Mituna ya batángi
Yesu alingaki koloba nini ntango ayebisaki bayekoli na ye ete: “Nabandaki komona Satana asili kokwea lokola mokalikali banda na likoló”?
Yesu aponaki bayekoli 70 mpe “atindaki bango mibale mibale liboso na ye na engumba nyonso mpe na esika nyonso epai ye moko asengelaki kokóma.” Ntango bayekoli 70 yango bazongaki, batondaki na esengo mpenza mpo na makambo minene oyo basalaki. Balobaki boye: “Nkolo, ata bademo bazali kotosa biso ntango tozali kosalela nkombo na yo.” Na ntango wana nde Yesu alobaki boye: “Nabandaki komona Satana asili kokwea lokola mokalikali banda na likoló.”—Luka 10:1, 17, 18.
Soki totali malamu te, tokoki kokanisa ete Yesu azalaki kolobela likambo moko oyo esí esalemaki. Kasi, mbula 60 na nsima, ntoma Yoane, wana así akómaki mobange, asalelaki elobeli oyo ekokani na oyo ya Yesu, ntango akomaki boye: “Dalagona yango ya monene abwakamaki na nse, ye nyoka ya ebandeli, oyo abengami Zabolo mpe Satana, oyo azali kobungisa mabelé mobimba oyo efandami nzela; abwakamaki na mabelé, mpe baanzelu na ye babwakamaki na nse elongo na ye.”—Emoniseli 12:9.
Ntango Yoane akomaki maloba wana, Satana azalaki kaka na likoló. Ndenge nini toyebi yango? Toyebi yango mpo Emoniseli ezali buku ya bisakweli, kasi te ya makambo oyo esalemá kala. (Emoniseli 1:1) Ya solo, ntango Yoane azalaki na bomoi, Satana abwakamaki naino te na mabelé. Kutu, makambo mingi ezali komonisa ete, tii mwa moke na nsima ya ntango oyo Yesu akómaki Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na 1914, Satana abwakamaki naino te.a—Emoniseli 12:1-10.
Kasi, mpo na nini Yesu alobelaki kobwakama ya Satana banda na likoló lokola likambo moko oyo esí esalemaki? Bato mosusu ya mayele balobaka ete Yesu azalaki nde kopamela bayekoli na ye mpo bamikumisaki na lolendo. Balobaka ete Yesu alobaki boye: ‘Bolongi bademo, kasi, bózala na lofundo te. Satana akómaki na lolendo, mpe yango esalaki ete akwea nokinoki.’
Tokoki mpenza koloba likambo yango mbala moko bongo te. Kasi, emonani ete Yesu azalaki nde kosepela elongo na bayekoli na ye mpe kolobela kokwea ya Satana oyo ekosalema na nsima. Yesu ayebaki malamu makambo mabe ya Zabolo koleka bayekoli na ye nyonso. Kanisá naino esengo oyo Yesu azalaki na yango ntango ayokaki ete ata bademo ya nguya batosaki bayekoli na ye oyo bazali bato ya kozanga kokoka! Ndenge oyo bademo batosaki bango ezalaki komonisa mwa moke makambo oyo Yesu, Mikaele, anzelu-mokonzi, akosala na nsima, ntango akobundisa Satana mpe kobwaka ye na mabelé.
Na ntembe te, ntango Yesu alobaki ete amonaki Satana “asili kokwea,” alingaki kaka komonisa ete Satana akokwea mpenza. Yango ekokani na bisakweli mosusu ya Biblia oyo elobelaka makambo oyo ekoya lokola nde esí esalemá. Na ndakisa, na Yisaya 52:13–53:12, basangisi maloba oyo basalelaka mpo na kolobela makambo eleká ná oyo basalelaka mpo na kolobela makambo ekoya mpo na kolobela bisakweli ya Masiya. Na ntembe te, Yesu azalaki kaka komonisa na kondima mpenza ete Satana akobwakama mpenza banda na likoló, na boyokani na mokano ya Tata na Ye. Yesu azalaki mpe na kondima ete na ntango oyo Nzambe abongisi, Satana ná bademo na ye bakobwakama na libulu mozindo mpe na nsima bakobomama mpo na libela.—Baloma 16:20; Baebele 2:14; Emoniseli 20:1-3, 7-10.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mokapo 10, mpe buku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! mokapo 27, ebimisami na Batatoli ya Yehova.