Tózala na molende mpo na Ndako ya Yehova!
“Molende mpo na ndako na yo ekolya ngai.”—YOA. 2:17.
1, 2. Na tempelo na mobu 30 T.B., Yesu asalaki nini, mpe mpo na nini?
KANISÁ ndenge makambo elekaki mokolo yango. Ezalaki na ntango ya fɛti ya Elekeli, na mobu 30 T.B. Sanza motoba liboso, Yesu abandaki mosala na ye awa na mabelé. Sikoyo ye wana azali kokende na Yelusaleme. Ntango akómaki kuna na tempelo, na Lopango ya Bapakano, akutaki “baoyo bazalaki kotɛkisa bangɔmbɛ mpe bampate mpe bibenga mpe bato oyo basenzaka mbongo bafandi na bakiti na bango.” Asimbaki fimbo oyo esalemaki na bansinga mpe abenganaki banyama nyonso, mpe na ntembe te, batɛkisi balandaki banyama yango. Yesu abwakaki mpe mbongo ya bibende ya bato oyo bazalaki kosanze mbongo, mpe abalolaki bamesa na bango. Asɛngaki bato oyo bazalaki kotɛka bibenga bázwa biloko na bango mpe bákende.—Yoa. 2:13-16.
2 Makambo wana oyo Yesu asalaki emonisaki ete tempelo ezali na ntina mingi mpo na ye. Alobaki ete: “Bótika kokómisa ndako ya Tata na ngai ndako ya mombongo!” Ntango bayekoli ya Yesu bamonaki makambo wana, bamikundolaki makambo oyo mokomi ya nzembo Davidi akomaki bikeke mingi liboso ete: “Molende mpo na ndako na yo ekolya ngai.”—Yoa. 2:16, 17; Nz. 69:9.
3. (a) Molende ezali nini? (b) Motuna nini tosengeli komituna?
3 Komibanzabanza to molende oyo Yesu azalaki na yango mpo na ndako ya Nzambe nde etindaki ye asala bongo. Molende ezali “mposa makasi ya kokoba kosala likambo moko.” Na ekeke oyo ya 21, baklisto koleka milio nsambo bazali komonisa molende mpo na ndako ya Nzambe. Mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘Ndenge nini nakoki kobakisa molende na ngai mpo na ndako ya Yehova?’ Mpo na kosalisa biso tóyanola na motuna yango, tótala naino soki ndako ya Nzambe ezali nini lelo oyo. Na nsima, tokotalela bandakisa ya bato ya sembo oyo balobelami na Biblia, oyo bamonisaki molende mpo na ndako yango. Bandakisa na bango ekomamaki “mpo na kolakisa biso” mpe ekoki kotinda biso tózala na molende koleka.—Lom. 15:4.
Ndako ya Nzambe—Na ntango ya kala mpe lelo
4. Tempelo oyo Salomo atongaki ezalaki kokokisa mokano nini?
4 Na Yisalaele ya kala, ndako ya Nzambe ezalaki tempelo ya Yelusaleme. Ya solo, Yehova azalaki kofanda wana mpenzampenza te. Alobaki ete: “Lola ezali kiti na ngai mpe mokili ezali etyelo ya makolo na ngai. Wapi ndako elingi bino kotongela ngai yango? Wapi esika ya efandelo na ngai?” (Yis. 66:1) Atako bongo, tempelo oyo etongamaki na boyangeli ya Salomo ezalaki esika ya libosoliboso mpo na losambo ya Yehova, epai bato bazalaki kobondela.—1 Mik. 8:27-30.
5. Losambo oyo ezalaki kosalema na tempelo ya Salomo ezalaki elilingi ya ebongiseli nini lelo oyo?
5 Lelo oyo, ndako ya Yehova ezali te ndako moko boye na Yelusaleme to na esika mosusu. Ezali nde ebongiseli oyo ezali kosalisa biso tópusana penepene na ye na losambo na lisalisi ya mbeka ya Klisto. Basaleli nyonso ya Nzambe ya sembo awa na mabelé bazali kosambela Yehova na bomoko na tempelo yango ya elimo.—Yis. 60:4, 8, 13; Mis. 17:24; Ebe. 8:5; 9:24.
6. Bakonzi nini ya Yuda bamonisaki molende makasi mpo na losambo ya solo?
6 Nsima ya kokabolama ya Yisalaele na bikonzi mibale na 997 L.T.B., kati na bakonzi 19 oyo bayangelaki Yuda, eteni ya sudi, bakonzi minei bamonisaki molende makasi mpo na losambo ya solo. Bakonzi yango ezalaki Asa, Yehosafata, Hizikiya mpe Yosiya. Mateya nini ya ntina tokoki kozwa na bandakisa na bango?
Kosala na motema mobimba ememaka mapamboli
7, 8. (a) Yehova apambolaka mosala ya ndenge nini? (b) Likebisi nini tokoki kozwa na ndakisa ya Mokonzi Asa?
7 Na boyangeli ya Mokonzi Asa, Yehova atindaki basakoli mpo básalisa bato ya ekólo na Ye bázala na etamboli ya sembo. Na ndakisa, Biblia eyebisi biso ete Asa ayokaki mosakoli Azalia, mwana ya Odede. (Tángá 2 Ntango 15:1-8.) Mbongwana oyo Asa akɔtisaki na makambo ya losambo esangisaki bato ya Yuda mpe ebele ya bato mosusu ya bokonzi ya Yisalaele oyo bayaki koyangana na liyangani moko ya monene na Yelusaleme. Bango nyonso bamonisaki ekateli na bango ya kosambela Yehova na bosembo. Totángi boye: “Bakataki ndai makasi epai ya [Yehova] na mongongo monene mpe na koganga mpe na kelelo mpe na mindule. Yuda mobimba basepelaki mpo na ndai, zambi bakati yango na mitema na bango nyonso mpe baluki ye na mposa na bango mobimba mpe ye azwanaki na bango. [Yehova] mpe apesaki bango kimya na bipai bizingeli bango.” (2 Nta. 15:9-15) Tokoki mpenza kozala na elikya ete Yehova akopambola mpe biso soki tozali kosalela ye na motema mobimba.—Mko. 12:30.
8 Likambo ya mawa, na nsima Asa asilikaki ntango momoni-ya-makambo Hanani asembolaki ye. (2 Nta. 16:7-10) Tosalaka ndenge nini ntango Yehova apesi biso toli to malako na nzela ya bankulutu ya lisangá? Tondimaka mpe tosalelaka mbala moko toli na bango oyo euti na Biblia mpe toboyaka kokwea na motambo ya kosilika?
9. Yehosafata ná Yuda mobimba bazalaki liboso ya mokakatano nini, mpe basalaki nini?
9 Yehosafata azalaki mokonzi ya Yuda na ekeke ya zomi L.T.B. Basoda ya Amona, ya Moaba mpe bato oyo bazalaki na bangomba ya Seili basanganaki mpo na kobundisa ye mpe Yuda mobimba. Atako mokonzi yango abangaki, asalaki nini? Ye ná bato na ye, elongo na basi mpe bana na bango, bayanganaki na ndako ya Yehova mpo na kobondela. (Tángá 2 Ntango 20:3-6.) Na boyokani ya maloba oyo Salomo alobaki kala ntango basalaki molulu ya kofungola tempelo, Yehosafata abondelaki Yehova ete: “Ee Nzambe na biso, yo okopesa bango etumbu te? Zambi tozali na nguya liboso ya ebele monene te oyo ezali koyela biso. Toyebi likambo ya kosala te nde miso na miso na biso ezali epai na yo.” (2 Nta. 20:12, 13) Ntango Yehosafata asilisaki kobondela, kuna na “kati ya koyangana,” elimo ya Yehova etindaki Yahaziele, oyo azalaki Molevi, aloba maloba ya kobɔndisa oyo epesaki bato mpiko.—Tángá 2 Ntango 20:14-17.
10. (a) Ndenge nini Yehosafata mpe Yuda mobimba bazwaki malako? (b) Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na malako oyo Yehova apesaka biso lelo?
10 Ya solo, na ntango wana, Yehosafata mpe bokonzi ya Yuda bazwaki malako ya Yehova na nzela ya Yahaziele. Lelo oyo, tozwaka libɔndisi mpe malako na nzela ya moombo ya sembo mpe ya mayele. Tosengeli kosala ntango nyonso na bomoko mpe kotosa bankulutu, oyo bazali kosala makasi mpo na kobatela biso mpe kosalisa biso tótosa malako ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.”—Mat. 24:45; 1 Tes. 5:12, 13.
11, 12. Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki Yehosafata ná bato ya Yuda?
11 Ndenge kaka Yehosafata ná bato na ye bayanganaki mpo na koluka litambwisi ya Yehova, biso mpe tótika te koyanganaka na makita ya lisangá na bandeko na biso. Soki ntango mosusu tokutani na mikakatano mpe toyebi te nini tokoki kosala, tólanda ndakisa ya Yehosafata mpe bato ya Yuda, tóbondela Yehova mpe tótyela ye motema mobimba. (Mas. 3:5, 6; Filp. 4:6, 7) Ata soki tozali biso moko, malɔmbɔ na biso epai ya Yehova ekosangisa biso na “lisangá mobimba ya bandeko na [biso] na kati ya mokili.”—1 Pet. 5:9.
12 Yehosafata ná bato na ye balandaki malako oyo Nzambe apesaki na nzela ya Yahaziele. Esukaki ndenge nini? Balongaki etumba mpe bazongaki na Yelusaleme “na esengo” mpe “na nzɛnzɛ minene mpe na nzɛnzɛ mike mpe na mindule epai ya ndako ya [Yehova].” (2 Nta. 20:27, 28) Biso mpe totosaka malako oyo Yehova apesaka na nzela ya moombo ya sembo mpe tosanganaka mpo na kosanzola Yehova.
Tóbatelaka malamu bisika na biso ya mayangani
13. Mosala nini Hizikiya asɛngaki básala ntango abandaki koyangela?
13 Na sanza ya liboso ya boyangeli na ye, Hizikiya amonisaki molende mpo na losambo ya Yehova na ndenge afungolaki lisusu tempelo mpe abongisaki yango. Abongisaki banganga-nzambe mpe Balevi mpo bápɛtola ndako ya Nzambe. Basalaki yango mikolo 16. (Tángá 2 Ntango 29:16-18.) Molende wana ezali kokundwela biso mosala oyo esalemaka mpo na kobongisa mpe kobatela bisika na biso ya mayangani na lolenge oyo ekomonisa molende na biso mpo na losambo ya Yehova. Oyoká naino te masolo ete bato bakamwaki ntango bamonaki molende ya bandeko oyo basalaka mosala ya ndenge yango? Ya solo, milende na bango ekumisaka Yehova mingi.
14, 15. Mosala nini ezali kokumisa mpenza Yehova lelo oyo? Pesá bandakisa.
14 Na engumba moko na nɔrdi ya Angleterre, mobali moko azalaki koboya bandeko básala misala ya kobongisa Ndako ya Bokonzi oyo ekanganaki na lopango na ye. Bandeko yango basalaki makambo na boboto. Ntango bamonaki ete esengeli kobongisa efelo oyo ekabolaki Ndako ya Bokonzi ná lopango ya moto yango, basɛngaki ye básala yango ofele. Basalaki mosala makasi, kutu, babandelaki kotonga eteni monene ya efelo yango. Makambo nyonso oyo bandeko basalaki etindaki mobali yango abongola makanisi na ye. Lelo, asalisaka na kokɛngɛla Ndako ya Bokonzi.
15 Basaleli ya Yehova bazali kosala mosala ya kotonga na mokili mobimba. Bandeko ya masangá basanganaka na bandeko oyo bauti na mikili ndenge na ndenge mpo na kotonga Bandako ya Bokonzi, Bandako ya Mayangani mpe Babetele. Ndeko Sam ayebi mosala ya kotya ba-climatiseur mpe biloko oyo epesaka malili mpe mɔtɔ na bandako. Ye ná mwasi na ye Ruth basalá mibembo na mikili mingi ya Mpoto mpe ya Afrika mpo na kopesa mabɔkɔ na mosala ya kotonga. Esika nyonso oyo bakendaka, basakolaka elongo na bandeko ya masangá yango. Sam ayebisi eloko oyo etindaki ye akɔta na mosala yango; alobi boye: “Ezali bilendiseli ya bandeko ya Babetele ya mikili ndenge na ndenge. Komona molende mpe esengo na bango etindaki ngai mpe napona kosala mosala oyo.”
Tótosaka malako ya Nzambe
16, 17. Mosala nini monene basaleli ya Nzambe basalaki na molende, mpe ebimisaki mbuma nini?
16 Longola kobongisa tempelo, Hizikiya azongisaki lisusu fɛti ya Elekeli oyo ezalaki kosalema mbula na mbula ndenge Yehova asɛngaki. (Tángá 2 Ntango 30:1, 4, 5.) Hizikiya ná bafandi ya Yelusaleme babengaki ekólo mobimba—ata mpe bato oyo bazalaki kofanda na bokonzi ya nɔrdi—báya na fɛti yango. Bato oyo bamemaka nsango bamemaki mikanda na mboka mobimba mpo na kobenga bato.—2 Nta. 30:6-9.
17 Na bambula oyo euti koleka, biso mpe tosalaki milende ya ndenge wana. Tosalelaki nkasa kitoko ya libyangi mpo na kobenga bato ya teritware na biso báya kosangana na biso na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo, mpo na kotosa etinda ya Yesu. (Luka 22:19, 20) Tozwaki malako na Likita ya Mosala mpe tosalaki mosala yango na molende. Mpe Yehova apambolaki milende yango mpenza! Na mbula oyo eleki, basakoli soki milio nsambo bakabolaki nkasa yango, mpe bato 17 790 631 bayaki na Ekaniseli!
18. Mpo na nini kozala na molende mpo na losambo ya solo ezali na ntina mingi mpo na yo?
18 Biblia elobi mpo na Hizikiya ete: “Andimaki [Yehova], Nzambe ya Yisalaele. Kati na mikonzi nyonso ya Yuda, mosusu azalaki lokola ye te, nsima na ye to liboso na ye. Zambi [akangamaki na Yehova, NW] mpe alongwaki na nsima na ye te kasi atosaki mibeko na ye oyo [Yehova] alakisaki Moize.” (2 Mik. 18:5, 6) Biso mpe tólanda ndakisa na ye. Molende na biso mpo na ndako ya Nzambe ekosalisa biso ‘tókangama na Yehova’ na elikya ya kozwa bomoi ya seko.—Det. 30:16.
Tótosaka nokinoki malako ya Yehova
19. Milende nini esalemaka na ntango ya Ekaniseli?
19 Ntango Yosiya azalaki mokonzi, ye mpe azwaki bibongiseli ya malamu mpo fɛti ya Elekeli esalema. (2 Mik. 23:21-23; 2 Nta. 35:1-19) Biso mpe tomibongisaka malamu mpo na mayangani ya etúká, mayangani ya zongazonga, mayangani ya mokolo moko, mpe mpo na Ekaniseli. Bandeko ya mikili mosusu batyaka kutu bomoi na bango na likama mpo báyangana na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Bankulutu ya molende basalaka makasi ete bábosana ata ndeko moko te. Basalisaka mpe bandeko oyo bakómi mibange mpe baoyo bazali bibɔsɔnɔ mpo bango mpe bázala na molulu yango.
20. (a) Likambo nini esalemaki ntango Mokonzi Yosiya azalaki koyangela, mpe asalaki nini? (b) Liteya nini tosengeli kobosana te?
20 Ntango bazalaki kosala mosala ya kobongisa tempelo ndenge Mokonzi Yosiya atindaki, nganga-nzambe monene Hilikiya “amonaki mokanda ya Mobeko ya [Yehova], mopesamelaki na nzela ya Moize.” Apesaki yango Safana, oyo azalaki mokomeli ya mokonzi, mpe ye abandaki kotángela yango Yosiya. (Tángá 2 Ntango 34:14-18.) Likambo nini esalemaki? Na mbala moko, mokonzi apasolaki bilamba na ye mpo na mawa mpe atindaki bato bákende kotuna Yehova. Na nzela ya mosakoli-mwasi Huluda, Nzambe amonisaki ete azalaki kosepela te na makambo mosusu oyo bato ya Yuda bazalaki kosala na losambo. Kasi, amonaki milende oyo Yosiya asalaki mpo na kolongola losambo ya bikeko, mpe akobaki kondima ye atako alakaki ete mpasi ekokwela ekólo mobimba. (2 Nta. 34:19-28) Likambo yango ekoki koteya biso nini? Na ntembe te, biso mpe tolingi kosala lokola Yosiya. Tosengeli kotosaka nokinoki malako ya Yehova, tosengeli kobosanaka te likambo oyo ekoki kokómela biso soki totiki ete lipɛngwi to kozanga bosembo ekɔta na losambo na biso. Mpe tokoki kozala na elikya ete Yehova akomona milende na biso mpo na losambo ya solo, kaka ndenge amonaki oyo ya Yosiya.
21, 22. (a) Mpo na nini tosengeli kozala na molende mpo na ndako ya Yehova? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo elandi?
21 Bakonzi yango minei ya Yuda—Asa, Yehosafata, Hizikiya, mpe Yosiya—batikeli biso bandakisa ya malamu na oyo etali kozala na molende mpo na ndako ya Nzambe mpe losambo na ye. Ndenge moko mpe, molende na biso esengeli kotinda biso tótyela Yehova motema mpe tómipesa na losambo na ye. Kotosa malako ya Nzambe mpe kondima toli ya bolingo mpe disipilini oyo tozwaka na nzela ya lisangá mpe ya bankulutu, ezali mpenza likambo ya bwanya mpe epesaka esengo.
22 Lisolo oyo elandi ekobenda likebi na biso na molende oyo tosengeli kozala na yango na mosala ya kosakola mpe ekolendisa bilenge básalela Tata na biso ya bolingo na molende. Tokomona mpe ndenge oyo tokoki kokima moko ya mitambo ya Satana oyo eleki mabe. Soki tozali kotosa na molende malako nyonso ya Yehova, tokolanda ndakisa ya Mwana na ye, Yesu, oyo Biblia elobi mpo na ye ete: “[Molende, NW] mpo na ndako na yo elei ngai.”—Nz. 69:9; 119:111, 129; 1 Pet. 2:21.
Ozali koyeba lisusu?
• Yehova apambolaka mosala ya ndenge nini, mpe mpo na nini?
• Ndenge nini tokoki komonisa ete totyelaka Yehova motema?
• Ndenge nini molende ekoki kotinda biso tótosa malako ya Nzambe?
[Bililingi na lokasa 9]
Ndenge nini Asa, Yehosafata, Hizikiya, mpe Yosiya bamonisaki molende mpo na ndako ya Yehova?