Tózala na botɔndi mpo na mbula
TOLINGAKI kosala nini soki mbula ezalaka te? Soki mbula ezali kobɛta mikolo nyonso, ekoki kobimisa makama mingi. Longola yango, bato oyo bafandaka na mikili ya malili, mpe na bisika oyo mbula ebɛtaka mpambampamba bakobanda kosepela te. (Ezela 10:9) Kasi, tokoloba boni mpo na bamilio ya bato oyo bafandaka na mikili ya molunge makasi mpe na bisika oyo mbula ebɛtaka mpenza te? Soki mbula ebandi kobɛta, bazalaka na esengo mingi!
Ezalaki bongo na mikili oyo Biblia elobeli, na ndakisa na Asie Mineure, esika ntoma Paulo asalaki mosala ya misionɛrɛ. Ntango azalaki kuna, Paulo ayebisaki bato ya Likaonia ya kala boye: “[Nzambe] amitikaki te kozanga litatoli na boye ete asalaki bolamu, kopesáká bino bambula uta na likoló mpe bileko ya kobota mbuma, kotondisáká mitema na bino mɛkɛ na biloko ya kolya mpe na nsai.” (Misala 14:17) Tomoni ete Paulo alobeli liboso mbula mpo soki yango ezali te, eloko moko te ekokola mpe “bileko ya kobota mbuma” ekozala te.
Biblia elobi makambo mingi na ntina na mbula. Maloba ya Liebele mpe ya Grɛki oyo elobeli mbula na kati ya Biblia ezali mbala koleka nkama. Okosepela koyeba makambo mosusu na ntina na mbula, likabo kitoko oyo Nzambe apesá biso? Okosepela mpe kolendisa kondima na yo na makambo ya siansi oyo Biblia elobelaka na bosikisiki?
Oyo Biblia elobi na ntina ya mbula
Yesu Klisto abendaki likebi ya bayoki na ye na eloko moko ya ntina oyo soki yango te, mbula ekobɛta te. Alobaki boye: ‘Tata na bino asalaka ete moi na ye ebima likoló ya bato mabe mpe bato malamu mpe asalaka ete mbula enɔka likoló ya bayengebene mpe bato bazangi boyengebene.’ (Matai 5:45) Omoni ete Yesu alobelaki moi liboso ya kolobela mbula? Yango ebongi mpenza mpo moi ekolisaka kaka milona te kasi, esalaka mpe mosala makasi na kobongwana ya mai. Ya solo, molunge ya moi nde ebendaka kilomɛtrɛ kibe soki 400 000 ya mai ya mbu mpe ematisaka yango na mapata mbula na mbula. Lokola Yehova Nzambe nde akelá moi, Biblia elobi ete ye nde abendaka mai mpo na kokómisa yango mbula.
Biblia elobeli kobongwana ya mai na maloba oyo: “Nzambe . . . abendi [matangá] ya mbula ekolongola londende na yango kino mbula oyo lola ekonɔkisa, oyo ekokwea likoló ya bato mingi.” (Yobo 36:26-28) Bankóto ya bambula esili koleka banda maloba wana oyo eyokani na siansi ekomamá, bato bazali kolekisa ntango mingi mpo na koluka koyeba ndenge mai ebongwanaka. Na 2003, buku moko (Water Science and Engineering) elobi ete “tii lelo oyo bato bayebi mpenza te nini esalemaka mpo mbula ebɛta.”
Bato ya siansi bayebi ete matangá ya mbula eutaka na biloko mikemike oyo ekómaka matangá mikemike ya mai na mapata. Litangá yango mokomoko ekolaka tii ekómaka litangá ya mbula. Ezali ebongiseli ya kokamwa oyo ezwaka bangonga ebele. Mokanda moko ya siansi (Hydrology in Practice) elobi boye: “Bato bazalaka na makanisi ndenge na ndenge mpo na kolimbola ndenge matangá ya mikemike ekómaka matangá ya mbula mpe bazali kokoba kosala bolukiluki.”
Ye oyo asalá ete mai ebongwanaka mpo mbula ebɛta atunaki mosali na ye Yobo mituna oyo: “Mbula ezali nde na tata? Nani abotaki matɔnɔ ya mamwɛ? Nani atye mayele kati na mapata? . . . Nani akotángaka mapata mpo na mayele? Nani akolalisa mbɛki-na-mai na lola?” (Yobo 38:28, 36, 37) Mbula soki 3 500 na nsima, bato ya siansi bazali koboma nzoto mpo na kozwa biyano na mituna wana.
Mai ya mbula ekendaka wapi?
Bankama ya bambula nsima ya kokomama ya mokanda ya Yobo, bato ya filozofi ya Grɛki bazalaki koteya ete mai ya bibale eutaka na mbula te kasi eutaka na mbu oyo ekitaka na nse ya mabelé mpe emataka likoló ya bangomba mpe ekómi liziba ya mai. Moto moko ya mayele na makambo ya Biblia alobaki ete Salomo andimaki likambo yango. Talá maloba ya Salomo: “Bibale nyonso ekotiyola kino mai-na-monana; kasi mai-na-monana ekotonda te. Na esika eutaki bibale, bikozongaka bobele wana lisusu.” (Mosakoli 1:7) Salomo alingaki mpenza koloba ete mai ya mbu emataka likoló ya bangomba mpo na kokóma liziba ya bibale? Mpo na koyanola na motuna wana, tótalela naino makanisi oyo bato ya ntango ya Salomo bazalaki na yango na likambo etali kobongwana ya mai. Bazalaki nde kondima makanisi wana?
Mbula soki nkama nsima ya Salomo, Eliya, mosakoli ya Nzambe amonisaki epai mbula eutaka. Na ntango ya Eliya, mbula ezalaki kobɛta te na boumeli ya mbula koleka misato. (Yakobo 5:17) Yehova Nzambe apesaki basaleli na ye etumbu wana mpo batikaki ye mpe balandaki Baala, nzambe ya Bakanana oyo abɛtisaka mbula. Kasi, Eliya asalisaki Bayisalaele bábongola motema, yango wana abondelaki mpo mbula ebɛta. Ntango azalaki kobondela, Eliya asɛngaki mosali na ye atala na ngámbo ya “mai-na-monana.” Ntango mosali na ye ayebisaki ye ete “lipata moke lokola tandu ya moto ezali kobima na mai,” Eliya ayebaki ete Nzambe andimi libondeli na ye. Eumelaki te, “lola eyaki moindo na mapata mpe na mopɛpɛ, mbula makasi enɔkaki.” (1 Mikonzi 18:43-45) Na ndenge yango, Eliya amonisaki ete ayebi ndenge mai ebongwanaka. Ayebaki ete mapata esalemaka likoló ya mbu, mpe mopɛpɛ ememaka yango na ɛsti, na Mokili ya Ndaka. Tii lelo oyo, makambo esalemaka bongo mpo mbula ebɛta na mokili yango.
Mbula soki nkama nsima ya libondeli oyo Eliya asalaki mpo mbula ebɛta, Amosa, mosali ya bilanga alobaki likambo moko ya ntina na oyo etali kobongwana ya mai. Nzambe aponaki Amosa mpo asakola bitumbu na ye epai ya Bayisalaele oyo bazalaki konyokola babola mpe kosambela banzambe ya lokuta. Mpo bákufa te, Amosa alendisaki bango ‘báluka Yehova mpo bábika.’ Na nsima, Amosa ayebisaki bango ete basengeli kosambela kaka Yehova mpo azali Mozalisi, “ye oyo abyangi mai-na-monana mpe asopi yango likoló ya mabelé.” (Amosa 5:6, 8) Na nsima Amosa alobelaki lisusu kobongwana ya mai. (Amosa 9:6) Na ndenge yango, Amosa amonisaki ete mbula eutaka nde na mbu.
Na 1687, moto moko ya siansi na nkombo Edmond Halley alobaki mpe ete likambo yango ezali solo. Nzokande, ezwaki ntango mingi mpo bato mosusu bándima makanisi na ye. Buku moko (Encyclopædia Britannica Online) elobi ete: “Tii na ebandeli ya ekeke ya 18, bato bazalaki kaka kondima ete mai ya mbu emataka na bangomba mpe ekitaka lokola mbula.” Lelo oyo, bato mingi bayebi epai mbula eutaka. Buku yango ebakisi boye: “Mai ya mbu emataka na mapata, na nsima esanganaka kuna, ekitaka na mabelé lokola mbula, mpe nsukansuka esopanaka na bibale mpe mai yango ezongaka na mbu.” Na yango, emonani polele ete ntango Salomo alobelaki kobongwana ya mai na Mosakoli 1:7, alingaki nde kolobela makambo oyo esalemaka mpo mbula ebɛta.
Osengeli kosala nini?
Lokola bakomi mingi ya Biblia balobi na bosikisiki mbongwana ya mai, yango ezali moko ya bilembeteli ya ntina ete Biblia ezali mokanda ya Yehova Nzambe, Mozalisi na biso. (2 Timote 3:16) Ya solo, ndenge oyo bato babebisi mabelé ekɔtisi mobulu na bileko, mpe ezali kosala ete makama minene ya mpela esalema na mikili mosusu mpe moi ezala makasi na mikili mosusu. Kasi, Yehova Nzambe, ye oyo abongisaki kobongwana ya mai alakaki banda kala ete akozwa makambo na mabɔkɔ mpe ‘akobebisa baoyo bazali kobebisa mabelé.’—Emoniseli 11:18.
Liboso ntango yango ekoka, ndenge nini okoki komonisa botɔndi mpo na makabo oyo Nzambe apesaka biso, na ndakisa mbula? Okomonisa botɔndi soki ozali koyekola Liloba na ye Biblia mpe kosalela makambo oyo ozali koyekola. Soki osali bongo, okozala na elikya ya kobika mpo na kokɔta na mokili ya sika epai okosepela na makabo nyonso ya Nzambe libela na libela. Ezali bongo mpo “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza” eutaka epai ya Yehova Nzambe, Mokeli ya mbula.—Yakobo 1:17.
[Etanda/Elilingi na lokasa 16, 17]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
KOSANGANA YA MAI NA MAPATA
MBULA
MAI OYO EBIMAKA NA NZETE KOMATA YA MAI
KOTIYOLA YA MAI
MAI NA NSE YA MABELÉ
[Bililingi na lokasa 16]
Ntango Eliya azalaki kobondela, mosali na ye atalaki na ngámbo ya “mai-na-monana”