Kondima bisakweli ya Biblia ebikisaka
NTANGO Yesu azalaki kobima mpo na mbala ya nsuka na tempelo na Yelusaleme, moko ya bayekoli na ye alobaki boye: “Moteyi, talá! Oyo mabanga ya ndenge nini mpe oyo bandako ya ndenge nini!” Tempelo ezalaki eloko oyo elekaki na lokumu mpe na motuya mpo na Bayuda. Nzokande, Yesu ayanolaki ye ete: “Ozali kotala bandako wana ya minene? Ata ndenge nini libanga moko te ekotikama awa likoló ya libanga kozanga ete ebwakama na nse.”—Malako 13:1, 2.
Ezali mpasi mpo na kondima likambo yango! Mabanga mosusu ya tempelo ezalaki minene mpenza. Mpe lisusu, makambo oyo Yesu alobaki mpo na tempelo ezalaki komonisa ete Yelusaleme, esika ya losambo ya solo ekobebisama, ntango mosusu ata ná libota ya Yuda. Na yango, bayekoli ya Yesu batunaki ye lisusu ete: “Yebisá biso, Ntango nini makambo wana ekosalema, mpe nini ekozala elembo ntango makambo nyonso wana esengeli kokóma na bosukisi?”—Malako 13:3, 4.
Yesu alobaki ete, “Nsuka eyei naino te.” Bayekoli na ye basengelaki naino koyoka nsango ya bitumba, koningana ya mabelé, nzala mpe bamaladi mabe epai na epai. Na nsima, makambo ya nsɔmɔ esengelaki komemela Bayuda mpasi moko oyo ekómelaki bango naino te, elingi koloba “bolɔzi monene.” Nzambe akobikisa “baponami,” elingi koloba baklisto ya sembo. Ndenge nini?—Malako 13:7; Matai 24:7, 21, 22; Luka 21:10, 11.
Batombokeli Loma
Mbula ntuku mibale na mwambe elekaki nsima ya esakweli yango, Baklisto oyo bazalaki na Yelusaleme bazalaki kaka kozela nsuka ekóma. Ampire ya Loma ebebisamaki na bitumba, koningana ya mabelé, nzala mpe bamaladi mabe. (Talá etanda na lokasa 9.) Bitumba mingi ekómaki kosalema na Yudea. Nzokande, na kati ya Yelusaleme, mwa kimya ezalaki. Bato bazalaki kolya, kosala, kobala mpe kobota kaka ndenge bamesanaki. Ntango Bayuda bazalaki komona tempelo wana monene, bazalaki komona ete engumba na bango ekokwea te.
Baklisto ya Yelusaleme bazwaki mokanda ya Paulo soki na mobu 61 ya ntango na biso (T.B.). Apesaki bango longonya mpo na ndenge bayikaki mpiko, kasi amitungisaki na ndenge basusu na kati ya lisangá bazalaki kokeba te. Baklisto mosusu bazindaki na elimo mpe basusu bakɔmelaki te na elimo. (Baebele 2:1; 5:11, 12) Paulo alendisaki bango ete: “Na bongo, bóbwaka elobeli na bino ya polele te . . . Mpo etikali ‘mwa ntango moke mpenza,’ mpe ‘moto oyo azali koya akoya mpe akoumela te.’ ‘Kasi moyengebene na ngai akozala na bomoi mpo na kondima,’ mpe, ‘soki azongi nsima, molimo na ngai ekosepela na ye te.’” (Baebele 10:35-38) Toli wana epesamaki na ntango oyo ebongaki mpenza! Kasi, Baklisto bakomonisa kondima mpo na esakweli wana ya Yesu mpe bakokoba kozela kokokisama na yango? Nsuka ya Yelusaleme ezali mpenza pene?
Na boumeli ya mbula mitano oyo elandaki, makambo ebebaki lisusu makasi na Yelusaleme. Nsukansuka, na mobu 66 T.B., Florus, Guvɛrnɛrɛ moko ya mabe ya Loma abɔtɔlaki talanta 17 na kɛsi ya makabo ya tempelo mpo na “mpako oyo Bayuda bafutaki te”. Bayuda basilikaki mpe batombokelaki guvɛrnema ya Loma. Bayuda oyo batombokelaki Loma (to bazelote) bakɔtaki ebele na Yelusaleme mpe babomaki basoda ya Loma oyo bazalaki wana. Na nsima balobaki polele ete Yudea ezali lisusu na nse ya litambwisi ya Loma te. Etumba ebandaki kati na Yudea mpe Loma.
Na boumeli ya sanza misato, Cestius Gallus, Guvɛrnɛrɛ ya Loma oyo azalaki koyangela Sulia, alongwaki na ngámbo ya nɔrdi mpe ayaki na basoda 30 000 mpo na kosilisa botomboki ya bayuda. Limpinga na ye ekómaki na Yelusaleme ntango bayuda bazalaki na fɛti ya mingombo mpe bakɔtaki mbala moko na bakartye ya pembenipembeni. Bazelote bazalaki mingi te mpe bakendaki komibomba na kati ya tempelo, esika ya makasi. Basoda ya Loma babandaki mbala moko kobuka efelo ya tempelo. Bayuda bamonaki yango mabe. Basoda bapakano basambwisaki esika mosantu ya Bayuda! Baklisto oyo bazalaki na Yelusaleme bamikundolaki maloba ya Yesu oyo: ‘Ntango bokomona eloko ya bosɔtɔ oyo eyeisaka libebi etɛlɛmi na esika mosantu, boye tiká baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba.’ (Matai 24:15, 16) Bandimaki nde esakweli ya Yesu wana mpe basalaki ndenge yango esɛngaki? Mpo bábika, esengelaki kaka básala bongo. Kasi, bakokaki kokima ndenge nini?
Na mbalakaka mpe mpo na ntina oyo eyebani te, Cestius Gallus azwaki basoda na ye mpe akimisaki bango na ngámbo ya libongo wana Bazelote bazalaki kolanda bango. Likambo ya kokamwa, bolɔzi oyo ezalaki na kati ya engumba eumelaki te! Baklisto oyo bandimaki esakweli ya Yesu wana bakimaki Yelusaleme mpe bakendeki na Pela, engumba oyo ezalaki likoló ya ngomba na ngámbo ya Ebale Yaladene epai etumba ezalaki te. Bakimaki na ntango ebongaki mpenza. Bazelote bazongaki na Yelusaleme mpe bakɔtisaki bato oyo batikalaki na Yelusaleme na botomboki yango na makasi.a Na ntango yango, baklisto oyo bakimaki na Pela bazalaki na likama te mpe bazalaki kozela komona ndenge makambo ekoleka.
Yikiyiki ebandi
Nsima ya basanza, limpinga mosusu ya Baloma ebandaki koya na Yelusaleme. Na mobu 67 T.B., Vespasien, mokonzi ya basoda ná mwana na ye Titus, bayanganisaki limpinga moko monene ya basoda 60 000. Na boumeli ya mbula mibale oyo elandaki, basoda yango bazalaki kopusana na Yelusaleme. Na nzela, bazalaki kolonga banguna nyonso. Na ntango wana, kuna na Yelusaleme, Bazelote ná Bayuda mosusu babandaki kobomana bango na bango na ndenge moko ya nsɔmɔ! Bisika oyo bazalaki kobomba mbuma ebebisamaki, babukaki bandako nyonso oyo ezalaki zingazinga ya tempelo mpe bayuda koleka 20 000 bakufaki. Vespasien atɛlɛmisaki mobembo na ye ya Yelusaleme mpe alobaki: ‘Nzambe azali kobunda etumba oyo koleka kutu ngai; banguna na biso bazali kobomana bango na bango.’
Ntango Néron, Amperɛrɛ ya Loma akufaki, Vespasien atikaki Titus asilisa bitumba mpe ye azongaki na Loma mpo na kozwa bokonzi. Titus akómaki na Yelusaleme mwa moke liboso ya Elekeli ya mobu 70 T.B. Akangaki bankolo mboka mpe bato oyo bayaki na Yelusaleme mpo na losambo. Basoda na ye bakataki banzete ya Yuda mpo na kotonga lopango moko ya makonzí ya nsɔngɛ ya bolai ya bakilomɛtrɛ 7 oyo ezingaki mboka mokonzi mobimba. Yango nde Yesu asakolaki mpenza: “Banguna na yo bakotonga zingazinga na yo lopango moko ya makasi na makonzí ya nsɔngɛ mpe bakozingela yo mpe bakonyokola yo epai na epai.”—Luka 19:43.
Nzala enyokolaki mpenza bato. Bato oyo bazalaki na bibundeli bakendaki koyiba na bandako ya bato oyo bakufaki mpe ya baoyo bazalaki kobunda na liwa. Basi mosusu oyo bayebaki lisusu te eloko ya kosala babomaki bana na bango mpe balyaki bango, mpe yango ekokisaki esakweli oyo: “Okolya . . . bana babotami na nzoto na yo mpenza, mosuni ya bana na yo mibali mpe bana basi na yo . . . awa bayini na yo bazingi yo mpe kati na bolɔzi oyo bayokisi yo.”—Deteronome 28:53-57.
Nsukansuka, Yelusaleme ekweaki nsima ya sanza mitano. Bapunzaki biloko na kati ya engumba mpe na tempelo mpe bazikisaki yango mpe bapanzaki mabanga na yango mokomoko. (Danyele 9:26) Bato soki 1 100 000 bakufaki mpe bato 97 000 bakendeki na boombo.b (Deteronome 28:68) Yudea etikalaki mpamba. Ya solo, mboka mobimba ebebisamaki na ndenge oyo esalemá naino te. Ezalaki mpenza mbongwana makasi na makambo ya politiki, ya losambo mpe na mimeseno ya Bayuda.c
Na ntango yango, Baklisto oyo bakimaki na Pela batɔndaki Nzambe na motema moko mpo babikaki. Kondima esakweli wana ya Biblia ebikisaki bango!
Soki tokanisi makambo oyo nyonso, mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Nazali na kondima oyo ekobatela ngai na ntango ya bolɔzi monene oyo ezali koya? Nazali nde “motindo ya bato oyo bazali na kondima mpo na kobatelama ya molimo na bomoi”?’—Baebele 10:39; Emoniseli 7:14.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Josèphe, Moyuda moko oyo azalaki moto ya mayele na masolo ya kala, akomaki ete Bazelote balandaki Baloma mikolo nsambo liboso bázonga na Yelusaleme.
b Ekoki kozala ete mwa ndambo mingi ya Bayuda (soki 14%) nyonso oyo bazalaki na ampire ya Loma babomamaki.
c Alfred Edersheim, Moyuda moko molimboli ya maloba ya Biblia akomaki boye: “Kobebisama ya Yisalaele ekokani ata moke te na mpasi nyonso oyo ekómelaki bango liboso mpe na nsima.”
[Etanda na lokasa 9]
Makambo etali elembo oyo ekokisamaki na ekeke ya liboso
BITUMBA:
Gaule (39-40 T.B.)
Afrika ya Nɔrdi (41 T.B.)
Bretagne (43, 60 T.B.)
Arménie (58-62 T.B.)
Bitumba kati na bana mboka mpe kati na bitúká ya Yudea (50-66 T.B.)
KONINGANA YA MABELÉ:
Loma (54 T.B.)
Pompéi (62 T.B.)
Asie Mineure (53, 62 T.B.)
Crète (62 T.B.)
NZALA:
Loma, Grèce, Ezipito (soki na 42 T.B.)
Yudea (soki na 46 T.B.)
BAMALADI MABE:
Babilone (40 T.B.)
Loma (60, 65 T.B.)
BASAKOLI YA LOKUTA:
Yudea (soki na 56 T.B.)
[Karte/Elilingi na lokasa 10]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Bisika oyo Baloma babɔtɔlaki na Palestine kobanda na mobu 67 tii 70 T.B.
Potolemai
Mbu ya Galilai
Pela
PELEA
SAMALIA
Yelusaleme
Mbu ya mungwa-na-mungwa
YUDEA
Kaisalia
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Karte yango moko: Euti na bakarte ya Pictorial Archive (Near Eastern History) Est. and Survey of Israel
[Elilingi na lokasa 11]
‘Banguna na biso bazali kobomana bango na bango.’—Vespasien
[Bililingi na lokasa 11]
Basoda ya Loma babebisaki Yelusaleme na 70 T.B.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 11]
Relief: Soprintendenza Archeologica di Roma; Vespasien: Bildarchiv Preussischer Kulturbesitz/Art Resource, NY