Mituna ya batángi
Bademo bakozala wapi na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto?
Biblia epesi eyano ya polele te na motuna yango. Kasi, ezali na makambo oyo ekoki kosalisa biso tóyeba esika oyo bademo bakozala na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto.
Ntango ntoma Yoane amonisaki makambo oyo ekosalema na ebandeli mpe na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, alobaki boye: “Namonaki anzelu moko azali kokita uta na likoló ná fungola ya lobwaku mozindo mpe monyɔlɔlɔ moko ya monene na lobɔkɔ na ye. Mpe asimbaki dalagona, nyoka yango ya ebandeli, oyo azali Zabolo mpe Satana, mpe akangaki ye minyɔlɔlɔ mbula nkóto moko. Mpe abwakaki ye na kati ya lobwaku mozindo mpe akangaki yango mpe atyaki yango elembo na likoló na ye, mpo akoka lisusu kobungisa bikólo nzela te tii ntango mbula nkóto yango ekosuka. Nsima ya makambo wana asengeli kofungolama mpo na mwa ntango moke.” (Emoniseli 20:1-3) Bavɛrsɛ yango elobi kaka ete bakobwaka Satana na lobwaku mozindo mpe bakofungola ye mpo na mwa ntango moke. Atako bavɛrsɛ yango elobeli bademo te, emonani ete ntango anzelu oyo azali na fungola ya lobwaku mozindo, Yesu Klisto oyo azwi nkembo, akokanga Zabolo mpe akobwaka ye na lobwaku mozindo, akosala mpe ndenge wana mpo na bademo.—Emoniseli 9:11.
Ntango Yesu akómaki Mokonzi na 1914, asalaki likambo moko oyo ebongolaki makambo kaka mpo na Satana te, kasi mpe mpo na bademo. Emoniseli 12:7-9 elobi boye: “Etumba ebimaki na likoló: Mikaele mpe baanzelu na ye babundaki ná dalagona, mpe dalagona mpe baanzelu na ye [bademo] babundaki, kasi alongaki te, mpe esika ezalaki lisusu te mpo na bango na likoló. Bongo dalagona yango ya monene abwakamaki na nse, ye nyoka ya ebandeli, oyo abengami Zabolo mpe Satana, oyo azali kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela; abwakamaki na mabelé, mpe baanzelu na ye babwakamaki na nse elongo na ye.” Banda ntango wana, Satana ná bademo na ye babwakamaki awa na mabelé. Na bongo, tokoki koloba ete ntango Yesu akokanga Satana mpo na kosukisa makambo na ye ya mabe awa na mabelé, akokanga mpe bademo.
Tótalela mpe esakweli ya liboso mpenza oyo ezali na Biblia. Esakweli yango elobi boye: “[Ngai Nzambe] nakotya koyinana kati na yo [Satana] mpe mwasi [ebongiseli ya Yehova ya likoló] mpe kati na momboto na yo [Satana] mpe momboto na ye [Yesu Klisto]. Akosasa yo na motó mpe yo okosasa ye na litindi.” (Genese 3:15, NW) Kosasa nyoka na motó, emonisi mpe kobwakama ya Satana na lobwaku mozindo na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto. Esakweli yango elobi mpe ete koyinana ezali kati na Moto oyo azali kosasa Satana na motó mpe momboto ya Satana. Momboto ya Satana, to ebongiseli na ye, ezali mpe na bikelamu ya elimo oyo tokoki komona te, elingi koloba baanzelu na ye ya mabe, to bademo. Na bongo, tokoki mpenza koloba ete ntango Yesu akobwaka Satana na lobwaku mozindo, akokanga mpe bademo na ye mpe akobwaka bango na lobwaku yango. Lokola bilimo mabe bazalaki na nsɔmo makasi ya lobwaku mozindo, emonisi ete bango moko bayebi ete bakobwakama na lobwaku yango na mikolo ezali koya.—Luka 8:31.
Kasi, tokoki nde kokanisa ete Emoniseli 20:1-3 elobeli bademo te mpo bakobomama na Armagedon elongo na bato ya Satana to momboto na ye oyo ezali awa na mabelé? Biblia emonisi yango te. Mpo na makambo oyo ekokómela Satana na nsuka, Biblia elobi boye: “Zabolo oyo azalaki kobungisa bango nzela abwakamaki na kati ya laki ya mɔtɔ mpe ya sufulu, epai nyama mabe ná mosakoli ya lokuta bazalaki; mpe bakonyokolama butu moi libela na libela seko.” (Emoniseli 20:10) Nyama mabe mpe mosakoli ya lokuta ezali bikonzi ya politiki, oyo ezali na kati ya ebongiseli ya Satana awa na mabelé. (Emoniseli 13:1, 2, 11-14; 16:13, 14) Bibongiseli yango ekosuka na Armagedon, ntango Bokonzi ya Nzambe ekobebisa mpe ekotya nsuka na bikonzi nyonso ya mokili. (Danyele 2:44) Biblia elobeli “mɔtɔ ya seko oyo ebongisamá mpo na Zabolo mpe baanzelu na ye.” (Matai 25:41) Satana ná bademo na ye bakobwakama na “laki ya mɔtɔ mpe ya sufulu,” lokola nyama mabe ná mosakoli ya lokuta, bango mpe bakobomama mpo na libela. Soki bilimo mabe wana ya nguya mingi, elingi koloba momboto ya Satana ekobomama na Armagedon, Biblia elingaki komonisa ete bademo mpe bazali na laki wana ya elilingi elongo na nyama mabe mpe mosakoli ya lokuta. Lokola balobeli bango te na Emoniseli 20:10, yango emonisi ete bademo bakobomama na Armagedon te.
Lokola Biblia elobi polele te ete bademo bakobwakama na lobwaku mozindo, elobi mpe te ete bakobimisama na lobwaku yango ya mozindo. Kasi, bakosuka kaka lokola Zabolo. Nsima ya kofungolama elongo na Zabolo mpe ya komeka bato mpo na mbala ya nsuka, na nsuka ya mbula nkóto, bademo mpe bakobwakama na laki ya mɔtɔ mpe bakobomama mpo na libela.—Emoniseli 20:7-9.
Na bongo, ata soki Emoniseli 20:1-3 elobeli kaka kokangama ya Satana mpe kobwakama na ye na lobwaku mozindo mpo asala lisusu misala na ye te, tokoki mpenza kokanisa ete baanzelu na ye mpe bakokangama mpe bakobwakama na lobwaku mozindo yango elongo na ye. Ezala Satana to bademo, moko te akokoka kopekisa mokano ya Nzambe ya kozongisa paladiso awa na mabelé mpe kozongisa bato na ezaleli ya kokoka na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto.