Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/8 nk. 5-7
  • Okoki koyokela Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki koyokela Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Okokaki koyokela Yesu?
  • Mwasi ayokelaki ye
  • Okokaki koyokela ntoma Paulo?
  • “Bomeka makambo nyonso”
  • Mpo na nini koyoka?
  • Yesu ateyi mwasi Mosamaria
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Yesu ateyi mwasi Mosamaria
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mwasi moko na liziba ya mai
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Losambo ya nani Nzambe andimaka?
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/8 nk. 5-7

Okoki koyokela Nzambe?

NA KOTANGAKA Biblia, ezali komonana nokinoki na makambo mingi ete bato na ekeke ya liboso bazalaki na bomoi ekokani na oyo ya biso. Pite mpe ezaleli ya kozanga kolongobana ekomaki momesano, mingimingi epai na mabota mabeba oyo mazingaki Yisraele, mpo pite ezalaki kosalelama mingi kati na losambo na bango. Bomoi na babola ezalaki mpasi, mpe matata kati na politike mazalaki kozanga te. Na mobu 66, Bayisraele babundaki na Ba Romé etumba moko ya nsomo. Na ntango yango, lokola na ntango na biso, bato bazalaki bongo na mposa ya lisalisi.

Makambo matali lingomba na ntango wana mazali na bokokani mingi na oyo na ntango na biso. Bakonzi ya mangomba Bayuda bazalaki bakosi. (Matai 23:15; Luka 20:46, 47) Kati na Bayuda, ezalela mpo na lingomba ekomaki na bokeseni longwa filozofi kino biyambayamba mpe kondima bobele lingomba kozanga kotalela yango. (Tala Misala 14:8-13; 19:27, 28) Ata kati na lisanga ya boklisto oyo ezalaki naino na ebandeli, makambo nyonso mazalaki malamu te. Na nsuka na ekeke, ntoma Yoane apesaki mpo na yango likebisi oyo: “Bakosi mingi babimi kati na mokili.”(2 Yoane 7) Ya solo, bobele na ntango wana, batoli mingi ya mabe epesamaki na ntina na losambo. Ata bongo likoki ezalaki mpo na kozwa lisalisi ya malamu.

Okokaki koyokela Yesu?

Yesu apesaki batoli malamu na ntango wana. Azalaki molobi malamu, yango nde tozali kotanga ete, ‘ebele bakamwaki mpo na lolenge na ye ya koteya’. (Matai 7:28) Ata bongo, bato moke nde bayokaki solosolo makambo azalaki koloba. Yesu asalaki bikamwiseli mpe apesaki ndakisa malamu ya bomoi mpe etamboli malamu. Nzokande, ata bakonzi oyo bazalaki komikumisa ete bayekola, baboyaki kondima maloba na ye. Mpo na nini?

Mingimingi ezalaki mpo na makanisi na bango ya mabe. Bamoko batiolaki Yesu mpo ete autaki na Nazarete. Bamosusu baboyaki ye mpo ete akotaki na biteyelo na bango te mpe abotamaki na libota ya lokumu te. (Yoane 1:46; 7:12, 15, 47, 48) Lisusu, Yesu azalaki ntango nyonso te koloba makambo oyo bato bazalaki kolinga koyoka. Alakisaki bobele solo, likambo yango esilikisaki mingi Bafalisai, na ndakisa. (Matai 15:12-14) Nsima ya kosakola mbula misato na ndambo, ezali bakonzi na mangomba nde babomaki ye. (Luka 23:20-35) Bazwaki esika te, mpo ete Yesu azalaki na “maloba na bomoi na seko”.​—Yoane 6:68.

Soki okokaki kozala na Yelusaleme na ntango wana, olingaki kolanda bakonzi na mangomba mpe ebele na bato? To osengelaki kozala na motema malamu mpo na kokanga ntina na maloba na Yesu? Na likanisi oyo ya nsuka, olingaki kokokana na mwasi moko oyo Yesu akutanaki na ye na ntango ya mibembo na ye.

Mwasi ayokelaki ye

Yesu akutanaki na mwasi yango wana ezalaki ye koleka na Samalia. Afandaki pembeni na libulu ya mai mpo na kopema na ntango yango mwasi ayaki mpo na kotoka mai. Toyebi nkombo na ye te, kasi Biblia ezali koloba ete, atako alembaki, Yesu asalelaki libaku yango mpo na kosolola na ye makambo matali Nzambe.​—Yoane 4:5-15.

Mwasi oyo azalaki na bantina mingi mpo na koboya lisolo oyo Yesu alukaki kosala elongo na ye. Azalaki na lingomba mosusu, mpe losambo oyo Basamalia bazalaki kolanda ekesanaki na oyo ya Bayuda. Lisusu, Bayuda bazalaki kotiola Basamalia mpe bazalaki koboya kosangana na bango. Mpe lisusu, mingimingi, bazalaki kosolisa te basi oyo bayebi te. (Yoane 4:9, 27) Na nsuka, lokola azalaki na bomoi ya mbindo, mwasi Mosamalia akokaki kosilika na kokanisaka ete molobani na ye akotiola ye to akobimisa masumu na ye.​—Yoane 4:18.

Ata bongo, amonisaki ezalela motindo wana te. Na esika yango, mwasi atunaki mituna mingi ya ntina epai na Yesu nsima ya kolamusa bosepeli na ye na mayele. Na boumeli na lisolo na ye, mwasi oyo abimisaki likanisi moko ya ntina: bokabwani ya lingomba oyo ezalaki kati na Bayuda mpe Basamalia. Yesu apesaki ye eyano na malembe kasi na bosolo ete: Bino bozali kosambela yango eyebi bino te; biso tozali kosambela oyo eyebi biso.” (Yoane 4:19-22) Kasi mwasi yango asilikaki te. Na motema ya kofungwana, asepelaki koyoka lisusu makambo mingi koleka.

​—Yesu akobaki bongo na kolobaka maloba oyo ya ntina ete: “Kasi ntango ekoya, ee ezali sasaipi, wana basambeli na solo bakosambela Tata na elimo mpe na solo. Mpo azali koluka basambeli motindo oyo. Nzambe azali elimo mpe ekoki na basambeli na ye ete basambela ye na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:23, 24) Nsima na yango, mwasi oyo na motema ya kofungwana alakisaki ete asepelaki na maloba na Yesu na koyebisaka na esengo nyonso makambo oyo ye ayokaki epai na bato mosusu. Bato yango balingaki mpe koyeba mingi na koyokaka maloba na Yesu.​—Yoane 4:39-42.

Lisolo oyo ezali koteya biso nini? Tokanisa: soki tozali na région oyo bokabwani ya mposo, bikolo to mangomba ezali makasi, tokozala na ezalela nini soki moto ya loposo mosusu, ekolo mosusu to lingomba mosusu alingi kosolola na biso? Tozali kokata lisolo na ntango alingi koyebisa biso ete tozali na libunga? To, lokola mwasi Mosamalia, tokondima kosolola na ye‘?

Okokaki koyokela ntoma Paulo?

Ntoma Paulo azalaki mpe mobali mosusu ya bopesi toli malamu na ekeke ya liboso. Na eleko moko, ye mpe azalaki kolinga koyoka te. Ayaki kondima ete azalaki “motuki na Nzambe, monyokoli mpe motioli. Ata bongo, alobi, kasi, ayokelaki ngai mawa, mpo ete nasalaki yango wana eyebaki ngai ntina te mpe wana ezangaki ngai kondima”. (1 Timoté 1:13) Na nsuka, ntoma Paulo andimaki solo likolo na Yesu Klisto mpe atikaki makanisi na ye mabe. Ndakisa na ye emonisi ete solo na Biblia ekoki kosalisa mpo na “kobebisa bisika bibatelami makasi” kati na mitema na biso soko bipekiseli motindo wana bizali kobebisa bolamu na biso.​—2 Bakolinti 10:4.

Nsima na kokoma moklisto, ntoma Paulo apalanganisaki na molende nyonso nsango malamu oyo ayokaki. Ndenge asengelaki komizela, akutanaki na bato oyo bazalaki na mitema makasi lokola ye na kala; kasi bato nyonso bazalaki ndenge wana te. Na mboka Beloya, na nord ya mokili na Grèce, akutanaki na bato mosusu oyo bazalaki na komikitisa kati na motema baoyo batikaki ndakisa malamu mpo na ntina etali koyoka batoli. Bayokaki ete solo ezalaki na kati na maloba ya ntoma Paulo. Ezali mpo na yango “bayambaki Liloba na mposa mingi”. Ata soko bazalaki na motema mofongwani, bandimaki nokinoki te. ‘Batangaki Makomami mokolo na mokolo, kotala soko makambo yango mazalaki boye.’ (Misala 17:11) Nsango oyo bayokaki esepelisaki bango, kasi bamekaki bosolo na yango na nzela na Biblia liboso ete bakangama na yango libela.

“Bomeka makambo nyonso”

Na ntango na biso, Ba Témoins de Jéhovah bazali kosala makasi na kolekisa ntango mingi mpo na koyebisa nsango malamu ya Bokonzi epai na bazalani na bango baoyo bazali na mangomba na bango. Ndenge nini bazali koyambama? Bato mingi na ezaleli ya boninga bazali na esengo ya koyamba bango, kasi bamosusu bazali koboya, mpe bamosusu bazali kosilika ntango bazali kotala bango.

Ezali mawa, mpo ete nsango oyo Ba Témoins de Jéhovah bazali koluka koyebisa ebengami na kati ya Biblia ete ezali “nsango malamu”. (Matai 24:14) Lisusu, bazali kolendisa ezalela ya ntoma Paulo, oyo alobaki: “Bomeka makambo nyonso mpe bosimba makambo malamu ngwi.” (1 Batesalonike 5:21) Ata soki moto azalaki na makanisi na ye oyo akangami na yango, asengelaki, na ndakisa na Babeloya mpe mwasi Mosamalia, kozala na motema mofungwani mpo na kosolola makambo matali Nzambe.

Mpo na nini koyoka?

Ezali esengo na komona ete mbula na mbula ebele na bato bazali komonisa ezalela ya koyoka. Mingi bandimi mayele mauti na mateya na Biblia, yango nde ezali komema bango na kosala mbongwana ya solo mpe ya koumela kati na bomoi na bango. Kala bamosusu bakokanaki na Jeanne, elenge mwasi moko oyo azalaki komela bangi mpe kolangwa masanga uta mikolo mingi, mpe na nsuka amekaki komiboma. Lelo oyo, Jeanne azali moklisto mwasi ya esengo. Boyekoli na ye ya Biblia esalisaki ye kozwa makasi ya kolanda toli oyo ya ntoma Paulo: “Tomipetola mpenza na mbindo nyonso na nzoto mpe na elimo.”​—2 Bakolinti 7:1

Fernand azalaki moto amipesi mingi na komela masanga, mpe libala na ye ezalaki pene na kokufa. Kasi na kolandaka batoli ya Biblia, abongolaki ezaleli na ye ya mabe mpe azongisaki boyokani elongo na mwasi na ye. (1 Bakolinti 6:11) Déborah, ye azalaki mpenza koyina makasi bato ya loposo mosusu. Kasi boyekoli ya Biblia mpe kosangana elongo na baklisto esalisaki ye ete abongola lolenge na ye ya kokanisa. (Misala 10:34, 35) Mpe nani akokaki kondima ete elenge mwasi ndumba oyo ya mboka Néerlande akokaki kobongola bomoi na ye mokolo oyo ye andimaki koyekola Biblia elongo na Ba Témoins de Jéhovah? Nokinoki akomaki moklisto abatisami oyo abandaki kozala na bomoi ya peto mpe kobokola malamumalamu bana na ye.

Makambo motindo oyo mazali kosalema ntango nyonso oyo bato bazali koyoka makambo oyo Biblia elobi. Bazali kosala mbongwana oyo na bomoi na bango bato mingi kati na bango bakokaki kokanisa na yango te. Likambo mosusu ya ntina, ezali ete bazali na boyokani malamu elongo na Nzambe, kino bakoki kobondela na bosembo nyonso na kobengaka ye “Tata na biso oyo azali na makoló”. (Matai 6:9) Lisusu, bazali kozwa elikya moko ya solo, ekoninganaka te, elikya oyo ya komona bosolo ya maloba oyo na Yesu: “Oyo ezali bomoi na seko ete bayeba yo Nzambe moko na solo mpe motindami na yo, Yesu Klisto.”​—Yoane 17:3.

Ezali nde yango Ba Témoins de Jéhovah bazali na mposa ya kosolola, na kati ya mosala na bango, ntango bazali kokende kotala bazalani na bango. Mbala mosusu bakoleka lisusu epai na yo nsima na mwa ntango moke. Okoyokela bango?

[Elilingi na lokasa 6]

Mwasi Mosamalia atikaki te makanisi mabe mapekisa ye koyoka Yesu, Ozali na motema mofongwani lokola ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto