Azalaki Nzambe to moto?
“NGAI nazali pole ya mokili. Moto oyo azali kolanda ngai akotambola soki moke te na molili, kasi akozwa pole ya bomoi.” (Yoane 8:12) Yesu Klisto nde alobaki maloba wana. Moto moko ya mayele na ekeke ya liboso akomaki mpo na ye boye: “Biloko nyonso ya motuya ya bwanya mpe ya boyebi ebombami malamumalamu na kati na ye.” (Bakolose 2:3) Lisusu, Biblia elobi ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Mpo tókokisa bamposa na biso ya elimo, tosengeli koyeba Yesu malamumalamu.
Bato mingi na mokili bayebi nkombo ya Yesu Klisto. Na ntembe te Yesu atiká mpenza nsango na mokili. Kutu, manaka oyo basalelaka na mikili mingi etángaka mibu banda na mbula oyo bakanisaka ete abotamaki. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Mibu oyo ezali liboso ya mbula wana ebengamaka liboso ya Klisto, mpe oyo ezali na nsima ya mbula wana ebengamaka anno Domini (na mobu ya Nkolo na biso).”
Kasi, na motuna ya koyeba soki Yesu azalaki nani, bato bazalaka na makanisi ndenge na ndenge. Mpo na bamosusu, azalaki kaka moto moko oyo atiká nsango na mokili. Nzokande, mpo na bamosusu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Bato mosusu ya Lingomba ya Hindu, bakokanisaka Yesu Klisto na nzambe na bango Krishna, oyo balobaka ete azali nzambe oyo alataki nzoto ya moto. Yesu azalaki kaka moto to azalaki nzambe oyo tosengeli kosambelaka? Azalaki mpenza nani? Autaki wapi? Azalaki na bizaleli nini? Mpe azali wapi lelo oyo? Ndenge tokomona yango na lisolo oyo elandi, buku oyo elobeli makambo mingi ya Yesu ekopesa biso biyano ya malamu na mituna yango.