LISOLO YA BOYEKOLI 49
LOYEMBO 44 Libondeli ya moto ya komikitisa
Mokanda ya Yobo ekoki kosalisa yo ntango ozali kopesa toli
“Sikoyo, Yobo, nabondeli yo, yoká maloba na ngai.”—YOBO 33:1.
NA MOKUSE
Tokomona ndenge mokanda ya Yobo ekoki kosalisa biso tópesaka toli ya malamu.
1-2. Makambo nini baninga misato ya Yobo mpe Elihu bakutaki ntango bayaki kotala Yobo?
NSANGO ya Yobo epalangani lokola mɔtɔ ya zamba epai ya bato ya Ɛsti. Yobo ayebanaki mingi mpenza mpo na bozwi na ye, kasi abungisaki biloko na ye nyonso. Ntango baninga misato ya Yobo—Elifaze, Biledade, mpe Zofare—bayokaki makambo oyo ekómelaki Yobo, bayaki tii na Uze mpo na kobɔndisa ye. Kasi makambo oyo bamonaki ntango bakómaki elekelaki bango.
2 Kanisá naino. Yobo abungisaki biloko nyonso oyo azalaki na yango. Bitonga na ye minene ya bampate, ya bangɔmbɛ, ya bakamela, mpe bampunda ezalaki lisusu te. Bana na ye bakufaki mpe basaleli na ye mingi babomamaki. Mpe ndako oyo bana na ye bakufaki ebebaki mpenza. Mpe lokola nde ekokaki te, Yobo ye moko mpe abɛlaki makasi mpenza. Nzoto na ye etondaki babibɔ oyo enyokolaka mpenza. Na mosika, mibali yango misato bamonaki Yobo afandi na putulu ya mɔtɔ mpe azali na mawa mpenza. Basalaki nini? Mikolo 7 mobimba balobaki ata liloba moko te na mobali yango oyo azalaki na mpasi makasi. (Yobo 2:12, 13) Nsima na bango, elenge mobali moko na nkombo Elihu ayaki mpe afandaki pembeni. Nsukansuka, Yobo ye moko azwaki maloba mpe alakelaki mabe mokolo oyo abotamaki mpe asɛngaki liwa. (Yobo 3:1-3, 11) Ya solo, Yobo azalaki na mposa ya lisalisi! Mibali yango bazalaki na libaku ya kolendisa Yobo na maloba na bango mpe komonisa ete bazali mpenza baninga na ye. Tótala soki basalaki nini.
3. Tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Yehova asalaki ete Moize akoma makambo oyo baninga misato ya Yobo ná Elihu balobaki mpe basalaki. Tóyeba ete makambo mosusu oyo Elifaze alobaki, emonani ete epemamaki na elimo moko mabe. Kasi, maloba ya Elihu eutaki epai ya Yehova. (Yobo 4:12-16; 33:24, 25) Yango wana mokanda ya Yobo ezali na batoli mosusu ya malamu mpenza, kasi ezali mpe na batoli mosusu ya mabe mpenza. Litomba monene oyo tokoki kozwa na mokanda ya Yobo ezali ete ekoki kosalisa biso ntango tolingi kopesa toli. Ya liboso, tokotalela ndakisa mabe ya baninga misato ya Yobo. Na nsima, tokolobela ndakisa malamu ya Elihu. Na likambo mokomoko, tokoyekola ndenge oyo mbala mosusu Bayisraele bazwaki matomba na mokanda ya Yobo mpe ndenge oyo biso tokoki kozwela yango matomba lelo oyo.
NDENGE OYO BANINGA MISATO YA YOBO BAPESAKI YE TOLI
4. Mpo na nini baninga misato ya Yobo balongaki te kobɔndisa ye? (Talá mpe elilingi.)
4 Biblia elobi ete baninga misato ya Yobo bayaki “kotala Yobo mpe kobɔndisa ye” nsima ya koyoka nsango ya mpasi na ye. (Yobo 2:11) Kasi, balongaki te kobɔndisa Yobo. Mpo na nini? Tólobela bantina misato. Ya liboso, bawelaki koloba oyo bango bakanisaki. Na ndakisa, balobaki ete Yobo azalaki kozwa etumbu mpo na masumu oyo asalaki, nzokande ezalaki bongo te.a (Yobo 4:7; 11:14) Ya mibale, batoli mingi oyo bapesaki Yobo esalisaki ye te, ezangaki boboto, mpe epesaki ye mpasi. Na ndakisa, mibali yango nyonso misato balobaki makambo oyo ezalaki kitoko na matoi kasi ezalaki ntina te lokola putulu ya mɔtɔ. (Yobo 13:12) Mbala mibale mobimba, Biledade ayebisaki Yobo na kozanga boboto ete azalaki koloba mingi. (Yobo 8:2; 18:2) Mpe na lityo nyonso Zofare amonisaki ete Yobo azali “bolole.” (Yobo 11:12) Ya misato, atako mbala mosusu batombolaki mingongo te ntango balobaki na Yobo, mbala mingi elobeli na bango ezalaki mpo na kokitisa ye, kotyola ye, mpe kokweisa ye na likambo. (Yobo 15:7-11) Na yango, na esika ya kobikisa motema ya Yobo to kolendisa kondima na ye, mibali wana balukaki mingi nde komonisa ete asalaki mabe.
Ntango ozali kopesa moto toli, kotinda ye te akanisa ete oleki ye. Mokano na yo esengeli kozala ya kosalisa ye (Talá paragrafe 4)
5. Toli oyo baninga ya Yobo bapesaki ebotaki mbuma nini?
5 Ezali likambo ya kokamwa te ndenge toli oyo baninga ya Yobo bapesaki ebotaki mbuma malamu te, mpo maloba na bango epesaki Yobo mpasi na motema. (Yobo 19:2) Yango mpe ezalaki kotinda ye aluka komilongisa mpo na kobatela lokumu na ye. Na yango, azangaki bokatikati na makanisi na ye mpe alobaki kozanga bwanya. (Yobo 6:3, 26) Baninga ya Yobo balobaki te makambo oyo eyokani na makanisi ya Yehova; basalelaki mpe Yobo makambo na motema mawa te. Mpo na yango, bakómaki bisaleli na mabɔkɔ ya Satana kozanga ete báyeba. (Yobo 2:4, 6) Ndenge nini mbala mosusu lisolo yango esalisaki Bayisraele, mpe ndenge nini ekoki kosalisa biso lelo oyo?
6. Ndenge nini ndakisa mabe ya baninga misato ya Yobo ekokaki kosalisa bankulutu na Yisraele na oyo etali kopesa toli?
6 Ndenge oyo mbala mosusu lisolo ya Yobo esalisaki Bayisraele. Nsima ya kosalema ya ekólo Yisraele, Yehova atyaki mibali oyo bakoki, bankulutu, mpo básambisaka bato ya ekólo na kolanda mibeko na ye ya sembo. (Mib. 1:15-18; 27:1) Mibali yango basengelaki koyoka na likebi mpenza liboso ya kopesa toli to kokata likambo. (2 Nt. 19:6) Basengelaki mpe kotunaka mituna na esika ya kokanisa ete bayebi makambo nyonso. (Mib. 19:18) Bapesi-toli yango na Yisraele basengelaki koloba mabe te na baoyo bazalaki koya epai na bango mpo na koluka lisalisi. Mpo na nini? Mpo, soki bamonisi ete bazali motema mokuse, moto akokaki kokakatana mpo na kobimisa oyo ezali na motema na ye. (Kob. 22:22-24) Na ntembe te, bankulutu na Yisraele oyo batalelaki lisolo ya Yobo bazwaki mpenza mateya na likambo etali kopesa toli.
7. Ndenge nini lisolo ya Yobo ekokaki kosalisa Bayisraele nyonso? (Masese 27:9)
7 Ya solo, kaka mibali oyo bakɔmɛli te nde bazalaki kopesa toli na Yisraele. Mpo na koloba solo, Moyisraele nyonso, ezala elenge to mokóló, mobali to mwasi, akokaki kopesa toli na moninga oyo azalaki na mposa ya lisalisi na makambo ya losambo to mpo na kosembola etamboli na ye. (Nz. 141:5) Baninga ya solosolo bapesanaka toli oyo euti na motema. (Tángá Masese 27:9.) Ndakisa mabe ya baninga misato ya Yobo ekokaki kozala liteya mpo na Bayisraele nyonso na oyo etali makambo oyo basengeli koloba te mpe kosala te ntango bazali kopesa toli.
8. Mitambo nini tosengeli kokima ntango tozali kopesa toli? (Talá mpe bililingi.)
8 Ndenge oyo ekoki kosalisa biso. Biso bakristo tolingaka kosalisa bandeko na biso ntango bakutani na mikakatano. Kasi, tosengeli koboya kosala makambo oyo baninga misato ya Yobo basalaki. Ya liboso, tosengeli koboya kokanisela moto mbala moko likambo ya mabe, kasi tosengeli koluka koyeba naino bosolo ya makambo liboso tópesa toli. Ya mibale, tosengeli te kopesa toli kaka na kolanda mabele oyo eninganaka, elingi koloba makanisi na biso moko, ndenge Elifaze asalaki mbala mingi, kasi toli na biso esengeli kouta na Liloba ya Nzambe, oyo ezali lokola libanga oyo eninganaka te. (Yobo 4:8; 5:3, 27) Ya misato, tosengeli koboya koloba maloba oyo ezangi boboto to ya kotyola. Kobosana te: Elifaze ná baninga na ye balobaki makambo mosusu oyo ezalaki solo; kutu na lisalisi ya elimo ya Nzambe, ntoma Paulo azongelaki likambo moko oyo balobaki. (Talá mpe Yobo 5:13 ná 1 Bakorinti 3:19.) Kasi, lokola makambo mingi oyo balobaki ebimisaki Nzambe moto mabe mpe epesaki Yobo mpasi, Yehova amonaki ete nyonso oyo balobaki ezalaki lokuta. (Yobo 42:7, 8) Na yango, ntango tozali kopesa toli, tosengeli kokeba ete tóluka te komonisa lokola Yehova azali moto ya makambo makasimakasi to ete alingaka basaleli na ye te. Tólobela sikoyo mateya oyo tokoki kozwa epai ya Elihu.
Ntango ozali kopesa toli, (1) luká koyeba malamu likambo ya moto, (2) salelá Liloba ya Nzambe, mpe (3) lobá na boboto (Talá paragrafe 8)
NDENGE OYO ELIHU APESAKI YOBO TOLI
9. Mpo na nini Yobo azalaki kaka na mposa ya lisalisi ntango baninga na ye basilisaki koloba, mpe ndenge nini Yehova asalisaki ye?
9 Ntango Yobo ná baninga na ye batikaki kobendana, na ntembe te bazalaki kaka mitema likoló. Makambo oyo balobaki ezwá mikapo 28 mobimba na Biblia, mpe makambo mingi oyo balobaki emonisaki ete basepelaki te to bazalaki na nkanda. Ezali likambo ya kokamwa te ndenge Yobo atikalaki na mpasi! Azalaki kaka na mposa ya libɔndisi mpe ya kosembolama. Ndenge nini Yehova asalisaki ye? Asalisaki ye na nzela ya toli ya Elihu. Mpo na nini Elihu afandaki naino nyɛɛ? Alobaki boye: “Nazali elenge mpe bino bozali mikóló. Yango wana na limemya nyonso nalingaki koloba te.” (Yobo 32:6, 7) Elenge Elihu ayebaki likambo oyo bato mingi bayei koyeba lelo oyo: Mikóló baumeli na bomoi mpe bayekoli makambo mingi, na yango bazali na bwanya mpe bakutaná na makambo oyo bilenge mingi bakutaná na yango te. Kasi nsima ya koyoka na motema molai nyonso Yobo ná baninga na ye, Elihu akokaki lisusu kofanda nyɛɛ te. Alobaki: “Ezali mbula te nde esalaka ete moto azala na bwanya, kaka mikóló te nde bayebaka nini ezali sembo.” (Yobo 32:9) Makambo nini Elihu alobaki na nsima, mpe ndenge nini alobaki yango?
10. Elihu asalaki nini liboso ya kopesa Yobo toli? (Yobo 33:6, 7)
10 Liboso Elihu apesa Yobo toli, abongisaki naino makambo mpo toli ekɔta malamu. Ndenge nini? Ya liboso, ye moko apekisaki mayoki na ye. Toyebi yango mpo Biblia elobi ete na ebandeli, Elihu ayokaki nkanda. (Yobo 32:2-5) Nzokande, ata mbala moko te alobaki na Yobo na nse ya nkanda. Kasi, alobaki na ye na ndenge ya kokitisa ye motema. Na ndakisa, alobaki na Yobo: “Talá! Ngai ná yo tozali ndenge moko liboso ya Nzambe ya solo.” (Tángá Yobo 33:6, 7.) Na nsima, Elihu amonisaki polele ete ayokaki Yobo na likebi. Kutu, azongelaki na mokuse makambo motoba ya ntina oyo Yobo alobelaki. (Yobo 32:11; 33:8-11) Elihu asalaki kaka bongo ntango apesaki lisusu Yobo toli na nsima.—Yobo 34:5, 6, 9; 35:1-4.
11. Ndenge nini Elihu apesaki Yobo toli? (Yobo 33:1)
11 Ntango apesaki Yobo toli, Elihu asalaki yango na ndenge oyo epesaki moto wana ya sembo lokumu. Na ndakisa, Elihu atángaki nkombo ya Yobo, likambo oyo emonani ete mibali mosusu misato basalaki te. (Tángá Yobo 33:1.) Mbala mosusu Elihu akanisaki ndenge ye mpe azalaki na mposa makasi ya koloba kasi Yobo ná baninga na ye bazalaki kaka kobendana; na yango amityaki na esika ya Yobo mpe azalaki kopesa ye libaku ya koyanola. (Yobo 32:4; 33:32) Elihu amonisaki mpe Yobo polele likama ya makanisi mosusu oyo azalaki na yango mpe na boboto nyonso, akundwelaki ye bwanya, nguya, bosembo, mpe bolingo ya sembo ya Yehova. (Yobo 36:18, 21-26; 37:23, 24) Na ntembe te toli ya malamu ya Elihu ebongisaki makanisi ya Yobo mpo ayoka malamu toli mosusu, oyo eutaki sikoyo epai ya Mozalisi na ye. (Yobo 38:1-3) Ndenge nini mbala mosusu ndakisa ya Elihu esalisaki basaleli ya sembo ya kala, mpe ndenge nini ekoki kosalisa biso lelo?
12. Ndenge nini Yehova asalelaki basakoli mpo na kosalisa bato na ye, mpe ndenge nini mbala mosusu ndakisa malamu ya Elihu esalisaki Bayisraele?
12 Ndenge oyo mbala mosusu ndakisa ya Elihu esalisaki Bayisraele. Na ekólo Yisraele, Yehova azalaki kotya basakoli mpo báyebisaka mokano na ye epai ya Bayisraele. Na ndakisa, na eleko ya basambisi, Debora atɛlɛmaki lokola mama mpo na kopesa ekólo litambwisi ya elimo, mpe Samwele asalaki lokola molobeli ya Yehova na molende banda bolenge na ye. (Bas. 4:4-7; 5:7; 1 Sa. 3:19, 20) Na nsima na ntango ya bakonzi, Yehova azalaki ntango nyonso kosalela basakoli mpo bálendisaka bato na ye na elimo mpe bápesaka toli na baoyo bazalaki kotika losambo ya pɛto. (2 Sa. 12:1-4; Mis. 3:24) Mbala mosusu ndakisa ya Elihu oyo ekomami na mokanda ya Yobo esalisaki mibali mpe basi wana ya sembo báyeba makambo ya koloba mpe ndenge ya koloba yango ntango bazali kopesa toli.
13. Ndenge nini bakristo bakoki kolendisa bakristo mosusu lelo?
13 Ndenge oyo ekoki kosalisa biso. Biso bakristo mpe toyebisaka basusu mokano ya Nzambe ntango tosakolaka makambo oyo ezali na Liloba na ye, Biblia. Tosalelaka mpe maloba na biso mpo na kotonga mpe kolendisa bandeko na biso bakristo. (1 Ko. 14:3) Mingimingi bankulutu basengeli koyeba ‘koloba na ndenge ya kobɔndisa’ epai ya bandeko mibali mpe bandeko basi, ata baoyo basilikaka to oyo balobaka “bilobaloba mpamba.”—1 Tes. 5:14; Yobo 6:3.
14-15. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge nkulutu akoki komekola Elihu ntango azali kopesa toli.
14 Kanisá likambo oyo. Nkulutu moko ayoki ete ndeko mwasi moko azali na mawa. Likambo ya esengo, ye ná nkulutu mosusu bakei kotala ndeko mwasi yango mpo na kolendisa ye. Ntango bazali kosolola, ndeko mwasi yango alobi ete azali na esengo mpenza te, atako azali koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola. Nkulutu yango akosala nini?
15 Ya liboso, nkulutu yango akoki koluka koyeba ntina oyo ndeko mwasi akómi na mayoki ya ndenge wana. Mpo ayeba yango, asengeli koyoka ye na motema molai mpenza. Ndeko mwasi yango azali nde komiyoka ete abongi te Nzambe alinga ye? “Mitungisi ya bomoi” nde ezali kolɛmbisa ye? (Luka 21:34) Ya mibale, nkulutu akoluka bantina ya kopesa ndeko mwasi yango longonya. Na ndakisa, azali kaka koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola atako azali na mawa. Mpe ya misato, ntango nkulutu akangi ntina ya likambo ya ndeko mwasi yango mpe likambo oyo elɛmbisi ye nzoto, akosalela Biblia mpo na kolendisa ye mpe kosalisa ye andima ete Nzambe alingaka ye.—Gal. 2:20.
KOBÁ KOZWA MATOMBA NA MOKANDA YA YOBO
16. Tokoki kosala nini mpo mokanda ya Yobo ekoba kosalisa biso?
16 Tozwi mateya mingi nsima ya kotalela mokanda ya Yobo! Ndenge toyekolaki yango na lisolo oyo eleki, lisolo yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe eteyaka biso ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala, mpe lisusu ndenge oyo tokoki koyikela yango mpiko. Mpe ndenge tomoni yango na lisolo oyo, biso nyonso tokoki koyekola kopesa batoli ya malamu soki toboyi kolanda ndakisa mabe ya baninga misato ya Yobo, kasi tolandi ndakisa malamu ya Elihu. Ntango okozwa libaku ya kopesa basusu toli, mpo na nini te ozongela mateya oyo oyekoli na mokanda ya Yobo? Mpe soki eleki ntango mingi banda otángá mokanda yango ya kitoko, okoki komityela mokano ya kotánga lisusu. Soki osali bongo, okomona ete ezali na litomba lelo kaka ndenge ezalaki ntango ekomamaki.
LOYEMBO 125 “Esengo na bato ya motema mawa!”
a Emonani ete elimo mabe nde etindaki Elifaze aloba ete na miso ya Yehova ata moto moko te azali sembo mpe na bongo moto moko te akoki kosepelisa Nzambe. Elifaze andimaki mpenza likanisi wana ya mabe. Azongelaki yango mbala nyonso misato oyo azwaki maloba.—Yobo 4:17; 15:15, 16; 22:2.