Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/12 nk. 20-24
  • Masiya—Nzela oyo Nzambe asaleli mpo na kobikisa bato

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Masiya—Nzela oyo Nzambe asaleli mpo na kobikisa bato
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Sekele mosantu” ya Masiya eyebisamaki mokemoke
  • Makambo oyo emonisi ete Yesu azali Masiya
  • Koyokela Masiya
  • Ntina oyo Masiya asengelaki kokufa
  • Azali kokokisa mokumba na ye ya Masiya
  • Yo mpe omoná Masiya?
  • “Tomoni Masiya”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • “Tosili komona Masiya”!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Yesu Kristo azali nani?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • Mpo na nini baboyaki Masiya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/12 nk. 20-24

Masiya​—Nzela oyo Nzambe asaleli mpo na kobikisa bato

“Mpo kaka ndenge bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama, bato nyonso mpe bakozongisama na bomoi na kati ya Kristo.”​—1 KO. 15:22.

1, 2. (a) Andre ná Filipe balobaki nini ntango bakutanaki na Yesu? (b) Mpo na nini tolobi ete tozali na bilembeteli mingi oyo emonisi ete Yesu azali Masiya koleka bakristo ya ekeke ya liboso?

ANDRE ayebisaki ndeko na ye Petro ete: “Tomoni Masiya”; amindimisaki ete Yesu, moto ya Nazarete, azalaki Moto oyo Nzambe atyaki mafuta na elimo. Filipe andimaki mpe likambo yango mpe alukaki moninga na ye Natanaele, ayebisaki ye ete: “Tomoni moto oyo Moize, na kati ya Mibeko, mpe Basakoli bakomaki mpo na ye, Yesu, mwana ya Yozefe, moto ya Nazarete.”​—Yoa. 1:40, 41, 45.

2 Ondimaka mpenza ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki, “Kapita [ya Yehova oyo bato] bazali kobika na nzela na ye?” (Ebr. 2:10) Lelo oyo, tozali na bilembeteli mingi oyo emonisi ete Yesu azali Masiya, koleka oyo bayekoli na ye ya ekeke ya liboso bazalaki na yango. Banda kobotama ya Yesu tii na lisekwa na ye, Liloba ya Nzambe epesi bilembeteli ya polele ete azalaki Kristo. (Tángá Yoane 20:30, 31.) Biblia emonisi mpe ete Yesu akokoba kokokisa mokumba na ye ya Masiya longwa na likoló. (Yoa. 6:40; tángá 1 Bakorinti 15:22.) Na kotalela makambo oyo oyekoli na Biblia, yo mpe okoki koloba lelo ete ‘omoni Masiya.’ Kasi, tótalela naino ntina oyo bayekoli wana ya liboso balobaki solo ete bamoni Masiya.

“Sekele mosantu” ya Masiya eyebisamaki mokemoke

3, 4. (a) Nini esalisaki bayekoli ya liboso ‘bámona Masiya’? (b) Mpo na nini okoki koloba ete kaka Yesu nde akokaki kokokisa bisakweli nyonso oyo etali Masiya?

3 Ndenge nini bayekoli ya Yesu ya ekeke ya liboso bakokaki koloba na kondima nyonso ete azali Masiya? Na nzela ya basakoli, Yehova ayebisaki mokemoke makambo oyo ekokaki kosalisa mpo na koyeba Masiya. Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobaki ete yango ezali lokola kosangisa biteni ya marbrɛ mpo na kosala ekeko mobimba. Kanisá ete mibali mingi oyo basololá ata mbala moko te bamemi moto na moto eteni moko ya marbrɛ na ndako moko. Soki biteni yango ekokani mpenza mpe esali ekeko ya mobimba, na ntembe te okoloba ete esengeli kozala na moto moko oyo asalaki eteni mokomoko mpe atindelaki moto na moto eteni na ye. Ndenge moko na eteni mokomoko ya ekeko wana, esakweli nyonso oyo etali Masiya ezalaki koyebisa likambo moko ya ntina mpo na Masiya.

4 Bisakweli nyonso oyo etali Masiya ekokaki mpenza kokokisama epai ya moto moko kaka na pwasa boye? Moto moko ya mayele alobaki ete ekoki kosalema te ete bisakweli nyonso oyo etali Masiya ekokisama epai ya moto moko kaka na pwasa! “Moto mosusu te, kaka Yesu nde akokisaki yango.”

5, 6. (a) Ndenge nini etumbu ya Satana ekopesama? (b) Ndenge nini Nzambe amonisaki mokemoke molɔngɔ ya bankɔkɔ oyo ekomema na “momboto” oyo alakamaki?

5 “Sekele mosantu” ezali likambo oyo bisakweli oyo etali Masiya elobelaki mingimingi, mpe etaleli makambo ya ntina mingi mpo na bikelamu nyonso. (Kol. 1:26, 27; Eba. 3:15) Etumbu ya Satana Zabolo, “nyoka ya ebandeli” oyo amemaki bato na lisumu mpe liwa, ezalaki mpe na kati ya sekele yango. (Em. 12:9) Ndenge nini etumbu yango elingaki kopesama? Yehova asakolaki ete “momboto” moko oyo “mwasi” moko akobimisa akopanza Satana na motó. “Momboto” oyo alakamaki akopanza motó ya nyoka, akolongola mobandisi ya botomboki, ya maladi, mpe ya liwa. Kasi, na ndingisa ya Nzambe, Satana asengelaki liboso kozokisa “momboto” ya mwasi na litindi na ndenge ya elilingi.

6 Mokemoke, Yehova amonisaki soki “momboto” oyo alakamaki ekozala nani. Nzambe alapelaki Abrahama ndai ete: “Na nzela ya momboto na yo, bikólo nyonso ya mabele ekomizwela mpenza lipamboli.” (Eba. 22:18) Moize asakolaki ete Moto yango akozala “mosakoli moko” oyo aleki Moize. (Mib. 18:18, 19) Davidi azwaki elaka, mpe na nsima basakoli bandimisaki yango, ete Masiya akozala mokitani na ye mpe akozwa kiti ya bokonzi ya Davidi mpo na libela.​—2 Sa. 7:12, 16; Yir. 23:5, 6.

Makambo oyo emonisi ete Yesu azali Masiya

7. Na ndenge nini Yesu autaki epai ya “mwasi” ya Nzambe?

7 Nzambe alongolaki Mwana na ye, ekelamu na ye ya liboso, na ebongiseli ya bikelamu ya elimo kuna na likoló, oyo ezali mwasi na Ye ya elilingi, mpe atindaki ye mpo azala “momboto” oyo alakamaki. Yango esɛngaki ete Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki ‘amikómisa mpamba,’ elingi koloba atika bomoi na ye ya likoló mpe abotama moto ya kokoka. (Flp. 2:5-7; Yoa. 1:14) Lokola elimo santu ‘ezipaki’ Maria, yango ezalaki ndanga ete mwana oyo akobotama “akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.”​—Luka 1:35.

8. Na ndenge nini Yesu akokisaki esakweli oyo etali Masiya ntango ayaki mpo azwa batisimo na mai?

8 Bisakweli oyo elobelaki Masiya emonisaki esika mpe ntango oyo Yesu asengelaki kobotama. Yesu abotamaki na Beteleme, ndenge esakolamaki. (Mika 5:2) Na ekeke ya liboso, Bayuda bazalaki mpenza kozela Masiya na motema likoló. Lokola bazalaki kozela koya ya Masiya, bamosusu batunaki mpo na Yoane Mobatisi ete: “Mbala mosusu ye nde Kristo?” Kasi, Yoane ayanolaki boye: “Moto moko ya makasi koleka ngai azali koya.” (Luka 3:15, 16) Ntango Yesu akendaki epai ya Yoane na eleko ya ɔtɔnɛ ya mobu 29 T.B. mpo na kobatisama ntango akómaki na mbula 30, akómaki Masiya na ntango oyo esengelaki. (Dan. 9:25) Na nsima, abandaki mosala na ye ya ntina mingi, alobaki boye: “Ntango oyo etyamá ekoki, mpe bokonzi ya Nzambe ekómi pene.”​—Mrk. 1:14, 15.

9. Atako bayebaki makambo nyonso te, bayekoli ya Yesu bandimaki mpenza likambo nini?

9 Kasi, esengelaki kosembola makanisi ya bato oyo bazalaki kozela. Ezalaki mabe te ndenge bayambaki Yesu lokola Mokonzi; kasi bayebaki naino te ete akozwa bokonzi yango na mikolo ekoya mpe na likoló. (Yoa. 12:12-16; 16:12, 13; Mis. 2:32-36) Atako bongo, ntango Yesu atunaki ete, “Bino bolobi ete ngai nazali nani?” Kozanga kokakatana, Petro ayanolaki boye: “Ozali Kristo, Mwana ya Nzambe ya bomoi.” (Mat. 16:13-16) Petro alobaki mpe ndenge wana ntango bato mingi batikaki Yesu mpo babɛtaki libaku mpo na liteya na ye moko.​—Tángá Yoane 6:68, 69.

Koyokela Masiya

10. Mpo na nini Yehova alobaki ete tosengeli koyoka Mwana na ye?

10 Na likoló, Mwana ya Nzambe se moko oyo abotamaki azalaki ekelamu ya elimo ya nguya. Awa na mabele, Yesu azalaki “momonisi ya Tata.” (Yoa. 16:27, 28) Alobaki boye: “Oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoa. 7:16) Na ntango ya mbongwana ya Yesu, Yehova alobaki mpo na komonisa ete Yesu azali Masiya; apesaki etinda oyo: “Bóyoka ye.” (Luka 9:35) Ya solo, tosengeli koyoka to kotosa Moponami yango. Yango esɛngi kozala na kondima mpe na misala ya malamu; nyonso mibale ezali na ntina mingi mpo na kosepelisa Nzambe mpe kozwa bomoi ya seko.​—Yoa. 3:16, 35, 36.

11, 12. (a) Mpo na bantina nini Bayuda ya ekeke ya liboso baboyaki kondima Yesu lokola Masiya? (b) Banani bandimelaki Yesu?

11 Atako ezalaki na makambo mingi oyo emonisaki ete Yesu azalaki mpenza Masiya, Bayuda mingi ya ekeke ya liboso bandimaki ye te. Mpo na nini? Mpo bazalaki na makanisi na bango moko mpo na Masiya, na ndakisa bazalaki kokanisa ete akozala mokonzi ya politiki oyo akosikola bango na mabɔkɔ ya Baroma. (Tángá Yoane 12:34.) Na yango, bakokaki te kondima Masiya oyo akokokisa bisakweli oyo elobaki ete akotyolama, bato bakokima ye, asengeli komona mpasi mpe komesana na maladi, mpe nsukansuka kobomama. (Yis. 53:3, 5) Ata bayekoli mosusu ya Yesu oyo bazalaki sembo balɛmbaki nzoto ndenge akómaki te mokonzi ya politiki oyo akosikola bango. Kasi, bakangamaki kaka na Yesu, mpe na nsima, bazwaki boyebi ya sikisiki.​—Luka 24:21.

12 Ntina mosusu oyo bato baboyaki kondima ete Yesu azali Masiya ezalaki mateya na ye, oyo bato mingi bamonaki ete ezali mpasi mpo na kondima. Mpo na kokɔta na bokonzi ya Nzambe, esengelaki ‘komiboya,’ ‘kolya’ mosuni ya Yesu mpe komɛla makila na ye, ‘kobotama lisusu,’ mpe ‘kozala moto ya mokili te.’ (Mrk. 8:34; Yoa. 3:3; 6:53; 17:14, 16) Bato ya lolendo, ya bozwi, mpe bakosi bamonaki ete masɛngami wana eleki makasi mpo na kokokisa yango. Kasi, Bayuda oyo bazalaki na komikitisa bandimaki ete Yesu azali Masiya, ndenge mpe bato mosusu ya Samaria bandimaki ye, mpe balobaki ete: “Moto oyo azali solo mpenza mobikisi ya mokili.”​—Yoa. 4:25, 26, 41, 42; 7:31.

13. Na ndenge nini Yesu azokisamaki na litindi?

13 Yesu asakolaki ete banganga-nzambe bakonzi bakokatela ye etumbu mpe bato ya bikólo bakobaka ye na nzete, kasi na mokolo ya misato, akosekwa. (Mat. 20:17-19) Ntango andimaki liboso ya Sanedrina ete azali “Kristo Mwana ya Nzambe,” balobaki ete afingi Nzambe. (Mat. 26:63-66) Pilato amonaki ete Yesu asali “eloko moko te oyo ebongi na liwa,” kasi lokola Bayuda balobaki ete atombokisi bato, Pilato “akabaki Yesu ndenge bakanaki.” (Luka 23:13-15, 25) Na yango, ‘bawanganaki’ mpe bayokanaki ete báboma “kapita ya bomoi,” atako ezalaki na makambo mingi mpenza oyo emonisaki ete azali motindami ya Nzambe. (Mis. 3:13-15) Masiya ‘alongolamaki’ ndenge esakolamaki, babakaki ye na nzete na Mokolo ya Elekeli ya mobu 33 T.B. (Dan. 9:26, 27; Mis. 2:22, 23) Na liwa wana ya mabe, azokisamaki na “litindi” ndenge esakolamaki na Ebandeli 3:15.

Ntina oyo Masiya asengelaki kokufa

14, 15. (a) Mpo na bantina nini mibale Yehova apesaki nzela ete Yesu akufa? (b) Yesu asalaki nini nsima ya lisekwa na ye?

14 Yehova apesaki nzela ete Yesu akufa mpo na bantina mibale ya minene. Ya liboso, bosembo ya Yesu tii na liwa ekataki likambo moko ya ntina oyo etalelaki “sekele mosantu.” Amonisaki mpenza ete moto ya kokoka akoki kobatela ‘ezaleli ya kokangama na Nzambe’ mpe kozala na ngámbo ya boyangeli ya Yehova ata soki Satana abimiseli ye mikakatano ya makasi ndenge nini. (1 Tim. 3:16) Ya mibale, ndenge Yesu alobaki yango, “Mwana ya moto ayaki . . . kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Mat. 20:28) “Lisiko [yango] oyo ekokani” efutamaki mpo na lisumu oyo bakitani ya Adama basangolá mpe efungolaki nzela ya kopesa bomoi ya seko epai ya bato nyonso oyo bandimi Yesu lokola nzela oyo Nzambe asaleli mpo na kobikisa bato.​—1 Tim. 2:5, 6.

15 Nsima ya mikolo misato na lilita, Kristo asekwaki, mpe na boumeli ya mikolo 40, azalaki kobimela bayekoli na ye, amonisaki ete azali na bomoi mpe apesaki bango malako mosusu. (Mis. 1:3-5) Na nsima, amataki na likoló mpo na kolakisa Yehova motuya ya mbeka na ye ya ntina mingi mpe kozela ntango oyo etyamá, oyo kozala na ye lokola Masiya Mokonzi ekobanda. Liboso ya likambo yango, azalaki na makambo mingi ya kosala.

Azali kokokisa mokumba na ye ya Masiya

16, 17. Lobelá mokumba ya Yesu lokola Masiya banda azongá na likoló.

16 Banda Yesu asekwá eleki bikeke mingi, azali kotambwisa na bosembo misala ya lisangá ya bokristo oyo azali koyangela mpo azali Mokonzi na yango. (Kol. 1:13) Na ntango oyo etyamá, asengelaki kobanda kosalela nguya na ye lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Bisakweli ya Biblia mpe makambo oyo ezali koleka na mokili emonisi ete kozala na ye lokola Mokonzi ebandaki na 1914, ndenge moko na “bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 24:3; Em. 11:15) Mwa moke na nsima, akambaki baanzelu basantu mpo na kobwaka Satana mpe bademo na ye awa na mabele.​—Em. 12:7-10.

17 Mosala ya kosakola mpe ya koteya oyo Yesu abandaki na mobu 29 T.B. elingi mpenza kokóma na nsuka. Mosika te, akosambisa bato nyonso oyo bazali na bomoi. Na nsima, akoyebisa bato oyo bazali lokola bampate, baoyo bandimi ete azali nzela oyo Yehova asaleli mpo na kobikisa bato, ‘bázwa libula ya bokonzi oyo babongiselá bango banda mokili ebandá.’ (Mat. 25:31-34, 41) Bato oyo bazali koboya kondima ete Yesu azali Mokonzi bakobomama ntango akokamba mampinga ya likoló mpo na kolongola mabe nyonso. Nsima na yango, Yesu akokanga Satana na minyɔlɔlɔ mpe akobwaka ye ná bademo na ye na kati ya “libulu mozindo.”​—Em. 19:11-14; 20:1-3.

18, 19. Yesu akosala nini mpo na kokokisa mokumba na ye ya Masiya, mpe yango ekomemela bato ya botosi mapamboli nini?

18 Na boyangeli na ye ya mbula nkóto, Yesu akomonisa mpenza ete azali “Mopesi-Toli Monene, Nzambe ya Nguya, Tata ya Seko, Nkumu ya Kimya.” (Yis. 9:6, 7) Na boyangeli na ye, bato nyonso, ata mpe baoyo bakosekwa, bakokóma bato ya kokoka. (Yoa. 5:26-29) Masiya akomema bato ya botosi “na maziba ya mai ya bomoi,” akopesa bango libaku ya kozala na boyokani malamu mpe ya kimya ná Yehova. (Tángá Emoniseli 7:16, 17.) Nsima ya komekama ya nsuka, batomboki nyonso, ata mpe Satana ná bademo na ye ‘bakobwakama na kati ya laki ya mɔtɔ,’ yango ekozala liwa ya libela, motó ya “nyoka” ekopanzana.​—Em. 20:10.

19 Yesu azali kokokisa malamu mpenza mokumba na ye ya Masiya! Paradiso oyo ekozala awa na mabele ekotonda na bato oyo basikolami; bakozala na bomoi ya seko, na nzoto kolɔngɔnɔ mpe na esengo. Nsɔni nyonso oyo ebwakamaki na nkombo mosantu ya Yehova ekolongolama, mpe lotomo na ye ya koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba ekolongisama. Libula kitoko mpenza ezali kozela bato nyonso oyo bazali kotosa Moponami ya Nzambe!

Yo mpe omoná Masiya?

20, 21. Mpo na nini osengeli koyebisa basusu makambo oyo etali Masiya?

20 Banda 1914, tozali na eleko ya parousia, to kozala ya Kristo. Atako kozala na ye lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe ezali komonana na miso te, kokokisama ya bisakweli ezali komonisa yango polele. (Em. 6:2-8) Nzokande, ndenge moko na Bayuda ya ekeke ya liboso, bato mingi lelo oyo bazali kondima te ete Masiya azali koyangela. Bango mpe balingi masiya moko oyo akozala mokonzi ya politiki, to oyo akoyangela na nzela ya bakonzi ya politiki ya mokili oyo. Kasi yo oyebi ete Yesu azali sikoyo koyangela lokola Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Osepelaki te ntango oyebaki likambo yango? Lokola bayekoli ya ekeke ya liboso, motema na yo etindaki yo osakola ete: “Tomoni Masiya.”

21 Lelo oyo, ntango oyebisaka bato solo ya Biblia, obendaka likebi na bango na mokumba ya Yesu lokola Masiya? Kosala bongo ekobakisa botɔndi na yo mpo na oyo asalelá yo, oyo azali kosala sikoyo, mpe oyo akosala na mikolo ekoya. Na ntembe te, lokola Andre ná Filipe, oyebisaki baninga mpe bandeko na yo makambo oyo etali Masiya. Mpo na nini te kosolola na bango lisusu malamumalamu mpe komonisa bango ete Yesu azali mpenza Masiya oyo alakamaki, nzela oyo Nzambe asaleli mpo na kobikisa bato?

Okoki kolimbola?

• Ndenge nini bayekoli ya ekeke ya liboso bakokaki koyeba Masiya?

• Mpo na bantina nini mibale ya minene Yesu akufaki?

• Makambo nini mosusu Yesu akosala mpo na kokokisa mokumba na ye ya Masiya?

[Bililingi na lokasa 21]

Ndenge nini bato ya ekeke ya liboso bakokaki koyeba ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki?

[Elilingi na lokasa 23]

Ntango osololaka na basusu, obendaka likebi na bango na mokumba ya Masiya oyo Yesu azali na yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto