Boponá ntango ya koyekola Biblia?
NA MBULA oyo eleki, Lisangani ya Mikóló-Bakambi eyebisaki mbongwana oyo ekɔti na programɛ ya makita ya lisangá mpo tózwaka ntango mingi mpo na koyekola Biblia mpe kosolola makambo ya Nzambe na libota. Soki ozali tata ya libota, salá nyonso mpo oyekolaka Biblia na mwasi na yo mpe bana na yo pɔsɔ na pɔsɔ na ndenge oyo ekosalisa bango. Babalani oyo bazali na bana te bakosepela kosalela ntango yango mpo na koyekola Biblia elongo. Bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bazali minzemba mpe bazali na mikumba ya libota te basengeli kosalela ntango wana mpo na koyekola Biblia bango moko.
Bandeko mingi bazali komonisa botɔndi mpo na ebongiseli ya kopona mpokwa mpo na Losambo na libota. Na ndakisa, Kevin, oyo azali nkulutu, akomaki boye: “Liloba ‘mersi’ ekoki te mpo na komonisa esengo oyo lisangá na biso mobimba ezali na yango. Biso bankulutu tolobelaki ndenge ya kosalela mpokwa oyo makita elongwe mpo na kosala kaka ndenge Lisangani ya Mikóló-Bakambi esɛngi: koyekola Biblia na mabota na biso.”
Jodi, ndeko mwasi oyo mobali na ye azali nkulutu, akomaki boye: “Tozali na bana basi misato ya mbula 15, 11, mpe 2. Eumeli naino te, tokómi na lisangá ya elobeli ya bajɛstɛ. Tolekisaka ntango mingi mpe tosalaka milende mingi mpo na kobongisa makita nyonso. Sikoyo, mbongwana wana etikeli biso mpokwa moko oyo tokoki kosalela mpo na koyekola na libota!”
John ná JoAnn, mobali ná mwasi na ye oyo bazali babongisi-nzela ya sanza na sanza bakomaki boye: “Tozalaki koyekola Biblia elongo pɔsɔ nyonso te mpo tosengelaki mpe kosala makambo mingi ya lisangá. Ebongiseli oyo ya sika ezali likabo oyo Yehova apesi biso mpo tózala makasi na elimo, soki tosaleli ntango yango ndenge esengeli.”
Tony, ndeko mobali moko monzemba oyo azali na mbula soki 25 aponá mokolo ya mibale na mpokwa mpo na koyekola Biblia ye moko. Abongisaka makita ya lisangá mikolo mosusu na pɔsɔ. Kasi, Tony alobi boye: “Nazelaka mokolo ya mibale na motema likoló.” Mpo na nini? “Mpokwa yango ezali ntango oyo napesá Yehova.” Tony abakisi boye: “Na boumeli ya ngonga soki mibale, nayekolaka makambo oyo ekokómisa boyokani na ngai na Yehova makasi. Kozwa ntango mingi mpo na koyekola esalisaka ngai namanyola bavɛrsɛ ya Biblia oyo nazali kotánga.” Yango eboti mbuma nini? “Toli ya Yehova ezali kosimba motema na ngai koleka ndenge ezalaki liboso.” Apesi ndakisa nini? “Na buku Étude perspicace, natángaki lisolo ya boninga ya Davidi ná Yonatana. Nayekoli makambo mingi mpo na ezaleli ya Yonatana ya koluka liboso matomba ya basusu. Ndakisa na ye esalisaki ngai namona polele soki kozala moninga ya solo elimboli mpenza nini. Nazelaka mpenza na motema likoló makambo mosusu ya motuya oyo nakoyekola mokolo ya mibale na mpokwa!”
Na ntembe te, basaleli nyonso ya Yehova bakozwa matomba mingi soki basaleli malamu ntango oyo batikeli bango mpo na koyekola Biblia mpe mpo na losambo na libota, na ndenge oyo ekosalisa bango.