LISOLO YA BOYEKOLI 29
LOYEMBO 87 Yaká kozwa makasi
Ndenge ya kopesa toli
“Nakopesa yo toli wana liso na ngai ezali kotala yo.”—NZ. 32:8.
NA MOKUSE
Tokotalela ndenge malamu ya kopesa toli.
1. Nani asengeli kopesa basusu toli? Limbolá.
OYOKAKA ndenge nini soki basɛngi yo opesa moto toli? Bato mosusu balingaka mpenza kosala yango. Kasi basusu bakakatanaka mpo na kopesa bato toli, mpe bazalaka na mwa nsɔni ntango bazali kosala yango. Ezala olingaka to te kopesa basusu toli, biso nyonso tosengeli kosala yango na bantango mosusu. Mpo na nini? Mpo Yesu alobaki ete bayekoli na ye ya solo bayebanaka na bolingo oyo bazali komoniselana. (Yoa. 13:35) Nzokande lolenge moko ya komonisa bolingo ezali ya kopesa bandeko mibali mpe bandeko basi toli ntango basengeli na yango. Liloba ya Nzambe elobi ete kopesa basusu “toli kozanga bokosi,” esalaka ete boninga na biso ná bango ekóma makasi.—Mas. 27:9.
2. Bankulutu basengeli koyeba kosala nini, mpe mpo na nini? (Talá mpe etanda “Toli na likita ya kati ya pɔsɔ.”)
2 Mingimingi bankulutu nde basengeli koyeba kopesa toli oyo ekosalisa basusu. Na nzela ya Yesu, Yehova apesi mibali yango mokumba ya kobatela lisangá. (1 Pe. 5:2, 3) Lolenge moko oyo basalaka yango ezali ntango bapesaka toli oyo euti na Biblia na nzela ya badiskur oyo basalaka mpo na lisangá mobimba. Kasi, basengeli mpe kopesaka mpate mokomoko toli, ata mpe baoyo bakei mosika na etonga. Ndenge nini bankulutu, mpe biso nyonso, tokoki kopesa basusu toli ya malamu?
3. (a) Nini ekoki kosalisa biso tóyeba kopesa toli? (Yisaya 9:6; talá mpe etanda “Mekolá Yesu ntango ozali kopesa toli.”) (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Tokozwa mateya mingi na oyo etali koyeba kopesa toli soki toyekoli bandakisa ya bato oyo Biblia elobeli, mingimingi Yesu. Kutu moko ya bankombo ya Yesu ezali “Mopesi-Toli Monene.” (Tángá Yisaya 9:6.) Na lisolo oyo, tokotalela makambo oyo tokoki kosala ntango moto asɛngi biso toli mpe oyo tokoki kosala ntango tosengeli kopesa moto toli kozanga asɛnga yango. Tokotalela mpe ntina ya kopesa toli na ntango oyo ebongi mpe na lolenge ya malamu.
NTANGO BASƐNGI BISO TÓPESA TOLI
4-5. Ntango moto asɛngi biso toli, motuna nini tosengeli liboso komituna? Pesá ndakisa.
4 Ntango moto asɛngi biso toli, mbala mosusu tosepelaka mpe tolukaka mbala moko kosalisa ye. Kasi likambo ya liboso oyo tosengeli kosala ezali nini? Tosengeli liboso komituna boye: ‘Ngai nde nabongi mpo na kopesa ye toli na likambo yango?’ Na bantango mosusu, lolenge eleki malamu ya kosalisa moto ezali ya kopesa ye toli te, kasi nde ya kolakisa ye moto oyo abongi mpo na kopesa ye toli na likambo oyo atuni.
5 Tózwa ndakisa oyo. Kanisá ete moninga na yo moko ya motema azwi maladi moko ya makasi. Ayebisi yo ete abandi kosala bolukiluki mpo na lisalisi ya monganga oyo akoki kozwa, mpe na nsima atuni yo soki okanisi ete lisalisi nini ya monganga nde ekosalisa ye. Mbala mosusu okolinga mpenza kosalisa ye, kasi ozali monganga te to mpe oyebi te ndenge ya kosalisa maladi yango. Na ntango wana, lolenge eleki malamu oyo okoki kosalisa moninga na yo ezali ya kosunga ye na koluka moto oyo abongi mpo na kosalisa ye.
6. Mpo na nini tokoki komona malamu tózela liboso ya kopesa moto toli?
6 Ata soki tomoni ete tozali na likoki ya kopesa moto toli na likambo oyo atuni biso, tokoki komona malamu tózela mwa moke liboso tópesa ye eyano. Mpo na nini? Masese 15:28 elobi: “Moto ya sembo amanyolaka na motema na ye liboso ya koyanola.” Bongo soki tomoni ete toyebi eyano ya kopesa moto yango? Ekoki kaka kosɛnga ete tózwa mwa ntango mpo na kosala mwa bolukiluki, kobondela, mpe komanyola. Soki tosali bongo, tokomindimisa ete tozali kopesa moto eyano oyo eyokani na ndenge oyo Yehova atalelaka likambo yango. Tótalela likambo oyo ekómelaki mosakoli Natane.
7. Liteya nini ozwi na ndakisa ya mosakoli Natane?
7 Mokolo moko, Mokonzi Davidi ayebisaki mosakoli Natane ete azalaki na mposa ya kotonga tempelo mpo na Yehova. Natane apesaki Davidi toli mbala moko ete asala yango. Nzokande Natane asengelaki naino kotuna Yehova liboso apesa eyano. Mpo na nini? Mpo likanisi ya Yehova ezalaki te ete Davidi nde atongela ye tempelo. (1 Nt. 17:1-4) Ndenge ndakisa wana emonisi yango, ntango basɛngi biso toli, tokomonisa bwanya soki ‘toweli koloba te.’—Yak. 1:19.
8. Wapi ntina mosusu oyo tosengeli kokanisaka malamu mpo na kopesa toli?
8 Tótalela ntina mosusu oyo tosengeli kozala ekɛngɛ ntango moto asɛngi biso toli: Tokoki komema ngambo soki toli na biso esali ete moto azwa ekateli oyo ebimiseli ye mikakatano. Ya solo, tosengeli mpenza kokanisaka malamu liboso ya kopesa moto toli.
NDENGE YA KOPESA TOLI NTANGO MOTO ASƐNGI YANGO TE
9. Bankulutu basengeli komindimisa likambo nini liboso ya kopesa toli? (Bagalatia 6:1)
9 Na bantango mosusu, bankulutu bakoki komona ete esengeli kopesa toli na ndeko mobali to ndeko mwasi oyo “abɛti libaku liboso ayeba yango.” (Tángá Bagalatia 6:1.) Nɔti ya boyekoli na vɛrsɛ yango elobi ete moto ya ndenge wana “azali kokende na nzela ya mabe, atako mbala mosusu asali naino lisumu ya monene te.” Mokano ya bankulutu ezali ya kosalisa ye atikala na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko. (Yak. 5:19, 20) Kasi, mpo toli na bango esalisa mpenza ndeko yango, bankulutu basengeli liboso komindimisa ete moto yango abɛti mpenza libaku. Bayebi ete lokola Yehova apesi mokomoko na biso nzela ya kozwa bikateli na kolanda lisosoli na ye moko, moto akoki kozwa ekateli oyo ekeseni na oyo ya bango. (Rom. 14:1-4) Sikoyo soki ndeko moko abɛti mpenza libaku mpe bankulutu bazwi ekateli ete basengeli kopesa ye toli, bakosala ndenge nini?
10-12. Ntango bankulutu balingi kopesa toli na moto oyo asɛngi yango te, basengeli kosala nini? Limbolá. (Talá mpe bililingi.)
10 Bankulutu oyo basengeli kopesa toli na moto oyo asɛngi yango te bazali na mokumba ya pɛtɛɛ te. Mpo na nini? Mpo ndenge ntoma Paulo alobaki yango, moto akoki kobɛta libaku kozanga ete ayeba yango. Na yango, bankulutu basengeli liboso kobongisa makanisi ya ndeko oyo balingi kopesa toli.
11 Kopesa moto toli kozanga ete asɛnga yango ezali lokola koluka kolona mboto na mabele ya makasi. Liboso mosali-bilanga alona mboto, abalolaka naino mabele. Kosala bongo elɛmbisaka mpe ebongisaka mabele mpo molona efanda. Na nsima nde alonaka mboto. Mpe nsima ya kolona, asopelaka mboto mai mpo na kosalisa yango ekola. Ndenge moko mpe, liboso nkulutu apesa toli na moto oyo asɛngi yango te, ekozala malamu abongisa naino mabele, elingi koloba makanisi ya moto. Na ndakisa, soki azwi libaku ya malamu ya kosolola na ndeko yango, nkulutu yango akoki koyebisa ye ete atyelaka ye likebi mpe ete alingi básolola mpo na likambo moko. Soki mopesi-toli ayebani lokola moto oyo alingaka basusu mpe azalaka na boboto, ekozala mpasi te bato bándima toli na ye.
12 Ntango bazali kosolola, nkulutu akoki kokoba kolɛmbisa mabele; na ndakisa akoki komonisa ete biso nyonso tosalaka mabunga mpe na bantango mosusu tozalaka na mposa ya toli. (Rom. 3:23) Na mongongo ya boboto mpe na limemya makasi, nkulutu akomonisa ndeko yango polele mitinda ya Biblia oyo emonisi ete abɛti libaku, elingi koloba azali kolanda nzela ya mabe. Soki ndeko yango andimi ete azali na libunga, nkulutu “akolona sikoyo mboto,” elingi koloba akolimbwela ye polele oyo asengeli kosala mpo asembola makambo. Na nsima, nkulutu “akosopa mai,” elingi koloba akopesa ndeko yango longonya mpe akobondela elongo na ye.—Yak. 5:15.
Kopesa toli na moto oyo asɛngi yango te esɛngaka bolingo mpe mayele (Talá paragrafe 10-12)
13. Ndenge nini bankulutu bakoki koyeba soki moto akangi ntina ya toli oyo azwi?
13 Na bantango mosusu, mopesi-toli akoki koloba likambo moko kasi moto ayoki likambo mosusu. Bankulutu bakoki kosala nini mpo esalema bongo te? Na limemya mpenza, bakoki kotuna moto mituna na mayele mpo makanisi ya ntina ebima polele. (Mos. 12:11) Biyano oyo moto yango akopesa ekosalisa mopesi-toli ayeba soki akangi mpenza ntina ya toli oyo azwi.
NDENGE YA KOPESA TOLI NA NTANGO OYO EBONGI MPE NA LOLENGE YA MALAMU
14. Tosengeli kopesa toli ntango tozali na nkanda? Limbolá.
14 Lokola biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka, tosalaka to tolobaka makambo oyo epesaka basusu mpasi. (Kol. 3:13) Liloba ya Nzambe emonisi ete na bantango mosusu tokoki kutu koyoka nkanda. (Ef. 4:26) Kasi, tosengeli kosala makasi tópesaka basusu toli na nse ya nkanda te. Mpo na nini? Mpo “nkanda ya moto esalaka te makambo oyo ezali sembo na miso ya Nzambe.” (Yak. 1:20) Soki topesi moto toli ntango tozali na nkanda, tokoki kobebisa lisusu makambo. Yango elingi koloba te ete tosengeli ata moke te komonisa makanisi to mayoki na biso epai ya moto oyo apesaki biso nkanda. Kasi, tokoki kosolola na ye malamu koleka soki tozeli tii ntango nkanda na biso ekokita. Tótala ndakisa malamu ya Elihu, oyo apesaki Yobo toli ya malamu.
15. Ndakisa ya Elihu eteyi biso nini? (Talá mpe elilingi.)
15 Elihu alekisaki mikolo ebele mpo na koyoka ndenge Yobo azalaki komilongisa mpo na bifundeli ya babɔndisi na ye misato ya lokuta. Elihu ayokelaki Yobo mawa. Kasi, ayokaki mpe nkanda mpenza mpo Yobo abimisaki Yehova moto mabe mpe atyaki likebi mingi kaka epai na ye moko. Atako bongo, Elihu azelaki motema ekita bongo na nsima nde apesaki Yobo toli na boboto mpe na limemya makasi. (Yobo 32:2; 33:1-7) Ndakisa ya Elihu eteyi biso likambo moko ya ntina mingi: Toli ekɔtaka malamu soki epesami na ntango oyo ebongi mpe na lolenge ya malamu, elingi koloba na limemya mpe na bolingo.—Mos. 3:1, 7.
Atako liboso Elihu ayokaki nkanda, apesaki Yobo toli na boboto mpe na limemya makasi (Talá paragrafe 15)
KOBÁ KOPESA MPE KONDIMA TOLI
16. Liteya nini ozwi na Nzembo 32:8?
16 Vɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo elobi ete ‘Yehova apesaka biso toli wana azali kotala biso.’ (Tángá Nzembo 32:8.) Yango emonisi ete akobaka ntango nyonso kosunga biso. Asukaka kaka te na kopesa biso toli, kasi asalisaka biso mpe tósalela toli yango. Apesi biso ndakisa ya malamu mpenza! Na yango ntango tozwi libaku ya kopesa basusu toli, tósala makasi ya komekola Yehova: Miso na biso ekoba kotala baoyo topesi toli mpe tókoba kosalisa bango na ndenge nyonso mpo bázwa bikateli ya malamu.
17. Ntango bankulutu bapesaka toli ya sikisiki mpe oyo euti na Biblia, bazalaka lokola nini? Limbolá. (Yisaya 32:1, 2)
17 Lelo, koleka na bileko nyonso, tozali mpenza na mposa ya kopesa mpe ya kozwa toli ya malamu. (2 Tim. 3:1) Bankulutu oyo bapesaka toli ya sikisiki, oyo euti na Biblia mpo na kolendisa basusu bazali lokola “mikɛli ya mai na mokili oyo ezangá mai.” (Tángá Yisaya 32:1, 2.) Mpe baninga oyo bayebi oyo tolingi koyoka kasi bazali koyebisa biso nde oyo tosengeli koyoka bazali likabo ya motuya kaka lokola “bapɔme ya wolo na kati ya saani ya mayemi ya palata.” (Mas. 25:11) Na yango, tiká ete biso nyonso tókoba kokolisa bwanya oyo esengeli mpo na kopesa mpe kozwa toli ya malamu.
LOYEMBO 109 Tólingana makasi, na motema moko