Yesu, bomoi na ye mpe mosala na ye
Yesu mpe elenge mokonzi moko mozwi
WANA ezali Yesu kokoba mobembo na ye na district ya Pérée kokenda epai na Yelusaleme, elenge mobali moko apoti mbango epai na ye mpe afukami liboso na ye. Mobali oyo abengami mokonzi, yango elakisi ete mbala mosusu azalaki na esika ya lokumu kati na Eyanganelo moko na mboka na bango to mbala mosusu azalaki moko na basangani na Sanhédrin. Lisusu azalaki na bozwi mingi. Atunaki: “Molakisi malamu, nasala nini mpo nazwa bomoi na seko?”
Yesu alobi na ye: “Ozali kotanga ngai malamu mpo na nini? Moto malamu azali te, bobele Nzambe.” Elenge mobali asaleli mpenza mpenza liloba “malamu” lokola titre, ezali mpo na yango Yesu amonisi ye ete titre wana to lokumu yango ebongi bobele na Nzambe.
Yesu abakisi ete: “Soki olingi ete ozala na bomoi na seko, batela mibeko, ntango nyonso.
Mobali yango atuni: “Mibeko nini?”
Kotangaka mibeko mitano kati na Mibeko zomi, Yesu ayanoli: “Oboma moto te, osala ekobo te, oyiba te, otatola na lokuta te, okumisa tata na mama na yo.” Mpe abakisaki moko na mobeko moleki ntina lisusu, alobi: “Olinga mozalani na yo lokola yo moko.”
“Nasili kotosa oyo nyonso longwa na bolenge na ngai, elobi mobali yango na bosembo nyonso. Eloko nini ezangi lisusu epai na ngai?”
Na koyokaka motuna oyo euti na motema sembo, Yesu ayoki bolingo mpo na elenge mobali. Kasi, kososolaka bokangami na ye mpo na biloko ya mosuni, ayebisi ye ete: “Ozangi bobele eloko moko: Kenda kotekisa biloko nyonso bizali na yo, kabola yango na babola mpe okozala na eloko na motuya na likoló; mpe yaka, landa ngai.”
Yesu, kotondaka na mawa na motema, amoni mobali atelemi mpe akei na ye, akangi elongi na ye. Bozwi na ye ezipi miso na ye ete asosola te ntina ya eloko na motuya na solo. Yesu alobi ete, “nkaka mingi boni mpo na bazwi kokota na Bokonzi na Nzambe!”.
Na maloba yango bayekoli na Yesu bakamwi mingi. Kasi bakamwi lisusu koleka ntango abimisi lisusu likambo oyo ya polele: “Koingela na kamela na liso na ntonga eleki bolembu na koingela na mozwi kati na Bokonzi na Nzambe.”
Bayekoli batuni ye boye: “Na yango nani akoki kobika?”
Yesu atali bango, mpe alobi ete: “Bato bakoki kosala yango te, nde Nzambe akoki kosala nyonso.”
Komonisaka ete ye mpe bayekoli mosusu basalaki liponi moko ekeseni mingi na oyo ya elenge mokonzi mozwi, Petelo alobi: “Tala, biso totiki nyonso mpe tolandi yo.” Atuni boye: “[Eloko nini ya ntina] biso tokozwa [mpenza]”?
Yesu alaki ete, “na ntango ya kozalisa ya sika, wana Mwana na moto akofanda na kiti na Bokonzi na ye na nkembo, bino baoyo bosili kolanda ngai bokofanda mpe na kiti na bokonzi zomi na mibale kosambisaka mabota zomi na mibale na Yisraele.” Yesu amonisi ete kozalisama ya biloko na sika ekozala awa na mabelé, na lolenge ete ekozonga lokola ezalaki kati na elanga ya Edene. Petelo mpe bayekoli mosusu bakozwa bongo libonza na bango: bakoyangela elongo na Klisto likoló na Paradis oyo ekozala na mabelé mobimba. Mbano kitoko boye ezali solo kosenga milende.
Kasi bayekoli bazali kozwa mbano uta sikawa, lokola Yesu andimisaki yango na maloba oyo: “Soko moto nani atiki ndako, soko bandeko mibali, soko bandeko basi, soko mama, soko tata, soko bana, soko bilanga, mpo na ngai mpe mpo na nsango malamu, moto yango akozwa na ntango oyo, ndako, mpe bandeko mibali, mpe bandeko basi, mpe bamama, mpe bana, mpe bilanga mbala mokama, na minyoko lokola, mpe na ekeke ekoya akozwa bomoi na seko.”
Lokola Yesu alaki yango, ezala esika nini bayekoli na ye bakokende kati na mokili bazali na boyokani makasi elongo na baninga na bango baklisto mpe ya motuya mingi koleka oyo moto akoki kozala na yango elongo na libota na ye. Elenge mokonzi Moyuda aboyi, ndenge ezali komonana, libaku ya kozwa mbano oyo to ya kozwa bomoi na seko kati na Bokonzi na Likoló na Nzambe.
Yesu abakisi lisusu: “Kasi bato mingi bazali liboso bakozala na nsima, mpe baoyo na nsima bakozala liboso.” Alingaki koloba nini?
Alingi koloba ete mingi kati na baoyo bazali “liboso” mpe bazali kozwa matomba na mosala na bango na lingomba, lokola elenge mokonzi mpe mozwi, bakokota te kati na Bokonzi. Bakozala “nsima”. Nzokande, mingi kati na bayekoli basokemi na Yesu oyo Bafalisai ya lolendo mpo na bosembo na bango moko bazalaki kotiola lokola bato bazali “nsima”-lokola bato na nse, to am ha’arèts-, bakozala “liboso”. Yango elimboli ete bakozala na libaku ya koyangela elongo na Yesu kati na Bokonzi. Malako 10:17-31; Matai 19:16-30; Luka 18:18-30.
◆ Elenge mobali mozwi azalaki mokonzi ya ndenge nini?
◆ Mpo na nini Yesu aboyi kobiangama moto malamu?
◆ Na nini ezalela ya elenge mokonzi ezali komonisa likama ya kozala na bozwi?
◆ Mbano nini Yesu alaki epai na bayekoli na ye?
◆ Ndenge nini baoyo bazalaki liboso bakomi nsima, mpe baoyo na nsima bakomi liboso?