Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/3 nk. 5-7
  • Ndenge ya koyeba lingomba ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya koyeba lingomba ya solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Buku oyo elobeli bolingo
  • Ndenge ya koyeba bato oyo balingaka Nzambe
  • Luká losambo ya solo
  • Lingá Nzambe oyo alingaka yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Tiká ete bolingo etonga bino
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • “Bókoba kotambola na kati ya bolingo”
    Pusaná penepene na Yehova
  • Kolinga mozalani na biso elimboli nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/3 nk. 5-7

Ndenge ya koyeba lingomba ya solo

MANGOMBA mingi elobaka ete makambo oyo bateyaka eutaka epai na Nzambe. Nzokande, tosengeli kondima maloba ya Yoane, ntoma ya Yesu, oyo akomaki ete: “Balingami, bóndimaka te liloba nyonso oyo epemami, kasi bómekaka maloba mapemami mpo na komona soki yango euti na Nzambe, mpamba te basakoli mingi ya lokuta babimi na kati ya mokili.” (1 Yoane 4:1) Ndenge nini tokoki komeka likambo moko mpo na koyeba soki euti epai na Nzambe?

Eloko nyonso oyo euti epai na Nzambe emonisaka bomoto na ye, mingimingi ezaleli na ye oyo eleki monene: bolingo. Na ndakisa, na bolingo na ye, apesá biso zolo mpo tóyokaka nsolo ya matiti, bafololo, to nsolo ya bilei kitoko. Na bolingo na ye, apesá biso miso mpo na komona moi ndenge elalaka, mpomboli, mwa kosɛka ya mwana moke. Apesá biso mpe matoi mpo na koyokaka nzembo ya bandɛkɛ, miziki kitoko, to mongongo ya moto oyo tolingaka. Bolingo ya Nzambe emonanaka mpe epai na biso atako tozali bato ya kozanga kokoka. Yango wana, tomonaka bosolo ya maloba ya Yesu oyo: “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.” (Misala 20:35) Tomonisaka bolingo mpo tokelamá “na elilingi ya Nzambe.” (Genese 1:27) Atako Yehova azali na bizaleli mingi, bolingo ezali ezaleli na ye oyo eleki monene.

Makomami oyo euti epai ya Nzambe esengeli komonisa bolingo na ye. Mangomba ya mokili ezali na makomami ebele ya kala. Elobelaka mpenza bolingo ya Nzambe?

Emonani ete makomami mingi ya kala ya mangomba elobeli mpenza te ndenge Nzambe alingaka biso to ndenge oyo biso tokoki kolinga ye. Yango wana, bamilio ya bato bazali kozwa eyano te na motuna oyo: “Bolingo ya Nzambe ezali komonana na biloko oyo akelá, kasi mpo na nini mpasi mpe mabe ezali kosila te?” Nzokande, kaka Biblia nde ezali makomami ya kala oyo emonisi malamumalamu bolingo ya Nzambe. Ezali mpe koteya biso ndenge oyo tokoki komonisaka bolingo.

Buku oyo elobeli bolingo

Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali komonisa ete Yehova azali “Nzambe ya bolingo.” (2 Bakolinti 13:11) Biblia emonisi ndenge bolingo ya Yehova etindaki ye apesa bato ya liboso bomoi ezangi maladi mpe liwa. Kasi, lokola baboyaki boyangeli ya Nzambe, yango ememelaki bango mpasi. (Deteronome 32:4, 5; Baloma 5:12) Yehova azwaki bibongiseli mpo na kozongisa bomoi ya kokoka oyo ebungaki. Liloba ya Nzambe elobi ete: “Nzambe alingaki mokili mingi na boye ete apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Makomami mosantu emonisi lisusu bolingo ya Nzambe na ndenge elobeli guvɛrnema ya kokoka oyo asali mpe apesi na mabɔkɔ ya Yesu mpo na kozongisela bato ya botosi kimya.​—Danyele 7:13, 14; 2 Petelo 3:13.

Biblia elobeli na mokuse makambo oyo Nzambe azali kosɛnga na bato na maloba oyo: “‘Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.’ Wana nde komandema oyo eleki monene mpe ya liboso. Ya mibale, oyo ekokani na yango, ezali oyo, ‘Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.’ Na bakomandema oyo mibale Mibeko nyonso ekakisami.” (Matai 22:37-40) Biblia elobaka ete epemami na Nzambe. Lokola emonisaka polele bomoto na ye, tokoki mpenza kondima ete euti epai ya “Nzambe ya bolingo.”​—2 Timote 3:16.

Soki totaleli kaka likambo wana, tokoki koyeba soki makomami nini ya kala euti mpenza epai ya Nzambe. Bolingo ezali mpe elembo ya basambeli ya solo, mpamba te bamekolaka bolingo ya Nzambe.

Ndenge ya koyeba bato oyo balingaka Nzambe

Baoyo balingaka mpenza Nzambe bakeseni mpenza na bato mosusu, mingimingi lelo oyo, lokola tozali na eleko oyo Biblia ezali kobenga “mikolo ya nsuka.” “Bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, . . . bato balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe” bazali se kokóma ebele.​—2 Timote 3:1-4.

Ndenge nini okoki koyeba bato oyo balingaka Nzambe? Biblia elobi ete: “Bolingo ya Nzambe elakisi boye, ete tótosaka bakomandema na ye.” (1 Yoane 5:3) Bolingo mpo na Yehova etindaka bato bátosa mitinda ya Biblia. Na ndakisa, Liloba ya Nzambe ezali na mibeko oyo etali likambo ya kosangisa nzoto mpe libala. Kaka bato oyo babalaná nde bakoki kosangisa nzoto, mpe libala esengeli kokufa te. (Matai 19:9; Baebele 13:4) Ntango mwasi moko ya ekólo Espagne oyo ayekolá teoloji ayanganaki na likita moko ya Batatoli ya Yehova epai bayekolaki mibeko ya Biblia oyo etali bomoto ya solo, alobaki boye: “Nalendisamaki mpenza na masolo ya Biblia oyo nayokaki, na bomoko oyo ezalaka na kati ya bato yango mpe na bizaleli ná etamboli na bango ya malamu.”

Longola kolinga Nzambe, baklisto ya solo bayebanaka mpe na bolingo na bango mpo na bazalani na bango. Mosala na bango oyo eleki ntina ezali ya koyebisa basusu makambo ya Bokonzi ya Nzambe, oyo ezali elikya bobele moko mpo na bato. (Matai 24:14) Longola kosalisa bazalani na biso báyeba Nzambe, ezali na eloko mosusu te oyo ekoki komemela bango matomba ya libela. (Yoane 17:3) Baklisto ya solo bamonisaka mpe bolingo na balolenge mosusu. Basalisaka mpenza baoyo bazali konyokwama. Na ndakisa, ntango mabelé eninganaki na Italie mpe ebimisaki makama, zulunalo moko elobaki ete: “Batatoli ya Yehova bazali kopesa bato oyo bazali komona mpasi lisungi ya solo mpenza, kozanga ete báluka liboso koyeba mangomba na bango.”

Longola kolinga Nzambe mpe mozalani, baklisto ya solo balinganaka bango na bango. Yesu alobaki ete: “Nazali kopesa bino komandema ya sika, ete bólinganaka bino na bino; ndenge ngai nalingaki bino, mpo bino mpe bólingana bino na bino. Na ndenge wana bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.”​—Yoane 13:34, 35.

Bolingo oyo baklisto ya solo bamoniselanaka ekeseni na oyo ya bato mosusu? Ema, Mwana ya mosala moko ya mwasi, andimaki likambo yango. Asalaka na engumba La Paz, na ekólo Bolivie, epai bokeseni ya bikólo ezali kobimisa bokabwani makasi na kati ya bazwi ná babola. Alobaki boye: “Mbala ya liboso oyo nakendeki na makita ya Batatoli ya Yehova, namonaki mobali moko oyo alataki kitoko afandi ná mwasi moko Indienne ya Amerika bazali kosolola. Namoná naino likambo ya ndenge wana te. Na ntango wana, namonaki ete bazali mpenza bato ya Nzambe.” Ndenge moko, elenge mwasi moko ya Brésil na nkombo Miriam alobaki ete: “Nayebaki te ndenge ya kozala na esengo, ata na kati ya libota. Mbala ya liboso oyo namonaki bolingo na miso, ezalaki epai ya Batatoli ya Yehova.” Na États-Unis, mokambi ya bansango na televizyo moko akomaki boye: “Soki bato mingi bázalaka lokola bato ya lingomba na bino, ekólo oyo elingaki kozala te ndenge ezali. Ngai nazali mopanzi-nsango oyo ayebi ete lingomba na bino ezali na bolingo mpe na kondima makasi epai ya Mozalisi.”

Luká losambo ya solo

Bolingo ezali mpenza elembo ya losambo ya solo. Yesu alobaki ete kozwa losambo ya solo ezali lokola kozwa nzela ya malamu mpe kotambola na kati na yango. Kaka yango nde nzela oyo ekoki komema na bomoi ya seko. Yesu alobaki boye: “Bókɔta na ekuke ya nkaka; mpamba te nzela ya monene mpe oyo efungwamá ezali oyo ememaka na libebi, mpe bato oyo bazali kokɔta na yango bazali mingi; nzokande ekuke oyo ezali nkaka mpe nzela oyo ekangamakangamá ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke.” (Matai 7:13, 14) Kaka lingomba moko ya baklisto ya solo nde ezali kotambola na bomoko elongo na Nzambe na nzela ya losambo ya solo. Yango wana, kopona lingomba biponela ezali mabe. Soki ozwi nzela yango mpe ondimi kotambola na kati na yango, okomona ete ozwi nzela ya bomoi oyo eleki malamu, mpamba te yango nde nzela ya bolingo.​—Baefese 4:1-4.

Kanisá naino esengo oyo okoki kozala na yango soki ozali kotambola na kati ya nzela ya losambo ya solo! Ezali lokola ozali kotambola elongo na Nzambe. Nzambe akoki kopesa yo bwanya mpe bolingo, oyo ekosalisa yo ozala mpenza na boyokani na basusu. Akoki mpe kosalisa yo oyeba ntina ya bomoi, bilaka na ye mpe ozala na elikya mpo na mikolo ezali koya. Okoyoka mawa soki moke te mpo olukaki losambo ya solo.

[Elilingi na lokasa 5]

Na kati ya makomi nyonso ya kala, kaka Biblia nde emonisaka bolingo ya Nzambe

[Bililingi na lokasa 7]

Baklisto ya solo bayebanaka na bolingo na bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto