Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 1/4 nk. 20-25
  • Monisá “boboto mpenza epai ya bato nyonso”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monisá “boboto mpenza epai ya bato nyonso”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na kati ya libota
  • Na mosala ya kosakola
  • Na kati ya lisangá
  • “Epai ya bato nyonso”
  • Tomilatisa bopɔlɔ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Boboto ezali ezaleli ya ntina mingi mpo na Baklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Motema pɛtɛɛ—Ezali na ntina nini mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • “Esengo na bato na bopɔlɔ”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 1/4 nk. 20-25

Monisá “boboto mpenza epai ya bato nyonso”

“Kobá kokundwela bango . . . bázala te bato ya makambo makasimakasi, bámonisa boboto mpenza epai ya bato nyonso.”​—TITO 3:1, 2.

1. Mpo na nini komonisa boboto ezalaka pɛtɛɛ te?

NTOMA Paulo akomaki ete: “Bókóma bamekoli na ngai, ndenge ngai mpe nazali ya Klisto.” (1 Bakolinti 11:1) Basaleli nyonso ya Nzambe lelo oyo basalaka makasi básalelaka toli yango. Ya solo, ezali likambo ya pɛtɛɛ te, mpamba te baboti na biso ya liboso batikelá biso bamposa mpe bizaleli oyo ekeseni mpenza na ndakisa ya Klisto. (Baloma 3:23; 7:21-25) Atako bongo, biso nyonso tokoki komonisa boboto soki tosali milende. Kasi, ebongi te tótya motema kaka na ekateli oyo tozwi ya kosala milende. Tosengeli lisusu na likambo nini?

2. Ndenge nini tokoki komonisa “boboto mpenza epai ya bato nyonso”?

2 Boboto ya Nzambe ezali na kati ya mbuma ya elimo santu. Ntango tozali kotika mpenza ete elimo santu ya Nzambe etambwisa biso, tokobanda mpe komonisa mbuma na yango mingi. Ezali se na ndenge yango nde tokolonga komonisa “boboto mpenza” epai ya bato nyonso. (Tito 3:2) Tiká tótalela ndenge oyo tokoki kolanda ndakisa ya Yesu mpe na ndenge yango, kosala ete bato oyo bafandi na biso ‘bázwa kopema.’​—Matai 11:29; Bagalatia 5:22, 23.

Na kati ya libota

3. Wapi makambo oyo ezali komonisa elimo ya mokili na kati ya mabota?

3 Moko na bisika oyo tosengeli komonisa boboto ezali na libota. Ebongiseli ya ONU mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) emonisi ete koswana ná bitumba na kati ya ndako ezali komemela basi mpasi mingi koleka mpasi oyo ezali kouta na makama ya mituka bakisa mpe malaria. Na ndakisa, na Londres, na Angleterre, soki batángi makambo minei oyo etali mobulu, moko na yango ezali kosalema na kati ya ndako. Mbala mingi bapolisi bamonaka bato oyo ‘bagangaka mpe bafingaka’ mpo na komonisa ete bazali na nkanda. Likambo ya mabe koleka ezali ete bato mosusu batiki ete ‘makambo ya bololo’ ebebisa mabala na bango. Bizaleli nyonso wana ezali komonisa “elimo ya mokili” mpe esengeli kozala na esika te na mabota ya baklisto.​—Baefese 4:31; 1 Bakolinti 2:12.

4. Boboto ezali na ntina nini na kati ya libota?

4 Mpo na kokima makanisi ya mokili, tozali na mposa ya elimo ya Nzambe. “Esika elimo ya Yehova ezali, bonsomi ezali wana.” (2 Bakolinti 3:17) Bolingo, motema malamu, komipekisa, mpe motema molai elendisaka bomoko na kati ya mobali ná mwasi na ye, atako bazali bato ya kozanga kokoka. (Baefese 5:33) Ezaleli ya boboto etyaka esengo na libota mpe ekeseni mpenza na ezaleli ya kowelana mpe ya matata oyo ezali kobebisa ebele ya mabota. Maloba ya moto ezalaka na ntina mingi, kasi ndenge oyo azali koloba yango nde emonisaka makanisi nini azali na yango. Soki moto azali koloba na boboto likambo oyo ezali kotungisa ye, alɛmbisaka kowelana. Salomo, mokonzi ya bwanya, akomaki boye: “Eyano oyo epesami na boboto, elongolaka nkanda, kasi liloba ya kozokisa ematisaka nkanda.”​—Masese 15:1, NW.

5. Makambo nini boboto ekoki kosala na kati ya mabota oyo bato mosusu basambelaka Yehova te?

5 Boboto ezali na ntina mingi lisusu na mabota oyo bato mosusu basambelaka Yehova te. Ntango maloba ya boboto esangani na misala ya boboto, yango ekoki kobenda epai ya Yehova bato oyo bazalaki liboso kosepela te. Petelo apesaki basi baklisto toli oyo: “Bótosaka mibali na bino moko, mpo ete, soki bamosusu batosaka liloba te, bázwama kozanga liloba na nzela ya etamboli ya basi na bango, mpamba te bamoni na miso na bango moko etamboli na bino ya pɛto elongo na limemya makasi. Mpe monzɛlɛ na bino ezala oyo ya libándá te na kokanga nsuki mpe na kolata biloko kitoko ya wolo to kolata bilamba ya likoló, kasi ezala nde bomoto ebombaná ya motema na kati ya molato oyo epɔlaka te ya elimo ya kimya mpe ya boboto, oyo ezali na motuya monene na miso ya Nzambe.”​—1 Petelo 3:1-4.

6. Ndenge nini komonisa boboto na libota ekoki kosalisa baboti bázala na boyokani malamu ná bana na bango?

6 Ekoki kokóma ete baboti bazali koyokana te na bana na bango, mingimingi soki bolingo mpo na Yehova ezali te. Kasi, ezali na ntina ete baklisto bámonisanaka boboto na kati ya mabota na bango. Paulo apesaki batata toli oyo: “Bósilikisaka bana na bino te, kasi bókoba kobɔkɔla bango na disipilini mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Soki na kati ya libota moko bato bazali komonisana boboto, baboti bakómaka na boyokani malamu na bana na bango. Dean, oyo akolaki na libota ya bana mitano, azali koyeba lisusu ndenge oyo tata na ye azalaki: “Tata azalaki moto ya boboto. Nazali koyeba ete ata mokolo moko te ngai ná tata tobendanaki na maloba, ata ntango oyo nakómaki elenge. Azalaki ntango nyonso na boboto mingi, ata soki asiliki. Ntango mosusu, azalaki kokɔtisa ngai na ndako to kopekisa ngai makambo mosusu, kasi ata mbala moko te ngai ná tata toswanaki. Azalaki kaka tata te. Azalaki mpe moninga na biso, yango wana tozalaki kolinga koyokisa ye mawa te.” Tomoni ete ezaleli ya boboto esalisaka mpenza baboti ete bázala na boyokani malamu na bana na bango.

Na mosala ya kosakola

7, 8. Mpo na nini komonisa boboto na mosala ya kosakola ezali na ntina mingi?

7 Ezali mpe na ntina mingi tómonisaka boboto na mosala ya kosakola. Ntango tozali kosakola nsango malamu ya Bokonzi, tokutanaka na bato ya bizaleli ndenge na ndenge. Bato mosusu basepelaka koyoka nsango ya elikya oyo tomemelaka bango. Kasi, mpo na bantina ndenge na ndenge, bato mosusu bakoki koboya koyoka biso. Boboto ekosalisa biso mingi ntango tokutani na bato ya ndenge wana mpo tókokisa mokumba na biso ya kopesa litatoli tii na esika eleki mpenza mosika na mabelé.​—Misala 1:8; 2 Timote 4:5.

8 Ntoma Petelo akomaki boye: “Bósantisa Klisto lokola Nkolo na kati ya mitema na bino, bómibongisa ntango nyonso mpo na koloba liboso ya moto nyonso oyo atuni bino ntina ya elikya oyo ezali na kati na bino, kasi bósalaka bongo na elimo ya boboto mpe na limemya makasi.” (1 Petelo 3:15) Lokola totalelaka Klisto ete azali Ndakisa na biso, tósalaka makasi mpo na komonisa boboto mpe limemya ntango tozali kopesa litatoli epai ya bato oyo balobaka na biso maloba mabe. Mbala mingi, kosala bongo ebotaka mbuma ya malamu.

9, 10. Lobelá lisolo oyo ezali komonisa ntina ya kozala na boboto na mosala ya kosakola.

9 Ntango Motatoli moko abɛtaki na ndako moko, mwasi ya nkolo ndako abimaki; kasi mobali na ye Keith, atikalaki na ndako. Ntango mwasi ya Keith ayebaki ete moto oyo ayaki epai na bango azali Motatoli ya Yehova, asilikaki mpe abandaki koloba ete Batatoli banyokolaka bana. Ndeko yango afandaki nyɛɛ. Na nsima, alobaki na ye na boboto mpenza ete: “Limbisá biso soki topesaka yo makanisi wana. Kasi, okosepela nayebisa yo makambo oyo Batatoli ya Yehova bandimaka?” Keith azalaki kolanda lisolo na bango mpe apusanaki pene mpo na kokata lisolo yango mpe kosɛnga na ndeko yango akende.

10 Na nsima, mobali yango ná mwasi na ye bayokaki mawa ndenge balobaki mabe na moto oyo ayaki kotala bango. Boboto na ye esimbaki mitema na bango. Kasi, na pɔsɔ oyo elandaki, ndeko yango azongelaki bango lisusu mpe na mbala yango, Keith ná mwasi na ye bandimaki alimbwela bango mateya ya lingomba na ye na kati ya Biblia. Na nsima, mobali yango ná mwasi na ye balobaki boye: “Na boumeli ya mbula mibale oyo elandaki, toyokaki makambo ebele oyo Batatoli mosusu bazalaki koyebisa biso.” Na nsima, bandimaki koyekola Biblia mpe nsukansuka bango mibale bamipesaki na Yehova mpe bazwaki batisimo. Talá mbano oyo Motatoli ya liboso oyo akendaki kotala Keith ná mwasi na ye azwaki! Nsima ya bambula, Motatoli wana akutanaki na mobali yango ná mwasi na ye oyo basilaki kokóma bandeko na ye ya elimo. Boboto ebotaka mbuma malamu.

11. Ndenge nini boboto ekoki komema moto na kondima solo?

11 Makambo oyo Harold akutanaki na yango na mosala ya soda etikaki ye na nkanda na motema mpe azalaki lisusu kondima te ete Nzambe azali. Longola nyonso wana, sofɛlɛ moko oyo alangwaki masanga atutaki ye na motuka mpe akómaki ebɔsɔnɔ. Ntango Batatoli ya Yehova bayaki kotala ye na ndako na ye, Harold ayebisaki bango ete bátya lisusu makolo na bango epai na ye te. Kasi mokolo mosusu, Bill, Motatoli moko akendaki kotala moto mosusu oyo asepelaki na nsango malamu; kaka ndako moko ekabolaki ndako ya moto yango ná ndako ya Harold. Bill ayebaki te nzokande akendaki kobɛta nde na ndako ya Harold. Harold atambolaki na banzete mpe afungolaki ndako; ntango Bill amonaki ye, mbala moko asɛngaki bolimbisi mpe ayebisaki ye ete abungi ndako, azali nde koluka moto mosusu oyo afandaka pembeni wana. Harold asalaki nini? Bill ayebaki te ete Harold alandaki na televizyo ndenge oyo Batatoli basalaki na bomoko mpo na kotonga Ndako ya Bokonzi moko kaka na mwa mikolo moke. Akamwaki mingi komona ebele ya bato bazali kosala na bomoko, mpe akómaki kosepela na Batatoli. Ndenge oyo Bill asɛngaki ye bolimbisi na boboto mpe bonkonde, esimbaki motema ya Harold mpe andimaki ete Batatoli bákendaka kotala ye. Ayekolaki Biblia, akolaki na elimo mpe akómaki mosaleli ya Yehova oyo azwi batisimo.

Na kati ya lisangá

12. Bizaleli nini ya mokili bandeko na kati ya lisangá basengeli koboya?

12 Esika ya misato oyo ezali na ntina mingi tómonisaka boboto ezali nde lisangá. Lelo oyo, bato bazali kozwana matata mpambampamba. Bato oyo bapesaka esika na makambo ya elimo te na bomoi na bango bameseni kowelana, kotyana ntembe mpe koswana. Na bantango mosusu, bizaleli wana ya bato ya mokili ekɔtaka mokemoke na lisangá mpe ebimisaka matata mpe koswana. Bandeko oyo bazali kokamba lisangá bayokaka mawa mingi soki ezali kosɛnga ete bábongisaka makambo ya ndenge wana. Atako bongo, bolingo mpo na Yehova mpe mpo na bandeko na bango etindaka bango na kosalisa bato oyo bazali kobɛta libaku mpo bázonga na nzela.​—Bagalatia 5:25, 26.

13, 14. Mbuma nini ‘kolakisa na boboto baoyo bazali te na ezaleli ebongi’ ekoki kobota?

13 Na ekeke ya liboso, bato mosusu na kati ya lisangá bazalaki kolukela Paulo ná moninga na ye Timote mindɔndɔ. Paulo ayebisaki Timote ete asengeli kokeba na bandeko oyo bazalaki lokola bambɛki “mpo na mosala ezangi lokumu.” Paulo alobaki ete “moombo ya Nkolo asengeli te kobunda, asengeli nde kozala na boboto epai ya bato nyonso, moto oyo akoki mpo na koteya, oyo amipekisaka na ntango basaleli ye mabe, kolakisáká na boboto baoyo bazali te na ezaleli ebongi.” Soki tozali komonisa boboto ata na ntango batumoli biso, mbala mingi bato oyo balingaka kotyana na biso ntembe bango moko bakitisaka mongongo. Na nsima, ndenge Paulo abakisaki na mokanda na ye, Yehova akoki “kopesa bango kobongola motema oyo ezali komema na boyebi ya sikisiki ya solo.” (2 Timote 2:20, 21, 24, 25) Tomoni ete Paulo alobeli komipekisa nzela moko na boboto.

14 Paulo azalaki kosalela makambo oyo ye moko azalaki koteya. Ntango alobelaki likambo ya “bantoma mineneminene” oyo bazalaki na lisangá ya Kolinti, Paulo alendisaki bandeko mosusu ete: “Nzokande, ngai moko, Paulo, nazali kobondela bino na boboto mpe na motema malamu ya Klisto, atako namonanaka mwa moto moko ya moke na kati na bino, nzokande ntango nazali te nazalaka moto ya makasi epai na bino.” (2 Bakolinti 10:1; 11:5) Ya solo, Paulo alandaki ndakisa ya Klisto. Tomoni ete asɛngaki bandeko yango likambo wana “na boboto” ya Klisto. Na ndenge yango, aboyaki komitombola, to kosɛngisa bandeko makambo na makasi. Na ntembe te elendiseli na ye esepelisaki bandeko oyo bazalaki na matoi ya koyoka. Alukaki naino koboma mɔtɔ mpo báyokana mpe abongisaki nzela mpo ete kimya mpe bomoko ezala na kati ya lisangá. Esengeli te ete biso nyonso tósala makasi mpo tósala ndenge wana? Mingimingi, esengeli ete bankulutu bálanda ndakisa ya Klisto mpe ya Paulo na misala na bango.

15. Mpo na nini boboto ezali na ntina mingi ntango tozali kopesa toli?

15 Mokumba ya kosalisa basusu ezalaka te kaka na ntango oyo kimya mpe bomoko ya lisangá ebandi kobeba. Liboso mpenza ete makambo ebeba, esɛngaka kopesa bandeko toli ya bolingo. Paulo apesaki toli oyo: “Bandeko, ata soki moto abɛti libaku liboso ete ayeba yango, bino baoyo bozali na makoki ya elimo bómeka kosembola moto yango.” Kasi, ndenge nini bokosala yango? “Na elimo ya boboto, wana yo moko mpe ozali komitala, noki te yo moko mpe omekama.” (Bagalatia 6:1) Kobatela “elimo ya boboto” ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, mpamba te baklisto nyonso, ezala baoyo bazali na mikumba na kati ya lisangá, bazali bato oyo bakoki kosala masumu. Kasi, boboto nde esalisaka na kozongisa moto oyo abɛti libaku na nzela.

16, 17. Nini ekoki kokitisa motema ya moto oyo azali kokakatana mpo na kondima toli?

16 Na Grɛki ya kala, liloba oyo ebongolami na “kosembola” ezalaki mpe kosalelama mpo na kolobela kozongisa mikuwa oyo ebukani na esika na yango, likambo oyo esalaka mpasi mpenza. Monganga ya malamu oyo azali kozongisa mokuwa oyo ebukani na esika na yango alobelaka ntina ya likambo yango. Boboto na ye ekitisaka moto motema. Soki liboso abanda mosala yango azali koloba mwa maloba ya kokitisa motema, akolɛmbisa mpasi oyo ekokaki kozala makasi mpenza. Ndenge moko mpe, moto akoki koyoka mpasi mingi ntango bazali kosembola ye na elimo. Kasi, soki moto oyo azali kosembola azali na elimo ya boboto, yango ekolɛmbisa mpasi yango; elingi koloba ete ekotya boyokani ya malamu mpe ekobongisa nzela mpo moto oyo abɛti libaku abongwana. Ata soki na ebandeli azali koboya toli, ntango moto oyo azali kopesa ye yango azali komonisa boboto, akoki kokitisa motema mpe akondima toli malamu oyo euti na Makomami.​—Masese 25:15.

17 Ntango tozali kosembola moto, likama ezalaka ete kopesa ye toli ekóma kosambisa ye. Mokomi moko alobelaki likambo yango na maloba oyo: “Ntango tozali kosembola moto, mbala mingi tokómaka na mposa ya koluka kondimisa ye na makasi makambo oyo tozali koloba, yango wana ezali na ntina mingi tózalaka na boboto.” Moklisto oyo azali kopesa toli akoyeba kokima likama yango soki azali na boboto oyo euti na komikitisa.

“Epai ya bato nyonso”

18, 19. (a) Mpo na nini baklisto bakoki kozala na mokakatano ya komonisa boboto liboso ya bakonzi ya mokili? (b) Nini ekosalisa baklisto na komonisa boboto epai ya bakonzi, mpe yango ekoki komema matomba nini?

18 Bato mingi bazalaka na mokakatano ya komonisa boboto liboso ya bakonzi ya mokili. Ezali solo ete bakonzi mosusu bazalaka na makambo makasimakasi mpe bazalaka ata na mawa te. (Mosakoli 4:1; 8:9) Kasi, lokola tolingaka Yehova, yango ekosalisa biso tóbosana te ete azali na bokonzi oyo eleki bokonzi nyonso mpe ekosalisa biso tótosa bakonzi ya Leta na makambo oyo ebongi tótosa bango. (Baloma 13:1, 4; 1 Timote 2:1, 2) Ata na ntango bakonzi bazali koluka kopekisa mosala na biso ya kosakola, tolukaka mayele mosusu ya kopesa Yehova mbeka ya masanzoli.​—Baebele 13:15.

19 Totombokelaka bakonzi ata moke te. Tosalaka nyonso mpo tózala na makambo makasimakasi te, kasi tokakolaka te mitinda ya sembo. Kosala bongo nde esalisi bandeko na biso na kokokisa mosala na bango na bikólo 234 na mokili mobimba. Tolandaka toli oyo Paulo apesaki biso ete ‘tótosa baguvɛrnema mpe bakonzi mpo bazali bayangeli, tómibongisa mpo na mosala nyonso ya malamu, tóloba mabe mpo na moto te, tózala te bato balingá-bitumba, tózala te bato ya makambo makasimakasi, tómonisa boboto mpenza epai ya bato nyonso.’​—Tito 3:1, 2.

20. Mbano nini bato oyo bazali komonisa boboto bakozwa?

20 Baoyo bazali komonisa boboto bakozwa mapamboli mingi. Yesu alobaki ete: “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.” (Matai 5:5) Soki bandeko ya Klisto bapakolami na elimo bazali ntango nyonso komonisa boboto, bakozwa esengo mpe libaku malamu ya kozala na kati ya Bokonzi oyo ekoyangela mabelé. “Ebele ya bato” oyo bazali na kati ya “bampate mosusu” bazali mpe kolanda komonisa boboto mpe bazali na elikya ya kozala na bomoi na Paladiso awa na mabelé. (Emoniseli 7:9; Yoane 10:16; Nzembo 37:11) Talá elikya malamu tozali na yango mpo na mikolo ekoya! Yango wana, tóbosana te toli oyo Paulo apesaki baklisto ya Efese: “Na yango, ngai moto ya bolɔkɔ na kati ya Nkolo, nazali kobondela bino ete bótambolaka na ndenge oyo ebongi na kobengama oyo bobengamaki na yango, na elimo mpenza ya komikitisa mpe na boboto.”​—Baefese 4:1, 2.

Bozongeli

• Mapamboli nini tokozwa soki tozali komonisa boboto

• na kati ya libota?

• na mosala ya kosakola?

• na kati ya lisangá?

• Mbano nini Nzambe alaki kopesa bato ya boboto?

[Elilingi na lokasa 21]

Boboto ezali na ntina mingi mpenza, mingimingi na libota oyo bato mosusu basambelaka Yehova te

[Elilingi na lokasa 21]

Boboto ekómisaka boyokani malamu na kati ya libota

[Elilingi na lokasa 23]

Lobá na boboto mpe na limemya makasi

[Elilingi na lokasa 24]

Boboto ya moto oyo azali kopesa toli ekoki kosalisa moto oyo abɛti libaku

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto