Tózala “na molende mpo na misala ya malamu”!
“[Yesu] amipesaki mpo na biso mpo akoka kosikola biso na botyoli-mibeko ya ndenge nyonso mpe kopɛtola mpo na ye moko ekólo moko ya bato, oyo bazali na molende mpo na misala ya malamu.”—TITO 2:14.
1. Likambo nini esalemaki na tempelo ntango Yesu akómaki wana na mokolo ya 10 Nisana 33 T.B.?
TOZALI na mokolo ya 10 Nisana 33 T.B., mwa mikolo moke liboso fɛti ya Elekeli ebanda. Ebele ya bato oyo bazali na tempelo ya Yelusaleme bazali kozela fɛti yango na motema likoló. Likambo nini esalemaki ntango Yesu akómaki wana? Bakomi misato ya Evanzile: Matai, Malako mpe Luka, bamonisi ete mpo na mbala ya mibale, Yesu abengani bato oyo bazali kotɛka mpe kosomba biloko na tempelo. Abaloli bamesa ya bato oyo bazali kosanze mbongo mpe bakiti ya baoyo bazali kotɛka bibenga. (Mat. 21:12; Mko. 11:15; Luka 19:45) Molende ya Yesu ekitaki te atako asalaki likambo wana esilaki koleka mbula misato.—Yoa. 2:13-17.
2, 3. Ndenge nini toyebi ete molende ya Yesu esukaki kaka na kopɛtola tempelo te?
2 Matai amonisi ete molende ya Yesu mpo na mbala wana esukaki kaka na kopɛtola tempelo te. Abikisaki mpe bato bakufá miso mpe batɛngumi oyo bayaki epai na ye kuna. (Mat. 21:14) Luka alobeli misala mosusu oyo Yesu asalaki. “[Yesu] azalaki koteya mokolo na mokolo na kati ya tempelo.” (Luka 19:47; 20:1) Na yango, molende ya Yesu emonanaki polele na mosala oyo azalaki kosala.
3 Na nsima, ntoma Paulo akomelaki Tito mpe alobaki ete Yesu “amipesaki mpo na biso mpo akoka kosikola biso na botyoli-mibeko ya ndenge nyonso mpe kopɛtola mpo na ye moko ekólo moko ya bato, oyo bazali na molende mpo na misala ya malamu.” (Tito 2:14) Ndenge nini biso lelo tokoki kozala “na molende mpo na misala ya malamu”? Mpe ndenge nini bandakisa ya bakonzi malamu ya Yuda ekoki kolendisa biso?
Molende mpo na kosakola mpe koteya
4, 5. Ndenge nini bakonzi minei ya Yuda bamonisaki molende mpo na misala ya malamu?
4 Asa, Yehosafata, Hizikiya mpe Yosiya, bango nyonso basalaki mosala ya kolongola losambo ya bikeko na Yuda. Asa “alongolaki bitumbelo ya bapaya mpe bisika ya likoló, abukaki bikeko ya Asela.” (2 Nta. 14:3) Lokola Yehosafata azalaki na molende makasi mpo na losambo ya Yehova, “alongolaki bisika ya likoló mpe bikeko ya Asela kati na Yuda.”—2 Nta. 17:6; 19:3.a
5 Nsima ya fɛti ya Elekeli ya mikolo nsambo oyo Hizikiya abongisaki na Yelusaleme, “Bayisalaele nyonso baoyo bazalaki wana babimaki kino mboka na Yuda mpe babukaki makonzí mpe bakataki bikeko ya Asela mpe bakweisaki bisika ya likoló mpe bitumbelo ya Yuda mobimba mpe ya Benyamina mpe na Efelaima mpe na Manase kino basili kobebisa yango nyonso.” (2 Nta. 31:1) Yosiya akómaki mokonzi ntango azalaki na mbula mwambe mpamba. Biblia elobi boye: “Na [mbula] ya mwambe ya bokonzi na ye, naino azalaki elenge, abandaki koluka Nzambe ya Davidi, tata na ye. Mpe na [mbula] ya zomi na mibale abandaki kopɛtola Yuda mpe Yelusaleme, kolongola bisika ya likoló mpe bikeko ya Asela mpe bikeko bikatami mpe bikeko binangolami.” (2 Nta. 34:3) Na yango, bakonzi wana nyonso minei bazalaki na molende mpo na misala ya malamu.
6. Mpo na nini mosala na biso ekokani na oyo bakonzi ya sembo ya Yuda basalaki?
6 Biso mpe lelo tozali kosala mosala ya kosalisa bato bátika kolanda mateya ya mangomba ya lokuta ná losambo ya bikeko. Mosala ya kosakola ndako na ndako esalisaka biso tókutana na bato ya lolenge nyonso. (1 Tim. 2:4) Elenge mwasi moko ya Azia abosanaka te ndenge mama na ye azalaki kosala milulu liboso ya ebele ya bikeko na ndako na bango. Lokola elenge yango azalaki komona ete bikeko yango nyonso ekokaki kozala Nzambe ya solo te, azalaki kobondela mbala mingi mpo ayeba Nzambe ya solo. Ntango babɛtaki na porte mpe akendaki kofungola, amonaki Batatoli mibale oyo bamibongisaki mpo na kosalisa ye ayeba nkombo ya Nzambe ya solo, Yehova. Azalaki mpenza na esengo ya koyeba solo na ntina na bikeko! Lelo oyo, azali na molende mpenza na mosala ya kosakola mpe azali kosalisa basusu báyeba Yehova mpe mokano na ye.—Nz. 83:18; 115:4-8; 1 Yoa. 5:21.
7. Tokoki kosala nini mpo tómekola bato oyo bakendaki koteya na ekólo mobimba na mikolo ya Yehosafata?
7 Ntango tobimaka na mosala ya kosakola ndako na ndako, tosilisaka mpenza teritware oyo bapesi biso? Na mbula ya misato ya boyangeli na ye, Yehosafata atindaki bankumu mitano, Balevi libwa mpe banganga-nzambe mibale. Atindaki bango bákende koteya mibeko ya Yehova epai ya bato ya bingumba nyonso. Basalaki mosala yango malamu mingi, yango wana bato ya bikólo oyo ezalaki pembenipembeni babandaki mpe kobanga Yehova. (Tángá 2 Ntango 17:9, 10.) Soki biso mpe tozali kokende kotala bato na bangonga mpe mikolo ekeseni, tokoki kosolola na bato mingi ya libota moko.
8. Ndenge nini tokoki kokolisa mosala na biso ya kopesa litatoli?
8 Basaleli mingi ya Nzambe ya ntango na biso bandimá kotika bandako na bango mpo na kokende kosakola epai mposa ya basakoli ya molende ezali makasi. Yo mpe okoki kosala bongo? Basusu kati na biso oyo bakoki kokende kosala epai mosusu te, bakoki komeka kosakwela bato oyo bafandi na mboka na bango kasi balobaka monɔkɔ mosusu. Lokola Ron, oyo azali na mbula 81, azalaki kokutana na bato ya bikólo ndenge na ndenge na teritware na ye, ayekolaki kopesa mbote na minɔkɔ 32! Kala mingi te, na balabala, akutanaki na mwasi moko ná mobali na ye oyo bautaki na Afrika mpe apesaki bango mbote na Yoruba, monɔkɔ ya mboka na bango. Batunaki Ron soki akómá na Afrika. Ntango alobaki ete te, batunaki ye ndenge nini ayebi monɔkɔ na bango. Yango esalisaki ye apesa bango litatoli oyo ebongi. Bandimaki bazulunalo mpe bapesaki ye adrɛsi na bango, mpe ye atindaki yango na lisangá oyo ezali esika babalani yango bazalaki kofanda mpo bandeko ya kuna báyekola na bango Biblia.
9. Mpo na nini kotángela bato Biblia na mosala ya kosakola ezali na ntina? Pesá ndakisa.
9 Bateyi oyo Yehosafata atindaki na ekólo mobimba bazalaki na “buku ya mobeko ya [Yehova].” Na mokili mobimba, tozali kosala makasi mpo na koteya bato makambo oyo euti na Biblia, mpo ezali Liloba ya Nzambe. Tomonisaka ete Biblia ezali na ntina mingi na ndenge tosalaka milende ya kotánga yango na mosala ya kosakola, mpo bato bámona maloba ya Biblia bango moko. Mokolo moko, mwasi moko ayebisaki Linda, Motatoli moko, ete mobali na ye azalaki kobɛla maladi moko makasi ya bɔɔngɔ mpe asengelaki kokipe ye. Mwasi yango amilelaki boye: “Nayebi te soki nasali nini mpo Nzambe atika likambo ya boye ekómela ngai.” Linda alobaki ete: “Nakoki koyebisa yo likambo moko ya solo?” Na nsima, atángelaki ye maloba oyo ezali na Yakobo 1:13 mpe abakisaki ete: “Bampasi nyonso oyo biso mpe bato oyo tolingaka tozali kokutana na yango, ezali etumbu ya Nzambe te.” Ntango mwasi yango ayokaki bongo, ayambaki Linda na esengo. Linda alobi boye: “Nabɔndisaki mwasi wana mpo nasalelaki Biblia. Ntango mosusu bavɛrsɛ oyo totángelaka bato na Biblia ezalaka oyo bayoká naino te.” Lisolo wana epesaki nzela mpo boyekoli ya Biblia ebanda kosalema pɔsɔ na pɔsɔ na mwasi yango.
Bilenge oyo bazali kosala na molende
10. Na ndenge nini Yosiya azali ndakisa malamu mpo na bilenge baklisto lelo oyo?
10 Soki tozongi na ndakisa ya Yosiya, tokomona ete alandaki losambo ya solo na bolenge mpe azalaki na mbula soki 20 ntango abandaki kosala mosala monene ya kolongola losambo ya bikeko. (Tángá 2 Ntango 34:1-3.) Bilenge mingi lelo oyo bazali komonisa molende ya ndenge wana na mosala ya Bokonzi.
11-13. Mateya nini tokoki kozwa epai ya bilenge oyo bazali kosalela Yehova na molende na mikolo na biso?
11 Hannah, oyo afandaka na Angleterre, azalaki na mbula 13 mpe azalaki koyekola monɔkɔ ya Lifalanse na eteyelo ntango ayokaki ete etuluku moko ya Lifalanse efungwami mosika te na engumba na bango. Tata na ye andimaki kokendaka na ye na makita oyo ezalaki kosalema kuna. Lelo oyo Hannah akómi na mbula 18, azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpe apesaka litatoli na molende na Lifalanse. Yo mpe okoki koyekola monɔkɔ moko ya bapaya mpo osalisa basusu báyeba Yehova?
12 Rachel asepelaki mingi ntango atalaki video oyo ezali na motó ya likambo ete Bólanda mikano oyo ekumisaka Nzambe (na Lifalanse). Mpo na komonisa makanisi oyo azalaki na yango ntango abandaki kosalela Yehova na 1995, alobaki ete: “Nazalaki kokanisa ete nazali kokola malamu na kati ya solo.” Na nsima, abakisaki ete: “Nsima ya kotala video yango, namonaki ete naino nasali eloko te na mosala ya Yehova. Nasengeli kobunda makasi mpo natya makanisi mpe milende na mosala ya Nzambe mpe na boyekoli na ngai moko.” Sikoyo, Rachel amoni ete azali kosalela Yehova na molende koleka. Matomba nini azwi? Alobi boye: “Boyokani na ngai na Yehova ekómi makasi. Mabondeli na ngai ekómi na ntina mingi, boyekoli na ngai ekómi ya mozindo mpe ezali kosepelisa ngai mingi, mpe masolo ya Biblia ekómi polele mingi koleka epai na ngai. Yango esali ete nakóma kosepela mingi na mosala ya kosakola mpe nasepelaka mingi ntango namonaka ndenge maloba ya Yehova ezali kobɔndisa basusu.”
13 Video oyo ezali na motó ya likambo ete Mituna oyo bilenge batunaka—Nakosala nini na bomoi na ngai? (na Lifalanse) elendisaki elenge moko na nkombo Luke. Nsima ya kotala video yango, akomaki ete: “Etindaki ngai natalela lisusu bomoi na ngai.” Alobi ete: “Liboso, bato bazalaki kotinda ngai natánga naino bakelasi mingi mpo nakóma na mbongo ebele bongo na nsima namityela mikano ya elimo. Makanisi wana esalisaka moto akola na elimo te; kasi ezongisaka ye nde nsima.” Bilenge basi mpe mibali, mpo na nini kotala te soki bokoki kosalela makambo oyo boyekoli na kelasi mpo na komipesa mingi na mosala ya Bokonzi ndenge Hannah asalaki? Mpo na nini te kolanda ndakisa ya Rachel mpe komityela mikano oyo ekumisaka Nzambe mpe koluka kokokisa yango na molende? Bólanda ndakisa ya Luke, mpo bókima makama oyo ekómaki motambo mpo na bilenge mingi.
Tóyokaka makebisi na molende
14. Yehova andimaka losambo ya ndenge nini, mpe mpo na nini kotikala ndenge wana ezali pɛtɛɛ te lelo?
14 Basaleli ya Yehova basengeli kozala pɛto soki balingi ete Yehova andima losambo na bango. Yisaya apesi toli oyo: “Bólongwa! Bólongwa! Bókima na esika yango, bómama eloko ya mbindo te; bóbima na kati na ye [Babilone], bómibulisa bino mpenza, bino bokokumba biloko ya [Yehova].” (Yis. 52:11) Bambula mingi liboso Yisaya akoma maloba yango, Asa, mokonzi ya malamu, asalaki na mpiko nyonso mosala ya kolongola makambo ya mbindo na Yuda. (Tángá 1 Mikonzi 15:11-13.) Mpe bikeke na nsima, ntoma Paulo ayebisaki Tito ete Yesu amipesaki mpo na kopɛtola bayekoli na ye mpo akómisa bango ‘ekólo ya bato na ye moko, oyo bazali na molende mpo na misala ya malamu.’ (Tito 2:14) Na mokili oyo etondi na mbindo, ezali pɛtɛɛ te kozala na bizaleli ya pɛto, mingimingi mpo na bilenge. Na ndakisa, basaleli nyonso ya Nzambe, bilenge ná mikóló basengeli kobunda mpo na komikómisa mbindo te na koyoka maloba ya nsɔni mpe na kotala bililingi ya bato oyo bazali bolumbu, na bitanda oyo batyaka na banzela, na televizyo, na bafilme mpe mingimingi na Internet.
15. Nini ekoki kosalisa biso tókóma koyina mabe?
15 Molende na biso mpo na koyoka makebisi ya Nzambe ekoki kosalisa biso tóyina mabe. (Nz. 97:10; Lom. 12:9) Tosengeli koyina kotala bililingi ya bato oyo bazali bolumbu to koyoka maloba ya nsɔni mpo, ndenge ndeko moko alobaki, “tókangama te na nguya na yango oyo ezalaka lokola emá.” Mpo na kokabola biloko oyo ekangami na emá, esɛngaka kobimisa makasi oyo eleki nguya ya emá oyo ekangi yango. Ndenge moko, esɛngaka makasi mpo na koboya kotala bililingi ya bato oyo bazali bolumbu to koyoka maloba ya nsɔni. Kasi, koyeba makama oyo ekoki kokómela biso soki tozali kotala bililingi ya bato oyo bazali bolumbu to koyoka maloba ya nsɔni, ekosalisa biso tóyina yango. Ndeko moko asalaki milende makasi mpo atika momeseno na ye ya kokɔta na bisika oyo balakisaka bililingi ya bato oyo bazali bolumbu na Internet. Atyaki ordinatɛrɛ na ye na esika oyo bato nyonso ya libota na ye bakokaki komona makambo oyo azali kosala. Longola yango, azwaki ekateli makasi ya komipɛtola mpe kozala na molende mpo na misala ya malamu. Kasi, asukaki wana te. Lokola asengelaki kosalela Internet mpo na mosala na ye, azwaki ekateli ya kofungolaka yango kaka soki mwasi na ye azali wana.
Litomba ya kozala na etamboli ya malamu
16, 17. Etamboli na biso ya malamu ekoki kosala nini epai ya bato oyo bazali kotala biso? Pesá ndakisa.
16 Bilenge mibali mpe basi oyo bazali kosalela Yehova bazali na elimo malamu mpenza, mpe bato oyo bazali kotala bango bakamwaka! (Tángá 1 Petelo 2:12.) Moto moko abongolaki mpenza lolenge na ye ya kotalela Batatoli ya Yehova nsima ya kolekisa mokolo moko na Betele ya Londres mpo na kobongisa masini moko oyo ebimisaka mikanda. Mwasi na ye, oyo azalaki koyekola Biblia na Batatoli, amonaki mpe ete makanisi ya mobali na ye ebongwani. Liboso, azalaki kolinga te Batatoli báya epai na ye. Kasi, nsima ya kosala na Betele, azongaki na ndako mpe azalaki koloba malamu mpo na makambo oyo bandeko basalaki mpo na ye. Alobaki ete ata moto moko te azalaki kobimisa maloba ya mabe. Moto nyonso azalaki na motema molai mpe kimya ezalaki. Akamwaki mingimingi mpo bilenge mibali mpe basi bazalaki kosala na molende mpe kozanga ete báfutama, bazalaki kopesa ntango mpe makasi na bango mpo nsango malamu esakolama.
17 Ndenge moko mpe, bandeko oyo basalaka misala ya mosuni mpo na koleisa mabota na bango, basalaka misala yango na molimo na bango mobimba. (Kols. 3:23, 24) Yango esalaka ete bábatela misala na bango, mpo bapatrɔ na bango basepelaka na bosembo na bango mpe balingaka te kobungisa basali ya ndenge wana.
18. Ndenge nini tokoki kozala “na molende mpo na misala ya malamu”?
18 Kotyela Yehova motema, kotosa malako na ye mpe kobatela bisika na biso ya makita ezali na kati na makambo oyo tosalaka mpo na komonisa molende mpo na ndako ya Yehova. Longola yango, tomipesaka na mosala ya kosakola Bokonzi mpe ya kokómisa bato bayekoli na ndenge nyonso oyo makasi na biso ekoki. Tózala bilenge to mikóló, tokozwa matomba beboo soki tokobi na molende nyonso kosimba mitinda ya pɛto oyo eyokani na losambo na biso. Mpe tokoyebana ntango nyonso ete tozali “na molende mpo na misala ya malamu.”—Tito 2:14.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ekoki kozala ete Asa alongolaki bisika ya likoló ya losambo ya banzambe ya lokuta kasi te bisika ya likoló epai bato bazalaki kosambela Yehova. Ekoki mpe kozala ete batongaki lisusu bisika yango ya likoló na nsuka ya boyangeli ya Asa mpe yango nde mwana na ye Yehosafata alongolaki.—1 Mik. 15:14; 2 Nta. 15:17.
Na kotalela bandakisa ya Biblia mpe ya mikolo na biso, liteya nini ozwi mpo na oyo etali
• ndenge okoki komonisa molende na mosala ya kosakola mpe koteya?
• ndenge bilenge baklisto bakoki kozala “na molende mpo na misala ya malamu”?
• ndenge ya kotika mimeseno ya mabe?
[Elilingi na lokasa 13]
Osalelaka Biblia mbala na mbala na mosala ya kosakola?
[Elilingi na lokasa 15]
Koyekola monɔkɔ mosusu na kelasi ekoki kosalisa yo okolisa mosala na yo ya kosakola