Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/9 nk. 15-20
  • “Bólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tóbatela loketo, ntolo, mpe makolo
  • Nguba, ekɔti, mpe mopanga
  • Tóbondelaka na libaku nyonso
  • “Boláta moláto mobimba ya etumba na Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Ndenge oyo Yehova akobatela yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Bilenge—Bótɛmɛla Zabolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Ndenge nini tokoki kotɛmɛla bademo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/9 nk. 15-20

“Bólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe”

“Bólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe mpo bókoka kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo.”​—BAEFESE 6:11.

1, 2. Na maloba na yo moko, lobelá molato ya etumba ya elimo oyo baklisto basengeli kolata.

NA EKEKE ya liboso ya ntango na biso (T.B.), Loma ezalaki ekólo ya makasi mpenza. Lokola ekólo yango ezalaki na basoda ya mpiko, ekómaki koyangela mokili mobimba ya ntango wana. Mokomi moko ya masolo ya kala alobaki ete basoda ya Loma bazali “basoda oyo balongá bitumba mingi banda mokili ebandá.” Basoda ya Loma bazalaki na disipilini makasi mpe bazalaki kozwa formasyo ya kosakana te; kasi, soki bazalaki kolonga bitumba mingi, ezalaki mpe mpo na molato na bango ya etumba. Ntoma Paulo azwaki ndakisa ya molato ya soda ya Loma mpo na kolobela molato ya elimo oyo baklisto basengeli na yango mpo na kolonga etumba na Zabolo.

2 Paulo alobelaki molato yango ya elimo na Baefese 6:14-17. Akomaki boye: “Bótɛlɛma ngwi, wana loketo na bino ekangami na solo lokola nkamba, mpe bolati ebateli-ntolo ya boyengebene, mpe makolo na bino elatisami bisaleli ya nsango malamu ya kimya. Likambo eleki ntina mpenza, bókamata nguba monene ya kondima, oyo bokokoka koboma na yango mɔtɔ ya bambanzi nyonso ya moto mabe oyo ezali kopela. Lisusu, bózwa ekɔti ya lobiko, mpe mopanga ya elimo, elingi koloba, liloba ya Nzambe.” Soki totaleli molato ya soda ya Loma oyo Paulo alobelaki, tokomona ete ezalaki mpenza kobatela ye. Lisusu, ntango azali kobunda na monguna moko, azalaki kosalela mingimingi mopanga.

3. Mpo na nini tosengeli kotosa malako ya Yesu Klisto mpe kolanda ndakisa na ye?

3 Longola molato ya etumba mpe formasyo oyo bazalaki kozwa, basoda ya Loma bazalaki kolonga mpo bazalaki kotosa mokonzi na bango. Ndenge moko mpe, baklisto basengeli kotosa Yesu Klisto, oyo Biblia ebengi “komanda mpo na bikólo.” (Yisaya 55:4, NW) Yesu azali mpe “mokonzi ya lisangá.” (Baefese 5:23) Yesu azali kopesa biso malako mpo na etumba ya elimo oyo tozali na yango mpe azali kopesa ndakisa eleki malamu na ndenge ya kolata molato ya etumba ya elimo. (1 Petelo 2:21) Lokola makambo mingi ya bomoto lokola oyo ya Klisto ekokani na molato ya etumba ya elimo, Biblia elobi na biso ete ‘tókamata’ elimo lokola oyo ya Klisto. (1 Petelo 4:1) Yango wana, ntango tozali kolobela eloko mokomoko ya molato na biso ya etumba ya elimo, tokozwa ndakisa ya Yesu mpo na komonisa ntina na yango mpe ndenge oyo ekosalisa biso.

Tóbatela loketo, ntolo, mpe makolo

4. Mokaba ezalaki na ntina nini na kati ya molato ya soda, mpe yango ezali elilingi ya nini?

4 Loketo ekangami na solo. Na ntango ya kala, basoda bazalaki kolata mokaba ya mposo ya nyama oyo ezalaki na bonene ya santimɛtrɛ 5 to 15. Babongoli mosusu balobaka ete esengeli kobongola vɛrsɛ yango boye, “na solo lokola mokaba oyo ekangi bino na libumu.” Mokaba ya soda ezalaki kobatela loketo na ye, mpe ezalaki na esika moko ya malamu oyo azalaki kotya mopanga na ye. Ntango soda akangi mokaba na loketo na ye, ezalaki komonisa ete amibongisi mpo na etumba. Paulo asalelaki mokaba ya soda lokola elilingi mpo na komonisa mosala oyo solo ya Biblia esengeli kosala na bomoi na biso. Esengeli solo ekangama na biso mpenza lokola nde tolati yango kolata, mpo tómonisaka yango na bomoi na biso mpe tólobelaka yango ata na libaku nini. (Nzembo 43:3; 1 Petelo 3:15) Yango wana, tosengeli koyekolaka Biblia malamumalamu mpe komanyolaka yango. Yesu azalaki na mibeko ya Nzambe ‘kati na motema na ye.’ (Nzembo 40:8) Yango wana, mbala nyonso oyo batɛmɛli batuni ye mituna, azalaki kozongela maloba ya Biblia mpo na kopesa bango eyano.​—Matai 19:3-6; 22:23-32.

5. Limbolá ndenge oyo toli ya Biblia ekoki kosalisa biso ntango tomekami.

5 Soki totiki solo ya Biblia etambwisa biso, ekobatela biso tókóma te na makanisi ya mabe mpe ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu. Na ntango tomekami, malako ya Biblia ekolendisa ekateli na biso ya kosala oyo ezali malamu. Ekozala lokola nde tozali komona Yehova, Molakisi na biso Monene, mpe koyoka liloba nsima na biso ete: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.”​—Yisaya 30:20, 21.

6. Mpo na nini tosengeli kobatela motema na biso ya elilingi, mpe ndenge nini boyengebene ekoki kobatela yango malamu?

6 Ebateli-ntolo ya boyengebene. Ebateli-ntolo ya soda ezalaki kobatela enama moko ya ntina mingi: motema. Motema na biso ya elilingi, elingi koloba bomoto na biso, esengeli mpenza kobatelama mpamba te ebendamaka mingi na bamposa ya mabe. (Genese 8:21) Yango wana, tosengeli koyeba mitinda ya boyengebene ya Yehova mpe kolinga yango. (Nzembo 119:97, 105) Soki tolingi boyengebene, tokoboya makanisi ya mokili oyo ezali kotya malako ya Yehova pembeni mpe ezali kokakola yango. Lisusu, ntango tozali kolinga oyo ezali malamu mpe koyina oyo ezali mabe, tokimaka banzela oyo ekoki kobebisa bomoi na biso. (Nzembo 119:99-101; Amosa 5:15) Na likambo yango, Yesu apesaki ndakisa ya malamu mpenza, mpamba te, na ntina na ye, Biblia elobi boye: “Olingaki boyengebene, mpe oyinaki botyoli-mibeko.”​—Baebele 1:9.a

7. Mpo na nini soda ya Loma asengelaki na sapato ya malamu, mpe yango ezali elilingi ya nini?

7 Makolo elatisami bisaleli ya nsango malamu ya kimya. Basoda ya Loma basengelaki na sapato to sandalɛ ya makasi mpamba te, ntango bakei etumba, mbala mingi bazalaki kotambola kilomɛtrɛ 30 na mokolo mpe molato ya etumba ya soda mokomoko ná bibundeli na ye ezalaki na kilo 27. Sapato ya elilingi oyo Paulo alobelaki ebongi mpenza mpo na komonisa mposa na biso ya kosakola nsango ya Bokonzi epai ya moto nyonso oyo akondima koyoka biso. Yango ezali na ntina mingi mpamba te, bato bakoyeba Yehova te soki tomibongisi te mpe tozali na mposa ya kosakola te!​—Baloma 10:13-15.

8. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu na mosala ya kosakola?

8 Mosala nini Yesu atyaki na esika ya liboso na bomoi na ye? Alobaki na Ponsi Pilato, guvɛrnɛrɛ Moloma, boye: ‘Nayaki na mokili mpo na kotatola mpo na solo.’ Yesu azalaki kosakola na bisika nyonso oyo bandimi koyoka ye, mpe lokola azalaki kosepela mingi na mosala yango, azalaki kotya yango liboso ya bamposa na ye ya mosuni. (Yoane 4:5-34; 18:37) Soki tozali lokola Yesu, elingi koloba soki tozali na mposa makasi ya kosakola nsango malamu, tokozwa mabaku mingi ya koyebisa yango epai ya bato mosusu. Lisusu, soki tomipesi na mosala ya kosakola, ekosalisa biso tótikala makasi na elimo.​—Misala 18:5.

Nguba, ekɔti, mpe mopanga

9. Ndenge nini nguba monene ezalaki kobatela soda ya Loma?

9 Nguba monene ya kondima. Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “nguba monene” ezali kolimbola nguba ya monene mpenza oyo ezalaki kobomba nzoto mobimba. Nguba yango ezalaki kobatela soda na “mɔtɔ ya bambanzi” oyo balobeli na Baefese 6:16. Na ntango ya kala, basoda bazalaki kosalela mwa bambanzi oyo ezalaki na mwa ebende oyo ezali na lidusu oyo bakokaki kotya pitɔlɔ mpe kopelisa yango. Moto moko ya mayele alobi ete bambanzi wana ezalaki “moko na bibundeli ya nsɔmɔ na bitumba ya ntango ya kala.” Soki soda azali na nguba monene te mpo na komibatela, bambanzi yango ekokaki kozokisa ye mpota monene, ata mpe koboma ye.

10, 11. (a) ‘Bambanzi ya mɔtɔ’ ya Satana oyo ekoki kolɛmbisa kondima na biso ezali nini? (b) Ndenge nini ndakisa ya Yesu emonisi ete kondima ekoki kosalisa biso na ntango ya mpasi?

10 ‘Bambanzi ya mɔtɔ’ oyo Satana azali kosalela mpo na koboma kondima na biso ezali nini? Akoki kotinda bandeko, baninga ya mosala, to baninga ya kelasi bányokola to bápekisa biso kosambela Yehova. Baklisto mingi mpe babebi na elimo mpo na mposa ya biloko ya mokili mpe mpo bakosamaki na bamposa ya nzoto. Mpo na komibatela na makama ya ndenge wana, “likambo eleki ntina mpenza,” oyo tosengeli kosala ezali ‘kokamata nguba monene ya kondima.’ Moto akómaka na kondima ntango azali koyekola koyeba Yehova, kosolola na ye mbala na mbala na libondeli, mpe kososola ndenge azali kobatela mpe kopambola biso.​—Yosua 23:14; Luka 17:5; Baloma 10:17.

11 Ntango Yesu azalaki awa na mabelé, amonisaki ntina ya kozala na kondima makasi na ntango ya mpasi. Azalaki kondima na motema mobimba bikateli ya Tata na ye mpe kosepela mpenza kosala mokano na ye. (Matai 26:42, 53, 54; Yoane 6:38) Ata ntango atungisamaki makasi na elanga ya Getesemane, Yesu alobaki na Tata na ye boye: “Ndenge ngai nalingi te, kasi ndenge yo olingi.” (Matai 26:39) Ata mokolo moko te Yesu abosanaki ntina ya kotikala sembo epai ya Tata na ye mpe kosepelisa ye. (Masese 27:11) Soki tozali kotyela Yehova motema ndenge wana, tokotika te ete maloba mabe ya bato to botɛmɛli elɛmbisa kondima na biso. Nzokande, kondima na biso ekolendisama soki tozali kotyela Nzambe motema, kolinga ye, mpe kotosa mibeko na ye. (Nzembo 19:7-11; 1 Yoane 5:3) Ezali na eloko moko te oyo mokili ekoki kopesa biso to esengo moko ya nzoto, ya mwa ntango moke, oyo ekoki kokokana na mapamboli oyo Yehova akopesa baoyo balingaka ye.​—Masese 10:22.

12. Ekɔti ya elimo ebatelaka eloko nini ya ntina mingi na nzoto, mpe mpo na nini yango ezali na ntina mingi?

12 Ekɔti ya lobiko. Ekɔti ezalaki kobatela motó ya soda mpe bɔɔngɔ na ye, esika oyo mayele na ye efandi. Bakokanisi elikya na biso baklisto na ekɔti mpamba te ebatelaka makanisi na biso. (1 Batesaloniki 5:8) Atako tokómisi makanisi na biso sika na nzela ya boyebi ya Liloba ya Nzambe, tozali kaka bato ya bolɛmbu mpe ya kozanga kokoka. Ezali mpasi te mpo makanisi na biso ebeba. Mikano ya mokili oyo ekoki kobenda biso to mpe kozwa esika ya elikya oyo Nzambe apesi biso. (Baloma 7:18; 12:2) Zabolo alakisaki Yesu “makonzi nyonso ya mokili mpe nkembo na yango” mpo na koluka kobungisa ye nzela, kasi alongaki te. (Matai 4:8) Yesu aboyaki na motema moko makanisi yango, mpe na ntina na ye, Paulo alobaki boye: “Mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye ayikelaki nzete moko ya mpasi mpiko, kotyoláká nsɔni, mpe afandi na lobɔkɔ ya mobali ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.”​—Baebele 12:2.

13. Ndenge nini tokoki kobatela elikya na biso?

13 Mpo na kokóma na elikya lokola oyo Yesu azalaki na yango, esɛngaka kosala molende. Soki tozali kotondisa bɔɔngɔ na biso na makanisi mpamba mpe mikano ya mokili oyo, na esika tóbatela elikya na biso, kondima na biso na bilaka ya Nzambe ekolɛmba. Nsukansuka, tokoki ata kobungisa mpenza elikya oyo tozalaki na yango. Nzokande, soki tozali ntango nyonso komanyola na bilaka ya Nzambe, tokokoba kosepela na elikya oyo bapesi biso.​—Baloma 12:12.

14, 15. (a) Mopanga na biso ya elilingi ezali nini, mpe ndenge nini tokoki kosalela yango? (b) Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge mopanga ya elimo ekoki kosalisa biso tólonga komekama.

14 Mopanga ya elimo. Liloba ya Nzambe to nsango na ye oyo ezali na kati ya Biblia ezali lokola mopanga ya mino mibale oyo ekoki kokweisa mateya ya lokuta ya mangomba mpe kosalisa bato ya mitema sembo bázwa bonsomi ya elimo. (Yoane 8:32; Baebele 4:12) Mopanga yango ya elimo ekoki mpe kobatela biso ntango tomekami to bapɛngwi bazali koluka kobebisa kondima na biso. (2 Bakolinti 10:4, 5) Tozali na botɔndi mpenza ete ‘Makomami nyonso epemami na Nzambe mpe ezali kopesa biso nyonso esengeli mpo na mosala nyonso ya malamu’!​—2 Timote 3:16, 17.

15 Ntango Yesu amekamaki na esobe, asalelaki malamu mopanga ya elimo mpo na kokweisa makanisi mpe mayele mabe ya Satana. Mbala nyonso oyo Satana alobi na ye likambo moko mpo na komeka ye, azalaki kopesa eyano ete: “Ekomamá boye.” (Matai 4:1-11) Se ndenge yango, David, Motatoli ya Yehova moko na Espagne, amonaki ete Biblia esalisaki ye na kolonga komekama. Ntango azalaki na mbula 19, elenge mwasi moko kitoko oyo azalaki kosala na ye esika moko asɛngaki ye “básakana.” Davidi aboyaki makanisi na ye mpe asɛngaki na mokonzi na ye apesa ye mosala na esika mosusu mpo amonanaka lisusu na mwana mwasi yango te mpo likambo yango esalema lisusu te. David alobi boye: “Nakanisaki Yozefe. Aboyaki kosala pite mpe abimaki mbala moko. Ngai mpe nasalaki bongo.”​—Genese 39:10-12.

16. Limbolá ntina oyo tosengeli kozwa formasyo mpo na ‘kosembola liloba ya solo malamumalamu.’

16 Yesu asalelaki mpe mopanga ya elimo mpo na kosalisa bato bálongwa na mabɔkɔ ya Satana. Yesu alobaki boye: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoane 7:16) Mpo tóyeba koteya lokola Yesu, tosengeli kozwa formasyo. Na ntina na basoda ya Loma, Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki mokomi ya makambo ya kala, akomaki boye: “Soda mokomoko ayekolaka kobunda mokolo na mokolo, mpe asalaka yango na molende, lokola nde azali mpenza na etumba, yango wana bayokaka mpasi mingi te na ntango ya etumba.” Na etumba na biso ya elimo, tosengeli kosalelaka Biblia. Lisusu, tosengeli ‘kosala nyonso oyo ekoki mpo tómimonisa bato oyo bandimami na Nzambe, basali oyo bazali na eloko moko te ya koyokela nsɔni, oyo bazali kosembola liloba ya solo malamumalamu.’ (2 Timote 2:15) Toyokaka esengo mingi ntango tosaleli Biblia mpo na kopesa eyano na motuna oyo moto oyo azali kosepela na nsango ya Biblia atuni na bosembo mpenza!

Tóbondelaka na libaku nyonso

17, 18. (a) Libondeli ezali na ntina nini na etumba oyo tozali kobunda na Satana? (b) Pesá ndakisa moko oyo ezali komonisa ntina ya libondeli.

17 Nsima ya kolobela molato mobimba ya etumba ya elimo, Paulo abakisaki toli mosusu ya ntina mingi. Na etumba oyo baklisto bazali kobunda na Satana, basengeli kosalaka “mitindo nyonso ya mabondeli mpe malɔmbɔ.” Basengeli kosalaka yango mbala boni? Paulo akomaki ete: ‘Bókoba kobondela na libaku nyonso na kati ya elimo.’ (Baefese 6:18) Ntango tomekami, to tolɛmbi, libondeli ekoki kopesa biso makasi mingi. (Matai 26:41) Yesu “asalaki malɔmbɔ mpe lisusu masɛngi epai ya Oyo azalaki na likoki ya kobikisa ye na liwa, elongo na koganga makasi mpe na mpisoli, mpe ayokamaki mpe andimamaki mpo na ezaleli na ye ya kobanga Nzambe.”​—Baebele 5:7.

18 Milagros, ndeko mwasi moko oyo asalisaka mobali na ye oyo abɛlaka banda mbula koleka 15, alobaki boye: “Ntango nalɛmbi, nabondelaka Yehova. Moto moko te akoki kosalisa ngai koleka ye. Ya solo, ntango mosusu nayokaka mpenza lokola nde nakómi na nsuka. Kasi, mbala mingi, nsima ya kobondela Yehova, nazwaka lisusu makasi mpe nakómaka mpenza na kimya.”

19, 20. Tosengeli na nini mpo tólonga na etumba na biso na Satana?

19 Zabolo ayebi ete mikolo na ye etikali ya kotánga, yango wana abimisi manzaka nyonso mpo na kobundisa biso. (Emoniseli 12:12, 17) Tosengeli kotɛlɛma ngwi liboso ya monguna yango oyo azali makasi mingi mpe ‘kobunda etumba ya malamu mingi ya kondima.’ (1 Timote 6:12) Yango ezali kosɛnga tózala na nguya oyo eleki makasi. (2 Bakolinti 4:7) Tozali mpe na mposa ya elimo santu; yango wana tosengeli kobondelaka mpo na kozwa yango. Yesu alobaki boye: “Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi ndenge ya kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na likoló akopesa elimo santu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango!”​—Luka 11:13.

20 Tomoni ete ezali mpenza na ntina tólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Yehova. Kolata molato yango ya elimo elimboli kolona bizaleli oyo esepelisaka Nzambe, na ndakisa kondima mpe boyengebene. Ezali kosɛnga tólinga solo, tólata yango lokola mokaba, tósalelaka mabaku nyonso mpo na kopalanganisa nsango malamu, mpe tóbatela ntango nyonso elikya na biso. Tosengeli koyekola kosalela malamu mopanga ya elimo. Soki tolati molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe, tokoki kolonga mampinga ya bilimo mabe oyo tozali kobunda na bango líbanda mpe na bongo, kopesa nkombo mosantu ya Yehova nkembo.​—Baloma 8:37-39.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na mokanda ya Yisaya, tozali kotánga ete Yehova alati “boyengebene lokola ebende ya ntolo.” Yango wana, azali kosɛnga ete bakɛngɛli básambisa na boyengebene mpe básala makambo na bosembo.​—Yisaya 59:14, 15, 17.

Okopesa eyano nini?

• Nani azali ndakisa eleki malamu na oyo etali kolata molato ya etumba ya elimo, mpe mpo na nini tosengeli kotalela malamumalamu ndakisa na ye?

• Ndenge nini tokoki kobatela makanisi mpe motema na biso ya elilingi?

• Ndenge nini tokoki koyeba kosalela malamu mopanga ya elimo?

• Mpo na nini tosengeli kobondelaka na libaku nyonso?

[Bililingi na lokasa 17]

Koyekola Biblia malamumalamu ekoki kopesa biso mposa ya kosakola nsango malamu na libaku nyonso

[Bililingi na lokasa 18]

Elikya na biso esalisaka biso tólonga mikakatano

[Bililingi na lokasa 19]

Osalelaka “mopanga ya elimo” na mosala ya kosakola?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto