Omilɛngɛli mpo na mokolo ya Yehova?
“Mokolo monene ya [Yehova] ebɛlɛmi; ebɛlɛmi, eyei mbangu mpenza.”—SEFANIA 1:14.
1-3. (a) Biblia elobi nini mpo na mokolo ya Yehova? (b) Mokolo nini ya Yehova tozali kozela?
MOKOLO monene ya Yehova ezali te mokolo ya ngonga 24. Ezali eleko moko oyo na boumeli na yango Nzambe akopesa bato mabe etumbu. Bato oyo basalelaka Nzambe te basengeli mpenza kobanga mokolo yango mpamba te ezali mokolo ya molili, ya nkanda, ya nkɛlɛ, ya mpasi, mpe ya libebi. (Yisaya 13:9; Amosa 5:18-20; Sefania 1:15) Esakweli ya Yoele elobi boye: “Mawa mpo na mokolo yango! Zambi mokolo ya [Yehova] ebɛlɛmi, ezali koya lokola libebisami uta na Oyo-na-Nguya-Nyonso.” (Yoele 1:15) Nzokande, na mokolo yango, Nzambe akobikisa baoyo “bazali na mitema ya pɛto.”—Nzembo 7:10.
2 Biblia esaleli maloba “mokolo ya Yehova” mpo na kolobela bileko ndenge na ndenge oyo Nzambe apesaki bato mabe etumbu. Na ndakisa, “mokolo ya Yehova” eyelaki bafandi ya Yelusaleme ntango bato ya Babilone bakweisaki engumba yango na mobu 607 L.T.B. (Sefania 1:4-7) Mokolo mosusu ya Yehova eyaki na mobu 70 T.B. ntango Nzambe asalelaki Baloma mpo na kobebisa ekólo ya Bayuda mpo baboyaki Mwana na ye. (Danyele 9:24-27; Yoane 19:15) Biblia esakoli koya ya “mokolo ya Yehova,” ntango “akobundana na mabota.” (Zekalia 14:1-3) Ntoma Paulo amonisaki ete mokolo yango ezali na boyokani na kozala ya Klisto, oyo ebandaki ntango Yesu akómaki mokonzi na likoló na 1914. (2 Batesaloniki 2:1, 2) Lokola mokolo ya Yehova ekómi pene, mokapo ya mobu 2007 ebongaki mpenza. Eutaki na Sefania 1:14, oyo elobi ete: ‘Mokolo monene ya Yehova ebɛlɛmi.’
3 Lokola mokolo monene ya Nzambe ebɛlɛmi, sikoyo nde ntango ya komilɛngɛla. Ndenge nini okoki komibongisa mpo na mokolo yango? Ezali nde na makambo mosusu oyo okoki kobongisa mpo omilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova?
Omilɛngɛla
4. Yesu amibongisaki mpo na komekama nini ya monene?
4 Ntango Yesu Klisto asakolaki nsuka ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo, alobaki na bayekoli na ye boye: “Bómilɛngɛla.” (Matai 24:44) Ntango Yesu alobaki maloba yango, ye moko asilaki komilɛngɛla mpo na komekama moko monene—kokufa lokola mbeka mpo na lisiko. (Matai 20:28) Ndenge oyo Yesu amibongisaki ekoki koteya biso nini?
5, 6. (a) Ndenge nini kolinga Nzambe mpe bazalani esalisaka biso tómibongisa mpo na mokolo ya Yehova? (b) Lokola Yesu azalaki kolinga bazalani, ndakisa nini atikelaki biso?
5 Yesu azalaki na bolingo makasi mpo na Yehova mpe mpo na mitinda na Ye ya sembo. Baebele 1:9 elobi mpo na ye boye: “Olingaki boyengebene, mpe oyinaki botyoli-mibeko. Yango wana Nzambe, Nzambe na yo, apakolaki yo na mafuta ya esengo koleka baninga na yo.” Yesu abatelaki bosembo na ye mpo azalaki mpenza kolinga Tata na ye. Soki biso mpe tozali kolinga Nzambe ndenge yango mpe tozali kotosa mibeko na ye, akobatela biso. (Nzembo 31:23) Bolingo mpe botosi yango ekosalisa biso tómilɛngɛla mpo na mokolo monene ya Yehova.
6 Yesu azalaki mpe kolinga bato mingi. Kutu, “ayokelaki bango mawa, mpo batikamaki mpamba mpe bapalanganisamaki lokola bampate ezangá mobateli.” (Matai 9:36) Yango wana Yesu azalaki koteya bato nsango malamu; ndenge moko mpe, bolingo etindaka biso tósakola nsango ya Bokonzi epai ya bazalani na biso. Kolinga Nzambe mpe bazalani etindaka biso tómipesa na mosala ya kosakola mpe na ndenge yango, esalisaka biso tómibongisa mpo na mokolo monene ya Yehova.—Matai 22:37-39.
7. Mpo na nini tokoki kozala na esengo wana tozali kozela mokolo ya Yehova?
7 Yesu azalaki kosepela kosala mokano ya Yehova. (Nzembo 40:8) Soki biso mpe tozali na makanisi yango, tokozala na esengo ya kosalela Nzambe. Ndenge moko na Yesu, tokozala bato oyo balingaka kopesa, mpe yango ekomemela biso esengo ya solosolo. (Misala 20:35) Ya solo, “esengo ya [Yehova] ezali nguya na [biso].” Esengo yango ekosalisa biso tómibongisa mpo na mokolo monene ya Yehova.—Nehemia 8:10.
8. Mpo na nini tosengeli kopusana penepene na Yehova na mabondeli?
8 Mabondeli mozindo esalisaki Yesu amibongisa mpo na komekama. Yesu azalaki kobondela ntango Yoane abatisaki ye. Abondelaki butu mobimba liboso apona bantoma na ye. (Luka 6:12-16) Lisusu, mabondeli mozindo oyo Yesu asalaki na butu oyo babomaki ye esimbaka mpenza motema ya moto nyonso oyo atángi yango na Biblia. (Malako 14:32-42; Yoane 17:1-26) Na ndakisa ya Yesu, yo mpe obondelaka mingi? Bondeláká Yehova mingi, lekisáká ntango mingi na kobondela, lukáká litambwisi ya elimo santu, mpe ndimáká litambwisi yango. Kozala na boyokani malamu na Tata na biso ya likoló ezali na ntina mingi na ntango oyo mpamba te mokolo monene ya Nzambe ezali koya mbangu. Yango wana, kobá kopusana penepene na Yehova na mabondeli.—Yakobo 4:8.
9. Komibanzabanza mpo na kosantisama ya nkombo ya Yehova ezali na ntina nini?
9 Likambo mosusu oyo esalisaki Yesu amibongisa mpo na komekama oyo ekómelaki ye ezali komibanzabanza mpo na kosantisama ya nkombo ya Yehova. Kutu, ateyaki bayekoli na ye ete na mabondeli na bango, basengeli kolobaka mpe ete: “Tiká nkombo na yo esantisama.” (Matai 6:9) Soki biso mpe tolingi ete nkombo ya Yehova esantisama, tokosala makasi tóboyaka makambo nyonso oyo ekoki kofingisa yango. Yango ekosalisa biso tómibongisa mpo na mokolo monene ya Yehova.
Osengeli kobongisa makambo mosusu?
10. Mpo na nini ebongi tótalelaka makambo ya bomoi na biso?
10 Soki mokolo ya Yehova eyei lelo, ekokuta yo osili komilɛngɛla? Ebongi ete mokomoko na biso atalela soki asengeli kobongisa makambo mosusu na bomoi na ye. Lokola bomoi ya moto ezali mokuse mpe ete makambo ekoki kobongwana na mbalakaka, mokomoko na biso asengeli kobatela boyokani malamu na Nzambe mokolo na mokolo. (Mosakoli 9:11, 12; Yakobo 4:13-15) Na yango, tótalela mwa makambo oyo tosengeli kotyela likebi na bomoi na biso.
11. Omityelá mokano nini na botángi na yo ya Biblia?
11 Likambo moko ya ntina ezali kotosa toli ya “moombo ya sembo” ya kotángaka Biblia mokolo na mokolo. (Matai 24:45) Okoki komityela mokano ya kotángaka mpe komanyolaka Biblia banda na Genese tii na Emoniseli mbula nyonso. Soki ozali kotánga ata mikapo minei na mokolo, okoki kotánga mikapo nyonso 1 189 ya Biblia na mbula moko. Mokonzi nyonso ya Yisalaele asengelaki kotángaka Mibeko ya Yehova “mikolo nyonso ya bomoi na ye.” Na ntembe te, Yosua azalaki kosala yango. (Deteronome 17:14-20; Yosua 1:7, 8) Ezali na ntina mingi ete bankulutu bátángaka Liloba ya Nzambe mokolo na mokolo, mpo yango ekosalisa bango báteyaka “mateya oyo epesaka litomba”!—Tito 2:1.
12. Koyeba ete mokolo ya Yehova ebɛlɛmi esengeli kotinda yo osala nini?
12 Lokola mokolo ya Yehova ebɛlɛmi, osengeli koyanganaka na makita nyonso mpe osengeli komibongisaka mpo na kopesa biyano. (Baebele 10:24, 25) Soki ozali kosala yango, ekosalisa yo okóma na mayele mingi na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ozala na mposa ya kokutana na bato oyo bazali na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko, mpe okosalisa bango na elimo. (Misala 13:48) Okoki mpe kosala makambo mosusu ya ntina na lisangá, na ndakisa kosalisa mibange mpe kolendisa bilenge. Makambo yango ekopesa yo esengo!
Boyokani na yo ná bato mosusu
13. Mituna nini tokoki komituna na oyo etali kolata bomoto ya sika?
13 Lokola mokolo ya Yehova ebɛlɛmi, osengeli nde kobakisa milende mpo na “kolata bomoto ya sika oyo ezalisamaki engebene mokano ya Nzambe na kati ya boyengebene ya solosolo mpe bosembo”? (Baefese 4:20-24) Ntango ozali komonisa bizaleli malamu, na ntembe te bato mosusu bakomona ete ozali ‘kotambola na elimo ya Nzambe’ mpe ozali komonisa mbuma ya elimo. (Bagalatia 5:16, 22-25) Okoki kotánga mwa makambo oyo ezali komonisa ete yo ná libota na yo bolati bomoto ya sika? (Bakolose 3:9, 10) Na ndakisa, bandeko ya lisangá to bato mosusu bayebi yo lokola moto oyo asalisaka basusu? (Bagalatia 6:10) Momeseno ya koyekola Biblia ekosalisa yo okolisa bizaleli ya malamu oyo ekosalisa yo omibongisa mpo na mokolo ya Yehova.
14. Mpo na nini moto asengeli kosɛnga elimo santu mpo na kolona ezaleli ya komipekisa?
14 Ezali boni soki osilikaka noki mpe omoni ete osengeli kolona ezaleli ya komipekisa? Komipekisa ezali na kati ya mbuma oyo elimo santu ya Nzambe ekoki kobota kati na yo. Yango wana, bondeláká mpo na kosɛnga elimo santu, na kolanda maloba ya Yesu oyo: “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino yango; bókoba koluka, mpe bokozwa; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino. . . . Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi ndenge ya kopesa bana na bino makabo ya malamu, Tata na likoló akopesa elimo santu mingi boni epai ya baoyo bazali kosɛnga ye yango!”—Luka 11:9-13.
