Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 1/10 nk. 3-4
  • Mokonzi moko ya bomɛngo aponi likambo ezangi ntina

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokonzi moko ya bomɛngo aponi likambo ezangi ntina
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Masolo mosusu
  • Yesu mpe elenge mokonzi moko mozwi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Yesu mpe elenge mokonzi mozwi
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Yesu ayanoli elenge mokonzi moko ya bozwi
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • “Landá ngai”​​—Yesu alingaki koloba nini na maloba wana?
    “Yaká, landá ngai”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 1/10 nk. 3-4

Mokonzi moko ya bomɛngo aponi likambo ezangi ntina

MOKONZI moko ya bomɛngo azalaki moto ya bosembo, oyo atosaka mibeko, mpe azalaki kosambela mingi. Ayaki epai ya Yesu, akweaki na mabɔlɔngɔ na ye mpe atunaki ete: “Moteyi Malamu, nasengeli kosala nini mpo nazwa libula ya bomoi ya seko?”

Yesu ayanolaki ye ete mpo na kozwa bomoi, mobali yango asengeli kotosa mibeko ya Nzambe. Ntango asɛngaki Yesu alimbolela ye likambo yango malamumalamu, Yesu alobaki ete: “Osengeli koboma moto te, Osengeli kosala ekobo te, Osengeli koyiba te, Osengeli kopesa litatoli ya lokuta te, Kumisá tata na yo mpe mama na yo, mpe, Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.” Wana ezalaki mibeko ya moboko na kati na Mobeko oyo Nzambe apesaki Moize. Bongo mobali yango alobaki ete: “Nasili kotosa nyonso wana; nini ezali kozanga ngai lisusu?”​—Matai 19:16-20.

Na bolingo nyonso, Yesu alobaki ete: “Eloko moko ezali kozanga yo: Kende, tɛká biloko nyonso oyo ozali na yango mpe pesá na babola, mpe okozwa eloko ya motuya na likoló, mpe yaká landá ngai.”​—Malako 10:17-21.

Na mbalakaka, elenge mobali wana asengelaki kozwa ekateli moko ya ntina mingi. Asengelaki kosala nini? Kotika bozwi na ye mpo na kokóma moyekoli ya Yesu to kotingama kaka na bozwi na ye? Koluka bozwi awa na mabelé, to nde koluka yango na likoló? Ezalaki ekateli moko ya makasi ya kozwa. Emonani polele ete azalaki kolinga makambo ya Nzambe, mpamba te azalaki kotosa Mobeko mpe atunaki soki asengeli kosala nini lisusu mpo na kosepelisa Nzambe. Ekateli nini azwaki? “Akendaki na mawa, mpo azalaki na biloko mingi.”​—Malako 10:22.

Ekateli oyo elenge mozwi wana azwaki ezalaki ya bozoba. Soki akómaka moyekoli ya sembo ya Yesu, alingaki kozwa eloko oyo azalaki koluka: bomoi ya seko. Biblia eyebisi te nini ekómelaki elenge yango. Kasi, toyebi ete nsima ya mbula ntuku minei, mampinga ya Baloma babebisaki Yelusaleme mpe Yuda. Bayuda mingi babungisaki bozwi mpe bomoi na bango.

Na bokeseni ya elenge mobali wana, ntoma Petelo ná bayekoli mosusu baponaki likambo ya malamu. ‘Batikaki biloko nyonso’ mpe balandaki Yesu. Ekateli wana ememelaki bango matomba mpenza! Yesu ayebisaki bango ete bakozwa mbala mingi koleka biloko oyo batikaki. Longola yango, bakozwa bomoi ya seko. Bayokaki mawa te na nsima mpo na ekateli oyo bazwaki.​—Matai 19:27-29.

Biso nyonso tozwaka bikateli na bomoi: ná ya mike ná ya minene. Toli nini Yesu apesaki mpo na bikateli yango? Okondima toli yango? Soki ondimi toli yango, okozwa matomba beboo. Tiká tótalela sikoyo ndenge tokoki kolanda Yesu mpe kozwa matomba na toli oyo apesaki.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto