Oyebaki yango?
Mpo na nini tolobaka “amen” na nsuka ya libondeli?
Liloba “amen,” ezala na Lingala to na Grɛki, euti na liloba ya Liebele ʼa·menʹ. Liloba yango, oyo elobamaka mingimingi na nsuka ya libondeli, ntango bato bazali kolapa ndai, kopambola to kolakela mabe, elimbolaka “ezala bongo,” to “ɛɛ.” Ntango bato balobi yango, bamonisaka ete bandimi makambo oyo euti kolobama. Buku moko elobi ete “liloba yango elimbolaka: ezali bongo, ezali solo, ezali sembo, ntembe ezali te.” Na ntango ya kala, koloba “amen” ezalaki komonisa ete moto akɔti na ndai to na kondimana, mpe andimi nyonso oyo ekoya.—Deteronome 27:15-26.
Ntango Yesu azalaki kosakola, azalaki mbala mosusu kobanda na liloba “amen.” Na liloba yango, azalaki komonisa ete ebongi mpenza kotya motema na makambo oyo alingi koloba. Na mabaku yango, liloba ya Grɛki a·menʹ ekoki kobongolama na “ya solo” to “ya solosolo.” (Matai 5:18; 6:2, 5; Biblia Liloba lya Nzambe) Soki bazongeli yango mbala mibale, ndenge ezali na Evanzile ya Yoane, maloba wana ya Yesu ekoki kobongolama na “ya solosolo mpenza.” (Yoane 1:51) Balobaka ete na mikanda mosantu, kaka Yesu ye moko nde asalelá liloba yango na ndenge wana.
Na Makomami ya Grɛki ya boklisto, babengi Yesu “Amen” mpo na komonisa ete litatoli na ye ezali ya “sembo mpe ya solo.”—Emoniseli 3:14.
Ulimi mpe Tumimu ezalaki nini?
Emonani ete Bayisalaele bazalaki kosalela Ulimi mpe Tumimu mpo na koyeba mokano ya Yehova na makambo ya ekólo mpe ya bakambi na bango. Nganga-nzambe monene nde azalaki kosimba biloko yango mpe azalaki kotya yango na “libenga ya ntolo mpo na kosambisa” oyo azalaki kolata na ntolo na ye. (Exode 28:15, 16, 30, NW) Atako Makomami eyebisi mpenza te ndenge biloko yango ezalaki to ndenge bazalaki kosalela yango, bavɛrsɛ mosusu ya Biblia emonisi ete bazalaki kosalela yango lokola mbɛsɛ, mpe yango ezalaki komonisa soki Nzambe andimi, aboyi to apesi eyano te.
Ndakisa moko ezali ntango Davidi asɛngaki Abiatala ayela ye eloko moko oyo ekokaki kozala efode ya nganga-nzambe monene, oyo ezalaki na Ulimi ná Tumimu. Davidi atunaki Yehova mituna mibale oyo: ‘Saulo akolanda ngai?’ mpe ‘Bato ya Kila bakokaba ngai na lobɔkɔ na ye?’ Na mituna yango nyonso mibale, Yehova ayanolaki “Ɛɛ,” mpe yango esalisaki Davidi azwa ekateli ya malamu.—1 Samwele 23:6-12.
Mwa moke liboso, Mokonzi Saulo asalelaki mpe Ulimi ná Tumimu, mpo na koyeba soki mabe ezali epai ya Bayisalaele to epai na ye moko ná mwana na ye, mpe soki nani asalaki mabe kati na ye ná mwana na ye. (1 Samwele 14:40-42) Na nsima, ntango Nzambe azalaki kosepela na Saulo lisusu te, azalaki lisusu kotambwisa ye te, ezala “na ndɔtɔ te, to na Ulimi te, to na basakoli te.”—1 Samwele 28:6.
Masolo ya Bayuda emonisi ete batikaki kosalela Ulimi ná Tumimu ntango babebisaki tempelo ya Yehova na mobu 607 liboso ya ntango na biso.
[Elilingi na lokasa 27]
“Amen,” Emoniseli 3:14. Codex Alexandrinus, ekeke ya mitano ya ntango na biso.