Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/8 nk. 3-4
  • Lokumu ya bato esili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lokumu ya bato esili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moto ya lokumu ezali nani?
  • Omemyaka lokumu na bango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Tókumisa Yehova na etamboli ya lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Omemyaka basusu wana ozali kopesa bango toli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Moto nyonso akoki kozala na lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/8 nk. 3-4

Lokumu ya bato esili

“Bazalaki mpenza kosala bato makambo ya nsɔni na kaa ya bakangami.”​—MAGDALENA KUSSEROW REUTER, OYO ABIKAKI NA KAA YA BAKANGAMI YA BANAZI.

MPASI oyo bamonisaki bato na bakaa ya bakangami ya Banazi na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki te ebandeli mpe nsuka ya kobebisa lokumu ya bato. Soki totali makambo oyo eleká to oyo ya mikolo oyo, emonani polele ete: “Kosala bato makambo ya nsɔni mpe kokitisa bango lokumu” ebandá kala mpenza.

Kobebisa lokumu ya bato esuki te kaka na konyokola bango. Emonanaka mpe na balolenge mosusu oyo tokanisaki te. Kanisá ete bazali kosɛka mwana moko kaka mpo abotamá na mbeba. To mopaya oyo bazali kosɛka ye kaka mpo azali na mimeseno ya ndenge mosusu. To moto oyo bazali kosalela ye makambo na bosembo te kaka mpo na mposo to ekólo na ye. Bato oyo bazali kosala makambo yango, bakoki komona ete bazali kosala masɛki, nzokande makambo ya ndenge wana, epesaka bato oyo bayokaka yango mpasi mpe nsɔni.​—Masese 26:18, 19.

Moto ya lokumu ezali nani?

Moto ya lokumu ezali oyo bapesaka ye kilo. Yango etali ndenge moto ye moko amitalelaka mpe ndenge bato mosusu batalelaka ye. Lokola makambo ezali ndenge na ndenge oyo ekoki kosala ete tómitalela boye to boye, ndenge oyo basusu batalelaka biso to basalelaka biso makambo ezali na ntina mingi na ndenge oyo tomitalelaka mokolo na mokolo.

Bato ya mpasi ná babola bazangi mboka te. Kasi, kozala mobola to moto ya mpasi esilisaka lokumu ya moto te. Lolenge oyo basusu bazali kotalela ye nde ekoki kosilisa lokumu na ye. Likambo ya mawa, bato oyo bazali kosilisa to kokitisa lokumu na bango ezali nde bato ya mawa to ya mpasi. Mpo na kotyola mibange, babola, bato oyo mitó etambolá to oyo bazali na mbeba moko na nzoto, mbala mingi bato babengaka bango bandɔki, bolole, nyama, zoba.

Mpo na nini bato basambwisanaka? Bato bakokóma na lokumu mokolo mosusu? Na lisolo oyo elandi, Liloba ya Nzambe, Biblia, ekopesa biyano ya malamu mpenza na mituna yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto