Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/3 nk. 26-30
  • Ndenge nini tokoki kotɛmɛla bademo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini tokoki kotɛmɛla bademo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Satana ná bademo bautá wapi?
  • Satana azali na nguya nini?
  • Bibundeli nini tozali na yango?
  • Ndenge nini tokoki ‘kotɛlɛma ngwi’?
  • ‘Tóbondelaka na libaku nyonso’
  • Totelema ngwi liboso na mayele mabe ya Satana
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • “Boláta moláto mobimba ya etumba na Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • “Bólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Baanzelu bazali banani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/3 nk. 26-30

Ndenge nini tokoki kotɛmɛla bademo?

“Baanzelu oyo babatelaki te esika na bango ya ebandeli kasi basundolaki efandelo na bango moko mpenza [Nzambe]abombi bango na minyɔlɔlɔ ya seko na kati ya molili tuu mpo na lisambisi ya mokolo yango ya monene.”​—YUDA 6.

1, 2. Mituna nini tokoki komituna na ntina na Zabolo mpe bademo?

NTOMA Petelo apesaki likebisi oyo: “Bóbatela makanisi na bino, bókebaka. Monguna na bino, Zabolo, azali kotambola epai na epai lokola nkɔsi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto.” (1 Petelo 5:8) Na ntina na bademo, ntoma Paulo akomaki boye: “Nalingi te ete bino bókóma basangani ya bademo. Bokoki te komɛla kɔpɔ ya Yehova mpe kɔpɔ ya bademo; bokoki te kolya na ‘mesa ya Yehova’ mpe na mesa ya bademo.”​—1 Bakolinti 10:20, 21.

2 Kasi, Satana Zabolo ná bademo bazali banani? Babandaki ndenge nini mpe ntango nini? Nzambe nde akelaki bango? Bazali na nguya ya kosala bato nini? Ndenge nini tokoki komibatela liboso na bango?

Satana ná bademo bautá wapi?

3. Ndenge nini anzelu moko ya Nzambe akómaki Satana Zabolo?

3 Anzelu moko akómaki motomboki na eleko oyo Nzambe akelaki mwasi ná mobali ya liboso mpe atyaki bango na elanga ya Edene. Mpo na nini? Mpo azalaki kosepela lisusu te na esika oyo Yehova atyaki ye na kati ya ebongiseli na ye kuna na likoló. Ntango Nzambe akelaki Adama ná Eva, anzelu yango azwaki libaku ya kokokisa mposa na ye, akosaki Adama ná Eva mpo bátika kotosa mpe kosambela Nzambe mpo bákóma kotosa mpe kosambela ye. Lokola atombokelaki Nzambe mpe akosaki Adama ná Eva mpo básala lisumu, anzelu yango amikómisaki Satana Zabolo. Bambula mingi na nsima, baanzelu mosusu mpe balandaki nzela na ye. Ndenge nini?​—Genese 3:1-6; Baloma 5:12; Emoniseli 12:9.

4. Liboso ya Mpela ya Noa, baanzelu mosusu oyo batombokelaki Nzambe basalaki nini?

4 Biblia elobi ete liboso ya Mpela ya Noa, baanzelu mosusu bakómaki kolula basi awa na mabelé. “Bana babali ya Nzambe bamonaki ete bana basi ya bato bazalaki bonzenga, mpe bakamataki kati na bango basi na bango na libala, baoyo eponaki bango.” Basalaki likambo oyo Nzambe abongisá te ete anzelu asangana na moto mpe babotaki bana oyo bazalaki bingambe mpenza, Banefilime. (Genese 6:2-4) Baanzelu yango oyo babukaki mobeko ya Nzambe balandaki lokolo ya Satana, bango mpe batombokelaki Nzambe.

5. Likambo nini ekómelaki batomboki ntango Yehova abomaki bato na Mpela monene?

5 Ntango Yehova atindaki Mpela na mokili, Banefilime bakufaki elongo ná bamama na bango. Baanzelu oyo batombokelaki Nzambe batikaki nzoto ya mosuni mpe bazongaki na likoló. Kasi, bakokaki lisusu te kozonga na “esika na bango ya ebandeli” pembeni ya Nzambe. Babwakamaki na “molili [ya elimo]” oyo Biblia ebengi Tartare.​—Yuda 6; 2 Petelo 2:4.

