Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w05 15/7 lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Masolo mosusu
  • Banani bakosekwa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Nguya oyo elikya ya lisekwa epesaka
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Sheole ná Hadesi ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Likambo oyo ekosukisa liwa!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
w05 15/7 lok. 31

Mituna ya batángi

Lokola Salomo, mokonzi ya Yisalaele ya kala, atikalaki sembo te epai ya Nzambe ntango akómaki mobange, tokoki nde koloba ete akosekwa te?​—1 Mikonzi 11:3-9.

Atako Biblia etángi bankombo ya mibali mpe basi mosusu ya kondima oyo, na ntembe te, bakosekwa, elobi likambo moko te ya sikisiki mpo na oyo etali lisekwa ya moto mokomoko oyo etángi nkombo na ye. (Baebele 11:1-40) Nzokande, mpo na Salomo, tokoki kozwa likanisi ya ekateli ya Nzambe mpo na ye soki tokokanisi likambo oyo ekómelaki ye na liwa na ye mpe oyo ekómelaki basaleli mosusu ya sembo na liwa na bango.

Biblia elobi kaka makambo mibale mpo na bato oyo bakufá: Ezali na baoyo bazali na bomoi te mpo na mwa ntango mpe baoyo bakozala lisusu na bomoi te mpo na libela. Baoyo bakosekwa te bazali na “Gehena,” to “laki ya mɔtɔ.” (Matai 5:22, Malako 9:47, 48; Emoniseli 20:14) Kati na bato yango, tokoki kotánga Adama ná Eva, Yuda Mokeliota oyo akabaki Yesu, mpe bato mosusu oyo Nzambe apesaki etumbu ya liwa, na ndakisa bato ya ntango ya Noa mpe bato ya Sodoma ná Gomola.a Soki moto oyo akufi akosekwa, akendaka na Sheole, to Hadesi. Biblia elobeli likambo oyo ekosalema mpo na bato yango na mikolo ekoya ete: “Mbu ezongisaki bakufi oyo bazalaki na kati na yango, mpe liwa ná Hadesi ezongisaki bakufi bazalaki na kati na yango, mpe basambisamaki moto na moto engebene misala na ye.”​—Emoniseli 20:13.

Na bongo, bato ya sembo oyo Baebele 11 elobeli bazali na Sheole to Hadesi mpe bazali kozela lisekwa. Kati na bango, tokoki kotánga basaleli ya sembo ya Nzambe lokola Abalayama, Moize, mpe Davidi. Tótalela sikoyo ndenge Biblia ezali kolobela bato yango ntango bazalaki kokufa. Yehova alobaki na Abalayama boye: “Yo okokende na kimya epai na batata na yo, mpe okokundama na nsima ya bonunu ya [mbula] mingi.” (Genese 15:15) Yehova alobaki na Moize boye: “Talá, obɛlɛmi kolala esika moko na batata na yo.” (Deteronome 31:16) Mpo na Davidi, Tata ya Salomo, Biblia elobi boye: “Davidi alalaki [esika moko, NW ] na batata na ye mpe akundamaki na mboka ya Davidi.” (1 Mikonzi 2:10). Na bongo, maloba ‘kolala esika moko na batata’ ezali lolenge mosusu ya koloba ete moto yango akendeki na Sheole.

Likambo nini elekaki na liwa ya Salomo? Biblia epesi eyano oyo: “Mikolo mizalaki Salomo mokonzi na Yelusaleme likoló ya Yisalaele mobimba ezalaki [mbula] ntuku minei. Salomo alalaki [esika moko, NW] na batata na ye, mpe akundamaki na mboka ya Davidi tata na ye.” (1 Mikonzi 11:42, 43) Na yango, emonani ete tokoki koloba ete Salomo azali na Sheole to Hadesi, mpe akosekwa.

Likanisi yango emonisi ete bato mosusu oyo Biblia elobi polele ete ‘balalaki esika moko na batata na bango’ bakosekwa. Bakonzi mingi oyo bakitanaki Salomo bazalaki sembo te. Atako bongo, Biblia elobi se ndenge yango mpo na bango. Tokoki kokamwa likambo yango te, mpamba te “ekozala na lisekwa moko ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.” (Misala 24:15) Kasi, ezali se nsima wana “baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama” bakolamuka nde tokoyeba nani mpenza asekwi. (Yoane 5:28, 29) Yango wana, na esika ya kopesa eyano ya sikisiki mpo na lisekwa ya moto mokomoko ya ntango ya kala, tozali nde kozela na elikya nyonso ekateli ya sembo ya Yehova.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni 1988, nkasa 30-31 (ebimeli ya Lifalanse).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto