Salelá Nzambe ‘na motema moko mpe na molimo moko’
BAYUDA mpe baprozelite bazingi bayekoli ya Yesu Klisto. Ezalaki na fɛti ya pantekote, mpe bapaya yango bayaki na Yelusaleme. Bautaki mosika mpenza, tii na wɛsti ya Loma mpe na ɛsti ya Palatia. Bazalaki koyoka minɔkɔ ndenge na ndenge. Nzokande, bayekoli ya Yesu oyo bazalaki koloba na bango bazalaki bato ya Galilai. Bapaya yango mosusu bakamwaki mpe batunaki boye: “Ndenge nini tozali koyoka, moto na moto na kati na biso, monɔkɔ na ye mpenza oyo tobotamá na yango?”—Mis. 2:8.
Ntoma Petelo atɛlɛmaki mpe ayebisaki bango ntina ya likamwisi wana oyo bazalaki komona. Mosika te, ebele ya bato wana bandimaki nsango malamu mpe mingi kati na bango bazwaki batisimo! (Mis. 2:41) Atako lisangá ekolaki noki, etikalaki kaka na bomoko. Luka, moko ya bakomi ya Biblia alobi ete: “Ebele ya bato oyo bandimaki bazalaki na motema kaka moko mpe na molimo kaka moko.”—Mis. 4:32.
Ebele ya bato oyo bazwaki batisimo na mokolo ya pantekote ya mobu 33 T.B. batikalaki mwa mikolo na Yelusaleme mpo bákolisa boyebi na bango na makambo ya Nzambe. Kasi, bayaki te na likanisi ya koumela na Yelusaleme. Na yango, bakɔngɔlaki mbongo. Bandimi mosusu bandimaki kotɛka biloko na bango mpe bamemaki mbongo epai ya bantoma mpo bákabolela baoyo bazalaki kozanga. (Mis. 2:42-47) Bamonisaki mpenza bolingo mpe bokabi.
Bolingo mpe kokaba ezali bizaleli ya baklisto ya solo. Lelo oyo, lisangá ya baklisto ezali kokoba kosalela Yehova na bomoko mpe na “motema kaka moko mpe na molimo kaka moko.” Baklisto basalelaka ntango, makasi mpe biloko na bango mpo na kosakola nsango malamu mpe kotombola matomba ya Bokonzi ya Nzambe.—Talá etanda “Ndenge bato mosusu bapesaka.”
[Etanda na lokasa 6]
NDENGE BATO MOSUSU BAPESAKA
MAKABO MPO NA MOSALA YA KOSAKOLA NA MOKILI MOBIMBA
Bato mingi babombaka mwa mbongo mpe batyaka yango na bakɛsi ya makabo oyo bakomá “Makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba.”
Sanza na sanza, masangá etindaka mbongo yango na biro ya Batatoli ya Yehova oyo etalelaka mosala na ekólo na bango. Moto akoki mpe kotinda mbala moko mbongo na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., Attention Treasurer’s Office, 25 Columbia Heights, Brooklyn, New York 11201-2483, to na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova oyo ekambaka mosala ya kosakola na ekólo oyo azali. Ba-chèque oyo batindi na adrɛsi oyo topesi awa esengeli kopesama na “Watchtower.” Moto akoki mpe kopesa babiju to biloko mosusu ya motuya. Akotinda yango nzela moko na mwa mokanda moko oyo ekoyebisa ete ezali likabo oyo apesi.
MAKABO OYO MAKOKI KOZONGISAMA
Moto akoki kotya mbongo na banki na nkombo ya Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania mpo basalela yango na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Kasi, soki asɛngi yango, bakozongisela ye yango. Mpo na koyeba ebongiseli yango malamu, tuná na Treasurer’s Office na adrɛsi oyo ezali likoló.
MAKABO OYO EBONGISAMI LIBOSO
Longola makabo ya mbongo oyo moto apesi mbala moko, ezali na lolenge mosusu ya kopesa mpo na kosunga mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Ekoki kozala:
Asiransi: Moto akoki kokoma nkombo ya Watch Tower mpo ezwa mbongo ya asiransi to ezwa mbongo na ye ya epaso.
Mosolo na banki: Na mikili mosusu, moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kobombisa mbongo ya epaso mpo na Watch Tower, to kotya yango na nkombo ya Watch Tower mpo Watch Tower esangola yango soki akufi.
Lotomo ya mosolo: Okoki kopesa na Watch Tower lotomo ya mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpo na libela, to kobatela lotomo ya kozwa mbongo yango ntango ozali naino na bomoi.
Lopango to ndako: Moto akoki kopesa likabo ya ndako to lopango oyo ekoki kotɛkama, soki ezali ndako oyo afandi, akobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Yambo ya kopesa biloko ya ndenge wana, esengeli koyebisa biro ya filiale na bino.
Makabo oyo ebotaka: Moto akoki kosɛnga ete bákoma nkombo ya Lisangani moko ya Batatoli ya Yehova, oyo ekoponama, oyo endimami na mibeko ya Leta, na kɔnti na ye na banki to na lotomo na ye ya mosolo. Moto yango to mpe moto mosusu oyo ye moko akopona akobanda kozwa mbongo oyo mosolo yango ekobanda kobota mbula na mbula na bomoi na ye mobimba. Na mbula oyo likabo ya ndenge wana epesami, Leta akokitisa mpako oyo moto oyo apesi yango asengelaki kofutaka mpo na bozwi na ye.
Mokanda ya kopesa libula: Moto akoki kopesa Watch Tower biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo endimami na mibeko, to akoki kopesa Watch Tower lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto asali mokanda mpo na kopesa lingomba lotomo ya kozwa biloko na ye ntango akokufa, Leta akoki kokitisa mpako oyo afutaka mpo na biloko yango.
Lokola ebengeli “Makabo oyo ebongisami liboso” emonisi yango, lolenge oyo ya makabo esɛngaka ete mopesi azwa bibongiseli. Mpo na kosalisa bato oyo balingi kopesa makabo oyo ebongisami liboso mpo na mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba, mwa buku moko esilá kobongisama oyo ekomami na Espagnol mpe na Lingelesi, oyo ezali na motó ya likambo ete Charitable Planning to Benefit Kingdom Service Worldwide. (Makabo oyo ebongisami liboso mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba). Mwa buku yango ekomami mpo na koyebisa bato lolenge ekeseni ya kopesa makabo na bango, ezala balingi kopesa yango sikoyo to balingi kotika lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na bango. Nsima ya kotánga mwa buku yango mpe kosolola na bapesi-toli na makambo ya mibeko mpe ya mpako, bato mingi basungaki mosala ya Batatoli ya Yehova na mokili mobimba mpe Leta akitiselaki bango mpako mpo na biloko na bango. Moto akoki kozwa mwa buku yango soki asɛngi yango mbala moko na Charitable Planning Office.
Mpo na koyeba makambo mosusu, tindá mokanda to bengá na telefone na adrɛsi oyo ezali na nse to na biro ya Batatoli ya Yehova na ekólo oyo ofandi.
Charitable Planning Office
Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
100 Watchtower Drive
Patterson, New York 12563-9204
Telefone: (845) 306-0707