Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w89 1/8 nk. 3-4
  • Olukaka toli epai wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olukaka toli epai wapi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bamosusu balingaka koyoka toli te—Mpo na nini?
  • Ndenge ya kopesa toli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mpo na nini osengeli kolukaka toli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Ndenge nini opesaka toli?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
w89 1/8 nk. 3-4

Olukaka toli epai wapi?

BASILA kopesa yo mosolo ya mabe? Mbala mosusu naino te, kasi okokaki kosala nini soko okebisami na moto ete bazali kokosa na yango bato? Okosilika? Te! Ekoki ete mbala mosusu ozala na botondi mpo bakebisi yo mpe okomisenzela mpo ete ochanger te mbongo na yo ya malamu, oyo ozwaki na motoki na oyo ya mabe.

Mingi kati na biso bazali kozwa batoli to makebisi mbala na mbala. Ezali solo ete makebisi mosusu mazali na ntina mingi koleka mosusu. Kasi, ata soki moto azali kososola te motuya ya toli, ntina ya kosilika ezali mpo ete bapesaki biso toli yango?

Ya solo, bato nyonso bazali na mposa ya lisalisi mpe batoli na ntango moko to mosusu. Moto moko azali te oyo ayebi makambo nyonso. Mpo na mobulu oyo ezali lelo kati na nkita mpe politike, moto nyonso azali na mposa na elikya makasi mpo na ntango ezali koya. Kati na mokili epai oyo penepene na libala moko kati na mibale ezali kosuka na bokabwani, motuya ya bazemi epai na bilenge basi ezali kobakama na lolenge moko ya kobangisa mpe ba maladi oyo mazali kouta na pite mazali solo kopalangana, na yango ezali solo likambo ya ntina na kozwa botambwisi ya mayele mpe ya malamu. Baboti bazali na mposa ya kosalisama mpo na koyeba lolenge malamu oyo ebongi mpo na kobokola bana na bango kati na ebongiseli ya biloko oyo ezali kotengatenga. Bilenge bazali na mposa ya kosalisama mpo bazala na makanisi malamu mpe kolonga mikakatano na bango, oyo bazali komona mbala mosusu ete ekoki kolongama te. Moto na moto azali na mposa ete asalisama mpo atosa bizaleli malamu kati na mokili oyo kozanga kolongobana, pite mpe mobulu ezali mbala na mbala komikotisa kati na bizaleli ya bato.

Epai wapi tokoki kozwa lisalisi motindo oyo? Biblia, Liloba lipemami na Nzambe, ezali liziba na batoli oyo eleki malamu. Na ntango ya kala, mokomi na nzembo moko akomaki: “Liloba na yo ezali mwinda na likolo na ngai, mpe pole na nzela na ngai.”(Nzembo 119:105) Baoyo bazali kotanga mpe kosalela Liloba na Nzambe bazali kokima mingi na mitambo oyo mitiami na mikolo na biso. Ezali moko na bantina mpo na yango Ba Témoins de Jéhovah bazali kolekisa bangonga mingi mbula na mbula mpo na kotala bazalani na bango mpe kosolola na bango likolo na Biblia. Ata bongo, mingi bazali koboya koyoka bango, bamosusu bazali nkutu kosilika mpo bazali koya epai na bango. Mpo na nini bazali kosala bongo?

Bamosusu balingaka koyoka toli te—Mpo na nini?

Bato mingi bakomi kosilika nokinoki ntango bazali kopesa bango toli, mingimingi na makambo matali Nzambe. Ata bato oyo bazali kosambela na mangomba bazali ntango nyonso te koyoka batoli ya bapastere na bango. Sango moko ya Angleterre alelaki mpo na likambo oyo: “Moto na moto azali na makanisi na ye mpe azali komona ete yango ezali malamu koleka oyo ya moteyi.” Na bongo ezali likambo ya kokamwa te ete bato mingi bazali koyoka te moto oyo bayebi te oyo azali koya epai na bango.

Lisusu, atako tozali kobika na ntango moko oyo bato bazali komonisa elimo ya kobeta ntembe, mingi bazali naino kokangana na lingomba na bango mpo balingaki yango makasi. Lokola emonisi yango encyclopédie moko ete, “lingomba ezali kolamusa mayoki ya mozindo mpo na bato mingi”. Na bongo bato yango bazali mbala mosusu komona te ntina ya kosolola lisolo ya Biblia elongo na mosambeli ya lingomba mosusu, ata soki lisolo yango ezali na mokano ya kosalisa bango mpo na kosilisa mikakatano na bango.

Bato mosusu balingi koyoka masolo ya Biblia te mpo na bokosi mpe bizaleli mabe oyo bazali komona mingi kati na mangomba. Balembi na komona ete bakonzi na mangomba bazali kokanga miso mpo na pite, to lokoso ezanga nsoni ya basakoli mingi oyo bazali kosakola na nzela ya batelevizio. Mbala mosusu bazali koyoka mawa mingi ntango sango moko azali kosalela bokonzi na ye mpo na kokotela limpinga moko na ntango ya bitumba na politike. Bazali komona ete lingomba ezali kobimisa mikakatano mingi na esika ya kosilisa yango.

Komilela lelo na bato oyo nyonso elongisami. Na makambo matali lingomba, tokoki koloba ete ebele na “mosolo mabe” ezali kosalelama. Na ndenge yango emonani, ezali mpe kozanga makanisi malamu mpo na koboya lisalisi na motuya ya Biblia lokola moto aboyi mosolo nyonso ya malamu bobele mpo ete mosolo mabe ezali kolekaleka.

Ndenge tolobaki yango na ebandeli, biso nyonso tozali na mposa ya batoli, mpo ete, kati na mokili ya lelo, makambo mosusu mazali kosenga ete tosala liponi na makambo ya mpasi koleka mpe kokutana na makama minene. Ezalela nini ya mayele tokoki kozala na yango ntango bazali kopesa biso batoli? Ezali na ntina te, to ezali kotungisa, mpo na kosolola likolo na Biblia elongo na moto ya lingomba mosusu? Tokoki kozala mpenza na elimo ya polele mpo na kondima batoli malamu mpe komitika te kokosama na batoli oyo ya mabe? Biblia ezali koloba nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto