Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 15/10 nk. 21-25
  • Ozalaka moto ya liboso na kopesa basusu lokumu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozalaka moto ya liboso na kopesa basusu lokumu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kopesa Yehova mpe nkombo na ye lokumu
  • Baoyo bazali na mikumba bapesaka basusu limemya
  • Limemya mpo na lisangá ya Yehova mpe litambwisi na yango
  • Limemya mpo na bakɛngɛli-batamboli
  • “Bókumisa bato ya ndenge nyonso”
  • Ozalaka moto ya liboso na kopesa bandeko bakristo lokumu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Tokumisa bato nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Pesáká lokumu na baoyo babongi na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Pesáká basusu limemya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 15/10 nk. 21-25

Ozalaka moto ya liboso na kopesa basusu lokumu?

“Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.”​—LOM. 12:10.

1. Likambo nini ezali komonana lisusu te na mikili mingi?

NA MIKILI mosusu, bilenge bazalaka na momesano ya kofukama ntango bazali elongo na mikóló mpo na komonisa limemya. Basalaka yango mpo bámonana te milai koleka mikóló. Na mikili yango, kopesa mokóló mokɔngɔ emonisaka mpe kozanga limemya. Atako bato ya bamboka nyonso bamonisaka limemya ndenge moko te, makambo oyo basalaka ezali kozongisa na makanisi na biso Mibeko ya Moize. Mobeko moko elobaki boye: “Okotɛlɛma [mpo na komonisa limemya] liboso ya nsuki mpɛmbɛ mpe okokumisa mobali anuni.” (Lev. 19:32) Likambo ya mawa, na mikili mingi, bato bazali lisusu kopesa basusu limemya te. Kutu, kozanga limemya ezali komonana na bisika nyonso.

2. Liloba ya Nzambe elendisi biso tópesaka banani lokumu?

2 Liloba ya Nzambe emonisi ete kopesa basusu lokumu ezali na ntina mingi. Elobi ete tosengeli kopesa Yehova mpe Yesu lokumu. (Yoa. 5:23) Elobi mpe ete tosengeli kopesa lokumu epai ya bandeko na biso na libota, bandeko na biso baklisto, ata mpe bato mosusu. (Lom. 12:10; Ef. 6:1, 2; 1 Pet. 2:17) Wapi mwa balolenge ya kopesa Yehova lokumu? Ndenge nini tokoki kopesa lokumu, to limemya makasi, epai ya bandeko na biso baklisto? Tótalela mituna yango mpe mituna mosusu oyo eyokani na yango.

Kopesa Yehova mpe nkombo na ye lokumu

3. Wapi lolenge moko malamu ya kopesa Yehova lokumu?

3 Lolenge moko malamu ya kopesa Yehova lokumu ezali komonisa limemya oyo ebongi mpo na nkombo na ye. Kutu, tozali “ekólo moko mpo na nkombo na ye.” (Mis. 15:14) Komema nkombo ya Yehova, Nzambe Mozwi-na-Nguya Nyonso, ezali mpenza lokumu monene. Mosakoli Mika alobaki boye: “Mabota nyonso bakotambola, moko na moko na nkombo ya nzambe na ye; nde biso tokotambola na nkombo ya [ Yehova] Nzambe na biso, libela na libela.” (Mika 4:5) ‘Totambolaka na nkombo ya Yehova’ na ndenge tosalaka makasi mokolo na mokolo ete tózala na etamboli oyo ekokumisa Yehova mpe nkombo na ye. Ndenge Paulo ayebisaki baklisto ya Loma, soki etamboli na biso eyokani te na nsango malamu oyo tozali kosakola, nkombo ya Nzambe ‘ekotukama,’ to kofingama.​—Lom. 2:21-24.

4. Ndenge nini otalelaka mokumba ya kotatola mpo na Yehova?

4 Topesaka mpe Yehova lokumu na mosala ya kosakola. Na ntango ya kala, Yehova asɛngaki Bayisalaele bázala batatoli na ye, kasi bakokisaki mokumba yango te. (Yis. 43:1-12) Mbala na mbala, bazalaki kopesa Yehova mokɔngɔ mpe “bayokisaki Mosantu ya Yisalaele mpasi.” (Nz. 78:40, 41, NW) Nsukansuka, Yehova aboyaki ekólo yango. Nzokande, biso lelo oyo tozali na botɔndi mpo na libaku malamu ya kotatola mpo na Yehova mpe koyebisa bato nkombo na ye. Tosalaka yango mpo tolingaka ye mpe tozalaka na mposa ete nkombo na ye esantisama. Ekobanda boni tókanga monɔkɔ na biso na ntango toyebi solo na ntina na Tata na biso ya likoló mpe mikano na ye? Tomiyokaka lokola ntoma Paulo oyo alobaki ete: “Ezali nde mokumba oyo batye likoló na ngai. Ya solo, mawa na ngai soki nasakoli nsango malamu te!”​—1 Kol. 9:16.

5. Na ndenge nini kozala na kondima epai ya Yehova ezali na boyokani na komemya ye?

5 Davidi, mokomi ya nzembo, alobaki boye: “Baoyo bayebi nkombo na yo bakondima yo; mpo ete yo [Yehova], okotikaka bango te baoyo bazali kolukaka yo.” (Nz. 9:10) Soki toyebi mpenza Yehova mpe tozali komemya nkombo na ye mpo toyebi ndimbola na yango, tokotya elikya epai na ye ete akosalisa biso ndenge asalisaki basaleli na ye na ntango ya kala. Elikya mpe kondima ya ndenge wana ezali lolenge mosusu ya kopesa Yehova lokumu. Liloba ya Nzambe emonisi ete kotya elikya epai ya Yehova ezali na boyokani na komemya ye. Ntango Bayisalaele bazangaki elikya epai na ye, Yehova atunaki Moize boye: ‘Bato oyo bakotyola ngai ntango molai boni? Bakoboya kondima ngai ntango molai boni ata nasili kosala bilembo oyo nyonso na kati na bango?’ (Mit. 14:11) Ndenge moko mpe, komemya Yehova etindaka biso tóndimela ye. Kozala na elikya ete Yehova akobatela mpe akosunga biso na ntango ya mpasi emonisaka ete tozali komemya ye.

6. Nini etindaka biso tópesa Yehova limemya makasi?

6 Yesu amonisaki ete limemya mpo na Yehova esengeli kouta na kati mpenza ya motema na biso. Mpo na bato oyo bazalaki kosambela na motema sembo te, Yesu azongelaki maloba ya Yehova ete: “Bato ya ekólo oyo bazali kokumisa ngai na mbɛbu na bango, nzokande motema na bango etangwá mosika na ngai.” (Mat. 15:8) Bolingo na biso mpo na Yehova etindaka biso tózala na limemya ya solosolo mpo na ye. (1 Yoa. 5:3) Lisusu, tobosanaka te elaka ya Yehova ete: “Baoyo bakokumisa ngai, ngai nakokumisa bango.”​—1 Sam. 2:30.

Baoyo bazali na mikumba bapesaka basusu limemya

7. (a) Mpo na nini bandeko oyo bazali na mikumba basengeli kopesa lokumu epai ya bato oyo bango bazali kokamba? (b) Ndenge nini Paulo amonisaki limemya mpo na bandeko na ye baklisto?

7 Ntoma Paulo apesaki baklisto toli oyo: “Mpo na kopesana lokumu bózala bato ya liboso.” (Lom. 12:10) Bandeko mibali oyo bazali na mikumba na lisangá basengeli kopesa ndakisa, elingi koloba basengeli ‘kozala bato ya liboso’ mpo na kopesa lokumu epai ya bato oyo bango bazali kokamba. Na likambo yango, baoyo bazali na mikumba minene basengeli kolanda ndakisa ya Paulo. (Tángá 1 Batesaloniki 2:7, 8.) Na masangá oyo Paulo atambolaki, bandeko bayebaki ete azalaki soki moke te kosɛnga bango básala makambo oyo ye moko azalaki kolinga kosala te. Paulo azalaki komemya bandeko na ye baklisto; yango wana bango mpe bazalaki komemya ye. Tokoki mpenza kondima ete ntango Paulo alobaki ete: “Nazali kobondela bino ete bókóma bamekoli na ngai,” bandeko mingi basalaki yango mpo azalaki ndakisa ya malamu.​—1 Kol. 4:16.

8. (a) Wapi lolenge moko oyo Yesu azalaki kopesa bayekoli na ye limemya? (b) Ndenge nini bakɛngɛli bakoki komekola ndakisa ya Yesu lelo oyo?

8 Lolenge mosusu ndeko oyo azali na mikumba akoki komonisa limemya epai ya bato oyo ye azali kokamba ezali ya koyebisa bango ntina ya malako oyo apesi bango to ya mosala oyo asɛngi bango básala. Na ndenge yango, akomekola Yesu. Na ndakisa, ntango Yesu ayebisaki bayekoli na ye bábondela mpo basali bákóma mingi na mosala ya kobuka mbuma, ayebisaki mpe bango ntina. Alobaki boye: “Bambuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Na yango, bósɛnga na Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma ete atinda basali na kati ya mosala na ye ya kobuka mbuma.” (Mat. 9:37, 38) Ndenge moko mpe, ntango ayebisaki bayekoli na ye ete “bókɛngɛlaka,” ayebisaki bango ntina. Alobaki boye: “Mpo boyebi te na mokolo nini Nkolo na bino akoya.” (Mat. 24:42) Mbala mingi, Yesu azalaki kosuka kaka te na koyebisa bayekoli na ye oyo basengeli kosala; azalaki mpe koyebisa bango ntina oyo basengeli kosala yango. Na ndenge yango, azalaki kopesa bango limemya mpe lokumu. Yango ezali ndakisa malamu mpo na bandeko oyo bazali bakɛngɛli!

Limemya mpo na lisangá ya Yehova mpe litambwisi na yango

9. Kopesa limemya na lisangá ya boklisto na mokili mobimba mpe na bamonisi na yango elakisaka nini? Limbolá.

9 Kopesa Yehova lokumu elimboli mpe kopesa lokumu na lisangá na ye na mokili mobimba mpe bamonisi na yango. Ntango tolandi toli ya Makomami oyo euti epai ya moombo ya sembo, tomonisaka limemya mpo na ebongiseli ya Yehova. Na lisangá ya boklisto na ekeke ya liboso, ntoma Yoane amonaki ete esengeli kopamela baoyo bazangaki limemya epai ya bato oyo baponamaki mpo na kokamba lisangá. (Tángá 3 Yoane 9-11.) Maloba ya Yoane emonisi ete bato yango bazangaki limemya kaka te epai ya bato oyo bazalaki bakɛngɛli, kasi mpe na mateya mpe litambwisi na bango. Likambo ya esengo, baklisto mingi bazalaki na elimo wana te. Emonani ete ntango bantoma bazalaki naino na bomoi, bandeko nyonso bazalaki kopesa limemya epai ya baoyo bazalaki kokamba lisangá.​—Filp. 2:12.

10, 11. Na lisalisi ya Makomami, monisá ete ezali mabe te bato mosusu bázala na mwa bokonzi na kati ya lisangá ya boklisto.

10 Bato mosusu bakanisaka ete lokola Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete “bino nyonso bozali bandeko,” moto moko te asengeli kozala na bokonzi na lisangá ya boklisto. (Mat. 23:8) Nzokande, Makomami ya Liebele mpe ya Grɛki elobeli bato mingi oyo Nzambe apesaki bokonzi. Lisolo ya batata ya mabota, ya basambisi, mpe ya bakonzi ya Baebele ya ntango ya kala emonisi polele ete Yehova azalaki kosalela bato mpo na kopesa litambwisi na ye. Na ntango bato bazalaki te kopesa limemya oyo ebongi epai ya bato oyo baponamaki, Yehova azalaki kopesa bango etumbu.​—2 Mik. 1:2-17; 2:19, 23, 24.

11 Ndenge moko mpe, baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kondima bokonzi ya bantoma. (Mis. 2:42) Na ndakisa, Paulo azalaki kopesa malako epai ya bandeko na ye baklisto. (1 Kol. 16:1; 1 Tes. 4:2) Atako bongo, ye moko mpe azalaki komemya baoyo bazalaki na bokonzi likoló na ye. (Mis. 15:22; Gal. 2:9, 10) Ya solo, Paulo azalaki kotalela bokonzi na kati ya lisangá na ndenge oyo ebongi.

12. Wapi mateya mibale oyo tozwi na bandakisa ya Biblia na likambo etali bokonzi?

12 Tozwi mateya mibale na likambo yango. Ya liboso, Biblia emonisi ete ezali mabe te “moombo ya sembo mpe ya mayele,” na nzela ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, aponaka bandeko mpo na kokokisa mikumba mosusu, mpe ete bandeko mosusu bázala na bokonzi likoló ya bandeko oyo bazali na mikumba. (Mat. 24:45-47; 1 Pet. 5:1-3) Ya mibale, biso nyonso, ata mpe baoyo bazali na mikumba, tosengeli komemya baoyo bazali na bokonzi likoló na biso. Na yango, wapi mwa balolenge oyo tokoki kopesa lokumu epai ya bandeko oyo bazali bakɛngɛli na lisangá ya boklisto?

Limemya mpo na bakɛngɛli-batamboli

13. Ndenge nini tokoki komemya bamonisi ya lisangá ya boklisto lelo oyo?

13 Paulo alobaki boye: “Tozali kosɛnga na bino, bandeko, ete bózala na limemya epai ya baoyo bazali kosala mosala makasi na kati na bino mpe kokamba bino na kati ya Nkolo mpe kokebisa bino; mpe ete bópesa bango lokumu oyo eleki mpenza na kati ya bolingo mpo na mosala na bango. Bózala na kimya na kati na bino.” (1 Tes. 5:12, 13) Ebongi mpenza kotánga bakɛngɛli-batamboli na kati ya “baoyo bazali kosala mosala makasi.” Yango wana, tosengeli kopesa bango “lokumu oyo eleki mpenza.” Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kolanda na motema mobimba batoli mpe bilendiseli na bango. Ntango mokɛngɛli-motamboli moko ayebisi biso malako oyo euti epai ya moombo ya sembo, “bwanya oyo euti na likoló” esengeli kotinda biso ‘tósepela kotosa.’​—Yak. 3:17.

14. Ndenge nini bandeko ya lisangá bakoki komonisa limemya epai ya bakɛngɛli-batamboli, mpe yango ekoki kozala na litomba nini?

14 Kasi, ezali boni soki basɛngi biso tósala makambo na ndenge oyo tomesaná kosala te? Na bantango mosusu, limemya esɛngaka tómipekisa mpo tóloba te maloba lokola, “Awa tosalaka bongo te” to, “Wana ebongi na lisangá mosusu kasi epai na biso te.” Kasi, tosengeli nde kotosa malako yango. Kobatela na makanisi ete lisangá ezali ya Yehova mpe ete Yesu nde azali Mokonzi na yango ekosalisa biso tótosaka. Ntango tondimi na esengo malako ya mokɛngɛli-motamboli mpe tosaleli yango, emonisaka ete tozali mpenza na limemya. Ntoma Paulo apesaki bandeko ya Kolinti longonya mpo batosaki malako oyo apesaki bango na nzela ya Tito, nkulutu oyo atindaki kuna. (2 Kol. 7:13-16) Lelo oyo mpe, tosengeli koyeba ete kotosa na motema moko malako ya bakɛngɛli-batamboli esalaka ete tóyoka esengo mingi na mosala ya kosakola.​—Tángá 2 Bakolinti 13:11.

“Bókumisa bato ya ndenge nyonso”

15. Wapi mwa balolenge oyo tokoki komemya bandeko na biso bandimi?

15 Paulo akomaki boye: “Kopamela mokóló makasi te. Nzokande, bondelá ye lokola tata, bilenge mibali lokola bandeko mibali, basi oyo bazali mikóló lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi elongo na bopɛto nyonso ya bizaleli. Pesá lokumu na basi bakufelá mibali oyo bazali mpenza basi bakufelá mibali.” (1 Tim. 5:1-3) Ya solo, Liloba ya Nzambe elendisi biso tópesa lokumu epai ya bato nyonso na kati ya lisangá ya boklisto. Kasi, ndenge nini osengeli kotalela ndeko moko oyo ozwani na ye matata? Yango ekopekisa yo okokisa mokumba na yo ya komemya ndeko na yo moklisto? To okobongola makanisi na yo mpe okoluka kotala bizaleli ya elimo ya mosaleli yango ya Nzambe? Mingimingi baoyo bazali na bokonzi basengeli komemyaka bandeko na bango​—basengeli ata mokolo moko te ‘komikómisa bakonzi epai ya etonga.’ (1 Pet. 5:3) Ya solo, na lisangá ya boklisto, oyo eyebani ete basangani na yango bamonisanaka bolingo, tozali na mabaku mingi ya kopesana lokumu.​—Tángá Yoane 13:34, 35.

16, 17. (a) Mpo na nini ezali na ntina tózala na limemya, kaka te epai ya baoyo tozali kosakwela, kasi mpe epai ya banguna na biso? (b) Ndenge nini tokoki ‘kokumisa bato ya ndenge nyonso’?

16 Nzokande, limemya na biso esengeli kosuka kaka te epai ya baoyo bazali na kati ya lisangá. Paulo akomelaki baklisto ya eleko na ye ete: “Wana tozali na ntango oyo ebongi mpo na yango, tiká tósala epai ya bato nyonso oyo ezali malamu.” (Gal. 6:10) Toboyi te, kosalela etinda yango epai ya moninga ya mosala to ya kelasi oyo asalaka biso makambo ya nko ekoki kozala mpasi. Na ntango yango, tosengeli kokanisa maloba oyo: “Omitungisa te mpo na bato ya masumu.” (Nz. 37:1) Kosalela toli yango ekosalisa biso tómemyaka ata banguna na biso. Ndenge moko mpe, na mosala ya kosakola, komikitisa ekoki kosalisa biso tólobaka na bato nyonso na “elimo ya boboto mpe na limemya makasi.” (1 Pet. 3:15) Ata molato na biso ekoki komonisa ete tozali komemya baoyo tozali komemela nsango malamu.

17 Ya solo, ezala epai ya bandeko na biso na kati ya lisangá to epai ya bato mosusu, tosengeli kosala makasi mpo na kolanda toli oyo: “Bókumisa bato ya ndenge nyonso, bólinga lisangá mobimba ya bandeko, bózala na bobangi ya Nzambe, bópesa mokonzi lokumu.”​—1 Pet. 2:17.

Okopesa eyano nini?

Ndenge nini okoki kopesa limemya oyo ebongi epai ya:

• Yehova?

• Bankulutu mpe bakɛngɛli-batamboli?

• Ndeko mokomoko na kati ya lisangá?

• Bato oyo toteyaka nsango malamu?

[Elilingi na lokasa 23]

Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki komemya litambwisi ya lisangani ya mikóló-bakambi

[Elilingi na lokasa 24]

Na mikili nyonso, bankulutu bapesaka bakɛngɛli-batamboli lokumu, mpamba te Lisangani ya Mikóló-Bakambi nde eponi bango

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto