Balukaki nzela oyo ekangamakangamá
ELEKI mbula pene na 550, mwa bituluku ya baklisto oyo bazalaki kofanda na Prague, na Chelčice, na Vilémov, na Klatovy mpe na bingumba mosusu ya oyo ezali lelo République tchèque, balongwaki na bingumba yango. Bakendaki kofanda pene na mboka Kunwald, na lobwaku moko na nɔrdi-ɛsti ya Bohême, epai batongaki mwa bandako, bakómaki kosala bilanga, bazalaki kotánga Biblia, mpe bamipesaki nkombo Lisangá ya Bandeko, to Unitas Fratrum na Latin.
Na kati na bango ezalaki na bato ya ndenge nyonso. Ezalaki na basali bilanga, bato minene, bayekoli ya iniversité, bazwi mpe babola, basi mpe mibali, basi bakufelá mibali mpe bitike mpe bango nyonso bazalaki na mposa moko. Bakomaki boye: “Tozalaki kobondela Nzambe mpe kosɛnga Ye amonisa biso mokano na Ye monene na makambo nyonso. Tozalaki na mposa ya kotambola na banzela na Ye.” Lisangá ya Bandeko, to les frères tchèques, ndenge bakómaki kobenga bato yango, bazalaki koluka ‘nzela ekangamakangamá oyo ezali komema na bomoi.’ (Matai 7:13, 14) Solo nini ya Biblia bayebaki? Bindimeli na bango ná ya bato mingi na ntango wana ekesenaki na nini, mpe makambo na bango ekoki koteya biso nini?
Baboyaki mobulu mpe mateya ya mabe
Na katikati ya bambula ya 1400 mangomba ndenge na ndenge ebimisaki Lisangá ya Bandeko. Moko na yango ezalaki Ba-Vaudois, lingomba oyo ebandaki na bambula ya 1100. Na ebandeli, Ba-Vaudois balongwaki na Lingomba ya Katolike, oyo ezalaki lingomba ya Leta na Mpoto ya Ntei. Kasi, na nsima, bazongelaki mateya mosusu ya Lingomba ya Katolike. Mosusu ezalaki Lingomba ya Ba-Hussite, balandi ya Jan Hus. Ba-Tchèque mingi bazalaki bandimi ya lingomba yango. Etuluku moko ya bandimi na yango bazalaki kobunda mpo bana mboka bázala na bomoi ya malamu, etuluku mosusu bazalaki kosalela lingomba mpo na makambo ya politiki. Lisangá ya Bandeko elandaki mpe makanisi ya bituluku ya Ba-Chialiste mpe ya balimboli ya Biblia ya mboka na bango mpe ya bamboka bapaya.
Petr Chelčický (soki mobu 1390-1460), moto ya ekólo Tchéquie mpe molimboli ya Biblia oyo abandisaki lingomba yango ayebaki malamu mateya ya Ba-Vaudois mpe ya Ba-Hussite. Aboyaki Ba-Hussite mpo bakómaki na makambo ya mobulu, aboyaki mpe Ba-Vaudois mpo bandimaki mateya mosusu ya mabe. Alobaki ete baklisto bakoki te kosimba mindoki mpe kobunda. Azalaki koloba ete “mobeko ya Klisto” esengeli kotambwisa moklisto, ata soki ekomemela ye mpasi. (Bagalatia 6:2; Matai 22:37-39) Na mobu 1440, Chelčický akomaki mateya na ye na buku moko (Le Filet de la vraie foi).
Mateya ya Chelčický esepelisaki mpenza Grégoire de Prague, elenge moko oyo azalaki na bomoi na eleko wana mpe alongwaki na Lingomba ya Ba-Hussite. Na mobu 1458, Grégoire andimisaki mwa etuluku ya Ba-Hussite oyo bazalaki kofanda na bisika ndenge na ndenge ya République tchèque bálongwa na bamboka na bango. Bazalaki na kati ya bato oyo balandaki ye na mboka Kunwald, epai basalaki lingomba ya sika. Na nsima, bituluku ya Ba-Vaudois ya Ba-Tchèque ná Ba-Germains balandaki ye kuna.
Talatala ya makambo ya kala
Kobanda mobu 1464 tii 1467, bato ya lingomba yango ya sika oyo ezalaki kokola basalaki makita minene mwa mingi na etúká ya Kunwald mpe bazwaki bikateli mingi oyo emonisaki bindimeli ya lingomba na bango. Bakomaki malamumalamu bikateli yango nyonso na babuku oyo eyebani lelo na nkombo Acta Unitatis Fratrum (Bikateli ya Lisangá ya Bandeko), oyo ezali tii na moi ya lelo. Babuku yango ezali lokola talatala oyo emonisaka makambo ya kala ya lingomba yango; emonisaka malamumalamu makambo oyo Lisangá ya Bandeko bazalaki kondima. Babuku yango ezali mikanda, masukulu, ata mpe balapolo ya bantembe oyo bazalaki kotyana.
Mpo na bindimeli ya Lisangá ya Bandeko, babuku yango elobi boye: “Tozali na ekateli ya kobongisa makambo na biso kaka na kotánga Biblia mpe na kolanda ndakisa ya Nkolo na biso mpe ya bantoma mosantu na ye na komanyola, na komikitisa mpe na motema molai, na kolinga banguna na biso, kosalela mpe kotombela bango malamu mpe kobondela mpo na bango.” Mikanda yango ezali mpe komonisa ete na ebandeli bandimi ya Lisangá ya Bandeko bazalaki kosakola. Bazalaki kokende mibalemibale na mibembo, mpe basi bazalaki makasi na mosala ya misionɛrɛ. Bandimi ya Lisangá ya Bandeko bazalaki koboya mikumba ya politiki, bazalaki kolapa ndai te, bazalaki kosala mosala ya soda te mpe bazalaki kosimba mindoki te.
Babandaki na bomoko, basuki na kokabwana
Kasi, nsima ya bambula mingi, Lisangá ya Bandeko ezalaki lisusu na bomoko te. Bantembe oyo bazalaki kotyana mpo na ndenge ya kosalela bindimeli ekabolaki bango. Na mobu 1494, Lisangá ya Bandeko ekabwanaki na biteni mibale: Etuluku ya monene ná Etuluku ya moke. Etuluku ya monene elongolaki mateya mosusu ya ebandeli, nzokande, Etuluku ya moke ezalaki koteya ete Lisangá ya Bandeko esengeli kokangama kaka na ekateli na yango ya kokɔta na makambo ya politiki mpe ya mokili te.—Talá etanda “Ezali boni mpo na Etuluku ya monene?”
Na ndakisa, moto moko ya Etuluku ya moke akomaki boye: “Ezali mpasi ete bato oyo bazali kotambola na nzela mibale bákangama na Nzambe, mpo soki bazali kondima komipesa mpe kotosa Ye na mwa mabaku moke mpe na makambo ya mikemike, na makambo ya minene bakosala mposa na bango moko. . . . Biso tolingi kozala na kati ya baoyo bazali kotɛngatɛnga te mpe bazali na lisosoli malamu, baoyo bamemi ekulusu na bango mpe bazali kolanda Nkolo Klisto mokolo na mokolo na nzela ekangamakangamá.”
Bato ya Etuluku ya moke bazalaki kondima ete elimo santu ezali nguya ya Nzambe, “mosapi” na ye. Bazalaki kondima ete Yesu, moto ya kokoka, apesaki bomoi na ye mpo na kofuta bomoi oyo mosumuki Adama abungisaki. Bazalaki te kosambela Malia, mama ya Yesu. Balobaki ete bandimi nyonso bazali banganga-nzambe, mpe basengisami te kolapa ndai ya kotikala monzemba. Bazalaki kolendisa bandimi nyonso básakolaka mpe basumuki oyo baboyi kobongola motema bazalaki kobimisama na lisangá. Bazalaki koboya mpenza mosala ya soda mpe misala ya politiki. (Talá etanda “Bindimeli ya Etuluku ya moke.”) Lokola Etuluku ya moke bakangamaki na bikateli ya mokanda Acta, bazalaki komimona ete bango mpenza nde Lisangá ya Bandeko ya solosolo.
Bazalaki milangi-mpɛmbɛ mpe banyokwamaki
Etuluku ya moke bazalaki koloba polele mabe ya mangomba mosusu, ata mpe ya Etuluku ya monene. Mpo na mangomba yango, bakomaki boye: “Bozali koteya libatisi ya bana mike oyo bazali naino na kondima te, mpe na bongo bozali kolanda Dionysius, episkɔpɔ oyo, na kolanda makanisi ya bato mosusu oyo bazangi bwanya, alendisaki likambo ya kobatisa bana mike . . . Balakisi mpe bato nyonso ya teoloji, Luther, Melanchthon, Bucerus, Korvín, Jiles̆, Bullinger, . . . ata mpe Etuluku ya monene bazali kosala ndenge yango, bango nyonso bazali kolanda nzela moko.”
Tokoki kokamwa te ete bakómaki konyokola bandimi ya Etuluku ya moke. Na mobu 1524, mokambi na yango moko, Jan Kalenec, abɛtamaki fimbo mpe batumbaki ye na mɔtɔ. Na nsima, bakakisaki bandimi misato ya Etuluku ya moke na nzete mpe batumbaki bango. Emonani ete Etuluku ya moke elimwaki soki na bambula 1550, nsima ya liwa ya mokambi na bango ya nsuka.
Atako bongo, bandimi ya Etuluku ya moke batiká nsango na lisolo ya mangomba ya Mpoto na Moyen-Âge. Lokola “boyebi ya solosolo” ekómaki naino mingi te na ntango wana, Etuluku ya moke balongaki te kolongola molili ya elimo oyo eumelaki bambula ebele. (Danyele 12:4, NW) Atako bongo, mposa ya bato wana ya kotambola na nzela oyo ekangamakangamá mpe ya kotikala kati na yango ata na ntango ya minyoko esengeli kobenda likebi ya baklisto lelo oyo.
Blurb on page 13]
Balobaka ete na babuku 60 oyo bato ya Bohême (Ba-Tchèque) babimisaki banda mobu 1500 tii 1510, babuku 50 ebimisamaki na Lisangá ya Bandeko
[Etanda na lokasa 11]
Ezali boni mpo na Etuluku ya monene?
Etuluku ya monene esukaki ndenge nini? Ntango Etuluku ya moke elimwaki, Etuluku ya monene etikalaki naino, mpe bazalaki kobenga yango kaka Lisangá ya Bandeko. Nsukansuka, lingomba yango ebongolaki mateya na yango. Na nsuka ya bambula ya 1500, Lisangá ya Bandeko esanganaki na Ba-Utraquiste,a oyo bazalaki mingimingi bandimi ya Lingomba ya Protesta. Kasi, Lisangá ya Bandeko ekobaki misala ya kobongola mpe kobimisa Babiblia mpe mikanda mosusu ya makambo ya Nzambe. Na nkasa ya liboso ya mikanda na bango ya libosoliboso, bazalaki kokoma Tetragrame, balɛtrɛ minei ya nkombo ya Nzambe na Liebele.
Na mobu 1620, bazongisaki ekólo ya Ba-Tchèque na Lingomba ya Katolike na makasi. Yango wana, bandimi mingi ya Etuluku ya monene balongwaki na ekólo yango mpe bakendaki kokoba misala na bango na mikili mosusu. Kuna, lingomba yango ekómaki kobengama Lingomba ya Moravie (Moravie ezalaki mabelé ya ekólo Tchéquie) mpe ezali tii na moi ya lelo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Euti na liloba ya Latin utraque, oyo elimboli “mokomoko na mibale.” Basango ya Lingomba ya Katolike bazalaki kopesa bandimi vinyo te na ntango ya Kominyo; nzokande, Ba-Utraquiste (bituluku ndenge na ndenge ya Ba-Hussite) bazalaki kopesa ná limpa ná vinyo.
[Etanda na lokasa 12]
Bindimeli ya Etuluku ya moke
Maloba oyo euti na buku Acta Unitatis Fratrum oyo ebimaki na bambula ya 1400 mpe 1500 emonisi mwa bindimeli ya Etuluku ya moke. Maloba wana ya bakambi ya Etuluku ya moke, bakomelaki yango libosoliboso bato ya Etuluku ya monene.
Bosato: “Soki otali na Biblia mobimba, okomona ata esika moko te balobi ete Nzambe azali Bosato ndenge bato balobaka, elingi koloba bato misato oyo mokomoko azali na nkombo na ye.”
Elimo santu: “Elimo santu ezali mosapi ya Nzambe mpe likabo ya Nzambe, to mobɔndisi, to Nguya ya Nzambe, oyo Tata apesaka bandimi na nkombo ya Klisto. Tomoni esika moko te oyo Makomami Mosantu elobi ete elimo santu esengeli kobengama Nzambe to Moto; mateya ya bantoma mpe emonisi bongo te.”
Bonganga-nzambe: “Bazali kopesa bino batitre ya lokuta ete ‘nganga-nzambe’; soki bolongoli ekɔti na bino mpe mafuta ma bakoni, boleki bandimi mosusu na eloko moko te. Santu Petelo asɛngi na baklisto nyonso ete bázala banganga-nzambe na maloba oyo: Bozali bonganga-nzambe moko mosantu mpo na kopesa bambeka ya elimo. (1 Petelo 2)”
Batisimo: “Nkolo Klisto alobaki na bantoma na ye ete: Bókende na mokili, bósakola Evanzile epai ya bato nyonso, baoyo bakondima. (Malako, mokapo 16) Mpe na nsima nde alobaki maloba oyo: mpe soki babatisami, bakobika. Bino bozali koteya ete esengeli kobatisa bana mike oyo bazali naino na kondima te.”
Kokɔta na makambo ya mokili te: “Makambo oyo bandeko na bino ya liboso bazalaki komona mabe mpe mbindo, mosala ya soda mpe koboma to kotambola na mindoki, bino bozali komona yango malamu . . . Yango wana, tomoni ete bino, ná balakisi mosusu, bozali mpenza kokanga ntina te ya esakweli oyo elobi ete: Boye abuki nguya ya litimbo, banguba mpe mopanga mpe etumba. (Nzembo 75) Lisusu: Bakosala mabe te to kobebisa na ngomba na ngai mobimba ya bosantu, mpamba te mabelé ya Nkolo ekotonda na boyebi ya Nzambe, mpe bongo na bongo. (Yisaya, mokapo 11).”
Kosakola: “Toyebi malamu ete na ebandeli, basi basalisaki bato mingi na kobongola motema koleka banganga-nzambe nyonso ná episkɔpɔ. Bongo lelo oyo banganga-nzambe bafandi na bisika na bango mpe bamibombi na baparwasi na bango. Ezali libunga monene! Bókende na mokili mobimba. Bósakola . . . na bato nyonso.”
[Karte na lokasa 10]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
ALLEMAGNE
POLOGNE
RÉPUBLIQUE TCHÈQUE
BOHÊME
Ebale Elbe
PRAGUE
Ebale Vltava
Klatovy
Chelčice
Kunwald
Vilémov
MORAVIE
Ebale Danube
[Bililingi na lokasa 11]
Na lobɔkɔ ya mwasi: Petr Chelčický; na nse: lokasa ya buku “Le Filet de la vraie foi”
[Elilingi na lokasa 11]
Grégoire de Prague
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 13]
Bililingi nyonso: S laskavým svolením knihovny Národního muzea v Praze, C̆esko