6. Ndenge nini bademo bazimbisaka bato?

6 Banda baanzelu yango ya mabe babungisá “esika na bango ya ebandeli,” bakómá kobengama bademo, bamityá na ngámbo ya Satana mpe basalelaka ye mpo na kokokisa mikano ya mabe. Banda na ntango wana, bademo bazalaka lisusu na likoki ya kolata nzoto ya mosuni te. Atako bongo, bakoki kopusa bato bámipesa na misala ya kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo. Bademo bazali mpe kokosa bato na nzela ya misala ya bikelakela, lokola maji, bondɔki, mpe bonganga-nkisi. (Deteronome 18:10-13; 2 Ntango 33:6) Baanzelu mabe bakobomama mpo na libela, elongo na Zabolo. (Matai 25:41; Emoniseli 20:10) Kasi, liboso ntango yango ekoka, tosengeli kotikala ngwi mpe kotɛmɛla bango. Yango wana, ebongi tóyeba nguya oyo Satana azali na yango mpe ndenge oyo tokoki kotɛmɛla ye ná bademo na ye.

Satana azali na nguya nini?

7. Satana azali na nguya nini na mokili?

7 Banda epai ya bato ya liboso, Satana akoselaka ntango nyonso Yehova makambo. (Masese 27:11) Asili mpe kolonga kokosa bato ebele mpenza. Mokapo ya 1 Yoane 5:19 elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” Yango wana, Zabolo amekaki Yesu na ndenge alakaki kopesa ye nkembo ya “makonzi nyonso ya mabelé.” (Luka 4:5-7) Ntoma Paulo alobaki boye: “Soki nsango malamu oyo tozali kosakola ezipami mpenza, ezipami nde epai ya baoyo bazali kobeba, baoyo na kati na bango nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo azipi makanisi ya bato oyo bazangi kondima, mpo ete kongɛnga ya nsango malamu ya nkembo oyo etali Klisto, oyo azali elilingi ya Nzambe, ekoka kokɔta te.” (2 Bakolinti 4:3, 4) Satana azali “moto ya lokuta mpe tata ya lokuta,” kasi amimonisaka lokola “anzelu moko ya pole.” (Yoane 8:44; 2 Bakolinti 11:14) Satana azali na nguya mpe na mayele oyo esengeli mpo na kozipa miso ya bakonzi ya mokili mpe bato oyo bango bazali koyangela. Azimbisi ebele ya bato na maloba mpe mateya ya lokuta.

8. Biblia emonisi nini na oyo etali nguya ya Satana?

8 Likambo moko oyo esalemaki na mikolo ya mosakoli Danyele emonisi ete Satana azali na nguya mpe atambwisaka bato. Ntango Yehova atindaki anzelu moko mpo na komemela Danyele nsango moko ya kolendisa, “[ekelamu moko ya elimo oyo azalaki] mokonzi ya bokonzi ya Perse” atɛmɛlaki anzelu yango. Ekelamu yango akangaki anzelu ya sembo mikolo 21 tii ntango “Mikaele, moko na bakonzi oyo aleki na lokumu” akendaki kosalisa ye. Lisolo yango elobeli mpe “[demo moko oyo azalaki] mokonzi ya [Grèce].” (Danyele 10:12, 13, 20) Na Emoniseli 13:1, 2, Satana amonisami na elilingi ya “dalagona” oyo apesi nyama ya yauli “nguya na ye mpe kiti na ye ya bokonzi mpe bokonzi monene.”

9. Baklisto bazali kobunda na banani?

9 Tokoki kokamwa te na ndenge ntoma Paulo akomaki ete: “Tozali kobunda líbanda ná makila mpe mosuni te, kasi ná baguvɛrnema, ná bakonzi, ná bayangeli ya mokili ya molili oyo, ná mampinga ya bilimo mabe na kati ya bisika ya likoló.” (Baefese 6:12) Ata lelo oyo, bademo ná mokonzi na bango Satana Zabolo bazali kotambwisa bakonzi ya mokili mpe bato mosusu, bazali kotinda bango na kosala makambo ya nsɔmɔ lokola koboma bato ya ekólo moko mpo na kosilisa bango mpe misala ya bateroriste. Sikoyo, tótalela ndenge oyo tokoki kotɛmɛla bikelamu wana ya elimo oyo bazali na nguya mingi.

Bibundeli nini tozali na yango?

10, 11. Ndenge nini tokoki kotɛmɛla Satana ná baanzelu na ye ya mabe?

10 Tokoki te kolonga Satana ná baanzelu na ye na makasi to na mayele na biso moko. Paulo apesi biso toli oyo: “Bókoba kozwa nguya na kati ya Nkolo mpe na kati ya nguya ya bokasi na ye.” Tosengeli koluka libateli ya Nzambe. Paulo abakisaki boye: “Bólata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe mpo bókoka kotɛlɛma ngwi liboso ya mayele mabe ya Zabolo . . . Bókamata molato mobimba ya etumba oyo mouti na Nzambe, mpo bókoka kopika na mokolo ya mabe mpe, nsima wana bokosilisa kosala makambo nyonso malamumalamu, bótɛlɛma ngwi.”​—Baefese 6:10, 11, 13.

11 Mbala mibale mobimba Paulo alendisi baninga na ye baklisto ete bálata “molato mobimba ya etumba mouti na Nzambe.” Liloba “mobimba” ezali komonisa ete moto oyo azali na motema oyo ekabwani akoki kolonga te soki bademo bameki ye. Na bongo, wapi biteni ya ntina mingi ya molato ya elimo oyo baklisto basengeli kolata mpo na kotɛmɛla bademo?

Ndenge nini tokoki ‘kotɛlɛma ngwi’?

12. Ndenge nini baklisto bakoki kokanga solo na loketo na bango?

12 Paulo alobaki boye: “Bótɛlɛma ngwi, wana loketo na bino ekangami na solo lokola nkamba, mpe bolati ebateli-ntolo ya boyengebene.” (Baefese 6:14) Biteni mibale ya molato ya etumba oyo alobeli awa ezali nkamba, to mokaba, mpe ebateli-ntolo. Na ntango ya kala, soda azalaki kokanga mokaba na ye makasi mpo ebatela libumu mpe loketo na ye mpe, mpo kilo ya mopanga ekitisa yango te. Ndenge moko mpe, esengeli ete mateya ya solo ya Biblia ekangama makasi epai na biso mpo tósalelaka yango na bomoi na biso. Tozalaka na programɛ ya kotánga Biblia mokolo na mokolo? Totángaka Biblia na kati ya libota? Totángaka mokapo ya mokolo na libota? Longola yango, toyekolaka malamumalamu mikanda ya “moombo ya sembo mpe ya mayele” mpo na kolanda ndenge oyo mateya ezali kolimbolama? (Matai 24:45) Soki tosalaka bongo, elakisi ete tozali kolanda toli ya Paulo. Tozali mpe na bakasɛti-video mpe ba DVD epai tokoki kozwa batoli ya malamu. Soki tozali kokangama makasi na mateya ya solo, yango ekosalisa biso tózwa bikateli ya malamu mpe ekopekisa biso tólanda nzela ya mabe.

13. Ndenge nini tokoki kobatela motema na biso ya elilingi?

13 Ebateli-ntolo ezalaki kobatela motema mpe binama mosusu ya ntina mingi. Moklisto akoki kobatela motema na ye ya elilingi​—elingi koloba bomoto na ye​—soki azali kolinga boyengebene ya Yehova mpe azali kolanda mitinda ya sembo. Ebateli-ntolo ya elilingi ekoki kobatela biso mpo tókitisa te motuya ya Liloba ya Nzambe. Soki tozali ‘koyina oyo ezali mabe, mpe kolinga oyo ezali malamu,’ tokomibatela mpo lokolo na biso etambola te “na nzela nyonso mabe.”​—Amosa 5:15; Nzembo 119:101.

14. ‘Kolatisa makolo na biso bisaleli ya nsango malamu ya kimya’ elimboli nini?

14 Basoda ya Loma bazalaki kolata basapato ya makasi mpo na kosala mibembo milai na mikili oyo Loma ezalaki koyangela. Maloba “makolo . . . elatisami bisaleli ya nsango malamu ya kimya” elimboli nini mpo na baklisto? (Baefese 6:15) Elimboli ete tomibongisi mpo na kosala mosala. Tobongami mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na libaku nyonso oyo ebongi. (Baloma 10:13-15) Komipesa na mosala ya kosakola ebatelaka biso mpo Satana azwa biso te na “mayele mabe” na ye.​—Baefese 6:11.

15. (a) Nini ezali komonisa ete nguba monene ya kondima ezali na ntina mingi? (b) ‘Mbanzi oyo ezali kopela’ oyo ekoki kobebisa kondima na biso ekoki kozala nini?

15 Paulo abakisaki boye: “Likambo eleki ntina mpenza, bókamata nguba monene ya kondima, oyo bokokoka koboma na yango mɔtɔ ya bambanzi nyonso ya moto mabe oyo ezali kopela.” (Baefese 6:16) Toli ya kozwa nguba monene ya kondima eyei nsima ya maloba “likambo eleki ntina”; yango ezali komonisa ete eteni wana ya molato ezali na ntina mingi. Tosengeli ntango nyonso kozala na kondima makasi. Lokola nguba monene oyo ezalaki kobatela nzoto mobimba, kondima ebatelaka biso na “bambanzi . . . [ya Satana] oyo ezali kopela.” Yango ekoki kolimbola nini lelo oyo? Ekoki kozala maloba ya kofinga ya banguna to bapɛngwi, to makambo oyo bazali kokosela biso mpo na kolɛmbisa kondima na biso. “Bambanzi” yango ekoki mpe kozala mposa makasi ya konduka biloko ya mokili, oyo ekoki kotinda biso tókóma kokanisa kaka kosomba biloko mpe kotinda biso tóluka kokokana to koleka bato oyo balingaka kolakisa bomɛngo na bango. Bato yango bazali mbala mosusu komipesa na kotonga bandako ya minene mpe ya kitoko mpe bazali kosomba mituka mpe kolakisa babiju ya ntalo to bilamba ya mikolo oyo. Ata soki bato mosusu bazali kosala makambo nini, biso tosengeli ntango nyonso kozala na kondima makasi mpo na koboma “bambanzi” wana “oyo ezali kopela.” Ndenge nini tokoki kokóma na kondima makasi mpe kobatela yango?​—1 Petelo 3:3-5; 1 Yoane 2:15-17.

16. Nini ekoki kosalisa biso tókóma na kondima makasi?

16 Koyekola Biblia mbala na mbala mpe kobondela na etingya ekoki kosalisa biso tópusana penepene na Nzambe. Tokoki kosɛnga Yehova alendisa kondima na biso mpe na nsima, kosala makambo na boyokani na mabondeli na biso. Na ndakisa, tobongisaka malamumalamu boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na kopesa biyano na makita? Tokozala na kondima makasi soki tozali koyekola Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango.​—Baebele 10:38, 39; 11: 6.

17. Ndenge nini tokoki ‘kozwa ekɔti ya lobiko’?

17 Paulo asukisaki kolobela biteni ya molato ya etumba ya elimo na toli oyo: “Bózwa ekɔti ya lobiko, mpe mopanga ya elimo, elingi koloba, liloba ya Nzambe.” (Baefese 6:17) Ekɔti ya soda ezalaki kobatela motó mpe bɔɔngɔ na ye, enama oyo moto asalelaka mpo na kozwa bikateli. Biso mpe ndenge moko, elikya ya boklisto ebatelaka makanisi na biso. (1 Batesaloniki 5:8) Na esika tótondisa bɔɔngɔ na biso na mikano ya mokili to ya koluka biloko ya mokili, tosengeli kolanda ndakisa ya Yesu mpe kotya makanisi na biso na elikya oyo Nzambe apesi biso.​—Baebele 12:2.

18. Mpo na nini tosengeli te kotika momeseno ya kotánga Biblia mokolo na mokolo?

18 Eloko ya nsuka oyo ekobatela biso na masɛnginya ya Satana ná bademo na ye ezali maloba to nsango ya Nzambe oyo ezali na kati ya Biblia. Yango mpe ezali ntina mosusu oyo tosengeli kobosana te kotángaka Biblia mokolo na mokolo. Soki tozali na boyebi mingi ya Liloba ya Nzambe, ekobatela biso mpo tólanda te mateya mpe makanisi ya lokuta oyo euti na Satana ná bademo na ye, to masolo ya bapɛngwi mpe mikanda na bango.

‘Tóbondelaka na libaku nyonso’

19, 20. (a) Nini ekokómela Satana ná bademo na ye? (b) Nini ekoki kolendisa biso na elimo?

19 Etikali moke Satana abomama, elongo na bademo na ye mpe mokili oyo mabe. Satana ayebi malamu ete azali na “eleko moko ya ntango mokuse.” Azali na nkanda makasi mpe azali kobundisa baoyo “bazali kotosa bakomandema ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kopesa litatoli na ntina etali Yesu.” (Emoniseli 12:12, 17) Ezali na ntina mingi tótɛmɛla Satana ná bademo na ye.

20 Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mingi mpo na toli ya kolata molato mobimba ya etumba mouti na Nzambe! Nsima ya kolobela molato mobimba ya etumba, Paulo apesaki toli oyo: “Na mitindo nyonso ya mabondeli mpe malɔmbɔ bozali kokoba kobondela na libaku nyonso na kati ya elimo. Mpe mpo na yango bózala ekɛngɛ na kotingama mpenza mpe na malɔmbɔ mpo na basantu nyonso.” (Baefese 6:18) Mabondeli ekoki kolendisa biso na elimo mpe kosalisa biso tólala mpɔngi te. Na yango, tótyela maloba ya Paulo likebi mpe tókoba kobondela, yango nde ekosalisa biso tótɛmɛla Satana ná bademo na ye.

Oyekoli makambo nini?

• Satana ná bademo na ye babandaki ndenge nini?

• Satana azali na nguya nini?

• Bibundeli nini tozali na yango mpo na kotɛmɛla Satana ná bademo na ye?

• Ndenge nini tokoki kolata molato mobimba ya etumba mouti na Nzambe?

[Bililingi na lokasa 26]

“Bana babali ya Nzambe bamonaki ete bana basi ya bato bazalaki bonzenga”

[Elilingi na lokasa 28]

Okoki kotánga biteni nyonso motoba ya molato ya etumba ya elimo?

[Bililingi na lokasa 29]

Ndenge nini makambo oyo ekoki kobatela biso liboso ya Satana ná bademo na ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto