Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/9 lok. 3
  • Biblia ekoki kobongisa libala na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ekoki kobongisa libala na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Masolo mosusu
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Batelá libala na yo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • “Libala ekumisama”
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/9 lok. 3

Biblia ekoki kobongisa libala na yo

LIBALA​—liloba yango esepelisaka mpenza bato mosusu. Nzokande, epesaka bato mosusu maladi. Mwasi moko alobaki boye: “Namonaka lokola libala na ngai esí ekufá. Ntango nyonso, namonaka ete bakipaka ngai te mpe namimonaka kaka lokola monzemba.”

Nini esalaka ete bato mibale oyo balapaki ndai ya kolingana bákóma kopesana mokɔngɔ? Moko ya makambo oyo esalaka bongo ezali kozanga koyeba makambo oyo libala esɛngaka. Mopanzi-nsango moko alobaki ete: “Tozwaka formasyo ata moke te liboso ya kobala.”

Iniversite moko (Rutgers University) esalaki ankɛti (National Marriage Project) oyo emonisaki ete bato moke kaka bayebi makambo oyo libala esɛngaka. Bakambi ya ankɛti yango bakomaki boye: “Bato mingi oyo totunaki na ankɛti yango babɔkwamaki na baboti oyo bazalaki na mabala ya esengo te to na baboti oyo babomá mabala. Bayebi malamu ndenge oyo libala ya mabe ezalaka, kasi bayebaka te ndenge oyo libala ya malamu ezalaka. Bato mosusu balobaki ete libala ya malamu ezali oyo ‘ekesani na oyo ya baboti na ngai.’”

Baklisto bakoki mpe kokutana na mikakatano ya libala? Ɛɛ. Kutu, bapesaki baklisto mosusu na ekeke ya liboso toli ete ‘báluka koboma’ libala te. (1 Bakolinti 7:27, Bible na lingala ya lelo oyo) Emonani polele ete na libala nyonso ya bato ya kozanga kokoka matata ekoki kozanga te, kasi lisalisi mpe ezali. Mobali ná mwasi na ye bakoki kobongisa libala na bango soki bazali kolanda toli ya Biblia.

Ya solo, Biblia ezali mokanda ya libala te. Kasi, lokola epemami na Mobandisi ya libala, tokoki mpenza kolikya ete toli na yango ekosalisa. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova Nzambe alobaki boye: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango. Soki oyokaki malako na ngai! mbɛlɛ kimya na yo ezalaki lokola ebale mpe boyengebene na yo lokola mbonge na mai-na-monana.”​—Yisaya 48:17, 18.

Mɔtɔ ya bolingo oyo ezalaki kati na yo na molongani na yo ebandi nde kokufa? Ozali komona ete ofandi na libala oyo ezangi bolingo? Mwasi moko ya mbula 26 alobaki boye: “Ezali na maloba te mpo na kolimbola mpasi oyo moto ayokaka na libala ya ndenge wana. Mpasi yango elandaka moto ngonga nyonso.” Na esika ondima kaka kofanda na libala oyo ezali kopesa yo esengo te, mpo na nini te kozwa mokano ya kobongisa yango? Lisolo oyo elandi ekolakisa mibali mpe basi ndenge toli ya Biblia ekoki kobongisa libala na bango na likambo oyo: ndai ya libala.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto