Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/11 nk. 8-12
  • ‘Sembolá Liloba ya Nzambe malamumalamu’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Sembolá Liloba ya Nzambe malamumalamu’
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Paulo azalaki mosakoli ya Bokonzi ya molende
  • Makambo tokoloba na mosala ya kosakola esengeli kouta na Liloba ya Nzambe
  • Tosengeli kozala na bizaleli malamu
  • Liloba ya Nzambe ebongolaka bato
  • Kobá kosembola Liloba ya Nzambe malamumalamu
  • Tosembolaka Liloba ya Nzambe na bosikisiki nyonso?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1996
  • Tósalela “mopanga ya elimo” na mayele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Bisaleli na biso mpo na koteya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Tóteyaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/11 nk. 8-12

‘Sembolá Liloba ya Nzambe malamumalamu’

“Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo omimonisa moto oyo andimami na Nzambe, mosali oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.”​—2 TIMOTE 2:15.

1, 2. (a) Mpo na nini moto asengeli kozala na bisaleli ya mosala? (b) Mosala nini baklisto bazali kosala, mpe ndenge nini bamonisaka ete balukaka liboso Bokonzi?

MPO na kosala mosala esɛngaka moto azala na bisaleli. Kasi, kozala na bisaleli mpamba ekoki te. Esengeli kozala na esaleli ya malamu mpe kosalela yango na ndenge ebongi. Na ndakisa, soki ozali kotonga mwa ndako, ntango olingi kokangisa mabaya, kozala kaka na marto ná bansɛtɛ ekoki te. Osengeli koyeba kobɛta nsɛtɛ mpo engumbama te. Soki oyebi kosalela marto malamu te, kobɛta nsɛtɛ ekozala mpasi, ekoki ata kolɛmbisa yo. Kasi, koyeba kosalela bisaleli esalisaka mpo mosala esalema malamu.

2 Biso baklisto tozali na mosala moko ya kosala. Ezali mosala ya ntina mpenza. Yesu Klisto alendisaki bayekoli na ye ‘bálukaka liboso bokonzi.’ (Matai 6:33) Ndenge nini tokoki koluka liboso bokonzi? Lolenge moko ezali kosala mosala ya kosakola Bokonzi mpe kokómisa bato bayekoli na molende. Lolenge mosusu ezali kosalela mpenza Liloba ya Nzambe na mosala na biso ya kosakola. Lolenge ya misato ezali kozala na bizaleli malamu. (Matai 24:14; 28:19, 20; Misala 8:25; 1 Petelo 2:12) Mpo na kosala mosala ya boklisto malamu mpe na esengo, tosengeli kozala na bisaleli ya malamu mpe koyeba kosalela yango. Na likambo yango, ntoma Paulo azalaki ndakisa malamu mpenza ya moklisto ya molende na mosala, mpe alendisaki bandimi mosusu ete bálanda ndakisa na ye. (1 Bakolinti 11:1; 15:10) Na bongo, liteya nini tokoki kozwa epai ya Paulo, moninga na biso ya mosala?

Paulo azalaki mosakoli ya Bokonzi ya molende

3. Mpo na nini tokoki koloba ete ntoma Paulo azalaki kosakola Bokonzi na molende?

3 Paulo azalaki mosali ya ndenge nini? Ntembe ezali te ete azalaki na molende. Paulo amipesaki na kopalanganisa nsango malamu na teritware moko monene pembenipembeni ya Mai monene ya Méditerranée. Ntoma yango ya mpiko amonisaki ntina oyo azalaki kosakola Bokonzi na molende na maloba oyo: “Nzokande, soki nazali kosakola nsango malamu, yango ezali te epai na ngai ntina ya komikumisa, mpo ezali nde mokumba oyo batye likoló na ngai. Ya solo, mawa na ngai soki nasakoli te nsango malamu!” (1 Bakolinti 9:16) Paulo azalaki kokanisa kaka kobikisa bomoi na ye moko? Te. Azalaki koluka kaka bolamu na ye moko te. Azalaki na mposa ete bato mosusu mpe báyoka nsango malamu. Akomaki boye: “Nazali kosala makambo nyonso mpo na nsango malamu, mpo nakóma mosangani na yango elongo na bamosusu.”​—1 Bakolinti 9:23.

4. Nini ezali esaleli ya libosoliboso ya baklisto?

4 Ntoma Paulo azalaki mosali moko ya komikitisa, oyo ayebaki ete na makoki na ye moko akolonga te. Se ndenge mosali ya mabaya azalaka na mposa ya marto, Paulo mpe azalaki na mposa ya esaleli ya malamu mpo na kokɔtisa solo ya Nzambe na mitema ya bayoki na ye. Esaleli na ye ya libosoliboso ezalaki nini? Biblia, Liloba ya Nzambe. Ndenge moko mpe, Biblia ezali esaleli ya libosoliboso oyo tosengeli kosalela mpo na kokómisa bato bayekoli.

5. Longola kotángela bato Biblia, tosengeli kosala nini mpo na kozala mpenza baministre oyo bayebi mosala?

5 Paulo ayebaki ete kosembola Liloba ya Nzambe malamumalamu esuki te kaka na kotángela moto maloba na yango. Azalaki kosalela “mayele ya kondimisa.” (Misala 28:23) Azalaki kosala yango ndenge nini? Paulo ayebaki mpenza kosalela Liloba ya Nzambe mpo na kondimisa ebele ya bato solo ya Bokonzi. Azalaki kokanisa na bango. Paulo alekisaki sanza misato na sinagoga ya Efese mpe azalaki ‘kosala masukulu mpe kosalela mayele ya kondimisa na oyo etali bokonzi ya Nzambe.’ Atako “bamosusu bakobaki kokómisa mitema na bango makasi mpe bazalaki kondima te,” bamosusu bayokaki. Mosala ya Paulo na Efese ebotaki mpenza mbuma mpe “liloba ya Yehova ekobaki kokola mpe kolonga.”​—Misala 19:8, 9, 20.

6, 7. Na ndenge nini Paulo apesaki mosala na ye nkembo, mpe ndenge nini biso tokoki kosala yango?

6 Lokola Paulo azalaki mosakoli ya Bokonzi ya molende, ‘azalaki kopesa nkembo na mosala na ye.’ (Baloma 11:13) Na ndenge nini? Azalaki koluka lokumu na ye moko te; azalaki mpe koyoka nsɔni te báyeba ete azali kosala elongo na Nzambe. Kasi, azalaki nde kopesa mosala na ye lokumu mingi mpenza. Paulo azalaki na mayele mpe makoki ya kosembola Liloba ya Nzambe. Lokola mosala na ye ezalaki kobota mbuma, epesaki bato mosusu mposa, esalisaki bango bákokisa mosala na bango malamumalamu. Na ndenge yango mpe, mosala na ye ezalaki kozwa nkembo.

7 Lokola Paulo, biso mpe tokoki kopesa mosala na biso nkembo soki tozali kosalela Liloba ya Nzambe mingi mpe na ndenge ya malamu. Na ndenge nyonso oyo tozali kosala mosala ya kosakola, tosengeli kozala na mokano ya kotángela bato mingi Biblia. Ndenge nini tokoki kosala yango na mayele ya kondimisa? Tótalela lolenge misato ya ntina: (1) Kobenda likebi ya bato na Liloba ya Nzambe na ndenge oyo ekosala ete bámemya yango. (2) Kolimbola Biblia na mayele mpe kolakisa ndenge ya kosalela makambo oyo yango elobi. (3) Kolimbola Biblia na ndenge oyo ezali kondimisa.

8. Bisaleli nini tozali na yango lelo oyo mpo na mosala ya kosakola, mpe ndenge nini osalelaka yango?

8 Lelo oyo, basakoli ya Bokonzi bazali na bisaleli mingi oyo Paulo azalaki na yango te. Na ndakisa babuku, bazulunalo, mwa babuku, batrakte, bakasɛti ya radio mpe bakasɛti-video. Na ebandeli ya bambula ya 1900, basakoli bazalaki kosalela karte ya litatoli, bafono, mituka oyo ezalaki na bikoliseli-lolaka (haut-parleurs), mpe bazalaki kosakola na baradio. Kasi, esaleli na biso oyo eleki malamu ezali Biblia, mpe tosengeli koyeba mpenza kosalela yango.

Makambo tokoloba na mosala ya kosakola esengeli kouta na Liloba ya Nzambe

9, 10. Na likambo ya kosalela Liloba ya Nzambe, toli oyo Paulo apesaki Timote eteyi biso nini?

9 Ndenge nini tokoki kosalela malamu Liloba ya Nzambe? Soki tolandi toli oyo Paulo apesaki moninga na ye ya mosala Timote: “Salá nyonso oyo ekoki na yo mpo omimonisa moto oyo andimami na Nzambe, mosali oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo azali kosembola liloba ya solo malamumalamu.” (2 Timote 2:15) ‘Kosembola liloba ya solo malamumalamu’ ezali kosɛnga nini?

10 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kosembola malamumalamu” elimboli mpenzampenza “kokata alima” to “kokata nzela semba.” Na Makomami ya Grɛki ya boklisto mobimba, liloba yango emonani kaka na toli wana oyo Paulo apesaki Timote. Liloba yango ekokaki mpe kolimbola kokata nzela moko ya semba na elanga. Mosali bilanga oyo ayebi mosala na ye malamu ayokaka mabe soki akati nzela etɛngamá. Bayebisaki Timote ete mpo azala “mosali oyo azali na eloko moko te ya koyokela nsɔni,” asengeli te kotɛngisa mateya ya solo ya Liloba ya Nzambe. Timote azalaki na ndingisa te ya kokɔtisa makanisi na ye moko na mateya na ye. Asengelaki kosakola mpe koteya kaka makambo oyo ezali na Biblia. (2 Timote 4:2-4) Na ndenge yango, bato ya mitema sembo bakolanda kaka makanisi ya Yehova, kasi filozofi ya mokili te. (Bakolose 2:4, 8) Lelo oyo mpe ezali se ndenge yango.

Tosengeli kozala na bizaleli malamu

11, 12. Soki tozali na bizaleli malamu, tokozwa litomba nini ntango tozali kosembola Liloba ya Nzambe malamumalamu na mosala ya kosakola?

11 Ntango tozali kosakola solo ya Liloba ya Nzambe, tosengeli kosuka kaka te na kosembola yango malamumalamu. Bizaleli na biso esengeli komonisa ete totosaka yango. “Tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe,” yango wana tosengeli kozala basali oyo bazali liso na nse ya lokasa te. (1 Bakolinti 3:9) Liloba ya Nzambe elobi boye: “Nzokande, yo moto ozali koteya moto mosusu, omiteyaka yo moko te? Yo, moto ozali kosakola ete ‘Koyiba te,’ oyibaka? Yo, moto ozali koloba ete ‘Kosala ekobo te,’ osalaka ekobo? Yo, moto ozali koyina bikeko, ozwaka na makasi biloko ya batempelo?” (Baloma 2:21, 22) Yango wana, moko ya lolenge oyo biso basaleli ya Nzambe tosengeli kosembola Liloba ya Nzambe malamumalamu ezali kosalela toli oyo: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”​—Masese 3:5, 6.

12 Kosembola Liloba ya Nzambe malamumalamu ekoki komemela biso matomba nini? Tótalela ndenge Liloba ya Nzambe ezali kobongola bato ya mitema sembo.

Liloba ya Nzambe ebongolaka bato

13. Kosalela Liloba ya Nzambe esalaka nini na bomoi ya moto?

13 Ntango moto andimi ete Liloba ya Nzambe ezali solo, nsango na yango etindaka ye abongwana. Paulo amonaki nguya ya Liloba ya Nzambe mpe amonaki malamu na yango na bomoi ya Batesaloniki oyo bakómaki baklisto. Yango wana alobaki na bango boye: “Biso topesaka mpe Nzambe matɔndi ntango nyonso, mpamba te ntango boyambaki liloba ya Nzambe, oyo boyokaki epai na biso, bondimaki yango, lokola liloba ya bato te, kasi, ndenge yango ezali mpenza, lokola liloba ya Nzambe, oyo ezali mpe kosala mosala na kati na bino bandimi.” (1 Batesaloniki 2:13) Mpo na baklisto yango, ata mpe mpo na bayekoli ya Klisto nyonso ya solo, makanisi ya bato ata soki ezali malamu ekoki kotɛlɛma te liboso ya bwanya ya Nzambe oyo eleki nyonso. (Yisaya 55:9) Batesaloniki ‘bandimaki liloba na kati ya bolɔzi mingi na esengo ya elimo santu’ mpe bakómaki ndakisa mpo na bandimi mosusu.​—1 Batesaloniki 1:5-7.

14, 15. Nsango ya Liloba ya Nzambe ezali na nguya nini, mpe mpo na nini?

14 Liloba ya Nzambe ezali na nguya, se ndenge Yehova, nkolo na yango, azali na nguya. Liloba yango euti na “Nzambe ya bomoi” oyo, na liloba na ye ‘lola esalamaki,’ mpe liloba yango ‘elongaka na likambo litindi ye yango.’ (Baebele 3:12; Nzembo 33:6; Yisaya 55:11) Molimboli moko ya Biblia alobaki boye: “Nzambe atikaka Liloba na ye te. Awanganaka yango te lokola nde ezali ya ye te. . . . Yango wana ezalaka te lokola eloko oyo ekufá, oyo esalaka te; mpamba te esalisaka mpo na kozala na bomoko na Nzambe ya bomoi.”

15 Nsango ya Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya ndenge nini? Ezali na nguya mingi. Paulo akomaki solo ete: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii na kokabola molimo ná elimo, mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ezali na likoki ya kososola makanisi mpe mikano ya motema.”​—Baebele 4:12.

16. Ndenge nini Liloba ya Nzambe ekoki kobongola moto?

16 Nsango oyo ezali na Liloba ya Nzambe “epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale.” Yango wana, ekɔtelaka moto na nguya oyo eleki nguya ya bisaleli nyonso oyo bato basalelaka. Liloba ya Nzambe ekɔtelaka mpenza moto mpe ekoki kobongola motema na ye, makanisi mpe makambo oyo alingaka, mpe kokómisa ye mosali oyo andimami na Nzambe. Ezali esaleli ya nguya mpenza!

17. Limbolá nguya ya kobongola bato oyo Liloba ya Nzambe ezali na yango.

17 Liloba ya Nzambe emonisaka ndenge oyo moto azali mpenza, soki azali ndenge ye akanisaka to ndenge oyo amimonisaka epai ya bato. (1 Samwele 16:7) Ata moto mabe akoki ntango mosusu kobomba mabe na ye mpe komonisa boboto ya lokuta to lokola nde abangaka Nzambe. Bato mabe babombaka bizaleli na bango na mikano ya mabe. Bato ya lolendo bamonisaka komikitisa ya lokuta mpo bato bákumisa bango. Nzokande, ntango Liloba ya Nzambe ezali komonisa ndenge oyo motema ya moto ya komikitisa ezali mpenza, ekoki kosalisa ye alongola bomoto ya kala mpe ‘alata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe na kati ya boyengebene ya solosolo mpe bosembo.’ (Baefese 4:22-24) Mateya ya Liloba ya Nzambe ekoki mpe kobongola moto ya nsɔninsɔni mpe kokómisa ye Motatoli ya Yehova ya mpiko mpe mosakoli ya Bokonzi ya molende.​—Yilimia 1:6-9.

18, 19. Na lisalisi ya lisolo oyo elobelami na baparagrafe oyo to ya likambo moko oyo okutaná na yango na mosala ya kosakola, monisá ndenge solo ya Biblia ekoki kobongola makanisi ya moto.

18 Nguya ya kobongola bato oyo Liloba ya Nzambe ezali na yango ezali komonana bipai nyonso. Na ndakisa, mbala mibale na sanza, basakoli ya Bokonzi na engumba Phnom Penh, na ekólo Cambodge, bazalaki kokende kosakola na etúká ya Kompong Cham. Ntango pastɛrɛ moko ya mwasi na etúká yango ayokaki bapastɛrɛ mosusu bazali koloba mabe mpo na Batatoli ya Yehova, alukaki kokutana na Batatoli ntango bayaki lisusu na etúká yango. Atunaki bango ebele ya mituna mpo na mikolo ya bafɛti ya lingomba mpe ayokaki bango malamu ntango bazalaki kosalela Biblia mpo na kopesa ye biyano. Na nsima alobaki ete: “Nayebi sikoyo ete makambo oyo bapastɛrɛ mosusu balobaki mpo na bino ezali lokuta! Balobaki ete bosalelaka Biblia te, kasi yango kaka nde bosaleli na ntɔngɔ ya lelo!”

19 Mwasi yango akobaki kosolola masolo ya Biblia na Batatoli mpe abangaki te makaneli ya kolongola ye mokumba ya pastɛrɛ. Ayebisaki moninga na ye moko masolo ya Biblia oyo azalaki kosolola, mpe moninga yango akómaki koyekola Biblia na Batatoli. Moninga yango akómaki mpenza kosepela na makambo oyo azalaki koyekola, mpe mokolo moko na ndako nzambe ayebisaki bato ete, “Bóyekola Biblia na Batatoli ya Yehova!” Mwa moke na nsima, pastɛrɛ yango mpe bato mosusu bakómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova.

20. Ndenge nini lisolo ya mwasi moko ya Ghana ezali komonisa ete Liloba ya Nzambe ezali mpenza na nguya?

20 Lisolo ya Paulina, mwasi moko ya ekólo Ghana, ezali mpe komonisa ete Liloba ya Nzambe ezali na nguya. Mobongisi-nzela moko azalaki koyekola na ye Biblia na buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.a Paulina afandaki na libala ya bombanda mpe amonaki ete asengeli kolongwa na libala yango, kasi mobali na ye ná bandeko na ye nyonso baboyaki mpenza. Nkɔkɔ na ye moko oyo azali zuzi na tribinale monene mpe mokonzi na lingomba, atángelaki ye Matai 19:4-6 mpe alimbolaki yango na ndenge na ye mpo na kolongola ye makanisi wana. Zuzi yango alobaki na ndenge ya kondimisa mpenza, kasi Paulina amonaki mbala moko ete mayele yango ekeseni te na ndenge oyo Satana abalolaki mikapo ya Biblia ntango amekaki Yesu Klisto. (Matai 4:5-7) Paulina akanisaki ndenge Yesu alobaki polele mpo na libala ete, Nzambe akelaki mobali ná mwasi, kasi te mobali ná basi, mpe ete bango mibale, kasi bango misato te, basengeli kokóma nzoto moko. Akangamaki na ekateli na ye mpe nsukansuka bapesaki ye nzela alongwa na libala wana ya bombanda. Mwa moke na nsima, akómaki mosakoli ya Bokonzi mpe azwaki batisimo.

Kobá kosembola Liloba ya Nzambe malamumalamu

21, 22. (a) Ekateli nini biso basakoli ya Bokonzi tosengeli kozala na yango? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?

21 Liloba ya Nzambe ezali esaleli ya malamu mpenza mpo na kosalisa bato bábongwana mpe bápusana penepene na Yehova. (Yakobo 4:8) Se ndenge bato ya misala ya mabɔkɔ basalelaka bisaleli mpo na kosala na ndenge ebongi, tózwa mokano ya kosala nyonso mpo na kosalela malamu Biblia, Liloba ya Nzambe, na mosala oyo Nzambe apesi biso ya kosakola Bokonzi.

22 Ndenge nini tokoki kosembola Biblia malamumalamu na mosala na biso ya kokómisa bato bayekoli? Lolenge moko ezali na kokóma bateyi oyo bazali na mayele ya kondimisa. Tolendisi yo oyekola lisolo oyo elandi, mpamba te ezali kolakisa mayele ndenge na ndenge ya koteya mpe kosalisa basusu mpo bándima nsango ya Bokonzi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

Ozali koyeba lisusu?

• Basakoli ya Bokonzi bazali na bisaleli nini?

• Na ndenge nini Paulo azalaki ndakisa na mosala ya kosakola Bokonzi?

• Kosembola Liloba ya Nzambe malamumalamu esɛngi makambo nini?

• Liloba ya Yehova ezali esaleli ya nguya ya ndenge nini?

[Bililingi na lokasa 10]

Mwa bisaleli oyo baklisto basalelaka mpo na kosakola Bokonzi

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto