Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/5 nk. 16-17
  • Na ntina ya “nsuka”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na ntina ya “nsuka”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nsuka ya nini?
  • Ndenge nini Yesu alobelaki nsuka?
  • Banani bakobomama?
  • Ntango nini ebongiseli ya makambo oyo ekosuka?
  • Osengeli kosala nini?
  • Bantoma batuni elembo
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Tozali na “mikolo ya nsuka”?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Nsuka ya mokili ekómi pene?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
  • “Nini ekozala elembo ya kozala na yo?”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/5 nk. 16-17

Yesu ateyi biso

Na ntina ya “nsuka”

Nsuka ya nini?

Bayekoli ya Yesu batunaki ye boye: “Nini ekozala elembo ya kozala na yo mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo?” (Matai 24:3) Ntango Yesu azalaki koyanola na motuna wana alobaki te ete mabelé ekobebisama. Liboso, alobaki na ntina na “ebongiseli ya makambo ya ntango oyo” mpe asalelaki maloba yango mpo na kolobela bibongiseli ya politiki, ya mombongo mpe ya mangomba oyo etambwisami na Satana. (Matai 13:22, 40, 49) Yango nde ebongiseli oyo Yesu azalaki kokanisa ntango alobaki ete “nsuka ekoya.”​—Matai 24:14.

Ndenge nini Yesu alobelaki nsuka?

Nsuka ya ebongiseli oyo mabe ezali “nsango malamu.” Yesu alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabelé mobimba oyo efandami mpo na litatoli na bikólo nyonso; mpe bongo nsuka ekoya.” Yesu alobelaki nsuka ya ebongiseli ya makambo oyo na maloba oyo: “Ekozala na bolɔzi moko monene oyo esalemá naino boye te banda na ebandeli ya mokili tii sikoyo, ɛɛ ekosalema lisusu mpe te. Kutu, soki mikolo yango eyeisamaki mokuse te, mosuni ata moko te elingaki kobika.”​—Matai 24:14, 21, 22.

Banani bakobomama?

Kaka baoyo balingaka Yehova ná Yesu te mpe basalelaka bango te nde bakobomama. Bato yango batosaka Nzambe te. Yesu alobaki ete: “Se ndenge mikolo ya Noa ezalaki, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo. Mpo se ndenge bazalaki na mikolo yango liboso ya mpela, . . . batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.” (Matai 24:36-39) Yesu alobaki ete bato mingi bazali na nzela oyo ezali komema na libebi. Nzokande, alobaki ete ezali na “nzela oyo ekangamakangamá [oyo] ememaka na bomoi.”​—Matai 7:13, 14.

Ntango nini ebongiseli ya makambo oyo ekosuka?

Ntango bayekoli batunaki ye elembo ya kozala na ye “mpe ya bosukisi ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo,” Yesu ayanolaki ete: “Ekólo ekotombokela ekólo mpe bokonzi ekotombokela bokonzi, mpe kozanga ya bilei ekozala mpe koningana ya mabelé ekozala . . . mpe lokola botyoli-mibeko ekobakisama mingi bolingo ya bato mingi ekokóma mpiɔ.” (Matai 24:3-12) Na yango, bansango nyonso ya mabe oyo tozali koyoka lelo ezali na likanisi moko ya kolendisa​—ezali komonisa ete mosika te Bokonzi ya Nzambe ekomemela bato ya botosi kimya. Yesu alobaki ete: “Ntango bokomona makambo wana ezali kobima, bóyeba ete bokonzi ya Nzambe ekómi pene.”​—Luka 21:31.

Osengeli kosala nini?

Yesu alobaki ete Nzambe “apesaki Mwana na ye mobotami-se-moko, mpo moto nyonso oyo azali komonisa kondima na kati na ye abomama te kasi azala na bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Mpo na komonisa ete ozali kondima Nzambe ná Mwana na ye, osengeli koyeba bango malamumalamu. Yango wana, Yesu alobaki ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.”​—Yoane 17:3.

Kotika te ete mitungisi mpe bampasi epekisa yo oyekola ndenge ya komonisa bolingo na yo mpo na Nzambe. Yesu alobaki boye: “Bókeba na bino moko ete mitema na bino ekóma kilo ata moke te na . . . mitungisi ya bomoi, mpe ete na pwasa mokolo wana ekwela bino na ntango wana kaka lokola motambo. Mpo [mokolo yango ekoya].” Soki olandi toli ya Yesu, ‘okolonga kokima makambo nyonso wana oyo esengeli kobima.’​—Luka 21:34-36.

Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 9, “Tozali na ‘mikolo ya nsuka’?,” na buku Biblia eteyaka mpenza nini?a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto