Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w06 1/8 nk. 4-7
  • Moto nyonso akoki kozala na lokumu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Moto nyonso akoki kozala na lokumu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moto oyo asalaka ete bapesa bato lokumu te
  • Yehova apesaka bikelamu na ye lokumu
  • Yesu azalaki kopesa basusu lokumu
  • Mobeko oyo epesaka bato lokumu
  • Lokumu ya bato ezongisami
  • Tókumisa Yehova na etamboli ya lokumu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Omemyaka basusu wana ozali kopesa bango toli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Omemyaka lokumu na bango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Lokumu ya bato esili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
w06 1/8 nk. 4-7

Moto nyonso akoki kozala na lokumu

“Tosengeli kotonga mokili ya sika, oyo eleki malamu, mokili epai moto akobanda kopesa moninga na ye moto lokumu.”​—MALOBA YA HARRY TRUMAN, PREZIDA YA ÉTATS-UNIS, OYO ALOBAKI NA SAN FRANCISCO, NA ETÚKÁ YA CALIFORNIE, MWA 25 APRILI 1945.

NDENGE bato mingi bazalaki kokanisa na nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, prezida Truman mpe akanisaki ete soki moto atali makambo oyo eleká akoki kosala “mokili ya sika,” epai bato nyonso bakozala na lokumu. Likambo ya mawa, makambo oyo ezali koleka lelo na mokili emonisi bongo te. “Lokumu ya moto” ezali ntango nyonso kosila mpo mobandisi na yango ezali moto te, kasi nde monguna monene ya bato.

Moto oyo asalaka ete bapesa bato lokumu te

Biblia emonisi ete monguna yango ezali Satana Zabolo, ekelamu mabe ya elimo oyo, uta ebandeli atyaki ntembe ete Nzambe azali na lotomo te ya koyangela. Banda Satana asololá na Eva na elanga ya Edene, mokano na ye ezali ya kopɛngola bato ete basalela Mozalisi na bango te. (Genese 3:1-5) Kanisá ndenge makambo mabe ekómelaki Adama ná Eva ntango bandimaki maloba ya Satana! Likambo ya liboso oyo basalaki lokola batosaki te mobeko ya Nzambe mpe balyaki mbuma oyo epekisamaki ezali ete bango nyonso mibale “bamibombaki na elongi ya [Yehova] Nzambe.” Mpo na nini? Adama alobaki ete: “Nabangaki zambi nazali bolumbu mpe namibombi.” (Genese 3:8-10) Boyokani oyo Adama azalaki na yango na tata na ye ya likoló mpe lolenge oyo ye moko azalaki komitalela ebongwanaki. Akómaki koyoka nsɔni mpo na kotɛlɛma liboso ya Yehova.

Mpo na nini Zabolo alingaki ete lokumu ya Adama ekita? Mpamba te moto asalamaki na elilingi ya Nzambe, mpe Satana alingaka te moto asala makambo oyo ekomonisa ete azali komitambwisa lokola elilingi ya Nzambe. (Genese 1:27; Baloma 3:23) Yango esalisi biso tóyeba ntina oyo, bato bazali kosambwisana banda kala. Lokola Satana azali “nzambe ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” ye nde azali kolendisa elimo yango “na ntango wana moto moko azali na bokonzi likoló ya mosusu mpo na kopesa ye mpasi.” (2 Bakolinti 4:4; Mosakoli 8:9; 1 Yoane 5:19) Yango elingi koloba ete lokumu ya moto ebungá mpo na libela?

Yehova apesaka bikelamu na ye lokumu

Kanisá ndenge elanga ya Edene ezalaki liboso Adama ná Eva basala lisumu. Bazalaki na biloko beboo, mosala ya malamu, elikya ya kozala na nzoto kolɔngɔnɔ mpe bomoi ezangi nsuka mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango. (Genese 1:28) Makambo nyonso ya bomoi na bango emonisaki ete Nzambe alingaka bato mpe mokano na ye ezalaki ete bázala na lokumu.

Yehova atikaki nde kopesa bato lokumu ntango Adama ná Eva basalaki lisumu? Te. Amonisaki ete bazali kaka na lokumu na miso na ye ntango bayokaki ye nsɔni mpo bazali bolumbu. Na bolingo nyonso, Nzambe asalelaki bango ‘bilamba ya mposo ya nyama’ mpo bálata yango na esika ya nkasa ya nzete oyo balataki. (Genese 3:7, 21) Na esika Nzambe atika bango na nsɔni wana, apesaki bango lokumu.

Na nsima, ntango azalaki kotambwisa libota ya Yisalaele, Yehova amoniselaki bato oyo bato mosusu banyokolaka lokola bitike, basi-bakufelá mibali mpe bapaya motema mawa. (Nzembo 72:13) Na ndakisa, alobaki na Bayisalaele ete ntango bazali kobuka bambuma ya bilanga ya blé to masangu, ya olive mpe ya vinyo, basengeli te kozongela oyo batikaki na nsima. Nzambe apesaki mobeko ete oyo ekotikala “ekozala mpo na mopaya mpe etike mpe mwasi-akufeli-mobali.” (Deteronome 24:19-21) Ntango bazalaki kosalela mibeko yango, bato bazalaki kosɛngasɛnga te mpe ata babola bazalaki kozwa mosala oyo ezalaki kopesa bango kilo.

Yesu azalaki kopesa basusu lokumu

Ntango Yesu Klisto, mwana ya Nzambe, azalaki awa na mabelé, azalaki kopesa basusu lokumu. Na ndakisa, ntango azalaki na Galilai, moto moko oyo maladi ya maba elyaki ye mpenza ayaki epai na ye. Na Mobeko ya Moize, mpo ete basusu bázwa te maladi, moto ya maba asengelaki koganga ete: “Mbindo! Mbindo!” (Levitike 13:45) Nzokande, moto wana agangaki te mpo na kokebisa bato ntango akendeki kokutana na Yesu. Kasi, akweaki na elongi na ye mpe abondelaki Yesu ete: “Nkolo, soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.” (Luka 5:12) Yesu asalaki nini? Asilikelaki moto yango te mpo abuki mobeko, abenganaki ye mpe te. Kutu, apesaki ye nde lokumu mpo asimbaki ye mpe alobaki ete: “Nalingi. Kómá pɛto.”​—Luka 5:13.

Na mabaku mosusu, Yesu abikisaki bato na mosika, kozanga kosimba bango. Kasi, mbala wana, amonaki malamu asimba moto wana. (Matai 15:21-28; Malako 10:51, 52; Luka 7:1-10) Lokola moto yango “atondaki na maba,” na ntembe te asalaki bambula ebele kozanga ete moto asimba ye. Abɔndisamaki mpenza ntango ayokaki moto asimbi ye na nzoto! Moto yango azalaki koluka kaka ete Yesu abikisa ye na maba na ye. Kasi, na ntembe te, lolenge oyo Yesu abikisaki ye esalisaki ye mpe na lolenge mosusu, ezongiselaki ye lokumu na ye. Tokoki mpe komizela lelo oyo ete bato bápesa baninga na bango lokumu? Soki ezali bongo, ndenge nini ekoki komonana?

Mobeko oyo epesaka bato lokumu

Yesu apesaki toli moko oyo etali boyokani kati na bato, oyo bato mingi balobaka ete ezali toli eleki malamu: “Na yango, makambo nyonso oyo bolingaka ete bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango kaka bongo.” (Matai 7:12) Lilako yango oyo eleki malamu, ndenge bato babengaka yango, etindaka bato bámemya baninga na bango, na elikya ete baninga mpe bakomemya bango.

Nzokande, emonani ete bato mingi bakokaka kosalela liteya yango te, mbala mingi balingaka nde kaka bato básala bango malamu. Mobali moko na nkombo Harold (topesi ye nkombo mosusu) alobaki ete: “Nazalaki kosepela mingi kosambwisa bato. Nazalaki soki nabwaki kaka liloba moko, bato bazalaki kokanga minɔkɔ, koyoka nsɔni, ata mpe kolela.” Kasi, likambo moko esalemaki oyo etindaki Harold atika ezaleli wana. Alobi boye: “Batatoli ya Yehova mingi babandaki koya epai na ngai. Soki nakanisi, nayokaka nsɔni mpo na maloba mosusu oyo nazalaki kobimisela bango mpe makambo nazalaki kosala bango. Kasi, balɛmbaki te mpe mokemoke mateya ya Biblia esimbaki motema na ngai mpe ebongolaki ngai.” Lelo oyo, Harold azali nkulutu na lisangá.

Ndakisa ya Harold, emonisi polele ete: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii na kokabola molimo ná elimo, mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ezali na likoki ya kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Baebele 4:12) Liloba ya Nzambe ezali na nguya ya kosimba motema ya moto mpe kobongola makanisi mpe bizaleli na ye. Yango nde likambo ya libosoliboso oyo etindaka moto apesa basusu lokumu; kozala na mposa makasi ya kosalisa baninga na esika ya koyokisa bango mpasi, ya kokumisa bango na esika ya kokitisa bango.​—Misala 20:35; Baloma 12:10.

Lokumu ya bato ezongisami

Kaka mposa wana nde etindaka Batatoli ya Yehova báyebisa basusu bilikya kitoko ya Biblia. (Misala 5:42) Lolenge eleki malamu ya komemya mpe kopesa baninga lokumu ezali ya koyebisa bango “nsango malamu ya [eloko moko oyo eleki malamu, NW].” (Yisaya 52:7) ‘Eloko oyo eleki malamu’ elimboli mpe “kolata bomoto ya sika,” oyo ekolongola ‘mposa mabe’ ya kokitisa basusu. (Bakolose 3:5-10) Elimboli mpe mokano oyo Yehova azali na yango ya kolongola mosika te makambo mpe bizaleli oyo ezali kosilisa lokumu ya moto, ná Satana Zabolo, oyo azali kotinda bato básala yango. (Danyele 2:44; Matai 6:9, 10; Emoniseli 20:1, 2, 10) Kaka ntango mabelé mobimba “ekotonda na boyebi ya [Yehova],” nde lokumu mpo na bato nyonso ekozongisama.​—Yisaya 11:9.

Tosɛngi yo oluka koyeba makambo etali elikya kitoko yango. Soki ozali koyangana na Batatoli ya Yehova, okoyeba ete kosalela mitinda ya Biblia epesaka basusu lokumu. Mpe okoyeba ndenge Bokonzi ya Nzambe mosika te ekomema ‘mokili ya sika mpe oyo eleki kitoko,’ epai “lokumu ya moto” ekobebisama lisusu te libela na libela.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 6]

Babatelaki lokumu na bango mpo batikalaki sembo

Na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, Batatoli ya Yehova koleka 2 000 batindamaki na bakaa ya bakangami ya Banazi mpo na kondima na bango. Ntango Ravensbrück Gemma La Guardia Gluck, oyo akɔtaki mpe bolɔkɔ, amonaki lolenge oyo Batatoli batikalaki mpenza sembo, akomaki na buku na ye (my story) ete: “Mokolo moko, basoda ya Banazi balobaki ete moyekoli ya Biblia oyo akotya mabɔkɔ na mokanda mpo na komonisa ete aboyi kondima na ye, tokotika ye mpe akonyokwama lisusu te.” Mpo na baoyo baboyaki kotya mabɔkɔ na mokanda yango, akomaki boye: “Bamonaki malamu bákoba konyokwama mpe bazalaki kozela na motema mpiɔ lobiko na bango na mokili ya sika.” Mpo na nini batikalaki sembo bongo? Magdalena oyo tolobeli na lisolo ya liboso, oyo azali sikoyo na mbula 80, alobi boye: “Kotikala sembo epai ya Yehova ezalaki malamu koleka kosala likambo moko oyo ebongi te kaka mpo na kotikala na bomoi. Mpo na kobatela lokumu na biso, tosengelaki kotikala sembo.”a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Okokuta lisolo mobimba ya libota ya Kusserow na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1985, nkasa 10-15 (na Lifalanse).

[Elilingi na lokasa 5]

Yesu azalaki kopesa bato oyo abikisaki lokumu

[Elilingi na lokasa 7]

Batatoli ya Yehova bapesaka basusu lokumu ndenge bayebisaka bango “nsango malamu [ya eloko moko oyo eleki kitoko]”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto