“Tomoni Masiya”
MOYUDA moko na ekeke ya liboso alobaki boye: “Tomoni Masiya.” Mosusu mpe alobaki ete: “Tomoni moto oyo Moize, na kati ya Mibeko, mpe Basakoli bakomaki mpo na ye.” Nsukansuka, Masiya oyo bazalaki kozela banda kala ayaki. Bandimaki mpenza ete ezali ye!—Yoane 1:35-45.
Soki tokanisi ndenge makambo ya losambo mpe makambo mosusu ezalaki na ntango wana, esengeli mpenza kozala na makambo oyo endimisaki bango. Bato ndenge na ndenge oyo bamibengaki basikoli babimaki mpe balakaki makambo minene, kasi bilikya nyonso oyo bapesaki bato ekweaki na mai lokola balongaki te kolongola Bayuda na boombo ya Baloma.—Misala 5:34-37.
Nzokande, Bayuda mibale oyo tolobeli na ebandeli—Andele ná Filipo—bakakatanaki ata moke te ete bamonaki Masiya ya solosolo. Na bambula oyo elandaki, kondima na bango ekómaki lisusu makasi ntango bamonaki makamwisi oyo moto yango asalaki mpo na kokokisa makambo oyo esakolamaki mpo na Masiya.
Mpo na nini mibali yango mibale mpe bato mingi mosusu bandimaki Masiya yango mpe bakanisaki ete akeseni na Bamasiya ya lokuta oyo babimaki liboso? Wapi makambo oyo endimisaki bango ete azali Masiya ya solosolo?
Lisolo elobi ete Andele ná Filipo bamonaki ete Yesu ya Nazalete, moto oyo azalaki liboso mosali-mabaya, nde Masiya oyo Bayuda bazalaki kozela banda kala. (Yoane 1:45) Luka, moto moko oyo alandelaki malamumalamu makambo mpo na kokoma lisolo na ye, alobi ete Masiya abimaki “na mbula ya zomi na mitano ya boyangeli ya Tibɛli Kaisala.” (Luka 3:1-3) Mbula ya 15 ya boyangeli ya Tibɛli ebandaki na Sɛtɛmbɛ ya mobu 28 ya ntango na biso (T.B.), mpe esukaki na Sɛtɛmbɛ ya mobu 29 T.B. Luka alobi lisusu ete na ntango yango, Bayuda “bazalaki kozela” koya ya Masiya. (Luka 3:15) Mpo na nini bazalaki kozela ye na ntango wana? Tokoyeba yango.
Bilembeteli oyo esengelaki komonisa Masiya
Soki totaleli mokumba ya ntina mingi oyo Masiya asengelaki kokokisa, tokomona ete ebongaki mpenza ete Yehova apesa bilembeteli oyo ekosalisa bato ya sembo mpe baoyo bazalaki kosɛnzɛla ete báyeba Masiya oyo alakamaki. Na ndenge yango, bato oyo bazalaki kosɛnzɛla bakokaki te kokosama na Bamasiya ya lokuta, ndenge bato mingi bakosamaki.
Moto oyo atindami lokola ambasadɛrɛ na ekólo moko amonisaka bilembeteli oyo ekondimisa bakonzi ya ekólo yango. Ndenge moko mpe, bambula mingi liboso, Yehova akomisaki makambo oyo Masiya akokokisa. Yango wana, ntango “Kapita” yango ayaki, ezalaki lokola nde amemi mokanda oyo ezali na bilembeteli oyo ekondimisa ete azali mpenza Masiya.—Baebele 12:2.
Bisakweli mingi ya Biblia, oyo ekomamaki bankama ya bambula liboso, elobelaki makambo oyo asengelaki kokokisa. Bisakweli yango eyebisaki na bosikisiki ndenge oyo Masiya akoya, mosala oyo akosala, ndenge oyo bato bakonyokola ye, mpe liwa oyo akokufa. Kutu, bisakweli yango elobelaki mpe lisekwa na ye, ndenge oyo akotombwama na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe, mpe mapamboli oyo Bokonzi na ye ekomemela bato. Na ndenge yango, bisakweli ya Biblia epesaki elembo oyo esengelaki komonana kaka epai ya moto moko.
Ya solo, ntango Yesu amonanaki na mobu 29 T.B., bisakweli nyonso te ya Masiya nde ekokisamaki na ntango wana. Na ndakisa, bisakweli oyo elobelaki liwa mpe lisekwa na ye ekokisamaki naino te. Atako bongo, Andele ná Filipo, mpe bato mingi mosusu bandimelaki Yesu mpo na mateya mpe misala na ye. Bamonaki makambo mingi oyo endimisaki bango ete azali mpenza Masiya. Soki yo mpe ozalaki na ntango wana mpe otalelaki na makanisi malamu bilembeteli yango, ntango mosusu olingaki kondima ete Yesu azali mpenza Masiya.
Elembo oyo esangisi makambo mingi
Nini elingaki kosalisa yo ondima yango? Basakoli ndenge na ndenge bayebisaki makambo ya sikisiki oyo Masiya asengelaki kokokisa, makambo oyo esengelaki komonisa ye polele. Ntango mosakoli mokomoko azalaki kobakisa makambo mosusu na makambo oyo baoyo bazalaki liboso na ye balobaki, elembo ya Masiya ekómaki komonana mokemoke. Henry Halley alobaki boye: “Soki mibali mwa mingi bauti na mikili ndenge na ndenge, bayebani te, basololá mpe naino te, bayei kokutana na ndako moko mpe mokomoko ayei na eteni ya libanga ya marbre, mpe ntango basangisi yango nyonso ebimisi ekeko moko—na ntembe te okoloba ete ezali na moto moko oyo asalaki ekeko yango mpe atindelaki mokomoko na bango eteni ya ekeko yango, boye te?” Na nsima, atunaki boye: “Ezali nde na lolenge mosusu oyo tokoki kolimbola likambo ya kokamwa oyo etaleli bomoi ya Yesu mpe mosala na ye, oyo bato ndenge na ndenge bakomaki na bileko ekeseni mpe bankama ya bambula liboso ete Yesu aya, soki ezali te ete MOTO OYO AZALI NA MAYELE OYO ELEKI MAYELE NYONSO nde akomisaki makambo yango?” Halley asukisaki ete yango ezali “likamwisi oyo eleki makamwisi nyonso!”
“Likamwisi” yango ebandaki na mokanda ya liboso ya Biblia. Longola esakweli ya liboso ya Biblia oyo elobelaki mokumba ya Masiya, moto oyo akomaki Genese alobaki ete Masiya akobima na libota ya Abalayama. (Genese 3:15; 22:15-18) Esakweli mosusu elobaki ete Masiya akobima na libota ya Yuda. (Genese 49:10) Na nzela ya Moize, Nzambe ayebisaki Bayisalaele ete Masiya akozala molobeli monene mpe mobikisi monene koleka Moize.—Deteronome 18:18.
Na ntango ya Mokonzi Davidi, bisakweli emonisaki ete Masiya akozala mokitani na kiti ya bokonzi ya Davidi mpe ete Bokonzi na ye ‘ekopikama makasi mpenza mpo na libela.’ (2 Samwele 7:13-16) Mokanda ya Mika emonisaki ete Masiya akobotama na Beteleme, engumba ya Davidi. (Mika 5:2) Yisaya asakolaki ete akobotama na elenge mwasi moko oyo ayebi naino mibali te. (Yisaya 7:14) Mosakoli Malaki amonisaki ete moto moko lokola Eliya akobongisela Masiya nzela.—Malaki 4:5, 6.
Mokanda ya Danyele elobaki mpe makambo mosusu ya sikisiki oyo etali Masiya. Mosakoli yango ayebisaki mbula oyo Masiya asengelaki koya na maloba oyo: “Yebá mpe sosolá ete longwa na kobima na liloba ya kotɛlɛmisa mpe ya kotonga Yelusaleme kino koya ya mopakolami, mokonzi, ekozala pɔsɔ nsambo. Na nsima mpo na pɔsɔ ntuku motoba na mibale ekotongama lisusu esika moko na zando mpe libulu na kozinga mboka, nde na ntango ya mpasi.”—Danyele 9:25.
Alatazelezese, mokonzi ya Perse abimisaki “liloba” ya kotɛlɛmisa mpe kotonga lisusu Yelusaleme na mbula ya ntuku mibale ya boyangeli na ye. Mokonzi yango abandaki koyangela na mobu 474 liboso ya ntango na biso (L.T.B.); na bongo, mbula ya 20 ya boyangeli na ye ezalaki mobu 455 L.T.B. (Nehemia 2:1-8) Boye, ndenge esakweli elobaki yango, kobanda ntango etinda ya kotɛlɛmisa mpe kotonga lisusu Yelusame epesamaki tii koya ya Masiya, esengelaki koleka pɔsɔ 69 (7+62). Kasi, soki totángi mikolo ndenge tomesaná kotánga yango, bapɔsɔ 69 ekopesa biso kaka mikolo 483, to mbula moko ná mwa basanza. Nzokande, soki tolandi ndenge oyo mikolo etángamaka na bisakweli, elingi koloba, “mokolo moko mpo na mbula moko,” tokomona ete Masiya asengelaki kobima nsima ya bambula 483, elingi koloba na mobu 29 T.B.—Ezekiele 4:6.a
Bato mosusu oyo bamibengaki Masiya babimaki na bileko ndenge na ndenge, kasi kaka Yesu ya Nazalete nde abimaki na mobu 29 T.B. (Luka 3:1, 2) Na mbula yango, Yesu akendaki epai ya Yoane Mobatisi mpe abatisamaki na mai. Na ndenge yango, Yesu apakolamaki na elimo santu mpe akómaki Masiya. Na nsima, Eliya oyo abongiselaki Yesu nzela, elingi koloba Yoane Mobatisi, alakisaki Yesu epai ya Andele ná moyekoli mosusu; abengaki ye “Mwana-mpate ya Nzambe oyo azali kolongola lisumu ya mokili.”—Yoane 1:29; Luka 1:13-17; 3:21-23.
Molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Masiya
Bisakweli ya Biblia eyebisaki mabota ya Bayuda oyo esengelaki kobimisa Masiya. Yango wana, ebongaki mpenza ete Mozalisi, ye oyo ayebi makambo nyonso, asala ete Masiya aya na ntango oyo mikanda ya milɔngɔ ya mabota ezalaki naino mpo emonana polele ete auti na mabota yango.
Buku moko (Cyclopedia) ya McClintock ná Strong, elobi boye: “Mikanda ya milɔngɔ ya mabota ya Bayuda ebungaki ntango Yelusaleme ebomamaki [na mobu 70 T.B.], kasi liboso ya mbula wana te.” Bilembeteli mingi ezali komonisa ete Matai ná Luka bakomaki baevanzile na bango liboso ya mobu 70 T.B. Na yango, ekoki kozala ete batalelaki mikanda yango ntango bazalaki kokoma masolo na bango na ntina na bankɔkɔ ya Yesu. (Matai 1:1-16; Luka 3:23-38) Lokola koya ya Masiya ezalaki likambo ya ntina mingi na ntango wana, na ntembe te, bato mingi balukaki koyeba bango moko molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu.
Bisakweli ekokisamaki epai ya Yesu kaka na pwasa?
Ekoki nde kozala ete makambo oyo bisakweli elobaki ekokisamaki epai ya Yesu kaka na pwasa? Moto moko ya mayele alobaki boye: “Ndenge oyo bisakweli ekokisamaki epai ya Yesu ekoki kozala likambo ya pwasa te. Ezali mpasi mpenza mpo likambo ya ndenge wana esalema. Moto moko amekaki kotánga mituya mpe amonaki ete soki tokamati kaka bisakweli mwambe, esengeli libaku moko na kati ya mabaku miliare milio monkama mpo ekokisama epai ya moto moko.” Alobaki lisusu boye: “Soki libaku mokomoko ezali mbongo ya ebende, soki totandi yango nyonso, ekozwa etando lokola etúká ya Texas [oyo ezali na bonene ya kilomɛtrɛ-kare 266 807] mpe tokokangisa mbongo mosusu tii ekokóma na santimɛtrɛ 60. Soki totye elembo na ebende moko na kati ya nyonso wana mpe tokangi moto moko elamba na miso mpe tosɛngi ye atambolatambola na etúká mobimba mpo na koluka yango, okanisi mpenza ete akozwa mbongo oyo ezali na elembo?” Na nsima alobaki ete “ezali ndenge moko na likoki oyo moto moko akoki kozala na yango ya kokokisa bisakweli ata mwambe oyo elobelaki [Masiya].”
Nzokande, na boumeli ya mbula misato na ndambo oyo Yesu asalaki mosala na ye awa na mabelé, akokisaki kaka bisakweli mwambe te. Na kotalela makambo wana nyonso, moto ya mayele yango asukisi boye: “Moto mosusu te, kaka Yesu nde akokisaki yango.”
“Koya” ya Masiya
Ya solo, Masiya ayaki na mobu 29 T.B. mpe ezalaki Yesu moto ya Nazalete. Azalaki moto ya komikitisa, amonaki mpasi mpo na kosikola bato. Ayaki te lokola Mokonzi moko ya nguya mpo na kolongola Bayuda na boombo ya Baloma, ndenge mingi kati na bango, ata mpe bayekoli na ye bazalaki kolikya. (Yisaya mokapo 53; Zekalia 9:9; Misala 1:6-8) Kasi, bisakweli elobaki ete akoya lisusu, mpe na mbala yango, akozala na nguya mpe na bokonzi monene.—Danyele 2:44; 7:13, 14.
Boyekoli ya bisakweli ya Biblia endimisi bato mingi ya mitema sembo ete Masiya ayaki na ekeke ya liboso mpe ete asengelaki koya lisusu. Makambo emonisi ete koya na ye lisusu, oyo ezalaki ebandeli ya “kozala” na ye ezalaki na 1914.b (Matai 24:3-14) Na mbula yango, Yesu akómaki mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe kuna na likoló. Mosika te akolongola mabe nyonso oyo botomboki ya Adama ná Eva ememelá bato. Na nsima, na Boyangeli na ye ya Mbula Nkóto, akosopa mapamboli likoló ya baoyo nyonso bazali komonisa kondima epai na ye lokola Momboto oyo alakamaki, Masiya, oyo “azali kolongola lisumu ya mokili.”—Yoane 1:29; Emoniseli 21:3, 4.
Batatoli ya Yehova bakosepela komonisa yo makambo yango mpe kolakisa yo na kati ya Biblia makambo oyo boyangeli ya Masiya ekoki kosalela yo mpe bandeko na yo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa bandimbola mosusu ya Danyele 9:25, talá buku Étude perspicace des Écritures, volimi 2, nkasa 995-999, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
b Mpo na kozwa bandimbola mosusu, talá buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, mokapo 10 mpe 11, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Etanda/Bililingi na lokasa 6, 7]
455 L.T.B., “liloba ya kotɛlɛmisa . . .Yelusaleme”.
29 T.B., Masiya ayei
Mbula 483 (pɔsɔ 69 ya esakweli)—Danyele 9:25
1914, Masiya azwi bokonzi na likoló
Mosika te, Masiya akolongola mabe nyonso mpe akokómisa mabelé paladiso