15. Osengeli kosala nini soki ozali koyokana te na ndeko moko?
15 Na ndakisa, soki ozali koyokana te na ndeko moko na lisangá. Na ntango yango, salá nyonso oyo okoki mpo bóbongisa, mpe bózongisa kimya mpe bóbatela bomoko ya lisangá. (Nzembo 133:1-3) Landá toli ya Yesu oyo ezali na Matai 5:23, 24 to na Matai 18:15-17. Soki ozalaki kotika ete moi elala wana ozali kaka na nkanda, salá noki obongisa. Mbala mingi esɛngaka kaka koyekola kolimbisa. Paulo akomaki boye: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mawa mingi, kolimbisanáká na motema moko ndenge Nzambe mpe na nzela ya Klisto alimbisaki bino na motema moko.”—Baefese 4:25, 26, 32.
16. Na makambo nini koyokelana mawa ezali na ntina na kati ya libala?
16 Mpo mwasi ná mobali báfanda malamu, esɛngaka ete báyeba koyokelana mawa mpe bálimbisanaka. Soki omoni ete osengeli kokolisa bolingo mpe motema mawa mpo na molongani na yo, salá makasi okokisa mokano yango na lisalisi ya Nzambe mpe ya Liloba na ye. Ezali na makambo oyo osengeli kobongisa mpo na kotosa mokapo ya 1 Bakolinti 7:1-5, mpe na bongo kopekisa matata na libala na bino mpe koboya ekobo? Ya solo, likambo yango esɛngaka ete mwasi ná mobali ‘báyokelanaka mawa mingi.’
17. Makambo nini moto oyo asali lisumu ya monene asengeli kosala?
17 Ezali boni soki osalaki lisumu moko ya monene? Luká nokinoki lisalisi. Kutáná na bankulutu. Mabondeli mpe batoli na bango ekosalisa yo ozonga makasi na elimo. (Yakobo 5:13-16) Monisá Yehova na libondeli ete obongoli mpenza motema. Soki osali makambo yango te, lisosoli na yo ekobanda se kotungisama. Davidi akutanaki na likambo ya ndenge wana; kasi, motema na ye ekitaki ntango ayambolaki lisumu na ye epai ya Yehova! Akomaki boye: “Esengo na ye oyo alimbisami mabunga na ye, ye oyo masumu na ye mazipami. Esengo na ye oyo [Yehova] atángeli ye mabe te, mpe azali lokuta na molimo na ye te.” (Nzembo 32:1-5) Yehova alimbisaka moto oyo asali lisumu, kasi abongoli mpenza motema.—Nzembo 103:8-14; Masese 28:13.
Kozala moto ya mokili te
18. Ndenge nini osengeli kotalelaka mokili?
18 Na ntembe te, ozelaka mokili ya sika oyo Tata na biso ya likoló alaki. Kasi, ndenge nini otalelaka mokili oyo ya bato bazangi bosembo mpe bapesi Nzambe mokɔngɔ? Satana, “moyangeli ya mokili oyo,” azalaki na bokonzi te likoló ya Yesu Klisto. (Yoane 12:31; 14:30) Na ntembe te olingi te ete Zabolo mpe bato na ye bázala na bokonzi likoló yo; yango wana, landá toli ya ntoma Yoane oyo: “Bólingaka mokili te ná biloko oyo ezali na kati ya mokili.” Yango ezali likambo ya bwanya, mpamba te “mokili ezali koleka mpe ndenge moko mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”—1 Yoane 2:15-17.
19. Bilenge baklisto balendisami na komityela mikano nini?
19 Osalisaka bana na yo ‘bámibatela kozanga litɔnɔ ya mokili’? (Yakobo 1:27) Satana azali koluka kokanga bana na yo ndenge moto akangaka mbisi na ndɔbɔ. Bibongiseli ndenge na ndenge esalami mpo na kobenda bilenge na mokili ya Satana. Nzokande, basaleli ya Yehova bazali na kati ya ebongiseli kaka moko oyo ekotikala ntango mokili oyo mabe ekobomama. Yango wana, tosengeli kolendisa bilenge baklisto bázala na “mingi ya kosala na kati ya mosala ya Nkolo.” (1 Bakolinti 15:58) Baboti oyo balingaka Nzambe basengeli kosalisa bana na bango bámityela mikano oyo ekosalisa bango bázala na bomoi ya esengo mpe oyo ekokumisa Nzambe mpe ekosalisa bango bámilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova.
Kanisá nsima ya mokolo monene ya Yehova
20. Mpo na nini tosengeli kobosana te ete bomoi ya seko ekozala?
20 Okokoba kozela mokolo ya Yehova na motema ya kokita soki obateli na makanisi elikya ya bomoi ya seko. (Yuda 20, 21) Na ntembe te ozali kozela bomoi ya seko na Paladiso, mpe ozali kolikya kozongela makasi ya bolenge mpe kozwa ntango ya kokokisa mikano ya malamu mpe koyekola lisusu makambo mingi na ntina na Yehova. Okoki kokoba koyekola makambo ya Nzambe libela na libela mpamba te lelo oyo, bato bayebi kaka “ndambo ya nzela na ye.” (Yobo 26:14) Oyo nde bilikya kitoko!
21, 22. Masolo nini mbala mosusu okosolola na bato oyo bakosekwa?
21 Na Paladiso, bato oyo bakosekwa bakoyebisa biso makambo mosusu ya kala oyo toyebi te. Na ndakisa, Enoka akoyebisa biso ndenge oyo azwaki mpiko mpo na kosakola nsango ya Yehova epai ya bato mabe. (Yuda 14, 15) Na ntembe te, Noa akoyebisa biso ndenge oyo atongaki masuwa. Abalayama ná Sala bakoyebisa biso ndenge oyo bayokaki ntango balongwaki na Ulu mpe bakómaki kofanda na bahema. Kanisá mpe makambo oyo Esetele akoyebisa biso na ndenge abikisaki ekólo na ye mobimba mpe asalaki ete mwango ya Amana elonga te. (Esetele 7:1-6) Kanisá mpe ntango Yona akoyebisa biso ndenge oyo alekisaki mikolo misato na libumu ya mbisi monene to mpe ntango Yoane Mobatisi akoyebisa biso ndenge oyo ayokaki ntango abatisaki Yesu. (Luka 3:21, 22; 7:28) Tokoyekola mpenza makambo mingi ya kosepelisa!
22 Na boumeli ya Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Klisto, na ntembe te okozwa libaku ya kosalisa bato oyo bakosekwa bázwa ‘boyebi ya Nzambe.’ (Masese 2:1-6) Lelo oyo, ezali mpenza esengo komona ndenge bato bazali koyeba Yehova Nzambe mpe bazali kosalela Ye! Kasi, kanisá esengo oyo okozala na yango ntango Yehova akopambola milende na yo mpo na kosalisa bato oyo bazalaki na bomoi na ntango ya kala mpe bakondima makambo yango!
23. Tosengeli kozala na ekateli nini?
23 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki te kotánga matomba nyonso oyo tozali kozwa lelo oyo na lisangá ya Yehova. (Nzembo 40:5) Tozali mpenza na botɔndi epai ya Nzambe mingimingi mpo na bibongiseli ya elimo oyo azwi mpo na biso. (Yisaya 48:17, 18) Ata soki makambo ya bomoi na biso ezali ndenge nini, tiká tósalela Yehova mosala ya bosantu na motema mobimba wana tozali kozela mokolo monene ya Yehova.
Okopesa eyano nini?
• “Mokolo ya Yehova” ezali nini?
• Ndenge nini okoki komilɛngɛla mpo na mokolo ya Yehova?
• Lokola mokolo monene ya Nzambe ebɛlɛmi, makambo nini tosengeli kobongisa?
• Makambo nini ozali kozela nsima ya mokolo ya Yehova?
[Elilingi na lokasa 12]
Yesu amilɛngɛlaki mpo na komekama
[Elilingi na lokasa 15]
Ekozala mpenza libaku malamu kosalisa bato oyo bakosekwa báyeba Yehova!