Osepelaka ‘na libaku malamu ya kopesa na boboto’?
BAKRISTO ya liboso na lisangá ya Filipi bayebanaki mpo bazalaki kopesa biloko na bango mpo na kosimba losambo ya solo. Na mokanda oyo akomelaki bango litambwisi ya elimo ya Nzambe, ntoma Paulo alobaki boye: “Ntango nyonso natɔndaka Nzambe na ngai, mbala nyonso oyo nakanisaka bino na lilɔmbɔ na ngai nyonso mpo na bino nyonso, mpe nasalaka lilɔmbɔ na ngai na esengo, mpo bopesaki mabɔkɔ na nsango malamu banda mokolo ya liboso tii sikoyo.” (Flp. 1:3-5) Paulo abosanaki te ntango Lidia ná libota na ye bazwaki batisimo mpe ndenge mwasi yango atyaki ye Paulo ná baninga na ye ya mosala mbamba ete bándima kofanda na ndako na ye.—Mis. 16:14, 15.
Mwa moke na nsima, bandeko ya lisangá ya Filipi oyo eutaki kofungwama sika batindelaki Paulo biloko mbala mibale na boumeli ya bapɔsɔ mingi oyo alekisaki elongo na bandeko ya Tesaloniki, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ pene na 160. (Flp. 4:15, 16) Mwa bambula na nsima, atako bandeko ya Filipi mpe bandeko mosusu ya Masedonia bakutanaki na komekama moko makasi mpe bazalaki na ‘bobola makasi,’ bayokaki ete bakristo ya Yerusaleme oyo bazalaki konyokwama bazali na bosɛnga mpe balingaki kosalisa bango. Paulo alobaki ete basalaki yango “koleka ata makoki na bango mpenza.” Atako bongo, akomaki ete: “Bakobaki kobondela biso makasi mpenza ete bázwa libaku malamu ya kopesa biloko na boboto.”—2 Ko. 8:1-4; Rom. 15:26.
Mbula soki zomi nsima ya ntango oyo Bafilipi bakómaki bakristo, bazalaki kaka komonisa elimo ya bokabi. Ntango bayokaki ete Paulo azali na bolɔkɔ na Roma, batindaki Epafrodite oyo asalaki mobembo ya kilomɛtrɛ 1 287 na nzela ya mokili mpe ya mai mpo na komemela ntoma yango biloko. Emonani polele ete Bafilipi balingaki kosalisa Paulo mpo akoba kolendisa bandeko mpe kosakola, atako azalaki na bolɔkɔ.—Flp. 1:12-14; 2:25-30; 4:18.
Lelo oyo mpe, bakristo ya solo bamonaka ete kopesa lisalisi na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli ezali mpenza libaku malamu. (Mat. 28:19, 20) Basimbaka Bokonzi na ndenge bapesaka ntango, makasi, mpe mbongo na bango. Etanda oyo elandi emonisi ndenge oyo okoki kosala mpo na kosimba mosala yango oyo Nzambe apesá biso.
[Etanda na nkasa 22, 23]
NDENGE BATO MOSUSU BAPONAKA KOPESA
MAKABO MPO NA MOSALA YA BOKONZI NA MOKILI MOBIMBA
Bato mingi babongisaka mwa mbongo oyo batyaka na bakɛsi ya makabo oyo bakomá “Makabo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba.”
Sanza na sanza, masangá etindaka mbongo yango na babiro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya bamboka na bango. Moto akoki kotinda likabo na ye ya mbongo mbala moko na Association Sans But Lucratif “Les Témoins de Jéhovah,” 75, 13e Rue, Industriel, Limete-Kinshasa, République Démocratique du Congo, to na biro ya filiale oyo etalelaka mboka na bango. Ba-chèque oyo etindami na adrɛsi oyo totye awa esengeli kozala na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah.’” Moto akoki mpe kopesa babiju to biloko mosusu ya motuya. Esengeli kotinda yango nzela moko na mokanda oyo emonisi ete biloko yango ezali nde likabo.
KODEFISA MBONGO
Moto akoki kodefisa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mbongo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Nzokande, soki kaka asɛngi mbongo na ye, bakozongisela ye yango. Mpo na koyeba makambo mosusu, komelá “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” na adrɛsi oyo ezali likoló to bengá na 099 818 9791 to na 081 555 1000.
LOLENGE MOSUSU YA KOPESA MAKABO
Longola kopesa makabo ya mbongo, moto akoki kopesa makabo na ndenge mosusu mpo na litomba ya mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Na ndakisa:
Asiranse: Moto akoki kokoma nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mpo ezwa mbongo na ye ya asiranse to ya pasyo soki akufi.
Kofungola kɔnti na banki: Moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kofungola kɔnti na banki na mbongo na ye ya pasyo na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah,’” to kotya nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mpo ezwa mbongo yango soki akufi, na kolanda mibeko ya banki ya mboka oyo azali.
Lotomo ya kozwa mosolo: Okoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpenza to kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na yo.
Kopesa lopango to ndako: Moto akoki kopesa ndako to lopango na ye likabo, to soki ezali ndako oyo afandi, akobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Liboso ya kopesa biloko ya ndenge wana, esengeli koyebisa biro ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bino.
Kotya mbongo na banki oyo ekobimisa benefisi: Moto akoki kotya mbongo na banki to kopesa mikanda lokola ndanga na nkombo ya Lisangani moko oyo Batatoli ya Yehova basalelaka. Na nsima, moto yango to mpe moto mosusu oyo ye moko akopona akobanda kozwa benefisi oyo mbongo yango ekobanda kobimisa mbula na mbula. Mpo na yango, Leta akokitisela moto yango mpako oyo asengeli kofuta na mbula oyo apesi likabo yango.
Testama: Moto akoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo endimami na mibeko, to akoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto asali mokanda mpo na kopesa lingomba lotomo ya kozwa biloko na ye ntango akokufa, Leta akoki kokitisa mpako oyo afutaka mpo na biloko yango.
Maloba “lolenge mosusu ya kopesa makabo” emonisi ete moto oyo azali kopesa makabo ya ndenge wana asengeli kozwa bibongiseli mosusu.
Mpo na koyeba makambo mosusu, okoki kobenga to kokomela “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” na adrɛsi oyo ezali awa na nse, to okoki kokende na biro ya Batatoli na ekólo oyo ofandi.
Biro ya filiale
“Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” B.P. 634, 75, 13e Rue Limete-Kinshasa, République Démocratique du Congo.
Telefone: 099 818 9791 to 081 555 1000.