya Yehova, Nzambe ya solo. Na nsima, Moize akómaki kofanda na ndako oyo ezalaki na makambo ya ndenge mosusu mpenza. Setefano, moklisto moko ya ekeke ya liboso oyo akufaki liwa ya martiru, alobaki ete: “Moize alakisamaki na kati ya bwanya nyonso ya Baezipito. Ɛɛ, azalaki na nguya na maloba na ye mpe na misala na ye.” (Misala 7:22) Amonisaki kondima na ye ntango amonaki ndenge oyo bakapita ya baombo ya Falao bazalaki konyokola bandeko na ye. Ntango Moize amonaki Moezipito moko azali kobɛta Moebele moko, abomaki Moezipito yango; mpo na likambo yango, Moize akimaki Ezipito mpe akendeki na mokili ya Midyani.—Exode 1:15, 16; 2:1-15; Baebele 11:24, 25.
13. Mbula 40 oyo Moize afandaki na Midyani esalaki nini na bomoto na ye?
13 Na ntango Moize akómaki na mbula 40, asengelaki koluka ndenge ya kokokisa bamposa na ye na kati ya esobe. Na Midyani akutanaki na bana basi nsambo ya Luele mpe atokelaki ebele ya bibwele ya tata na bango mai. Ntango bilenge basi yango bazongaki na ndako na bango, na esengo mpenza bayebisaki Luele ete “Moezipito” moko abikisaki bango na mabɔkɔ ya babateli ya mpate oyo bazalaki kotungisa bango. Luele ayambaki Moize na ndako na ye, mpe Moize akómaki kofanda epai na ye. Bampasi oyo amonaki etikaki ye na nkanda na motema te; epekisaki ye mpe te komesana na bomoi ya sika oyo akómaki na yango. Mposa na ye ya kosala mokano ya Yehova ekitaki mpe te. Na boumeli ya mbula 40, asalaki mosala ya kobɔkɔla bampate ya Luele, abalaki Sipola mpe abotaki na ye bana. Na ntango nyonso wana, Moize alonaki mpe akolisaki ezaleli oyo na nsima, ayebanaki na yango mingi. Tomoni mpenza ete na nzela ya bampasi oyo akutanaki na yango, Moize ayekolaki ezaleli ya boboto.—Exode 2:16-22; Misala 7:29, 30.
14. Yebisá likambo moko oyo elekaki ntango Moize azalaki kokamba Yisalaele oyo emonisaki ete azalaki na boboto.
14 Ntango Yehova apesaki ye mokumba ya kokamba ekólo Yisalaele, Moize azalaki kaka komonisa boboto. Elenge mobali moko akendaki koyebisa Moize ete Eledada ná Medada bazalaki kosakola na kati ya kaa—nzokande bato mibale wana bazalaki te ntango Yehova asopaki elimo na ye likoló ya mikóló 70 mpo básungaka Moize. Yosua alobaki ete: “Nkolo na ngai [Moize], pekisá bango.” Moize azongisaki na boboto ete: “Ozali koyoka zuwa na ntina na ngai? Malamu soko bato na [Yehova] bazalaki basakoli, ete [Yehova] atya [elimo] na ye likoló na bango!” (Mituya 11:26-29) Ezaleli ya boboto nde esalaki ete likambo wana ekóma monene te.
15. Atako Moize azalaki moto ya kozanga kokoka, mpo na nini tosengeli kolanda ndakisa na ye?
15 Emonani ete mokolo mosusu Moize abungisaki boboto na ye. Na Meliba, pene na Kadesi, apesaki Yehova nkembo te, ye Mosali ya makamwisi. (Mituya 20:1, 9-13) Atako Moize azalaki moto ya kozanga kokoka, azalaki na kondima makasi oyo esungaki ye bomoi na ye mobimba, mpe boboto mingi oyo azalaki na yango ezali kosepelisa ata biso lelo oyo.—Baebele 11:13-28.
Moto ya makambo makasimakasi mpe moto ya boboto
16, 17. Liteya nini tozwi na lisolo ya Nabala ná Abigaili?
16 Likambo oyo elekaki na ntango ya Davidi, mwa moke nsima ya liwa ya Samwele, mosakoli ya Nzambe, ezali ndakisa oyo ezali kokebisa biso. Ezali likambo etali mobali moko nkombo na ye Nabala ná mwasi na ye Abigaili. Bizaleli ya mobali yango ekesanaki mpenza na oyo ya mwasi na ye! Abigaili azalaki “na bokɛngi malamu,” nzokande, mobali na ye azalaki “moto ya makambo makasimakasi mpe moto mabe.” Bato ya Davidi bakendaki kosɛnga ye mwa biloko ya kolya, kasi Nabala aboyaki na motema moko; nzokande bato wana nde basalisaki babateli ya ebele ya bibwele na ye mpo báyiba yango te. Likambo yango epesaki Davidi nkanda; yango wana, ye ná mwa ndambo ya bato na ye bazwaki mipanga na bango mpo na kokitela Nabala na ndako na ye.—1 Samwele 25:2-13, NW.
17 Ntango Abigaili ayokaki makambo oyo elekaki, abongisaki nokinoki mampa, vinyo, nyama, mpe mikate ya mbuma ya vinyo na figi mpe asimbaki nzela mpo na kokende kokutana na Davidi. Abondelaki ye na maloba oyo: “Nkolo na ngai, tiká ete lisumu oyo ekwea epai na ngai! Nalɔmbi yo ete moombo na yo aloba na matoi na yo. Yoká maloba ya moombo na yo.” Maloba ya boboto ya Abigaili elɛmbisaki Davidi motema. Nsima ya koyoka Abigaili, Davidi alobaki boye: “[Yehova] Nzambe na Yisalaele akumisama, oyo atindi yo mokolo oyo mpo na [kokutana] na ngai. Mayele na yo ekumisama, yo mpe opambwama! Yo opekisi ngai lelo ete naya kotangisa makila te.” (1 Samwele 25:18, 24, 32, 33) Nsukansuka, makambo makasimakasi ya Nabala ememaki ye na liwa. Kasi Abigaili, mpo na bizaleli malamu na ye, azwaki bolamu ya kokóma mwasi ya Davidi. Boboto na ye ezali ndakisa mpo na basaleli nyonso ya Yehova lelo oyo.—1 Samwele 25:36-42.
Landá ezaleli ya boboto
18, 19. (a) Mbongwana nini emonanaka ntango tolati boboto? (b) Nini ekoki kosalisa biso na komitalela malamumalamu?
18 Na bongo, tomoni ete boboto ezali ezaleli ya ntina mingi. Kozala na boboto elimboli kaka te komonisa bonkonde; boboto ezali ezaleli oyo ekitisaka basusu motema. Ekoki kozala ete liboso tozalaki na momeseno ya koloba mpe kosala makambo na kozanga boboto. Kasi, ntango toyekolaki solo ya Biblia, tobongwanaki mpe bato bakómaki kosepela na biso mingi. Paulo alobelaki mbongwana yango ntango alendisaki baninga na ye baklisto boye: “Bólata bolingo ya motema oyo euti na mawa, motema malamu, elimo ya komikitisa, boboto mpe motema molai.” (Bakolose 3:12) Biblia ekokanisi yango na mbongwana ya nyama mabe lokola mbwa ya zamba, nkoi, nkɔsi, ngombolo, mpe kobra oyo ekómi ebwele lokola mpate, mwana ya ntaba, mwana ya ngɔmbɛ, to mpe ngɔmbɛ. (Yisaya 11:6-9, NW; 65:25, NW) Mbongwana wana ya bomoto ezalaka mpenza monene mpe ekamwisaka bato oyo bamonaka yango. Kasi, biso toyebaka ete elimo ya Nzambe nde esalaka mosala wana mpamba te, boboto ezali na kati ya mbuma ya elimo yango.
19 Yango elingi nde koloba ete soki tobongwani ndenge yango mpe tomipesi na Yehova, tozali lisusu na likambo ya kosala te na oyo etali komonisa ezaleli ya boboto? Te. Toyebi ete mpo bilamba ya sika etikala malamu mpe pɛto, esɛngaka ntango nyonso kobatela yango. Koyekola Liloba ya Nzambe mpe komanyola likoló ya bandakisa oyo ezali kati na yango esalisaka mpo na komitalela lisusu mpe na bosembo. Liloba ya Nzambe, oyo ezali lokola talatala, emonisaka yo nini?—Yakobo 1:23-25.
20. Ndenge nini tokoki kolonga na komonisa boboto?
20 Bomoto ya bato ekeseni. Basaleli mosusu ya Nzambe bazalaka na mokakatano te mpo na komonisa boboto, kasi ezali bongo te mpo na bamosusu. Atako bongo, baklisto nyonso basengeli kolona mbuma ya elimo ya Nzambe, oyo boboto mpe ezali kati na yango. Paulo apesaki Timote toli malamu ete: “Landá boyengebene, ezaleli ya kokangama na Nzambe, kondima, bolingo, koyika mpiko, elimo ya boboto.” (1 Timote 6:11) Liloba “kolanda” ezali komonisa ete esengeli kosala molende. Biblia moko ya Lingelesi ebongoli toli yango boye, ‘tyá motema na yo na.’ (New Testament in Modern English, ya J. B. Phillips) Soki osali makasi ya komanyola likoló ya bandakisa malamu oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe, yango ekoki mpenza kofanda na motema na yo lokola nde baloni yango kolona. Bandakisa yango ekobongisa bomoto na yo mpe ekotambwisa yo.—Yakobo 1:21.
21. (a) Mpo na nini tosengeli kolanda ezaleli ya boboto? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
21 Bizaleli na biso liboso ya bato mosusu nde emonisaka soki tomonisaka boboto. Moyekoli Yakobo atunaki ete: “Nani azali moto ya bwanya mpe ya bososoli na kati na bino? Tiká ete alakisa misala na ye na etamboli na ye ya malamu na boboto oyo ezali ya bwanya.” (Yakobo 3:13) Ndenge nini tokoki komonisa ezaleli yango na libota, na mosala ya kosakola, mpe na kati ya lisangá? Lisolo oyo elandi ekopesa makanisi ya malamu.
Bozongeli
• Na oyo etali boboto, oyekoli nini na ndakisa ya
• Yehova?
• Yesu?
• Moize?
• Abigaili?
• Mpo na nini tosengeli kolanda ezaleli ya boboto?
[Elilingi na lokasa 16]
Mpo na nini Yehova andimaki mbeka ya Abele?
[Elilingi na lokasa 17]
Yesu amonisaki ete boboto etambolaka nzela moko na komikitisa
[Elilingi na lokasa 18]
Moize apesaki ndakisa malamu ya boboto